Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/10 nk. 26-28
  • Lisolo na moninga moko ya kartye—Elimo santu ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisolo na moninga moko ya kartye—Elimo santu ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na yo “elimo santu” ezali nini?
  • Elimo santu ezali moto?
  • Ndenge nini ezali “mosungi”?
  • Elimo santu ezali nini?
  • Elimo santu ezali moto?
    Lamuká!—2006
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo santu: bokasi na Nzambe bokosalaka mosala
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/10 nk. 26-28

Lisolo na moninga moko ya kartye​—Elimo santu ezali nini?

BATATOLI YA YEHOVA basepelaka kosolola masolo ya Biblia na baninga na bango ya kartye. Ozali na motuna moko ya Biblia oyo olukaka kozwa eyano? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna bango mokolo oyo okokutana na Motatoli ya Yehova. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Paulo akei kotala mobali moko nkombo na ye Petro.

Mpo na yo “elimo santu” ezali nini?

Petro: Nayokaka ete Batatoli ya Yehova bazali bakristo te. Bondimaka elimo santu te.

Paulo: Ya liboso, yebá ete tozali bakristo. Soki nayei kotala yo na ntɔngɔ ya lelo, ezali mpo nandimelaka Yesu Kristo. Kutu, ye nde atindi bayekoli na ye básakolaka. Kasi, tiká natuna yo naino; mpo na yo “elimo santu” ezali nini?

Petro: Elimo santu azali moko ya bapersona misato, azali mosungi oyo Yesu alakaki akotindela biso. Mosungi azali na ntina mingi mpo na ngai. Nalingaka koyoka ete elimo santu azali kosala na bomoi na ngai.

Paulo: Bato mingi bakanisaka bongo mpo na elimo santu. Eleki mwa bambula, nazwaki libaku ya kotalela oyo Biblia eteyaka mpo na likambo yango. Soki ozali na mwa miniti, nakosepela kolakisa yo oyo nayekolaki.

Petro: Ɛɛ, nazali na mwa miniti.

Paulo: Nkombo na ngai Paulo. Bongo yo?

Petro: Petro. Nasepeli kokutana na yo.

Paulo: Ngai mpe nasepeli kokutana na yo. Lokola tozali na miniti mingi te, nakolobela kaka likambo moko oyo etali elimo santu. Olobaki ete elimo santu ezali mosungi oyo Yesu alakaki biso. Ngai mpe nandimi ete ezali bongo. Kasi, mpo na yo elimo santu ezali moto, mpe akokani na Nzambe?

Petro: Ɛɛ, bateyá ngai bongo.

Elimo santu ezali moto?

Paulo: Tótala mokapo moko ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyeba soki elimo santu ezali moto to te. Ntango mosusu oyebi bavɛrsɛ yango. Na Misala 2:1-4, tozali kotánga boye: “Nzokande wana mokolo ya fɛti ya Pantekote ezalaki koleka, bazalaki bango nyonso elongo na esika moko, mpe na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, mpe mokomoko efandaki likoló ya moto na moto na kati na bango, mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu, ndenge kaka elimo ezalaki kopesa bango nzela ya koloba.”

Petro: Nayebi lisolo yango.

Paulo: Sikoyo Petro, moto akoki kotonda na moto mosusu?

Petro: Te, ekoki kosalema te.

Paulo: Tótala lisusu mwa moke kaka na mokapo yango, kasi na vɛrsɛ 17. Eteni ya liboso ya vɛrsɛ yango elobi boye: “Nzambe alobi boye: ‘Mpe na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai.’” Tiká natuna yo Petro, Nzambe akoki kosopa eteni mosusu ya Nzambe lokola ye?

Petro: Awa mpe namoni, ekoki kosalema te.

Paulo: Yoane Mobatisi alobelaki lolenge mosusu ya kotonda na elimo santu. Ezali na Matai 3:11. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Petro: “Ngai nazali kobatisa bino na mai mpo bobongoli motema; kasi moto oyo azali koya nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye. Moto yango akobatisa bino na elimo santu mpe na mɔtɔ.”

Paulo: Mersi mingi. Omoni oyo Yoane Mobatisi alobaki ete ekosalema na elimo santu?

Petro: Alobelaki kobatisama na elimo santu.

Paulo: Ezali bongo. Simbá ete alobelaki mpe kobatisama na mɔtɔ. Emonani polele ete mɔtɔ ezali moto te. Okanisi ete vɛrsɛ oyo ezali koloba ete elimo santu ezali moto?

Petro: Te.

Paulo: Na yango, na kotalela bavɛrsɛ oyo touti kotánga, elimo santu ezali moto te.

Petro: Nakanisi ezali bongo.

Ndenge nini ezali “mosungi”?

Paulo: Kasi, na ebandeli osalelaki liloba “mosungi.” Na Yoane 14:26, Yesu abengaki elimo santu “mosungi.” Tótánga vɛrsɛ yango elongo: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” Bato mosusu bakanisaka ete vɛrsɛ oyo ezali kondimisa likanisi oyo elobaka ete elimo santu ezali moto; moto moko oyo akosalisa mpe akoteya.

