-
Na ntongo ya mokolo moko ya ntina mingiMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 105
Na ntongo ya mokolo moko ya ntina mingi
ETIKI ye Yelusaleme na mokolo ya liboso na mpokwa, Yesu azongi na Betania, mboka oyo ezali na ekitelo na ngomba na Olive, epai moi mokobimaka. Mokolo ya mibale mpo na mosala na ye ya nsuka na Yelusaleme esuki bongo. Na ntembe te, Yesu akei lisusu kolala epai ya moninga na ye Lazare. Ezali butu ya minei oyo ye alekisi na Betania kobanda mokolo ya mitano, mokolo oyo autaki na Yeriko.
Sikawa, tokómi mokolo ya mibale 11 Nisan. Na ntongontongo, Yesu mpe bayekoli na ye bazongeli mobémbo. Lelo ekozala mpenza mokolo ya ntina mingi; mokolo ya mosala mingi koleka uta ntango oyo Yesu azali kokokisa mosala na ye. Akomonana na tempelo mpo na mbala ya nsuka. Mokolo oyo mokozala mpe mokolo na nsuka ya mosala na ye liboso ete asambisama mpe abomama.
Mpo na kokende na Yelusaleme, Yesu mpe bayekoli na ye bazongeli bobele nzela ya ngomba na Olive. Pembeni na nzela oyo ezali kouta na Betania, Petelo amoni nzete oyo Yesu alakelaki mabe lobi na ntongo. Alobi na ye ete: “Labi, tala nzeté na figi oyo olakelaki mabe, esili kokauka.”
Kasi mpo na nini Yesu akausaki nzete yango? Ayebisi bantina, ete: “Nazali koloba na bino solo ete, soko bozali na kondima mpe bokobeta ntembe te, bokosala bobele oyo esali ngai na nzeté na figi oyo te, kasi ata soko bokoloba na ngomba oyo [ngomba na Olive, esika oyo bazalaki likoló na yango] ete: ‘Opikwa mpe obwakama na mai, ekozala bobele bongo. Nyonso ekolombaka bino na libondeli, soko bokondima, bokozwa yango.’”
Na kokausáká nzeté, Yesu amonisi bongo epai na bayekoli na ye ete, basengeli kozala na kondima epai na Nzambe. Na yango alobi na bango ete: “Biloko nyonso bizali bino kosenga na kobondela, bondima ete bosili kozwa mpe yango, bokozwa yango.” Wana ezali liteya ya ntina mingi, oyo basengeli kosimba malamu, mingimingi na ntina na komekama oyo ezali kozela bango mosika te. Kasi, boyokani mosusu bozali kati na kufa ya nzeté wana mpe kondima.
Lokola nzeté wana na figi, libota na Yisraele ezali na ezaleli ya bokosi. Ya solo, atako Yisraele asalaki elongo na Nzambe kondimana oyo azali komonisa na libándá lokola nde azali kotósa mitinda, nzokande Yisraele azangi kondima mpe azali kobota mbuma te. Mpo na kozanga kondima na ye, azali nkutu pene na koboya Mwana na Nzambe! Yango wana, na ntango akausaki nzeté na figi wana ezangi kobota mbuma, Yesu asaleli yango lokola elakiseli minene mpo na komonisa nsuka oyo ezali kozela libota yango likobota mbuma te, liye lizangi kondima.
Nsima na mwa moke, Yesu mpe bayekoli na ye bakoti na Yelusaleme. Bakei na tempelo lokola ezalaki momeseno na bango, epai kuna Yesu abandi koteya. Banganga-kapita mpe mikóló na mboka, baoyo babosani te likambo oyo Yesu asalaki lobi loleki epai na bato oyo bazalaki kosanzé mbongo kati na tempelo, batuni ye motuna oyo na matumoli ete: “Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Mpe nani apesi yo bokonzi yango?”
Nde Yesu azongisi ete: “Ngai mpe nakotuna bino likambo moko, soko bokoloba na ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. Batisimo na Yoane euti wapi? Na likoló soko na bato?”
Banganga mpe mikoló na mboka bakómi kotunana mpo na koluka eyano nini bakozongisela ye. “Soko tokoloba ete: ‘Na likoló,’ akoloba na biso ete: ‘Mpo na nini bondimaki ye te?’ Soki tokoloba ete: ‘Na bato’ tokobanga bato, mpamba te, bango nyonso batangi Yoane ete azalaki mosakoli.”
Ezangi bango eyano ya kozongisa, bakonzi wana balobi na Yesu ete: “Toyebi te.”
Bongo Yesu alobi na bango ete: “Ngai mpe nakoloba na bino te mpo na bokonzi bozali ngai kosala makambo oyo.” Matai 21:19-27; Malako 11:19-33; Luka 20:1-8.
▪ Likambo nini likesenisi mokolo ya mibale ya 11 Nisan mpe mikolo nyonso mosusu?
▪ Mateya nini Yesu apesi na kokausáká nzeté na figi?
▪ Ndenge nini Yesu ayanoli na baoyo batuni ye soko na bokonzi nini ye azali kosala makambo mosusu?
-
-
Bamonisami polele na nzela na masese na vinyoMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 106
Bamonisami polele na nzela na masese na vinyo
KATI na tempelo, Yesu auti kobulunganisa makanisi ya bakonzi na mangomba baoyo balingaki koyeba soko na bokonzi nini azali kosala makambo mosusu. Naino balongwe na mobulungano wana te, Yesu atuni bango ete: “Bokanisi nini mpo na makambo oyo?” Mpe na nzela na lisese, amonisi motindo na bato nini bango bazali mpenza.
Yesu alobi ete: “Moto moko azalaki na bana mibale. Ekei ye epai na oyo na liboso, alobi ete: ‘Mwana, kenda lelo kosala mosala na elanga na vinyo.’ Azongisaki monoko ete: ‘Nakei, nde akendaki te.’ Eyei ye epai na oyo na mibale, alobi bobele bongo. Ye azongisi ete: ‘Nalingi te,’ nde na nsima abongoli motema mpe akei. Nani kati na bango mibale asali mokano ya tata na ye?”
Banguna na ye bayanoli ete: “Oyo na nsima.”
Bongo Yesu apesi bango ndimbola oyo: “Nazali koloba na bino solo ete, bakongoli na mpako mpe basi na pite, bakoingela na Bokonzi na Nzambe liboso.” Ya solo, bakongoli na mpako mpe basi na pite bazali bato oyo liboso baboyaki kosalela Nzambe. Kasi, lokola mwana na mibale, babongolaki mitema mpe bakómaki kosalela ye. Na kokesena, bobele lokola mwana wana ya liboso, bakonzi ya mangomba bazalaki koloba ete bazali kosalela Nzambe, nzokande Yesu alobi ete: [Yoane Mobatisi] ayei epai na bino na nzela ya boyengebene nde bondimi ye te. Kasi bakongoli na mpako mpe basi na pite bandimi ye. Mpe wana emoni bino yango, bobongoli mitema te mpo na kondima ye.”
Na nsima, Yesu amonisi ete mabe ya bakonzi wana ya mangomba ezali bobele mpo ete bazali kosalela Nzambe te, kasi lisusu mpo bazali mpenza bato na lofundo. Akóbi koloba ete: “Nkolo na ndako akonaki elanga na vinyo, mpe azingeli yango na lopango, mpe atimoli ekamwelo na vinyo kati na yango mpe atongi ndako molai, mpe atiki yango epai na basali mpe akei na mokili mosusu. Ebelemi elaká na mbuma, atindi baombo na ye epai na basali ete bakamata mbuma na ye. Nde basali basimbi baombo na ye mpe babeti moko, mpe babomi mosusu, mpe babwakeli mosusu mabángá. Nde atindi baombo mosusu koleka baoyo na liboso na motuya, mpe basali bango motindo moko.”
“Baombo” bazali nde basakoli oyo Jéhovah Nzambe, ye “Nkolo na ndako” atindaki epai na “basali” na “vinyo.” Basali yango nde bakonzi minene ya mboka Yisraele, “vinyo” na Nzambe oyo elobelami kati na Biblia.
Lokola “basali” banyokoli mpe babomi “baombo,” nkolo na vinyo asali lisusu eloko moko: “Na nsuka, atindi mwana na ye epai na bango, ye ete: ‘Bakotosa mwana na ngai.’ Wana basali bamoni mwana, balobani kati na bango ete: ‘Oyo motuki na libula! Yakani toboma ye mpe tozwa libula na ye!’ Bakangi ye, mpe babwaki ye libándá na elanga, mpe babomi ye.”
Kolobáká epai na bakonzi ya mangomba, Yesu atuni bango ete: “Bongo wana ekoya nkolo na elanga, akosala nini epai na basali yango?”
Bakonzi na mangomba bayanoli ete: “Lokola bazali bato mabe akoboma bango. Bongo akopesa elanga wana na basali mosusu. Bango nde bakopesa ye mbuma na ye na ntango ekoki.”
Kozanga koyeba, bauti komikatela etumbu bango moko, lokola batangami mpe kati na Bayisraele oyo bazali “basali” na elanga na “vinyo” na Jéhovah, libota na Yisraele. Mbuma oyo Jéhovah azali kozela epai na basali yango, ezali nde kondima epai na Mwana na ye, Masiya ya solo. Lokola baboti mbuma yango te, Yesu akebisi ete: “Botangi naino kati na makomi [na Nzembo 118:22, 23] te ete: ‘Libángá liboyaki batongi, lisili kokóma motó na nsuka. Yango esalemi na Jéhovah, mpe likambo na kokamwa liboso na biso?’ Bongo nazali koloba na bino ete: Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobotaka mbuma. Moto oyo akokwea likoló na libángá oyo akopasuka; mpe soki libángá oyo likweli moto moko, ekonika ye.”
Bakomeli mpe banganga-kapita basosoli sikawa ete Yesu azali koloba mpo na bango, mpe balingi koboma ye, “motuki na libula” oyo andimami na mibeko. Yango wana libota na Yisraele likobotolama mokumba ya koyangela kati na Bokonzi na Nzambe, nde libota mosusu ya ‘basali na vinyo’ likosalema; libota oyo likobota mbuma ebongi.
Lokola bakonzi na mangomba bazali kobanga bato, baoyo bandimi Yesu lokola mosakoli, bameki koboma ye na ntango wana te. Matai 21:28-46; Malako 12:1-12; Luka 20:9-19; Yisaya 5:1-7.
▪ Banani bamonisami na bana mibale ya lisese oyo Yesu asalaki liboso?
▪ Kati na lisese ya mibale, nani azali “nkolo na ndako,” “vinyo” ezali nini, “basali,” “baombo” mpe “motuki na libula” bazali banani?
▪ Nini ekokómela ‘basali na elanga na vinyo,’ mpe nani akokitana bango?
-
-
Lisese ya elambo na libalaMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 107
Lisese ya elambo na libala
NA MASESE mibale, Yesu atondoli misala na bakomeli mpe banganga-kapita, mpe balingi koboma ye. Kasi Yesu asilisi naino koloba na ntina na bango te. Apesi bango lisese mosusu. Yango oyo:
“Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi oyo abongisaki elambo ya libala mpo na mwana na ye. Atindaki baombo na ye ete babenga baoyo babyangamaki na elambo ya libala, kasi balingaki koya te.”
Jéhovah Nzambe azali Mokonzi oyo abongisi elambo ya libala mpo na Mwana na ye, Yesu Klisto. Ya solo, mwasi na Klisto, oyo asalami na bayekoli 144 000 bapakolami, akosangana na ye elongo na likoló. Bato ya Mokonzi ezali Bayisraele baoyo bazwaki likoki ya kokóma “bokonzi na banganga,” na ntango bakotaki na kondimana na Mibeko na mobu 1513 liboso ya ntango na biso. Ezali na ntango wana nde libyangami mpo na elambo ya libala epesamelaki bango.
Kasi, libyangi ya liboso epai na babyangami na elambo ya libala esalemaki te liboso na sanza ya okotobre ya mobu 29 ya ntango na biso, na eleko oyo Yesu mpe bayekoli na ye (baombo ya mokonzi) babandaki mosala na bango ya kosakola Bokonzi. Kasi, Bayisraele ya mosuni baoyo babyangamaki na baombo kobanda mobu 29 ya ntango na biso kino mobu 33, balingaki koya te. Bongo Nzambe apesaki likoki mosusu na libota oyo na babyangami na elambo ya libala, yango nde Yesu ayebisi na maloba oyo:
“Mpe atindaki baombo mosusu, ete: ‘Loba na baoyo babyangami ete’: “Tala bilei na ngai bisili kokoka, nabomi ngombe na ngai mpe bana na ngombe ya mafuta, nyonso ebongi; boya na elambo ya libala.”’” Libyangi oyo na mibale mpe ya nsuka, lisalamaki na Pantekote ya mobu 33 na ntango elimo santu esopamaki likoló na bayekoli na Yesu, mpe kino mobu 36 ya ntango na biso.
Nzokande, na ntango wana lisusu, Bayisraele mingi baboyaki libyangi yango. Yesu alimboli ete: “Kasi batyoli liloba yango mpe bakei, moto na moto na elanga na ye, mosusu na mombongo na ye. Bamosusu bakangi baombo na ye, banyokoli bango mpe babomi bango.” Abakisi ete: “Mokonzi aoki nkándá mingi mpe atindi basoda na ye mpe babebisi babomi yango mpe bazikisi mboka na bango.” Yango nde esalamaki na mobu 70 ya ntango na biso, ntango Yelusaleme ebebisamaki na Baloma mpe ete babomi wana babomamaki.
Na nsima, Yesu alimboli likambo lisalemaki liboso ete bato yango babomama: “Mpe na nsima [mokonzi] alobi na baombo na ye ete: ‘Elambo na libala ekoki, nde babyangami bakoki te. Bokenda na balabála mpe bobyanga baoyo nyonso bokomona ete baya na elambo ya libala.’” Baombo basalaki bongo, mpe “ndako na elambo ya libala etondaki na bato oyo bafandaki na mesa.”
Mokumba oyo ya koyanganisa bato oyo bazwami na balabála, na libándá ya engumba, ebandaki na mobu 36 ya ntango na biso. Korneye mokonzi na basodá na Baloma mpe libota na ye, bazalaki Bapakano ya liboso bazangi kokatama ngenga oyo bayanganisamaki. Koyanganisama ya Bapakano wana basengelaki kokitana babyangami ya liboso baoyo batyolaki libyangi, elandanaki kino na ekeke ya ntuku mibale.
Ezali na ekeke ya ntuku mibale nde ndako na elambo ya libala etondi na bato. Yesu ayebisi oyo ekosalama na nsima: “Ebimi mokonzi kotala babyangami, amoni oyo alataki elamba ya libala te. Alobi ete: ‘Moninga oingeli awa na nzela nini na kozanga elamba ya libala?’ Ayebi kozongisa liloba te. Bongo mokonzi alobi na basali na ye ete: ‘Bokanga ye makolo, mpe maboko bobwaka ye na molili ya libándá; epai bileli mpe kokatakata mino ekozala.’”
Moto oyo azangi elamba ya libala ezali bongo baklisto ya lokuta ya boklisto na mokili oyo. Nzambe andimi bango soko moko te ete bazala Bayisraele ya solo na elimo. Apakolaki bango ata na motindo moko te na nzela na elimo santu na ye mpo ete bakóma batuki na Bokonzi. Basili bongo kobwakama libándá kati na molili epai kuna bakobebisama.
Yesu asukisi lisese na ye boye: “Mpamba te mingi babyangami, nde motuya moke baponami.” Ee, Bayisraele mingi ya mosuni babyangamaki mpo na kokóma basangani ya mwasi na Klisto, kasi bobele moke na bango nde baponamaki. Mingi na babyangami 144 000, baoyo bakozwa mbano na bango na likoló, bauti kati na Bapakano. Matai 22:1-14; Exode 19:1-6; Emoniseli 14:1-3.
▪ Na ebandeli, banani bazali babyangami ya liboso na elambo ya libala, mpe ntango nini bazwaki libyangi?
▪ Ntango nini libyangi liyokisamaki mpo na mbala ya yambo, mpe baombo oyo basalelami mpo na kopesa libyangi yango ezali banani?
▪ Ntango nini libyangi lipesamaki mpo na mbala ya mibale, mpe nsima na yango, nani abyangamaki?
▪ Moto oyo azangi elamba ya libala azali elilingi ya nani?
▪ Banani babyangami mingi, mpe banani baponami na motuya moke?
