Ndenge nini okoki kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto?
EKÓMÁ naino te ozala na makanisi oyo elɛmbisaka nzoto? Ya solo, moto nyonso azalaka na yango! Tozali na bomoi na eleko moko oyo makambo ya nkita ezali kobeba, mobulu ezali kokóma mingi, mpe kozanga bosembo ezali mingi. Tokoki kokamwa te ndenge ebele ya bato bazali kobundana na makambo lokola kozala mawamawa, komona lokola bamemi ngambo, mpe bazali na ntina te.
Komiyoka ndenge wana ekoki kozala likama. Ekoki kobebisa elikya mpe likoki na biso ya kokanisa, mpe kolongola biso esengo. Biblia elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Mpo na koyika mpiko na mokili oyo ya mabe, tosengeli kozala na nguya mpe makasi. Yango wana, ezali na ntina tóyeba kobwaka makanisi oyo elɛmbisaka nzoto.a
Biblia ezali na batoli ya malamu oyo ekoki kosalisa moto alonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. Yehova Nzambe, Mozalisi mpe Mobateli ya bomoi nyonso, alingi te tótika nzela na makanisi oyo elɛmbisaka nzoto to oyo elongolaka elikya. (Nzembo 36:9) Na yango, tiká tótalela makambo misato oyo Liloba na ye ekoki kosalisa biso tólonga makanisi yango.
Yebá ete Nzambe atyelaka yo likebi
Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe azali na makambo mingi ya kosala, yango wana azalaka na ntango te ya kotya likebi na ndenge oyo bango bazali komiyoka. Yo mpe okanisaka bongo? Biblia alendisi biso ete Mozalisi na biso atyaka likebi na ndenge oyo tomiyokaka. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Nzembo 34:18) Ezali mpenza kobɔndisa koyeba ete Nkolo Mozwi-ya-Nguya Nyonso azalaka pene na biso ntango tozali na mpasi!
Nzambe azalaka mafumafu te. Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Alingaka bato mpe amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali konyokwama. Na ndakisa, ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito eleki bambula soki 3 500, alobaki boye: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango.”—Kobima 3:7, 8.
Nzambe ayebi malamu ndenge toyokaka. Kutu, “Ye nde asalaki biso, kasi biso moko te.” (Nzembo 100:3) Na yango, ata ntango tozali komona lokola ete baninga na biso bazali koyeba mpenza te ndenge oyo biso tozali komiyoka, tokoki kotya motema ete Nzambe azali koyeba. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.” (1 Samwele 16:7) Ata makanisi ya nse ya motema na biso ebombami te na miso ya Nzambe.
Ya solo, Yehova ayebaka mpe mabunga na biso. Kasi, tokoki kozala na botɔndi mpo na ndenge Mokeli na biso ya bolingo alimbisaka. Davidi, mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa. Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, Azali kobosana te ete tozali putulu.” (Nzembo 103:13, 14) Nzambe amonaka biso na ndenge oyo biso moko tomimonaka te. Alukaka malamu oyo ezali kati na biso, mpe abosanaka mabe na biso ntango tobongoli motema na masumu na biso.—Nzembo 139:1-3, 23, 24.
Na yango, ntango tozali komimona ete tozali na ntina te, tosengeli kozala na ekateli ya kobundisa makanisi ya ndenge wana. Tosengeli kobosana te ndenge oyo Nzambe atalelaka biso!—1 Yoane 3:20.
Kolisá boninga makasi na Nzambe
Litomba nini tokozwa soki tozali komimona ndenge Nzambe amonaka biso? Ekozala mpasi te tósala likambo ya mibale mpo na kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto—kosala boninga makasi na Nzambe. Yango ekoki kosalema?
Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova Nzambe asepelaka kosalisa biso tókolisa boninga na ye. Biblia eyebisi biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Yoká naino likambo oyo: Bato ya bolɛmbu mpe ya masumu lokola biso, tokoki kosala boninga na Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́.