Petro: Ezali ndenge wana nde nakanisaka.

Paulo: Kasi, ekoki kozala ete Yesu asalelaki nde maloba ya elilingi? Sikoyo, yoká oyo Yesu alobaki mpo na bwanya to mayele ndenge Luka 7:35, emonisi yango na Biblia haut fleuve: “Mayɛlɛ alongi mpɔ na bana na ye yɔnsɔ.” Okoki koloba ete bwanya to mayele ezali moto, mpe ezali na bana?

Petro: Te, emonani ete Yesu asalelaki nde maloba ya elilingi.

Paulo: Ezali bongo. Yesu alingaki koloba ete bwanya emonanaka na misala. Mbala mingi, Biblia esalelaka maloba ya elilingi mpo na kolobela eloko lokola moto. Mbala mingi, tosalelaka maloba ya elilingi na masolo na biso. Na ndakisa, na moi oyo ya ntɔngɔ, tokoki kokamwa te soki moto alobi ete: “Fungolá barido, mpo moi ekɔta,” boye te?

Petro: Ngai moko mpe nakoki koloba bongo.

Paulo: Soki olobi bongo, yango ekolakisa ete moi ezali moto oyo ozali kobenga akɔta na ndako na yo?

Petro: Te. Ezali maloba ya elilingi.

Paulo: Na yango, ntango Yesu abengaki elimo santu mosungi, to moteyi, ekoki kozala ete azalaki kosalela nde maloba ya elilingi?

Petro: Nakanisi ezali bongo. Likanisi yango eyokani na bavɛrsɛ oyo otángaki liboso, oyo elobaki ete elimo santu esopamaki likoló ya bato mpe ete bato babatisamaki na yango. Kasi, soki elimo santu ezali moto te, ezali nini?

Elimo santu ezali nini?

Paulo: Na Misala 1:8, Yesu ayebisi biso soki elimo santu ezali nini. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Petro: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”

Paulo: Simbá ete Yesu akokanisi elimo santu na nguya. Na boyokani na bavɛrsɛ oyo totángaki liboso, okanisi ete nguya yango eutaka wapi?

Petro: Epai ya Nzambe, Tata.

Paulo: Ezali bongo. Elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalelaki mpo na kozalisa molɔ́ngɔ́. Vɛrsɛ ya mibale ya mokapo ya liboso elobeli yango. Ebandeli 1:2 elobi ete: “Nguya ya Nzambe ezalaki kokende epai na epai likoló ya mai.” Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “nguya” ebongolami mpe na “elimo.” Ezali nguya oyo emonanaka te, oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa mpe komonisa mokano na ye. Tiká napesa yo vɛrsɛ mosusu. Ezali Luka 11:13. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Petro: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?”

Paulo: Soki Tata na likoló azali na bokonzi likoló ya elimo santu, azali kopesa yango epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango, elimo santu ekoki kozala ndenge moko na Tata?

Petro: Te. Namoni oyo olingi koloba.

Paulo: Petro, naboyi kozwa yo ntango mingi. Olobaki ete ozali kaka na miniti moke. Kasi, tiká natuna yo motuna moko mpo na koloba na mokuse lisolo na biso. Na kotalela bavɛrsɛ oyo totángi, okoki koloba ete elimo santu ezali nini?

Petro: Ezali nguya ya Nzambe.

Paulo: Ezali bongo. Mpe na boyokani na Yoane 14:26, ntango Yesu abengaki elimo santu mosungi to moteyi, asalelaki nde maloba ya elilingi oyo tosalelaka ntango mosusu mpo na kolobela eloko lokola moto.

Petro: Nayebaki yango soki moke te.

Paulo: Ezali na likambo mosusu ya ntina mpenza oyo tokoki koyekola na maloba ya Yesu.

Petro: Likambo yango nini?

Paulo: Tokoki kosɛnga Nzambe elimo santu na ye esalisa biso na ntango ya mpasi. Tokoki mpe kosɛnga elimo santu na ye esalisa biso tóyeba solo oyo etali ye.

Petro: Ezali malamu. Nakokanisa na yango.

Paulo: Liboso nakende, nalingi kotikela yo likambo mosusu oyo okokanisa na yango. Lokola elimo santu ezali nguya ya Nzambe, na yango biso nyonso tondimi ete Nzambe akoki kosalela yango mpo na kosala likambo nyonso oyo aponi.

Petro: Ezali mpenza bongo.

Paulo: Kasi, azali kozela nini mpo asalela nguya yango oyo ezangi nsuka mpo na kosilisa bampasi nyonso mpe mabe oyo tozali komona lelo na mokili? Omituná naino te motuna yango?a

Petro: Namituná.

Paulo: Okanisi boni soki nayei na pɔsɔ oyo ezali koya kaka na ngonga oyo mpo tótalela likambo yango?

Petro: Nakosepela mingi. Tokomonana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto