-
Liteya ya komikitisa na Pasiká na ye ya nsukaMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Nsima mwa moke, Yesu mpe bantóma na ye bakɔti kati na engumba mpe bakei na ndako epai kuna bakokumisa Pasiká. Bamati na eteni monene na ndako na likoló, epai kuna biloko bisili kobongisama mpo ete basala elambo bobele bango mpenza. Yesu azalaki mpenza kozela eleko wana na motema likoló, mpamba te alobi ete: “Nazalaki na mposa mingi ya kolya Pasiká oyo elongo na bino liboso ete nazwa mpasi.”
Engebene momeseno, bayangani na Pasiká bakomela kopo minei ya vinyo. Nsima na komela moko na bakopo yango, ekokaki kozala kopo ya misato, Yesu abondeli mpe alobi ete: “Kamata oyo mpe kabola yango kati na bino; mpamba te nazali koloba ete, longwa sikawa nakomela lisusu mai na vinyo te kino ekoya bokonzi na Nzambe.”
Wana ezalaki bango kolya, Yesu atelemi, alongoli bilamba na ye ya likoló, azwi epanguseli mpe atondisi mai kati na saani moko monene. Na momeseno, nkolo na ndako azalaki kosenzela ete makolo ya babyangami na ye masukolama. Kasi lokola nkolo na ndako azali te na libaku oyo, Yesu ye moko azwi mokumba yango. Moko kati na bantóma akokaki kosala yango kasi emonani lokola ete mwa kowelana ezali naino kati na bango, mpamba te moko te kati na bango asengaki kokokisa mokumba yango. Batungisami wana Yesu abandi kosukola bango makolo.
Ntango Yesu akómi epai na Petelo, ye oyo alobi ete: “Te, okosukola makolo na ngai te.”
Yesu alobi na ye ete: “Soko nakosukola yo te, ozali kosangana na ngai te.”
Bongo Petelo alobi ete: “Nkolo, bobele makolo na ngai te, kasi na maboko mpe motó lokola.”
“Ye oyo asili kosukola mai asengeli kosukola bobele makolo na ye mpo ete ye nyonso azali peto. Bino bozali peto kasi nyonso te.” Alobi bongo mpamba te ayebi ete Yuda azali komibongisa mpo na kokaba ye.
Esilisi ye kosukola makolo ya bantóma 12, oyo na Yuda mpe lokola, ye oyo akokaba ye, Yesu alati bilamba na ye ya likoló mpe afandi lisusu pene na mesa. Atuni bango ete: “Bososoli nde likambo lisili ngai kosala bino? Bino bokobyanga ngai ‘Molakisi’ mpe ‘Nkolo,’ mpe bozali koloba sembo ete nazali bongo. Soko nde ngai Nkolo mpe Molakisi nasukoli makolo na bino, ekoki na bino ete bosukolana makolo. Mpamba te napesi bino etaliseli ete bino mpe bosala pelamoko esili ngai kosalela bino. Solo solo, nazali koloba na bino ete, moombo aleki nkolo na ye te, mpe ntóma aleki motindi na ye te. Soko boyebi makambo oyo, esengo na bino soko bokosala yango.”
Oyo nde liteya kitoko ya komikitisa! Bantóma basengeli te koluka bobele esika ya liboso, komimonáká motuya mingi kino kokanisa ete bato mosusu basengeli ntango nyonso kosalela bango. Esengeli na bango kolanda ndakisa na Yesu; yango ezali molulu ya kosukola makolo te, kasi ezali nde mposa ya kosalisa bato mosusu kozanga koponapona, ata soko mosala oyo esengeli kokokisa ezali moke to ezali kosepelisa te. Matai 26:20, 21; Malako 14:17, 18; Luka 22:14-18; 7:44; Yoane 13:1-17.
-
-
Elambo ya ekaniseliMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 114
Elambo ya ekaniseli
NSIMA na kosukola makolo ya bantóma na ye, Yesu atangi mokapo ya Nzembo 41:10, ete: “Ye oyo alei na mesa na ngai atombweli ngai litindi na ye.” Aoki mpasi mingi, mpe alimboli ete: “Moko na bino akokaba ngai.”
Bayekoli batungisami mingi mpenza, mpe mokomoko atuni Yesu ete: “Ezali ngai?” Ata Yuda Iskariote mpe atuni ye motuna yango. Yoane, oyo azalaki na mesa penepene na Yesu, abongwani na ntolo na Yesu mpe atunaki ye ete: “Nkolo, ezali nani?”
Yesu ayanoli ete: “Ezali moko na bazomi na mibale, oyo azali kotya misapi na ye kati na saani esika moko na ngai. Ya solo, Mwana na moto akokenda lokola ekomami mpo na ye, kasi mawa na moto oyo akokaba Mwana na moto! Elekaki malamu mpo na moto yango soko abotamaki te.” Nsima na yango, Satana akɔtaki lisusu epai na Yuda, mpamba te libaku lipesamelaki ye lokola motema na Yuda ekómaki mabe. Na nsima, na mpokwa wana, Yesu akobyanga Yuda na sembo nyonso ete, “mwana na libebi.”
