Mituna ya batángi
Liteya nini tokoki kozwa na Masese 24:27?
Mokomi ya mokanda ya Masese apesaki elenge mobali moko toli na maloba oyo: “Lɛngɛlá mosala na yo libándá, mpe bongisá yango mpo na yo na elanga. Nsima na yango, osengeli mpe kotonga libota na yo.” Lisese yango oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu elimboli nini? Elimboli ete elenge mobali asengeli komibongisa malamu liboso ya kobala mpe kosala libota na ye moko, asengeli koyeba mikumba oyo akokóma na yango.
Kala, vɛrsɛ oyo ezalaki mbala mosusu kosalelama mpo na komonisa ete mobali mpe tata ya libota asengeli kaka te komipesa na mosala ya mosuni kasi asengeli mpe kotonga to kolendisa libota na ye, na ndakisa koteya bango makambo ya Nzambe. Atako likanisi wana ezali solo mpe eyokani na Makomami, yango ezali mpenza te likambo ya libosoliboso oyo vɛrsɛ yango elobeli. Mpo na nini? Tótalela bantina mibale.
Ya liboso, vɛrsɛ yango ezali te kolobela kotonga na ndenge ya kolendisa libota oyo esilá kosalema. Kasi, ezali kolobela nde kotonga ndako ya solo. Liloba oyo ebongolami na “kotonga” ekoki mpe kosalelama na ndenge ya elilingi mpo na kolobela kotonga to kosala libota—elingi koloba kobala mpe kobota.
Ya mibale, vɛrsɛ yango elobeli makambo na molɔngɔ, elingi koloba, “Liboso salá boye, na nsima okosala boye.” Na yango, tokoki nde koloba ete vɛrsɛ yango ezali komonisa ete mikumba ya mosuni esengeli koleka liboso ya mikumba ya elimo? Soki moke te!
Na ntango ya kala, soki mobali alingi “kotonga libota [na ye],” elingi koloba alingi kobala mpo na kosala libota, asengelaki komituna boye: ‘Nasili komibongisa mpo na kobatela mpe kokokisa bamposa ya mwasi mpe ya bana oyo tokoki kobota na nsima?’ Liboso ya kosala libota, asengelaki kosala bilanga na ye, oyo ezalaki mosala makasi. Yango wana, Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Luka liboso kozala na mosala pe na bilanga na yo, sima nde okoki kotònga ndako.” Etinda yango etali mpe biso lelo oyo?
Ɛɛ. Mobali oyo alingi kobala asengeli komibongisa malamu mpo na kokokisa mokumba yango. Soki azali nzoto makasi, asengeli kosala mosala. Ya solo, mosala makasi oyo mobali akosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye esengeli te kosuka kaka na makambo ya mosuni. Liloba ya Nzambe emonisi ete mobali oyo akokisaka te bamposa ya mosuni, ya motema mpe ya elimo ya bato ya libota na ye, azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te! (1 Tim. 5:8) Yango wana, ntango elenge mobali azali komibongisa mpo na kobala mpe kosala libota, asengeli komituna mituna oyo: ‘Nasili komibongisa mpo na koleisa mpe kolatisa mwasi mpe bana? Nasili komibongisa mpo na kotambwisa makambo ya elimo na libota? Nakokoka mpenza kokokisa mokumba ya koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ ná mwasi na ngai mpe bana?’ Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete mikumba wana ezali na ntina mingi.—Mib. 6:6-8; Ef. 6:4.
Yango wana, elenge mobali oyo azali koluka mwasi asengeli kokanisa malamumalamu na etinda oyo ezali na Masese 24:27. Ndenge moko mpe elenge mwasi asengeli komituna soki amibongisi mpo na kokokisa mikumba ya mwasi ya libala mpe ya mama. Bato oyo babalani sika bakoki mpe komituna mituna ya ndenge wana ntango bazali kokanisa soki basengeli kobota. (Luka 14:28) Kotosa etinda yango oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu ekoki kosalisa basaleli ya Nzambe bázala na mpasi na motema te mpe bázala na esengo na libota na bango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Mituna nini oyo etali libala elenge mobali asengeli komituna?