Nzambe amimonisi na Biblia mpo biso tóyeba ye malamu. Ntango tozali kotánga Biblia mbala na mbala, tokoki koyeba bizaleli kitoko ya Nzambe.b Ntango tozali kokanisa na mozindo na makambo yango, tokomiyoka lisusu penepene na Yehova. Tokomona polele bomoto na ye—Tata ya bolingo mpe ya motema mawa.
Ntango tozali kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga na Biblia, ekosala mingi mpo na biso. Tokopusana penepene ya Tata na biso ya likoló ntango tozali kokɔtisa makanisi na ye na mitó mpe na mitema na biso mpe tozali kotikela yango nzela esembola, ebɔndisa mpe etambwisa biso. Tosengeli mpenza kosala bongo ntango tozali kobundana na makanisi oyo ezali kobulunganisa mpe kopesa biso mawa. Mokomi ya nzembo alobelaki yango boye: “Tango natondaki na makanisi na motema, olongolaki ngai mawa pe opesaki ngai esengo.” (Nzembo 94:19, Bible na lingala ya lelo oyo) Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kobɔndisa. Soki na komikitisa nyonso tondimi nsango na yango ya solo, tokomona ete malɛmbɛmalɛmbɛ makanisi na biso ya mabe ekolongwa mpe ekotika esika na libɔndisi mpe kimya oyo kaka Nzambe nde apesaka. Na yango, Yehova abɔndisaka biso kaka ndenge moboti oyo alingaka bana na ye akoki kokitisa mpasi to mawa ya mwana na ye.
Sekele mosusu ya kokóma moninga ya Nzambe ezali ya kosololaka na ye mbala na mbala. Biblia eyebisi biso boye: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, [Nzambe] akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Ata soki tozali na kobanga to mitungisi ya ndenge nini, tokoki kobondela Nzambe mpe kosɛnga ye asalisa biso. Soki tofungoleli Nzambe motema na biso, tokozwa kimya ya makanisi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.”—Bafilipi 4:6, 7.
Ntango ozali kolanda programɛ ya kotángaka Biblia, kokanisaka makambo oyo ozali kotánga, mpe kobondela, na ntembe te, okomona ete ozali kokóma mpenza moninga ya Tata na yo ya likoló. Boninga yango ezali ebundeli moko ya nguya mpo na kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. Nini lisusu ekoki kosalisa?
Tyá makanisi na elikya ya solosolo oyo ezali koya
Ata ntango tokutani na komekama makasi, tokoki kotya makanisi na biso na makambo ya malamu. Ndenge nini? Nzambe apesi biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Ntoma Petro alobelaki na mokuse elikya kitoko yango na maloba oyo: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge [Nzambe] alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13) Yango elimboli nini?
Maloba “likoló ya sika,” elimboli guvɛrnema moko—Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló oyo etambwisami na Yesu Kristo. “Mabele ya sika” elimboli libota ya sika ya bato awa na mabele baoyo bandimami na Nzambe. Na nse ya boyangeli ya “likoló ya sika,” libota ya sika ya bato ekosikolama na makambo nyonso oyo etindaka bato bázala na makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. Mpo na bato ya sembo oyo bakozala na bomoi na mokili yango, Biblia epesi biso elikya ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”—Emoniseli 21:4.
Na ntembe te okondima ete yango ezali makanisi ya malamu mpe ya kolendisa. Yango wana Biblia elobeli makambo oyo Nzambe abongisi mpo na bakristo ya solo ete ezali “elikya ya kitoko mpenza.” (Tito 2:13) Soki totye makanisi na bilaka oyo Nzambe apesi bato mpo na mikolo ezali koya—mpe na bantina oyo ebongi tótyela bilaka yango motema ete ekokokisama—tokolongola makanisi oyo elɛmbisaka nzoto.—Bafilipi 4:8.
Biblia ekokanisi elikya na biso ya lobiko na ekɔti. (1 Batesaloniki 5:8) Na ntango ya kala, soda azalaki komeka te kokende etumba kozanga ekɔti na ye. Ayebaki ete ekobatela ye na makɔnga mpe bambanzi. Ndenge ekɔti ebatelaka motó, elikya ebatelaka makanisi. Kofandisa makanisi oyo epesaka biso elikya ekobatela biso na makambo lokola kobanga, mpe komona ete tokolonga te.
