Mokapo 7
Oyo Nzambe asili kosala mpo na kobikisa bato
1, 2. (a) Lolenge nini Kapitɛnɛ moko ya basodá ya Loma ayebaki Mwana na Nzambe? (b) Mpo na nini Yehova atikaki nzela ete Yesu akufa?
ESILI koleka mibu 2 000 na nsima ya nzangá moko na eleko ya prɛntá, moloma moko oyo azalaki kapitɛnɛ ya basodá azalaki kokɛngɛla mibali misato oyo bakómaki pene na kokufa. Likebi ya sodá wana etyamaki mingi epai na moko kati na bango—Yesu Klisto. Yesu atyamaki nsɛtɛ likoló na nzeté. Lokola ntango ya liwa na ye ezalaki kobɛlɛma, likoló eyindaki na midi. Ntango akufaki, mabelé maninganaki makasi, mpe sodá yango angangaki ete: “Solo moto oyo azalaki Mwana na Nzambe.”—Malako 15:39.
2 Mwana na Nzambe! Sodá wana alobaki solo. Autaki komona likambo lileki monene oyo ebimaki awa na mabelé. Na mabaku mosusu liboso, Nzambe ye moko abéngaki Yesu ete Mwana na ye ya bolingo. (Matai 3:17; 17:5) Mpo na nini Yehova atikaki nzela ete Mwana na ye akufa? Mpamba te, yango ezalaki nzela oyo abongisaki mpo na kobikisa bato longwa na lisumu mpe na liwa.
APONAMI MPO NA MOKANO YA NTINA MINGI
3. Mpo na nini ebongaki ete Mwana mobotami-bobele moko ya Nzambe aponama mpo na mokano moko ya ntina mingi mpo na bato?
3 Lokola tosilaki komona yango liboso kati na búku oyo, Yesu azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto. Abéngamaki “Mwana mobotami-bobele moko” ya Nzambe mpamba te azalisamaki na Yehova ye moko. Na nsima, Nzambe asalelaki Yesu mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso. (Yoane 3:18, NW; Bakolose 1:16) Yesu azalaki na bolingo mingi mpo na bato. (Masese 8:30, 31) Na yango, tozali kokamwa te na komona ete Yehova aponaki Mwana na ye mobotami-bobele moko mpo na kokokisa mokano moko ya ntina mingi na ntango bato bakweisamaki na nsé na etumbu ya liwa!
4, 5. Liboso ete Yesu aya awa na mabelé, Biblia elobaki nini na ntina na Mombóto oyo asengelaki kokóma Masiya?
4 Wana akataki etumbu likoló na Adama, Eva mpe Satana kati na elanga ya Edene, Nzambe alobelaki Mobikisi oyo akoya ete akozala “mombóto.” Mombóto yango, to libota, akoya mpo na kosilisa bampasi oyo Satana Zábolo, “nyoka ya kalakala,” abimisaki. Ya solo, Mombóto oyo alakamaki akonyata motó na Satana mpe baoyo nyonso bakolanda ye.—Genese 3:15; 1 Yoane 3:8; Emoniseli 12:9.
5 Na boumeli ya bikeke, Nzambe amonisaki mokemoke makambo mingi na ntina na Mombóto yango, oyo abéngami mpe Masiya. Lokola emonisamaki na etánda oyo ezali na lokasa 37, bisakweli mingi bimonisaki likambo moko na moko na ntina na bomoi na ye awa na mabelé. Na ndakisa, asengelaki koyika mpiko na bampasi makasi mpo na kokokisa mokumba na ye kati na mokano ya Nzambe.—Yisaya 53:3-5.
MPO NA NINI MASIYA ASENGELAKI KOKUFA
6. Engebene Danyele 9:24-26, Masiya asengelaki kokokisa nini, mpe lolenge nini?
6 Esakweli ekomami na Danyele 9:24-26 eyebisaki ete Masiya—Mopakolami ya Nzambe—akokokisa mokano moko monene. Akoya awa na mabelé ‘mpo na kosukisa ekweli, mpe mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kosala mbɔndi mpo na mabungá, mpe mpo na kokɔtisa boyengebene’ lobiko na lobiko. Masiya asengelaki kolongola ekweli ya kufa epai na bato na boyengebene. Kasi lolenge nini nde asali yango? Esakweli elimbolaki ete asengelaki “kolongolama,” elingi koloba kobomama.
7. Mpo na nini Bayuda bazalaki kopesa mbeka ya banyama, mpe yango ezalaki elilingi ya nini?
7 Bayisraele ya kala bamesanaki kosala mbɔndi mpo na mabungá. Kati na losambo na bango na nsé ya Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Mose, bazalaki mbala na mbala kopesa mbeka ya banyama. Yango ezalaki kokundwela Bayisraele ete bato bazalaki na mposa ya eloko moko ete esala mbɔndi mpo na masumu na bango, to ezipa yango. Ntoma Paulo alobelaki na mokuse mobeko yango na maloba oyo: “Soko makila masopani te, kolimbisama na masumu ezali te.” (Baebele 9:22) Baklisto bazali na nsé na Mibeko ya Mose te elongo na masɛngami na yango, lokola bambeka. (Baloma 10:4; Bakolose 2:16, 17) Lisusu, bayebi ete mbeka ya banyama ekoki te kozwela bato bolimbisi ya seko mpe ya kokoka mpo na masumu na bango. Bambeka wana ezalaki nde elilingi ya mbeka eleki motuya—oyo ya Masiya, to Klisto. (Baebele 10:4, 10; kokanisá na Bagalatia 3:24.) Nzokande, okoki komituna ete: ‘Ezalaki mpenza na ntina ete Masiya akufa?’
8, 9. Biloko nini ya motuya monene Adama mpe Eva babungisaki, mpe makambo oyo basalaki ezalaki na bopusi nini likoló na bakitani na bango?
8 Ee, esengelaki mpenza ete Masiya akufa mpo ete bato bákoka kobikisama. Mpo na koyeba mpo na nini, tosengeli kozongisa makanisi na elanga ya Edene mpe komeka kososola bonene ya eloko oyo Adama mpe Eva babungisaki ntango batombokelaki Nzambe. Bomoi ya seko etyamaki liboso na bango! Lokola bazalaki bana na Nzambe, bazalaki mpe na boyokani mpenza elongo na ye. Kasi ntango babwakaki boyangeli ya Yehova, babungisaki nyonso wana mpe bayeisaki lisumu mpe kufa likoló na bato.—Baloma 5:12.
9 Ezalaki lokola ete baboti na biso ya liboso babebisaki ebele na mosolo, komizindisáká bango moko kati na nyongo monene. Adama mpe Eva balekisaki nyongo yango epai na bakitani na bango. Mpo ete tobotami te na ezalela ya kokoka mpe ya kozanga masumu, moko na moko kati na biso azali mosumuki mpe mokufi. Soki tobɛli to tolobi likambo moko ya mpasi oyo tolingaki kopɛngola soki tokanisaki, ezali wana bopusi ya nyongo oyo tosangolaki—ezalela ya kozanga kokoka ya bato. (Baloma 7:21-25) Elikya na biso moko ezali bobele na kozwa oyo Adama abungisaki. Nzokande, tokoki te kozwa bomoi ya bomoto ya kokoka na makoki na biso moko. Lokola bato banso bazangi kokoka basalaka masumu, biso banso tozwaka lifuti ya kufa, kasi bomoi te.—Baloma 6:23.
10. Nini esengelaki mpo na kosomba oyo Adama abungisaki?
10 Nzokande, eloko moko ekokaki kopesama mpo na kosombitanya na oyo Adama abungisaki? Mobeko na boyengebene na Nzambe esɛngi kokokanisa, “molimo mpo na molimo.” (Exode 21:23) Na yango, bomoi moko esengelaki kopesama mpo na kosomba bomoi oyo ebungaki. Kasi esengelaki te kozala bomoi ya bongo na bongo. Nzembo 49:7, 8 elobi na ntina na bato bazangi kokoka ete: “Moto akolónga kosikola ndeko na ye te to kopesa epai na Nzambe motuya na bomoi na ye te. (Motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko).” Na yango, ezalela oyo ezangi nde elikya? Te, ezali bongo te.
11. (a) Liloba “lisiko” elimboli nini na Liebele? (b) Nani mpenza akokaki kosomba bato, mpe mpo na nini?
11 Na lokótá ya Liebele, liloba “lisiko” elimboli mosolo oyo mopesami mpo na kosikola mokangami mpe ezali lisusu komonisa bokokani. Bobele moto oyo azalaki na bomoi ya kokoka nde akokaki kopesa eloko ekokani na oyo Adama abungisaki. Nsima na Adama, moto bobele moko ya kokoka oyo abotamaki awa na mabelé ezalaki Yesu Klisto. Yango wana, Biblia ebéngi Yesu ete “Adama ya nsuka” mpe emonisi biso solo ete Klisto “amipesaki lokola lisiko likokani mpo na banso.” (1 Bakolinti 15:45; 1 Timoté 2:5, 6, NW) Adama apesaki liwa epai na bana na ye, nzokande Yesu apesi bomoi ya seko lokola libula. Eteni ya 1 Bakolinti 15:22 elimboli ete: “Zambi lokola na Adama nyonso bakokufaka, boye na Klisto nyonso bakozwa bomoi.” Ntina wana Yesu abéngami ete “Tata na seko.”—Yisaya 9:6, 7.
LOLENGE LISIKO LIFUTAMAKI
12. Ntango nini Yesu akómaki Masiya, mpe lolenge nini ya bomoi alandaki na nsima?
12 Pene na nsuka ya mobu 29 T.B., Yesu akendaki epai na ebóto na ye Yoane mpo na kobatisama mpe na nsima komibimisa mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Na libaku wana, Yehova apakolaki Yesu na elimo santu. Na yango, Yesu akómaki Masiya, to Mopakolami, moto oyo apakolami na Nzambe. (Matai 3:16, 17) Na nsima, Yesu abandaki mosala na ye oyo eumelaki mbula misato na ndambo. Atambolaki na mokili na ye, kosakoláká na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe koyanganisáká bayekoli ya sembo. Nzokande, lokola yango esakolamaki, mosika te botɛmɛli ebimelaki ye.—Nzembo 118:22; Misala 4:8-11.
13. Makambo nini masalemaki na kufa ya Yesu, moto oyo abatelaki bosembo?
13 Na mpiko nyonso, Yesu atɔndɔlaki polele bokosi ya bakonzi ya mangomba, mpe bango balukaki koboma ye. Na nsima, basalaki mwango moko mabe mpo na kokaba ye, mpo na yango Yesu akangamaki kozanga ntina, asambisamaki na bosembo te mpe bafundaki ye na lokuta ete azali kotombokisa bato. Yesu abɛtamaki, babwakelaki ye nsɔi, bayokisaki ye nsɔ́ni, babɛtaki ye na mfimbo oyo esalemaki na mokano ya kopasola misuni ya nzoto. Na nsima, moyangeli Moloma Ponti Pilato akatelaki ye etumbu ya liwa likoló na nzeté ya mpasi. Babɛtaki ye nsɛtɛ likoló na nzeté mpe kuna bakakemisaki ye nsima na kotɛlɛmisa nzeté yango. Kopema ezalaki mpasi mingi mpe abundaki na liwa ngonga mingi liboso ete akufa. Kino na nsuka ya konyokwama wana, Yesu abatelaki bosembo na ye liboso ya Nzambe.
14. Mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete Mwana na ye anyokwama mpe akufa?
14 Na yango, ezalaki na mokolo mwa 14 sanza ya Nisan ya mobu 33 T.B., nde Yesu apesaki bomoi na ye lokola “lisiko mpo na bato mingi.” (Malako 10:45; 1 Timoté 2:5, 6) Longwa na likoló, Yehova akokaki komona lolenge Mwana Molingami na ye anyokwamaki mpe akufaki. Mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete likambo wana ya mpasi lisalema? Asalaki bongo mpamba te azalaki na bolingo mpo na bato. Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mingi mokili na motindo boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16, NW) Liwa ya Yesu ezali mpe koteya biso ete Yehova azali Nzambe oyo azali na boyengebene ya kokoka. (Deteronome 32:4) Basusu bakoki komituna ete mpo na nini Nzambe alongolaki te mobeko na ye ya boyengebene oyo esɛngi molimo mpo na molimo mpe mpo na nini atikaki te kosɛnga lifuta mpo na lisumu ya Adama. Ntina ezali ete Yehova atosaka mibeko na ye ntango nyonso mpe akokweisaka yango te, ata soki ekosɛnga na ye moko komipimela makambo minene boni.
15. Mpo ete elingaki kozala likambo lizangi sembo na kotika Yesu libela kati na kufa, Yehova asalaki nini?
15 Boyengebene ya Yehova esɛngaki mpe ete liwa ya Yesu ebimisa litomba ya esengo. Na yango, elingaki kozala likambo ya sembo na kotika mosembwi Yesu ete alala mpo na libela kati na kufa? Soko moke te! Makomami ya Liebele masakolaki ete mosembwi na Nzambe akotikala kati na nkunda te. (Nzembo 16:10; Misala 13:35) Yesu alalaki kati na kufa mikolo misato, mpe na nsima Yehova Nzambe asekwisaki ye mpo na kozala na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo azali na nguya.—1 Petelo 3:18.
16. Yesu asalaki nini ntango azongaki na likoló?
16 Na kufa na ye, Yesu akabaki bomoi na ye ya bomoto mpo na libela. Lokola asekwisamaki mpo na kozala na bomoi na likoló, akómaki elimo ekopesaka bomoi. Lisusu, ntango Yesu amataki kino na esika eleki mosantu kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, akutaki lisusu Tata na ye molingami mpe alakisaki epai na Ye motuya ya bomoi na ye ya moto ya kokoka. (Baebele 9:23-28) Motuya ya bomoi wana ya ntalo mingi ekokaki bongo kosalelama mpo na bolamu ya bato ya botosi. Yango elimboli nini mpo na yo?
NA NINI LISIKO YA KLISTO ETALI YO
17. Lolenge nini tokoki kozwa bolimbisi na nzela na mbeka ya lisiko ya Klisto?
17 Talelá makambo misato kati na yango mbeka ya lisiko ya Klisto ezali kopesa yo matomba uta sikawa. Ya liboso, ezali bolimbisi ya masumu. Na kozaláká na kondima kati na makila ya Yesu oyo masopamaki, tozwi “kosikwama na nzela ya lisiko,” ee, “bolimbisi ya bikweli na biso.” (Baefese 1:7, NW) Na bongo, ata soki tosalaki lisumu monene, tokoki kosɛnga bolimbisi epai na Nzambe na nkombo ya Yesu. Soki tobongoli solo motema, Yehova akosalela mpo na biso motuya ya mbeka ya lisiko ya Mwana na ye. Nzambe akolimbisa biso, kopesáká biso lipamboli ya lisosoli malamu, na esika ete apesa biso etumbu ya liwa oyo ekoki na biso na ntina na lisumu na biso.—Misala 3:19; 1 Petelo 3:21.
18. Ndenge nini mbeka ya Yesu epesi biso elikya?
18 Ya mibale, mbeka ya lisiko ya Klisto epesi moboko ya elikya na biso mpo na mikolo mizali koya. Kati na emonaneli, ntoma Yoane amonaki “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango” oyo bakobika na nsuka ya likámá monene oyo mosika te ekokwela ebongiseli ya biloko oyo. Mpo na nini bango bakobika na ntango Nzambe akoboma bato mingi mosusu? Anzelu moko ayebisaki Yoane ete ebele monene “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate,” Yesu Klisto. (Emoniseli 7:9, 14) Soki tozali ntango nyonso komonisa kondima kati na makila ya Yesu Klisto oyo masopamaki mpe tozali komitambwisa na boyokani na masɛngami ya Nzambe, tokozala pɛto na miso ya Nzambe mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko.
19. Lolenge nini mbeka ya Klisto emonisi ete ye mpe Tata na ye balingi yo?
19 Ya misato, mbeka ya lisiko ezali elembeteli eleki monene oyo emonisi bolingo ya Yehova. Liwa ya Klisto emonisaki na lolenge ya polele mitindo mibale ya bolingo boleki monene kati na lisoló ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba: (1) Bolingo ya Nzambe, oyo atindaki Mwana na ye mpo ete akufela biso; (2) Bolingo ya Yesu, oyo andimaki na bolingo na ye moko komipesa lokola lisiko. (Yoane 15:13; Baloma 5:8) Bolingo wana ekozala na litomba mpo na moko na moko kati na biso bobele soki tozali mpenza komonisa kondima. Ntoma Paulo alobaki ete: “Mwana na Nzambe . . . alingaki ngai mpe amipesaki ye mpenza mpo na ngai.”—Bagalatia 2:20; Baebele 2:9; 1 Yoane 4:9, 10.
20. Mpo na nini tosengeli kondimela mbeka ya lisiko ya Yesu?
20 Na yango, tiká ete tóndimela mbeka ya lisiko ya Yesu mpo na komonisa botɔ́ndi na biso likoló na bolingo oyo Nzambe mpe Klisto basili komonisa na biso. Kosala boye ezali nzela ekomema biso kino bomoi ya seko. (Yoane 3:36) Nzokande, lobiko na biso ezali te likambo lileki mpo na yango Yesu ayaki mpe akufaki awa na mabelé. Te, bomoi na ye etalelaki libosoliboso likambo moko lileki monene kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Lokola tokomona yango na mokapo molandi, likambo yango litali biso banso mpamba te ezali komonisa mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete mabe mpe mpasi eumela ntango molai boye kati na mokili.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Mpo na nini Yesu asengelaki kokufa mpo na kobikisa bato?
Lolenge nini lisiko efutamaki?
Lolenge nini ozali kozwa litomba na lisiko?
[Elilingi na lokasa mobimba 67]