Sikawa alobi na Yuda ete: “Yango ekosala yo, sala yango nokinoki.” Moko te kati na bantóma na ye mosusu akangi ntina ya maloba wana. Bamoko bakanisi ete, lokola Yuda abateli ebómbelo na mosolo, Yesu ayebisi ye ete: “Somba yango esengeli na biso mpo na elambo,” to asengeli kokende kopesa mwa eloko epai na babólá.
Nsima wana Yuda abimaki, Yesu abandisi elambo, to ekaniseli, yango ezali mpenza likambo ya sika. Azwi limpa, atɔndi yango, abuki mpe apesi bango, ye ete: “Bokamata, bolya.” Mpe alimboli ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai, ekopesama mpo na bino. Sala boye mpo na ekaniseli na ngai.”
Wana bango nyonso balyaki limpa, Yesu akamati kopo ya vinyo, na ntembe te ezali kopo ya minei na elambo wana ya Pasiká; atɔndi yango, apesi bango mpe asengi bango bamela, ete: “Kopo oyo elakisi kondimana na sika na makila na ngai, masengeli kosopana mpo na bino.”
Na bongo, abandisi ekaniseli ya liwa na ye. Mbula na mbula, na mokolo ya 14 Nisan, likambo yango lisengeli kozongelama, lokola Yesu alobi yango, mpo na ekaniseli na ye. Yango ekokundwela baoyo bazali kokumisa yango, makambo oyo Yesu mpe Tata na ye ya likoló basili kosala mpo na kosikola bato na etumbu ya liwa. Mpo na Bayuda bakokóma bayekoli na Klisto, elambo yango ekokitana Pasiká.
Kondimana na Sika, oyo ezwi motuya na yango na nzela na makila na Yesu maye masopamaki, ekitani Kondimana na kala, oyo na Mibeko. Yesu azali moyokanisi na kondimana yango oyo esalami kati na biteni mibale—ngambo moko, Jéhovah Nzambe, mpe ngambo mosusu, ba 144 000 baklisto bapakolami na elimo. Longola likoki ya kolimbisa masumu, kondimana yango ezali kopesa nzela ete libota ya bakonzi mpe banganga na likoló ekoka kosalema. Matai 26:21-29; Malako 14:18-25; Luka 22:19-23; Yoane 13:18-30; 17:12; 1 Bakolinti 5:7.
▪ Yesu atangaki esakweli nini na Biblia na ntina etali moninga na ye ya mosala, mpe lolenge nini alimboli yango?
▪ Mpo na nini bantóma batungisami mingi, mpe mokomoko azali kotuna nini?
▪ Yesu alobi na Yuda ete asala nini, kasi lolenge nini bamosusu balimboli maloba yango?
▪ Elambo nini Yesu abandisi nsima wana Yuda abimi, mpe asali yango na mokano nini?
▪ Biteni nini mibale biyokanisami na kondimana na sika? Mpe epesi nzela na kokokisa likambo nini?
-
-
Kowelana ebimiMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 115
Kowelana ebimi
KALA mingi te na mpokwa, Yesu auti kopesa liteya kitoko ya komikitisa na kosukoláká makolo ya bantóma na ye. Nsima na yango, asalaki Ekaniseli ya liwa na ye oyo ebelemi. Sikawa, likambo ya kokamwa lisalemi, ezali mpenza kokamwisa na ntina na likambo oyo lisalemi. Bantóma bawelani makasi mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki bamosusu. Emonani lokola ete koswana wana ebandi lelo te.
Tomikundola ete nsima wana Yesu asalaki ebongwaneli na likoló na ngomba, bantóma bawelanaki mpo na koyeba soki nani kati na bango alekaki monene. Lisusu, Yakobo mpe Yoane basengaki ete bazwa bisika ya lokumu kati na Bokonzi, kobimisáká lisusu matáta kati na bantóma. Mpe sikawa, lokola ezali butu ya nsuka oyo azali kolekisa elongo na bango, Yesu asengeli kooka mawa mingi na komona bango lisusu koswana. Asali nini?
Na esika ete apamela bantóma mpo na ezalela na bango wana, mbala oyo lisusu Yesu asosoli elongo na bango na motema petee, ete: “Mikonzi na mabota bakoyangelaka bango na nguya, mpe baoyo bazali na bokonzi liboso na bango bakobyangama basali na boboto. Nde bino bokosala bongo te. . . . Nani aleki monene, oyo afandi na mesa soko oyo apesi biloko? Oyo afandi na mesa te?” Mpe, akundweli bango ndakisa oyo ye moko apesaki, ete: “Nde ngai nazali kati na bino lokola mosaleli.”
Atako bolembu na bango na ntina na kozanga kokoka, bantóma baumelaki na Yesu kati na bampasi na ye. Mpe alobi na bango lisusu ete: “Nasali kondimana elongo na bino, pelamoko Tata na ngai asalaki kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi.” Kondimana oyo esangisi Yesu mpe bayekoli na ye ya sembo ete bayangela esika moko. Bobele bato 144 000, motuya etyameli ndelo, nde bakokɔta kati na kondimana wana mpo na Bokonzi.
Atako bantóma bapesameli libaku kitoko ya koyangela esika moko na Klisto, kasi bazali na bolembu mingi kati na elimo. Yesu alobi ete: “Bino nyonso [bokokwea, MN] mpo na ngai na butu oyo.” Kasi ayebisi ete ye abondelaki mpo na Petelo, mpe apesi ye toli oyo: “Wana esili yo kobutwa, lendisa bandeko na yo.”
“Bana, nazali naino na bino mwa ntango moke. Bokoluka ngai, nde pelamoko elobaki ngai na Bayuda: ‘Esika ekokenda ngai, bino bokoki koya te’; boye mpe nazali koloba na bino sikawa. Nazali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”
Petelo atuni ete: “Nkolo, okokenda wapi?”
Yesu alobi ete: “Esika ekokende ngai, okoki kolanda ngai sikawa te, nde okolanda ngai nsima.”
Petelo abakisi ete: “Nkolo, mpo na nini nakoki kolanda yo sikawa te? Nakosopa bomoi na ngai mpo na yo.”
Yesu atuni ete: “Okosopa bomoi na yo mpo na ngai? Solo solo nazali koloba na yo ete: naino nsoso eleli te, okoangana ngai mbala misato.”
Petelo alobi ete: “Soko ekokoka na ngai kokufa na yo elongo, nakoangana yo te.” Bantóma nyonso mpe lokola balobi bobele bongo, Petelo amikumisi ete: “Soko bango nyonso bakotuta libaku mpo na yo, ngai nakotuta libaku soko moke te!”
Kokanisáká ntango oyo atindáká bayekoli na ye kokende kosakola kati na Galilai mobimba, na mosolo te, na saki na bilei te, Yesu atuni bango ete: “Bozangaki nde eloko moko?”
Bazongisi ete “Te!”
“Kasi sikawa, oyo azali na mosolo akamata yango, na saki lokola; oyo mpe azangi yango ateka elamba na ye mpe asomba mopanga. Mpamba te nalobi na bino ete yango esili kokomama ekokisama kati na ngai ete: ‘Atangamaki kati na batyoli na mibeko.’ Ya solo, yango elobamaki na ntina na ngai ezali kokokisama.”
Na maloba wana, Yesu azali kosakola ntango oyo akotyama likoló na nzeté elongo na bato mabe, na elobeli mosusu batyoli na mibeko. Amonisi lisusu ete, na nsima, bayekoli na ye bakokutana na minyoko makasi. Bantóma balobi ete: “Nkolo, tala mipanga mibale.”
Yesu alobi ete: “Ekoki.” Lokola tokomona yango, mosika te mipanga mikopesa nzela na Yesu ete apesa liteya mosusu ya ntina mingi. Matai 26:31-35; Malako 14:27-31; Luka 22:24-38; Yoane 13:31-38; Emoniseli 14:1-3.
▪ Mpo na nini kowelana kati na bantóma ezali mpenza likambo na kokamwa?
▪ Ndenge nini Yesu asilisi matáta yango?
▪ Kondimana oyo Yesu asali elongo na bayekoli na ye ekokisi likambo nini?
▪ Yesu apesa lilako nini ya sika, mpe yango ezali na ntina nini?
▪ Na lolenge nini Petelo azali mpenza komityela motema, mpe Yesu alobi na ye nini?
▪ Mpo na nini malako na Yesu matali komema mosolo mpe saki na bilei ekeseni na oyo ye apesaki liboso?
-
-
Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na yeMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 116
Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na ye
ELAMBO ya ekaniseli esili, kasi Yesu mpe bantóma na ye bazali naino na eteni na ndako kuna na likoló. Mosika te Yesu akozala lisusu elongo na bango te; nzokande azali naino na makambo mingi ya koyebisa bango. Mpo na kolendisa bantóma na ye, alobi ete: “Tika mitema na bino mitungisama te. Bondimela Nzambe.” Mpe abakisi ete: “Bondimela mpe ngai.”
Yesu alandi koloba: “Na ndako na Tata na ngai bisika bizali mingi. Nakokenda kobongisela bino esika. . . . ete esika ezali ngai, bino bozala wana lokola.” Kasi bantóma bazali kososola te ete Yesu azali koloba na bango mpo na kokende na likoló; yango wana Toma atuni ete: “Nkolo toyebi te soko okokenda wapi. Tokoyeba nzela ndenge nini?”
Yesu azongisi ete: “Ngai nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi.” Ya solo, moto akoki kokɔta epai na Tata ya likoló bobele soko andimi ye mpe amekoli lolenge ya bomoi na ye, mpamba te lokola Yesu alobi yango, “moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.”
Filipe atuni ete: “Nkolo, monisa biso Tata mpe wana ekokoka na biso.” Emonani ete Filipe azali na mposa ete Yesu amonisa bango mpenza Nzambe, lokola amimonisaki kala epai na Moïse, na Eliya mpe na Yisaya. Kasi, na solo mpenza, bantóma bazali na eloko oyo ezali kitoko koleka bimonaneli motindo wana, ezali yango nde Yesu amonisi awa: “Nazali na bino ntango molai boye mpe yo Filipe oyebi naino ngai te? Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”
Yesu azali mpenza komonisa bomoto ya Tata na ye na lolenge ya kokoka, na boye ete kozala esika moko elongo na ye mpe komona ye, ezali lokola nde omoni Tata. Nzokande, Tata aleki Mwana, ezali yango nde Yesu amonisi awa ete: “Makambo mazali ngai koloba na bino, nalobi yango na bokonzi na ngai moko te.” Yesu amonisi ete mateya oyo ye azali kopesa mauti nde na Tata na ye ya likoló.
Ezali elendiseli mpo na bantóma na koyoka Yesu koloba na bango sikawa ete: “Moto oyo akondima ngai, akosala mpe misala oyo nazali kosala, mpamba te ngai nazali kokende epai na Tata.” Alingi koloba te ete bayekoli na ye bakozwa nguya ya kosala bikamwiseli koleka oyo ya ye. Kasi alingi nde koloba ete, bakosala mosala na bango na boumeli na ntango mingi, na etando eleki monene, mpe mpo na bato mingi.
Nsima na kokende na ye, Yesu akosundola bayekoli na ye te. Alaki ete: “Likambo nini likolɔmba bino na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” Abakisi lisusu ete: “Nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu ete afanda na bino libela, elimo ya solo.” Na nsima, ntango Yesu akomata na likoló, akosopa elimo santu, mosungi yango mosusu, likoló ya bayekoli na ye.
Kokende na Yesu ebelemi, mpe alobi ete: “Nsima na mwa ntango moke, bamokili bakomona ngai lisusu te.” Yesu akozala ekelamu ya elimo oyo akomonana lisusu na moto te awa na mokili. Kasi alaki lisusu bantóma na ye ya sembo ete: “Bino bokomona ngai mpo ete ngai nazali na bomoi mpe bino bokozala na bomoi.” Ya solo, ezali bobele te ete akomonana na bango na lolenge na moto na nsima na lisekwa na ye, kasi, na ntango na yango, akosekwisa mpe bango lokola bikelamu ya elimo ete bazala na bomoi elongo na ye kuna na likoló.
Sikawa, Yesu apesi lilako oyo kitoko. “Oyo azali na malako na ngai mpe azali kotósa yango, ye wana alingi ngai. Mpe ye oyo alingi ngai, akolingama na Tata na ngai, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye mpenza.”
Na ntango wana, ntóma Yuda, ye oyo abengami lisusu Tadé, akati ye maloba ete: “Nkolo, ntina nini okomimonisa epai na biso nde epai na bamokili te?”
Yesu Ayanoli ete: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotósa maloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. . . . Ye oyo akolingaka ngai te, akotósa maloba na ngai te.” Na kokesena na bayekoli na ye ya botósi, bamokili balingi mateya na Klisto te. Mpe ye azali komimonisa na bango te.
Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu asili koteya makambo mingi epai na bantóma na ye. Ndenge nini bakomikundola makambo yango nyonso, mingi mpenza soki bazali kokanga ntina te, lokola kino sikawa? Likambo na esengo mpenza, Yesu apesi elaká oyo: “Mosungi, elimo santu oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo nyonso mpe akokundwela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.”
Mpo na kolendisa bango lisusu, Yesu alobi ete: “Nazali kotikela bino kimya, nazali kopesa bino kimya na ngai. . . . Tika ete mitema na bino mitungisama te!” Ya solo, Yesu alingi kotika bango, nde alimboli ete: “Soki bolingaki ngai, mbele bosepeli ete nazali kokende epai na Tata, mpamba te Tata aleki ngai.”
Ntango oyo etikali na ye mpo na kolekisa elongo na bango ezali moke. Alobi ete: “Nakosolola na bino lisusu mingi te, mpamba te, mokóló na mokili azali koya mpe azwi eloko kati na ngai te.” Satan le Diable, ye oyo akɔtaki epai na Yuda mpe ayangelaki motema na ye, nde azali mokóló na mokili. Kasi mposa mabe moko ezali te kati na Yesu oyo Satana akoki kozwela yango litomba mpo na kopengola ye na mosala ya Nzambe.
Boyokani malamu elongo na Yesu
Nsima na elambo na ekaniseli, Yesu auti kolendisa bantóma na ye na kosololáká na bango na polele mpe na bosembo nyonso. Mbala mosusu esili koleka katikati na butu. Yango wana Yesu alobi: “Botelema, tolongwa awa.” Kasi, liboso ete bakende, na bolingo oyo azali na yango epai na bango, alandi koloba na bango na kopesáká bango lisese moko kitoko.
Alandi koloba ete: “Ngai nazali vinyo ya solo mpe Tata na ngai azali molóni.” Molóni monene, Jéhovah Nzambe, akónaki vinyo wana ya elilingi na ntango apakolaki Yesu na elimo santu, na ntango azwaki batisimo, na sanza Okotobre ya mobu 29 ya ntango na biso. Kasi Yesu amonisi na nsima ete vinyo ezali bobele elilingi na ye moko te: “Etape na etape kati na ngai oyo ekobota mbuma te, akolongola yango, mpe etape na etape oyo ekobotaka mbuma, akopetola yango, mpo ete ebota mbuma, akopetola yango, mpo ete ebota mbuma mingi. . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango mpenza te soko ekoumela na vinyo te, bino mpe bokoki kobota mbuma te soko bokoumela kati na ngai te. Ngai mowiti na solo, bino bitape.”
Mikolo 51 nsima na Pantekote, bantóma mpe baklisto mosusu bakokóma bitape ya mowiti ntango elimo santu ekosopama likoló na bango. Na nsuka na yango, bato 144 000 bakokóma bitape ya mowiti na elilingi. Elongo na Yesu Klisto, mobimbi na mowiti ya elilingi, bato yango bakosala mowiti ya elilingi oyo ekobota mbuma ya Bokonzi na Nzambe.
Yesu alimboli lolenge nini kobota mbuma: “Ye oyo aumeli kati na ngai, mpe ngai kati na ye, akobota mbuma mingi mpamba te bokoki kosala likambo longwa na ngai te.” Nde soki moto akobota mbuma te, “akobwakama lokola etape mpe akokauka; bato bakolokota yango mpe bakobwaka yango na móto mpe ekozikisama.” Lisusu, Yesu alaki ete: “Soko bokoumela kati na ngai mpe maloba na ngai makoumela kati na bino, bokolɔmba likambo nini elingi bino, mpe yango ekosalamela bino.”
Mpe Yesu alobi lisusu ete: “Tata na ngai akokumisama na likambo oyo ete, bobotaka mbuma mingi mpe bokoma bayekoli na ngai.” Mbuma oyo Nzambe alingi ete bitape bibota yango ezali bongo bizaleli bikokani na oyo ya Klisto, mpe mingi mpenza bolingo. Lisusu, mpo ete Yesu azalaki mosakoli ya Bokonzi na Nzambe, kati na mbuma yango malamu esangisi mpe mosala ya kozalisa bayekoli lokola ye asalaki yango.
Sikawa Yesu apesi bango etinda oyo ete: “Boumela kati na bolingo na ngai.” Kasi lolenge nini bantoma na ye bakoki kosala yango? Alobi ete: “Soko bokotósa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai.” Mpe alobi lisusu ete: “Lilako na ngai ezali boye ete bolingana lokola ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.”
Nsima na mwa ngonga, Yesu akomonisa bolingo yango monene na kopesáká bomoi na ye mpo na bantóma na ye, mpe mpo na baoyo nyonso bakondimela ye. Ndakisa na ye esengeli kopusa bayekoli na ye na komonisa kati na bango, bolingo yango oyo ezali komema kino na komipesa mpo na bamosusu. Yango ekozala elembo ekokesenisa bango, lokola Yesu alobaki yango mwa liboso: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”
Komonisáká banani bazali baninga na ye, Yesu alobi ete: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolaka bino. Nakobyanga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.”
Oyo nde libaku malamu: kozala baninga ya motema na Yesu! Kasi mpo na kozala ntango nyonso na boyokani elongo na ye, bayekoli basengeli kobota mbuma. Yesu alobi na bango ete, soko bozali kosala bongo, “likambo nyonso ekolɔmba bino epai na Tata na nkombo na ngai, [akopesa] bino yango.” Ya solo, ekozala mbano kitoko mpenza likoló na kobota mbuma ya Bokonzi! Mpe Yesu alendesi lisusu bantóma ete ‘bazalana na bolingo,’ mpe alimboli bango ete mokili ekoyina bango. Kasi, alendisi bango na maloba oyo: “Soko bamokili bazali koyina bino, boyeba ete basili koyina ngai liboso naino bayinaki bino te.” Nsima na yango amonisi ntina oyo bamokili bakoyina bayekoli na ye, ete: “Mpo ete bozali bato ya mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, mpo na yango bamokili bazali koyina bino.”
Kolimboláká lisusu ntina oyo mokili ekoyina bango, abakisi ete: “Bakosalela bino makambo oyo nyonso mpo na nkombo na ngai, mpamba te bayebi Motindi [Jéhovah Nzambe] na ngai te.” Ya solo, makamwisi na Yesu mazali mpenza kokweisa bato oyo bazali koyina ye, lokola amonisi yango na maloba oyo: “Soko nasalaki kati na bango te misala misalaki moto mosusu te, mbele bazali na lisumu te. Nde sikawa basili komona ngai mpe bayini ngai, mpe Tata na ngai lokola.” Na yango lokola Yesu alobi yango, likomami likokani ete: “Bayinaki ngai na ntina te.”
Lokola asalaki yango mwa liboso, Yesu ayikisi bantóma na ye mpiko mpe apesi bango elaká ete akotindela bango mosungi, elimo santu, elingi koloba bokasi na Nzambe oyo ekosalaka misala. “Yango ekotatola mpo na ngai. Mpe bino bokotatola.”
Batoli ya nsuka
Yesu mpe bantóma na ye balingi kobima na eteni na ndako na likoló. Yesu alobi lisusu ete: “Nalobi na bino makambo oyo mpo ete botuta libaku te.” Mpe apesi bango likebisi oyo monene ete: “Bakobimisa bino na biyanganelo. Ee, ntango ekoya wana moto na moto oyo akoboma bino, akobanza ete azali kosalela Nzambe mosala.”
Emonani ete, bantóma batungisami mingi na likebisi oyo. Atako Yesu asilaki koyebisa bango ete mokili ekoyina bango, kasi kino sikawa, ayebisi naino bango te ete bakobomama. Alimboli ete: “Nalobaki na bino makambo oyo na ebandeli te mpo ete nazalaki na bino elongo.” Kasi, asali malamu wana abongisi bango na kopesáká bango batoli liboso na kokende na ye!
Yesu alandi koloba ete: “Sikawa nakokende epai na Motindi na ngai nde moko na bino te azali kotuna ngai ete: ‘Okokende wapi?’” Mosika te na mpokwa, bayebi epai wapi azalaki kokende, kasi sikawa batungisami mingi mpenza na likambo oyo auti koyebisa bango mpe bazali na mituna mingi te na likambo yango. Yesu ayei koloba ete: “Mpo ete nalobi na bino makambo oyo, yango mawa etondisi mitema na bino.” Bantóma bazali na mawa bobele te mpo bayebi ete bakokutana na minyoko makasi mpe bakobomama, kasi lisusu mpo ete Nkolo na bango alingi kotika bango.
Yango wana Yesu alimboli bango ete: “Ekoyeisa litomba na bino soko nakokende. Mpo ete soki nakokende te, mosungi mpe akoyela bino te. Kasi soko nakokende, nakotinda ye epai na bino.” Lokola azali moto na nzoto ya mosuni, Yesu akozala bobele na esika moko, kasi ntango akokende na likoló, akotinda mosungi, elimo santu ya Nzambe epai na bayekoli na ye, mpe soko epai wapi bakozala na mabelé. Boye, kokende na Yesu ekozala na bango litomba.
Yesu alobi ete, elimo santu “ekolakisa bamokili polele na ntina na lisumu, mpe na ntina na boyengebene mpe na ntina na kosambisama.” Lisumu ya bamokili, kozanga kondima na bango epai na Mwana na Nzambe, ekomonisama polele. Lisusu, bilembo ya boyengebene na Yesu bikopesama wana ekomata ye epai na Tata. Mpo na kosukisa, likambo oyo ete Satana mpe mokili mabe oyo ye azali koyangela bakokaki te na kobebisa bosembo na Yesu, ezali elembo oyo emonisi ete mokóló na mokili asili kosambisama mpe akweisami.
Yesu akóbi koloba ete: “Nazali na makambo mingi ya koloba na bino nde bokoki koyamba yango sikawa te.” Ezali mpo na yango nde Yesu alaki ete na ntango akosopa elimo santu, bokasi na Nzambe oyo ekosalaka mosala, elimo yango ekosalisa bango na kokanga ntina ya makambo yango, na kotalela makoki na bango mpo na kobómba yango.
Likambo oyo bantóma bazali kokanga ntina te, mingimingi, ezali likambo oyo ete, Yesu akokufa mpe akobimela bango lisusu, wana akosekwa. Yango wana bazali komituna bamoko epai na bamosusu ete: “Oyo azali koloba na biso ete: ‘Nsima na ntango moke bokomona ngai te, kasi nsima na mwa ntango moke lisusu bokomona ngai,’ mpe ete: ‘Mpamba te ngai nakokende epai na Tata,’ elimboli nini?”
Yesu ayebi ete balingi kotuna ye; yango wana alimboli ete: “Solo solo nazali koloba na bino ete: bokooka mawa mpe bokolela, nde bamokili bakosepela; bino bokooka mawa nde mawa na bino ekobongwana esengo.” Na nsima na midi, wana Yesu akobomama, mikóló ya mangomba bakosepela, kasi bayekoli bakooka mawa. Kasi, mawa na bango ekobongwana esengo na ntango Yesu akosekwa. Mpe esengo na bango ekoumela na ntango akotondisa bango na nguya mpo bazala batemwe na ye, na kosopeláká bango elimo santu na Nzambe, na mokolo ya Pantekote.
Kokokanisáká ezalela ya bantóma na ye na oyo ya mwasi azali na mpasi ya kobota, Yesu alobi ete: “Mwasi azali na mpasi wana ezali ye kobota mpo ete elaká na ye ekoki.” Kasi amonisi ete, akokanisa lisusu mpasi na ye te na ntango mwana abotami. Yesu alobi ete: “Bino mpe bozali sikawa na mawa; kasi nakomona bino lisusu [na ntango nakosekwa], mpe mitema na bino mikosepela, mpe moto akolongola esengo na bino te.”
Kino ntango wana, bantóma basali naino libondeli te na nkombo na Yesu, kasi Yesu sikawa alobi ete: “Soko bokolɔmba Tata eloko nini na nkombo na ngai, akopesa bino yango. . . . Mpamba te Tata ye moko alingi bino mpo ete bosili kolinga ngai mpe bondimi ete nayei na mokili lokola momonisi na Tata. Nabimi longwa na Tata mpe nayei na mokili; lisusu nazali kolongwa na mokili mpe nakokende epai na Tata.”
Maloba na Yesu mazali elendiseli monene mpo na bantóma. Bango balobi ete: “Na likambo oyo tondimi ete obimi epai na Nzambe.” Yesu atuni ete: “Bondimi bobele sikawa? Tala ntango ekoya, ee, esili koya, wana bokopanzana moko na moko epai na ye mpenza, mpe bokotika ngai bobele ngai moko.” Ezali likambo limonani lokola ete ekosalema te, kasi yango nde ekosalema liboso ete butu esuka!
Yesu alimboli ete: “Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimya kati na ngai.” Mpe asukisi ete: “Kati na mokili bozali na bolozi, nde boyika mpiko! Nasili kolonga mokili.” Yesu alongaki mokili na kokokisáká mokano na Nzambe na bosembo nyonso atako makambo nyonso oyo Satana mpe mokili oyo ye azali koyangela bamekaki kobebisa bosembo na ye.
Libondeli ya nsuka kati na eteni na ndako na likoló
Kotondáká na bolingo mozindo mpo na bantóma na ye, Yesu abongisi bango mpo na kokende na ye oyo ebelemi. Nsima na kopesa bango toli mpe na kolendisa bango na boumeli ya ntango molai, atomboli miso na likoló mpe abondeli Tata na ye ete: “Kumisa Mwana na yo ete Mwana na yo akumisa yo, lokola esili yo kopesa ye bokonzi likoló na bato nyonso, ete apesa bomoi ya seko epai na bango nyonso oyo osili kopesa ye.”
Bomoi ya seko! Yesu abandi lisoló moko kitoko. Lokola asili kozwa “bokonzi likoló na bato nyonso,” Yesu akozala na likoki ya kopesa matomba ya mbeka na ye ya lisiko epai na bato nyonso oyo balakamaki mpo na liwa. Kasi, akopesa bomoi ya seko bobele epai na bato oyo bandimami na Tata na ye. Kolimboláká lisoló oyo, bomoi ya seko, Yesu akóbi libondeli na ye na kolobaka ete:
“Oyo ezali bomoi ya seko ete bayeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” Ya solo, mpo na kobika, esengeli koyeba Nzambe mpe Mwana na ye. Kasi boyebi ya likolólikoló ekoki te.
Esengeli koyeba Nzambe mpe Mwana na ye na mozindo mpe kozala na boyokani malamu elongo na bango. Esengeli kokanisa lokola bango mpe kozala na emoneli ya makambo lokola oyo na bango. Mingi mpenza, esengeli kosala makasi mpo na komekola bizaleli na bango bikokani na mosusu te kati na boyokani na biso elongo na bato mosusu.
Yesu akóbi libondeli na ye: “Ngai nasili kokumisa yo na mokili, nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.” Lokola akokisi mosala na ye kino sikawa, mpe andimisami ete mosala yango mokozwa elónga, asengi Nzambe ete: “Tata, kumisa ngai pene na yo na lokumu lozalaki na ngai pene na yo liboso, naino mokili mozalaki te.” Asengi ete azongisama na bomoi, na nzela ya lisekwa, kati na nkembo oyo azalaki na yango na liboso na likoló.
Likoló na mosala na ye ya ntina mingi oyo asili kokokisa na mabelé, Yesu alobi na mokuse ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo opesaki ngai bango uta na mokili. Bazalaki bato na yo mpe opesi ngai bango mpe batosi liloba na yo.” Yesu asalelaki nkombo ya Nzambe, Jéhovah, kati na mosala na ye mpe alakisaki ebengeli na yango ya solo, kasi alakisaki makambo mingi epai na bantóma na ye, nde bobele nkombo na Nzambe te. Akolisaki lisusu boyebi na bango na ntina etali Jéhovah, bomoto na ye mpe mikano na ye, mpe botondi na bango epai na Ye.
Mpo na komonisa ete Jéhovah azali Mokonzi na ye mpe ete azali kolanda litambwisi na Ye, Yesu alobi na komikitisa nyonso ete: “Maloba mapesi yo ngai, nasili kopesa bango yango mpe bayambi yango, mpe bayebi solo ete nabimi [lokola momonisi na yo,] mpe basili kondima ete yo otindi ngai.”
Mpo na kokesenisa bayekoli na ye mpe bato mosusu, Yesu akóbi libondeli na ye ete: “Nazali kobondela na ntina na bango; nazali kobondela na ntina na mokili te kasi na ntina na baoyo yo osili kopesa ngai . . . Ezalaki ngai na bango elongo, nabatelaki bango . . . nasenzelaki bango, moko kati na bango abebaki te bobele mwana na libeli,” elingi koloba Yuda Iskariote. Na ntango oyo, Yuda azali kokokisa mosala na ye mabe, mpo na kokaba Yesu. Kozanga koyeba, azali nde kokokisa Makomami.
Yesu alobi ete: “Bamokili basili koyina bango . . . Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili, kasi ete obatela bango na ye oyo mabe. Basangani na mokili te pelamoko ngai nasangani na mokili te.” Bayekoli na Yesu bafandi kati na mokili, bato nyonso oyo bayangelami na Satana, nde bakabwani na mokili mpe basengeli ntango nyonso kokabwana na yango mpe na mabe na yango.
Yesu alobi ete: “Bulisa bango na nzela ya solo; liloba na yo lizali solo.” Awa, azali kobenga Makomami na liebele oyo azali kotanga ntango nyonso ete “solo.” Nzokande, mateya oyo apesaki epai na bayekoli na ye mpe mateya oyo makosala Makomami na greke na boklisto, oyo bango basengeli kokoma na nsima na kopemama na Nzambe, ezali mpe “solo.” Solo yango ekoki kobulisa moto, kobongola mpenza bomoi na ye mpe kosala ete azala moklisto oyo akabwani na mokili.
Sikawa, Yesu abondeli “bobele mpo na bango te kasi mpe mpo na baoyo bakondima [ye] mpo na maloba na bango.” Na yango, Yesu abondeli mpo na baoyo bakozala bayekoli na ye bapakolami mpe bayekoli mosusu oyo bakoyanganisama kati na “etonga moko.” Eloko nini asengi mpo na bango nyonso wana?
“Ete bazala moko pelamoko yo, Tata, ozali kati na ngai mpe ngai kati na yo . . . ete bazala moko pelamoko biso tozali moko.” Yesu mpe Tata na ye basali moto moko te, kasi bazali na boyokani kati na makambo nyonso. Yesu abondeli mpo ete bayekoli na ye bazala na bomoko lokola bango, ete “bamokili bayeba ete yo otindi ngai mpe osili kolinga bango pelamoko elingaki yo ngai.”
Mpo na baoyo bakozala bayekoli na ye bapakolami, Yesu asali sikawa libondeli epai na Tata na ye na likoló. Yango nini? “Ete bazala na ngai elongo na esika ezali ngai ete bamona nkembo na ngai esili yo kopesa ngai, mpo ete olingaki ngai liboso na ebandeli ya mokili,” elingi koloba na ntango oyo Adam mpe Eva babotaki mwana. Liboso na ntango yango, Nzambe alingaki Mwana na ye bobele moko, oyo akomaki Yesu Klisto.
Esilisi ye kobondela, Yesu alobi lisusu ete: “Nayebisaki bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango ete bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala kati na bango, ngai mpe kati na bango.” Mpo na bantóma, koyeba nkombo ya Nzambe elimbolaki koyeba mpenzampenza bolingo na Nzambe. Yoane 14:1 kino 17:26; 13:27, 35, 36; 10:16; Luka 22:3, 4; Exode 24:10; 1 Mikonzi 19:9-13; Yisaya 6:1-5; Bagalatia 6:16; Nzembo 35:19; 69:4; Masese 8:22, 30.
▪ Yesu akei epai wapi, mpe eyano nini Toma azwi na ntina na nzela oyo esengeli mpo na kokende kuna?
▪ Na ndenge emonani, Filipe atuni nini epai na Yesu?
▪ Mpo na nini ye oyo amoni Yesu asili mpe komona Tata?
▪ Na ndimbola nini bayekoli na Yesu bakosala misala minene koleka oyo na ye?
▪ Na ndimbola nini Satana azalaki na nguya moko te likoló na Yesu?
▪ Na eleko nini Jéhovah alonaki mowiti ya elilingi, mpe ntango nini mpe ndenge nini bato mosusu bakómaki bitape na mowiti yango?
▪ Na nsuka, mowiti ya elilingi ekómaki na bitape boni?
▪ Mbuma nini Nzambe alingi ete ebotama na bitape?
▪ Ndenge nini tokoki kozala baninga na Yesu?
▪ Mpo na nini mokili ezali koyina bayekoli na Yesu?
▪ Yesu apesi likebisi nini oyo litungisi bantóma na ye?
▪ Mpo na nini bantoma bazali kotuna Yesu te na ntina na esika oyo ye azali kokende?
▪ Likambo nini mpenza oyo bantóma bazali kokanga ntina te?
▪ Yesu asaleli lisese nini mpo na komonisa ete mawa ya bantóma ekobongwana esengo?
▪ Engebene Yesu, likambo nini bantóma bakosala mosika te?
▪ Lolenge nini Yesu alóngaki mokili?
▪ Na ndimbola nini Yesu azwaki “bokonzi likoló na bato nyonso”?
▪ Koyekola koyeba Nzambe mpe Mwana na ye elimboli nini?
▪ Mitindo nini Yesu ayebisi nkombo ya Nzambe?
▪ “Solo” ezali nini, mpe ndenge nini ezali ‘kobulisa’ moklisto?
▪ Na ndimbola nini Nzambe, Mwana na ye mpe basambeli na ye nyonso ya solo bazali moko?
▪ “Ebandeli ya mokili” etyamaki uta ntango nini?
-