Na yango, tokoki kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. Yo mpe okoki kolonga! Moná ndenge Nzambe atalelaka yo, pusaná penepene na ye, mpe tyá makanisi na elikya na yo mpo na mikolo ezali koya. Na ndenge yango, okotya motema ete okomona mokolo oyo makanisi oyo elɛmbisaka nzoto ekozala lisusu te mpo na libela!—Nzembo 37:29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekozala malamu ete baoyo bazali konyokwama makasi na makanisi bákutana na monganga oyo ayebi mosala.—Matai 9:12.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2009, epesi programɛ oyo ebongi oyo tokoki kosalela mpo na kotángaka Biblia.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
“Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.”—KOBIMA 3:7, 8
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
“Tango natondaki na makanisi na motema, olongolaki ngai mawa pe opesaki ngai esengo.”—NZEMBO 94:19, BIBLE NA LINGALA YA LELO OYO
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
“Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”—BAFILIPI 4:7
[Etanda/Elilingi na nkasa 20, 21]
Mikapo ya kolendisa na ntina na Yehova Nzambe
“Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.”—KOBIMA 34:6.
“Miso na ye ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”—2 NTANGO 16:9.
“Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”—NZEMBO 34:18.
“Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.”—NZEMBO 86:5.
“Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”—NZEMBO 145:9.
“Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”—YISAYA 41:13.
“Apambwama, Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 BAKORINTI 1:3.
“Tokondimisa mitema na biso liboso na ye na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso, mpo Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.”—1 YOANE 3:19, 20.
[Etanda/Bililingi na lokasa 22]
Bazali kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto
“Tata na ngai azali momɛli masanga, mpe anyokolaki ngai mingi. Na boumeli ya bambula mingi, nanyokwamaki na makanisi ya komimona ete nazali na ntina moko te. Kasi, ntango nandimaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko, nayebaki elaka ya bomoi ya seko awa na mabele. Elaka yango etondisaki makanisi mpe motema na ngai na esengo. Nakómaki kotánga Biblia mokolo na mokolo. Nazalaka ntango nyonso na Biblia pene na ngai. Ntango makanisi oyo elɛmbisaka nzoto eyeli ngai, nazwaka Biblia mpe natángaka mikapo oyo ebɔndisaka. Kotánga mikapo oyo elobeli bizaleli kitoko ya Nzambe endimisaka ngai ete nazali na ntina mingi na miso na ye.”—Kátia, mwasi moko ya mbula 33.c
“Nakómaki na momeseno ya komɛla masanga, bangi oyo babengi marijuana, cocaïne, crack cocaïne, mpe kobenda na zolo lolenge moko boye ya bangi (colle). Lokola nabungisaki biloko nyonso, nakómaki kosɛngasɛnga. Kasi, ntango nandimaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, nabongolaki bomoi na ngai mpenza. Nakómaki komona ete Nzambe azali mpenza. Atako nasengeli naino kobunda na makanisi ya komiyoka lokola namemi ngámbo mpe ete nazali na ntina te, nayekoli kotya elikya na motema mawa ya Nzambe mpe na boboto monene na ye. Nazali na elikya ete Nzambe akokoba kopesa ngai makasi mpo nalonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. Koyeba solo ya Biblia ezali likambo ya malamu mingi oyo ekómeli ngai.”—Renato, mobali moko ya mbula 37.
“Banda ntango nazalaki naino mwana moke, nazalaki koluka komikokanisa na yaya na ngai ya mobali. Nazalaki ntango nyonso komona ete aleki ngai. Tii lelo, namiyokaka kaka bongo, namityelaka motema te. Kasi, nazali na ekateli ya kolonga etumba yango. Nabondelaki Yehova mbala mingi mpe asalisaki ngai nalonga makanisi oyo nazalaki na yango ya komiyoka ete nakokoka te. Ezali kosimba motema koyeba ete Nzambe alingaka biso mpenza mpe atyelaka biso likebi!”—Roberta, mwasi moko ya mbula 45.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Bankombo mosusu ezali ya bango te.