-
-
Balóngi te mpo na kokweisa YesuMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 108
Balóngi te mpo na kokweisa Yesu
YESU auti koteya kati na tempelo, epai auti kopesa masese misato na banguna na ye, mikoló na mangomba, mpo na komonisa mabe na bango polele. Bafalisai basiliki mpe bayokani ete bapusa ye na mayele mabe mpo ete aloba likambo moko likopesa bango nzela ete bakanga ye. Nsima na koyanga mwango, batindi bayekoli na bango mpe ndambo na bato ya Hérode mpo na komeka Yesu.
Bato yango babandi ete: “Molakisi, toyebi ete yo ozali solo mpe olakisaka nzela na Nzambe na solo, mpe otyaka moto moko liboso na mosusu te, okotalaka mpe bilongi na bato te. Boye loba na biso, okanisi nini? Ebongi kofutela Kaisala mpako soko te?”
Yesu amitiki kokósama na maloba na bango te. Ayebi ete soki ayanoli: ‘Te, epesami nzela te na kofuta mpako,’ akotalelama lokola moto oyo azali kokamba bato na botomboki epai na Baloma. Nzokande, soki alobi: ‘Ee, esengeli kofuta mpako,’ Bayuda, baoyo bazali kotyola boombo na bango liboso na Baloma, bakoyina ye. Na bongo ayanoli ete: “Mpo na nini bozali komeka ngai, bino bakósi? Monisa ngai mosolo na mpako.”
Bayeli ye lopáta, mpe Yesu atuni bango ete: “Elilingi oyo mpe makomi ezali ya nani?”
Balobi ete: “Ya Kaisala.”
“Pesa epai na Kaisala yango ezali mpo na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali mpo na Nzambe.” Eyoki bango eyano wana ya Yesu na mayele, mibali yango bakamwe. Batiki ye mpe bakei.
Komonáká ete Bafalisai bazwi Yesu na likambo te, Basadukai, baoyo bakolobaka ete lisekwa ezali te, bakei epai na ye mpe batuni ye ete: “Molakisi, Moïse alobaki ete: ‘Soko moto akufi nde atiki bana te, ekoki ete ndeko na ye abala mwasi na ye mpo na kobotela ye bana.’ Bandeko nsambo bazalaki kati na biso. Oyo na liboso abali mpe akufi nde azali na bana te mpe atiki mwasi na ye epai na ndeko na ye. Bongo oyo na mibale mpe oyo na misato kino oyo na nsambo. Nsima na bango nyonso mwasi akufi. Kati na lisekwa akozala nde mwasi na nani? Mpo ete basili kokamata ye.”
Yesu ayanoli bango ete: “Na ntina wana bobungi te? Mpo ete bino boyebi Makomami te mpe boyebi nguya na Nzambe te. Mpamba te, ekosekwa bango na kufa, mibali bakobalana te mpe basi bakopesama na libala te, kasi bazali pelamoko baanzelu na likoló. Mpo na likambo na kosekwa na kufa, bino bosili kotanga buku na Moïse te na likambo na nzeté moke, na motindo Nzambe alobi na ye ete: ‘Ngai nazali Nzambe na Abrahame mpe Nzambe na Yisaka mpe Nzambe na Yakobo’? Azali Nzambe na bakufi te kasi na bato na bomoi; bino bozali na libunga monene.”
Wana lisusu, bato bakamwi mpo na eyano na Yesu. Ata bamoko na bakomeli balobi ete: “Molakisi, olobi malamu.”
Emoni bango ete Yesu asukisi Basadukai, Bafalisai bayei epai na ye na etuluku. Mpo na komeka ye lisusu, mokomeli moko ayaki elongo na bango, atuni ete: “Molakisi, mobeko nini moleki monene kati na Mibeko nyonso?”
Yesu ayanoli: “Oyo na liboso na nyonso ete: ‘Yoka ɛ Yisraele, Jéhovah Nzambe na biso, ye azali Jéhovah moko. Olinga mpe Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.’ Oyo na mibale ezali boye ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Lilako na koleka oyo na ntina ezali te.” Mpe abakisi ete: “Mibeko nyonso mpe basakoli ezwami na mitinda oyo mibale.”
Mokomeli alobi ete: “Molakisi, olobi solo ete ‘Azali Bobele Moko, mosusu lokola ye azali te’; mpe kolinga ye na motema mobimba mpe na mayele mobimba mpe na makasi mobimba, mpe kolinga mozalani lokola yo moko eleki malamu na mbeka na kotumba nyonso mpe miboma.”
Eyoki ye ete mokomeli ayanoli malamu mpenza, Yesu alobi na ye ete: “Yo ozali mosika na Bokonzi na Nzambe te.”
Eleki sikawa mikolo misato—mokolo ya lomingo, mokolo ya liboso mpe mokolo ya mibale—uta Yesu azali koteya kati na tempelo. Bato bayoki ye na esengo nyonso, nzokande bakonzi na mangomba balingi koboma ye, kasi kino sikawa, myango na bango milóngi te. Matai 22:15-40; Malako 12:13-34; Luka 20:20-40.
▪ Bafalisai babongisi mitambo nini mpo na kokweisa Yesu? Soki ayanoli ete “Te” mbele ekobimisa likambo nini? Mpe soki aynoli ete “Ee” ekobimisa likambo nini?
▪ Ndenge nini Yesu apengoli motambo ya Basadukai?
▪ Likambo nini Bafalisai basali lisusu mpo na komeka Yesu, mpe yango esuki boni?
▪ Yesu ateyi mikolo boni kati na tempelo na boumeli na nsuka ya mosala na ye na Yelusaleme, mpe yango ebimisi likambo nini?
-
-
Yesu akweisi batemeli na yeMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 109
Yesu akweisi batemeli na ye
YESU abulunganisi batemeli na ye bakonzi ya mangomba na boye ete babangi kotuna ye mituna mosusu. Bongo azwi ekateli ya kotondola bango ete bazangi boyebi. Atuni ete: “Bino bokanisi nini mpo na Klisto? Azali mwana na nani?”
Bafalisai bayanoli ye ete: “Mwana na Davidi.”
Lokola baboyi te ete, na mosuni, Davidi azali nkóko ya Klisto to Masiya, Yesu atuni ete: “Mpo na nini Davidi na kopemama na Nzambe [na Nzembo 110], abyangi ye ‘Nkolo,’ mpe koloba ete: ‘Jéhovah alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fanda na loboko na ngai na mobali kino nakotya bayini nyonso na yo na nsé na makolo na yo?”’ Soko nde Davidi abyangi ye ‘Nkolo,’ azali mwana na ye boni?”
Bafalisai bafandi nyee bakoki kozongisa liloba te, mpamba te bayebi te soko Klisto to mopakolami azalaki nani mpenza. Na likeseni na oyo Bafalisai bazali kokanisa, Masiya azali bobele mokitani na Davidi te, kasi azali na bomoi na likoló mpe aleki Davidi; azalaki Nkolo na ye.
Kolobáká sikawa epai na ebele mpe epai na bayekoli na ye, Yesu akebisi bango mpo na bakomeli mpe Bafalisai. Lokola mibali yango nde bazali koteya Mibeko na Nzambe, na “kofanda na kiti na Moïse,” Yesu alobi ete: “Makambo nyonso makoloba bango na bino, bosala yango mpe botósa yango.” Nde abakisi ete: “Bosala mosala mokosalaka bango te, mpamba te bakolobaka nde bazali kosala te.”
Bazali bakosi, mpe Yesu akweisi bango na maloba lokola oyo asalelaki mokolo oyo alyaki epai na Mofalisai moko, mwa basanza liboso. Alobi ete: “Bazali kosala misala nyonso na bango mpo ete bamonana na bato.” Mpe apesi bandakisa:
“Bazali koyeisa filakateli na bango minene.” Sanduku yango moko moke oyo bazali kokangisa na elongi to kolata na loboko, ezali kati na yango na biteni minei ya Mibeko: Exode 13:1-10, 11-16; mpe Deteronome 6:4-9; 11:13-21. Bafalisai, bango, bazali koyeisa sanduku yango minene mpo na komonisa ete bazali kobatela Mibeko na molende.
Yesu alobi lisusu ete: “Bazali koyeisa nsé na bilamba na bango milai.” Na Mituya 15:38-40, Bayisraele bazwaki etinda ya kobakisa eteni ya elamba na nsé na nzambala na bango; kasi Bafalisai bayeisi oyo na bango molai koleka banso. Misala na bango nyonso, ezali mpo na komimonisa na bato! Yesu alobi ete: “Balingi bobele bisika ya lokumu.”
Mawa mpenza, bayekoli na ye mpe balongamaki na mposa yango ya kozwa etelemelo monene. Na yango, Yesu apesi bango toli oyo ete: “Bino bobyangama Labi te, mpamba te molakisi na bino azali bobele moko, bino nyonso bozali bandeko. Bobyanga moto tata awa na mokili te, mpamba te Tata na bino azali bobele moko, oyo na likoló. Bobyangama mpe ‘bakambi’ te, mpamba te moko azali Mokambi na bino, ye Klisto.” Kati na mitema na bango, bayekoli basengeli kolongola mposa ya kozala na esika ya liboso. Ezali mpo na yango nde Yesu alendisi bango na maloba oyo ete: “Ye oyo aleki monene kati na bino, akozala mosaleli na bino.”
Lisusu, abimisi maloba mingi ya kolakela mabe likoló na bakomeli mpe Bafalisai, na kolobáká mbala mingi ete bazali bakósi. Alobi ete, bazali ‘kofúnga bokonzi na makoló liboso na bato’ mpe “bakobotolaka biloko ya basi-bakufeli-mibali mpe bakosalaka mabondeli milai mpo na kokósa.”
Yesu alobi ete: “Mawa na bino, bakambi bakufi miso.” Akweisi Balifasai mpo ete bazali kozwa biloko ya elimo na motuya te, yango emonani mitinda oyo bango moko bazali kopesa yango. Na ndakisa, bazali koloba ete: ‘Soki moto akokata ndai na tempelo azali na likambo te; nde soko nani akokata ndai na wolo oyo ezali kati na tempelo, akangami na ndai na ye.’ Na kolobela mingi mpo na wolo na tempelo koleka motuya na makambo na elimo ya esika wana na losambo, bazali komonisa ezalela na bango ya kokufa miso mpo na bizaleli malamu.
Mpe, lokola asilaki kosala yango, Yesu akweisi Bafalisai mpo ete bazali komonisa bopotu na “makambo na ntina mingi kati na Mibeko, yango: boyengebene mpe motema mawa mpe bosembo,” nzokande bazali komonisa motuya mingi na kofuta ya ndambo na zomi, elingi koloba ndambo na zomi na biloko bizangi ntina, lokola ndunda na solo kitoko.
Yesu abyangi Bafalisai ete ‘bakambi bakufi miso, baoyo bazali kokanga ngungi na kiyungulu nde bazali komela kamela!’ Ya solo, soki na kiyungulu, bakokanga ngungi oyo ekwei kati na vinyo na bango, ezali bobele te mpo ete ezali nyama moke, kasi mpo ete yango ezali mbindo engebene losambo. Nzokande, na kozaláká na bopotu na makambo na ntina mingi na Mibeko, ezali lokola nde bamelaki kamela, nyama oyo ezali mpe mbindo engebene milulu ya losambo. Matai 22:41 kino 23:24; Malako 12:35-40; Luka 20:41-47; Levitike 11:4, 21-24.
▪ Mpo na nini Bafalisai bakoki kozongisa liloba te ntango Yesu atuni bango na ntina na maloba na Davidi, maye makomami kati na Nzembo 110?
▪ Mpo na nini Bafalisai bayeisi minene, basanduku na bango oyo ezali na mikapo ya Makomami kati na yango, mpe mpo na nini bazali koyeisa nsé na bilamba na bango molai?
▪ Toli nini Yesu apesi epai na bayekoli na ye?
▪ Mitinda nini Bafalisai basali bango moko, mpe ndenge nini Yesu akweisi ezaleli ya bopotu oyo bazali komonisa mpo na makambo ya ntina mingi?
-
-
Asukisi mosala na ye na tempeloMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 110
Asukisi mosala na ye na tempelo
YESU amonani na tempelo mpo na mbala ya nsuka. Na yango, soko tolongoli makambo oyo makosalema na ntango ya kosambisama na ye mpe kobomama na ye mikolo misato na nsima, asukisi mosala na ye na mabelé na esika oyo. Sikawa, azali sé kopamela bakomeli mpe Bafalisai.
Yesu angangi mbala misato lisusu ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi!” Mpo na mbala ya liboso, alakeli bango mabe mpo ete bazali kopetola “libándá na kopo mpe na saani nde na kati batondi na kobotola mpe na moyibi.” Mpo na yango, alendisi bango ete ‘bapetola naino kopo mpe saani na kati, mpo ete libándá na yango mpe epetolama.’
Na nsima, alaki lisusu mabe likoló na bakomeli mpe Bafalisai mpo na lolenge basili kopola mpe kobeba na bizaleli na bango oyo bazali komeka kobomba na kokosáká ete bazali kobanga Nzambe. Alobi na bango ete: “Bozali lokola mayita mapakolami mpembe. Yango emonani kitoko libándá nde katikati etondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge nyonso na bosoto.”
Na mokuse, bokosi na bango ezali komonana polele na molende bazali na yango mpo na kotonga mayita ya basakoli mpe kobongisa yango mpo na kobenda likebi na misala na bango ya kosalisa bato. Nzokande, lokola Yesu amonisi yango, bazali “bana na baoyo babomaki basakoli.” Mpamba te, moto nyonso oyo ameki komonisa bokósi na bango azali na likámá!
Yesu akóbi kosakola ekweiseli: “Banyoka, bana na bitupá! Bokokima nde ekweli na Geena boni?” Geena ezali lobwaku esika bakokendaka kobwaka bosoto nyonso ya Yelusaleme. Yesu akebisi bongo bakomeli mpe Bafalisai ete, mpo ete bakangami sé na mabe na bango, bakobomama seko.
Kolobáká na ntina na baoyo ye azali kotinda lokola bamonisi na ye, Yesu alobi ete: “Bokoboma bamosusu, bokokakisa bamosusu na nzeté, bokobɛtisa bamosusu fimbo kati na biyanganelo na bino mpe bokobengana bango longwa na mboka na mboka, ete makila nyonso na bayengebene makwela bino, yango esopanaki na mokili longwa na makila na Abele oyo moyengebeni kino makila na Zakaria mwana na Balakia [ye oyo abengami Yehoïada kati na 2 Ntango], ye oyo bobomaki katikati na tempelo mpe etumbelo-na-mbeka. Nazali koloba na bino solo ete, makambo oyo nyonso makoyela libota oyo.”
Mpo ete Zakaria apamelaki bakonzi na Yisraele; “bayangelaki ye mwango, babomaki ye na mabángá kati na lopango na ndako ya Jéhovah, kotosaka etinda na mokonzi.” Kasi lokola Yesu asakoli yango, Yisraele akofuta mpo na makila nyonso ya sembo oyo masopamaki. Mpe afutaki yango nsima na mibu 37, mbula 70 ya ntango na biso, ntango mampinga na Baloma mabebisaki Yelusaleme mpe Bayuda koleka 1 milió babomamaki.
Kokanisáká ezalela wana ya mpasi, Yesu aoki mawa mingi. Asakoli lisusu ete: “Yelusaleme, Yelusaleme! Mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo lokola nsoso akoyanganisaka bana na ye na nsé na mapapu na ye, nde bolingaki te. Tala, ndako na bino etikali mpamba.”
Mpe abakisi ete: “Nazali koloba solo ete bokomona ngai lisusu te kino bokoloba ete: ‘Mapamboli na ye oyo azali koya na nkombo na Jéhovah.’” Mokolo yango mokoya na ntango na kozonga na Klisto, wana ekokóta ye kati na Bokonzi na ye ya likoló mpe ete bato bakomona ye na miso ya kondima.
Sikawa, Yesu akei na esika oyo akoki komona bibómbelo na makabo ya tempelo mpe bato oyo bazali kotya mbongo na kati na yango. Bazwi bazali kotya mbongo mingi. Kasi na nsima, mwasi moko mokufeli-mobali, ye mobólá, akómi mpe atye meya mibale wana; ezali bibende na motuya moke mpenza.
Kobengáká bayekoli epai na ye, Yesu alobi ete: “Nazali koloba na bino solo ete likabo na mwasi oyo mobólá, lileki na monene makabo nyonso mabwaki bato kati na ebómbelo na makabo.” Bakoki komituna lolenge nini likambo motindo wana likoki kozala solo. Bongo Yesu alimboli bango ete: “Bango bakabi ndambo moke na mosolo moleki na bango, kasi ye kati na bobólá na ye, asili kotya nyonso ezalaki na ye, mosolo na ye nyonso.” Nsima na koloba makambo oyo, Yesu abimi na tempelo mpo na mbala ya nsuka.
Bayekoli na ye basepeli mpo na bonene mpe kitoko ya tempelo mpe balobi ete: “Molakisi, tala motindo na mabángá kitoko mpe motindo na ndako kitoko!” Ezali solo, mpamba te elobami ete mabángá yango mazalaki na molai na kolala bametele 11 mpe bonene ya bametele 5 mpe bolai na kotelema bametele 3, longwa na nsé kino likoló!
Yesu ayanoli bango ete: “Bozali komona ndako monene oyo?” Nazali koloba na bino solo ete libángá moko likotikala likoló na mosusu te, oyo ekozanga kobwakama na nsé.”
Nsima na koloba makambo yango, Yesu mpe bantoma na ye bakatisi lobwaku ya Kedolono mpe bamati na ngomba ya Olive. Kuna bakoki mpenza komona tempelo malamu. Matai 23:25 kino 24:3; Malako 12:41 kino 13:3; Luka 21:1-6; 2 Ntango 24:20-22.
▪ Yesu asali nini na mbala na ye ya nsuka oyo akɔti na tempelo?
▪ Bokósi ya bakomeli mpe Bafalisai emonani na lolenge nini?
▪ “Ekweli na Geena” elimboli nini?
▪ Mpo na nini Yesu alobi ete mwasi mokufeli-mobali apesi mingi koleka bazwi?
-
-
Elembo ya mikolo na nsukaMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 111
Elembo ya mikolo na nsuka
TOKÓMI sikawa mokolo ya mibale nsima na midi. Lokola Yesu afandi likoló na ngomba ya Olive mpe azali kotala tempelo longwa na likoló, Petelo, André, Yakobo mpe Yoane bakei epai na ye bobele bango mpenza. Bazali komitungisa na ntina na tempelo, mpamba te Yesu auti koloba ete libángá na yango moko ekotikala likoló na mosusu te.
Kasi na ntembe te, bazali lisusu kokanisa na ntina na likambo mosusu wana ezali bango kobelema epai na Yesu. Na mwa baposo euti koleka, Yesu alobaki na ntina na “koya” na ye, ntango oyo “mwana na moto asengeli komonana.” Bantoma bazali bongo komituna mituna mingi.
Batuni Yesu ete: “Yebisa biso: Nyonso oyo [makambo oyo makomema kino na kobomama na Yelusaleme mpe tempelo na yango] ekoya ntango nini, mpe elembo ya koya na yo mpe ya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo ekozala nini?” Ya solo, motuna na bango mokabolami na biteni misato. Libosoliboso, balingi koyeba makambo makoya na nsuka na Yelusaleme mpe tempelo na yango, balingi koyeba makambo makomonana na ntango na koya na Yesu, mpe mpo na kosukisa, balingi koyeba makambo nini makomonana na nsuka ya biloko nyonso mabe ya ntango oyo.
Kati na ndimbola molai oyo apesi bango, Yesu ayanoli na biteni misato ya motuna yango. Apesi elembo ekomonisa ntango oyo biloko mabe ya Bayuda ekosuka; kasi asuki wana te. Apesi lisusu elembo oyo ekopesa nzela epai na baoyo bakozala bayekoli na ye na koyeba ete, asili koya mpe ete nsuka ya biloko nyonso mabe ya ntango oyo ebelemi.
Lokola bambula ezali koleka, bantoma babandi komona kokokana ya esakweli na Yesu. Na yango, bobele makambo oyo alobi nde ebandi komonana wana ezali bango na bomoi. Bongo, baklisto oyo bazalaki na bomoi mbula 37 na nsima, elingi koloba na mobu 70, bakamwaki te na ntina na kobomama ya biloko mabe na Bayuda mpe tempelo na bango.
Kasi, koya na Klisto mpe nsuka na biloko mabe nyonso ya ntango oyo ekómaki na mobu 70 te. Koya na Klisto kati na nguya na Bokonzi ebandaki bobele nsima mpenza. Kasi ntango nini? Botaleli malamu ya esakweli na Yesu emonisi likambo yango.
Yesu asakoli ete bokoyoka ‘lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba.’ Alobi ete: “Libota moko likotemela libota mosusu,” mpe banzala mpe koningana ya mabelé mpe maladi ekozala. Bayekoli na ye bakoyinama mpe bakobomama. Basakoli mingi na lokutá bakotelema mpe bakopengwisa bato mingi. Kotyolama na mibeko ekoyikana mpe bolingo na bato mingi ekozwa mpio. Bobele na ntango wana mpe, nsango malamu na Bokonzi na Nzambe ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli mpo na mabota nyonso.
Ya solo, esakweli na Yesu ekokanaki na etando moke liboso na kobomama na Yelusaleme na mobu 70, kasi kokokana na yango monene ezali na boumeli na koya na ye mpe na nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. Botaleli malamu ya makambo oyo mazali kobima na mokili kobanda 1914, ezali komonisa ete esakweli wana na Yesu ezwi kokokana na yango monene uta mbula wana.
Likambo mosusu oyo Yesu alobelaki na elembo yango ezali oyo ete, kobima ya “eloko na mbindo.” Na mobu 66, eloko na mbindo yango ebimaki na lolenge na ‘bibele na basodá oyo bayaki kozinga Yelusaleme,’ mampinga ya Baloma oyo mafandelaki Yelusaleme mpe mabebisaki lopango ya tempelo. “Eloko na mbindo” etelemaki na esika ebongi na yango te.
Kati na kokokana monene ya elembo, eloko na mbindo ezali bongo Société des Nations mpe na nsima Nations Unies, lisangá oyo likitanaki yango. Boklisto ya lokutá ezali kotalela lisangá wana ya mokili mobimba mpo na kimya lokola ezali nde kosala na nkombo ya Bokonzi na Nzambe awa na mabelé. Oyo nde likanisi na mbindo! Na elaká na yango, banguya ya politike nyonso oyo esangani na O.N.U. ekobalukela boklisto ya lokutá (oyo akokani na Yelusaleme ya kala) mpe bakoboma yango.
Yango wana Yesu asakolaki ete: “Ekozala na mpasi mingi lokola emonanaki te longwa na ebandeli. Ekobima lisusu bongo te.” Kobomama na Yelusaleme na mobu 70 ezalaki solo mpasi monene (balobi ete motuya na bato bakufaki molekaki milió moko), kasi mpasi wana ezalaki monene te koleka oyo na mpela ya Noé. Na bongo, kokokana monene ya eteni oyo na esakweli na Yesu ezali naino mpo na ntango ekoya.
Bazali na elikya na boumeli na mikolo ya nsuka
Mokolo ya mibale 11 Nisan ekómi na nsuka na yango, kasi Yesu azali sé kokóba lisoló elongo na bantóma na ye na ntina na elembo ya koya na ye kati na nguya ya Bokonzi, mpe na ntina na nsuka na biloko ya ntango oyo. Akebisi bango na likámá ya kolanda Bamasiya na lokutá. Alobi ete, bakomeka nkutu “kopengwisa baponami.” Kasi, lokola mpóngó oyo ekomonaka mosika, baponami bakoyangana esika oyo bilei na solo ya elimo bisengeli kozala, elingi koloba elongo na Masiya ya solo na boumeli na koya na ye ezangi komonana. Bakozimbisama te mpe bakoyangana te epai na Masiya ya lokutá.
Bamasiya na lokutá bakomimonisa bobele na lolenge ya polele. Nzokande, koya na Yesu ekozala ya kozanga komonana. Lokola ye moko alobi yango, ekozala kati na eleko moko ya mpasi na Lisoló ya bato: “Moi ekoyinda mpe sanza ekopesa pole na yango te.” Ee, ekozala eleko ya molili mpenza kati na Lisoló mobimba ya bato. Ekozala lokola nde moi moyindi, lokola nde sanza ezali lisusu kopesa pole na yango te kati na butu.
Yesu akóbi ete: “Nguya na makoló ekotetema.” Amonisi wana ete, makoló makozala elembo ya likebisi epai na bato. Makoló makozala bobele mpo na bandeke te; bampepo ya bitumba, mituka ya likoló, bamasini oyo ekosalelamaka mpo na kokanga na yango bafotó longwa na likoló, ekotambolatambola kuna. Kobanga mpe mobulu ekongala mingi mpenza koleka eleko nyonso mosusu kati na Lisoló ya bato.
Yesu ayebisi ete mpo na makambo wana, “mitema na mabota mikozala likoló mpo na mikakatano ya konguluma na kotomboka na mai monene. Bato bakosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima kati na mikili.” Ee, lokola Yesu alobi yango, eleko wana, oyo ya molili mingi uta kozalisama na moto, ekosuka na ntango oyo “elembo na Mwana na moto ekomonana na likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela.”
Kasi bato nyonso bakolela te ntango ‘Mwana na moto akozonga na nguya’ mpo na koboma biloko mabe ya ntango oyo. “Baponami,” ba 144 000 oyo bakosangana na Bokonzi ya likoló elongo na Klisto, bakolela te, ndenge moko mpe mpo na baninga na bango, baoyo Yesu abengaki liboso ete “bampate na ye mosusu.” Atako bazali kobika na boumeli na mikolo ya molili mingi kati na Lisoló ya bato, bayikisami mpiko na elendiseli oyo na Yesu, ete: “Wana makambo oyo makobanda kobima, telema alima mpe tombóla mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ebelemi.”
Mpo ete bayekoli na ye bakoka koyeba ete nsuka ebelemi, na boumeli na mikolo ya nsuka, Yesu apesi lisese oyo: “Botala nzeté ya figi, na nzeté nyonso mosusu soko nkasa na yango esili kobima, bokotala yango na miso na bino mpenza mpe bokoyeba ete ntango na kotela na biloko elingi koya. Bino mpe bongo, wana ekomona bino makambo oyo kobimba, boyeba ete bokonzi na Nzambe ezali penepene. Nalobi na bino solo ete libota oyo likoleka soko moke te kino ekobima makambo oyo nyonso.”
Bongo, ntango bayekoli na ye bakomona kokokisama ya makambo ndenge na ndenge ya elembo, bakoyeba ete nsuka na biloko ya ntango oyo ebelemi mpe ete mosika te, Bokonzi na Nzambe ekosilisa mabe nyonso. Na yango, nsuka ekoya wana baoyo bakomona kokokisama ya makambo nyonso oyo Yesu asakolaki bazali naino na bomoi. Na nsima, apesaki likebisi oyo mpo na bayekoli na ye oyo bakozala na bomoi na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi:
“Bokeba ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te. Soko na kolangwa te, soko na mitungisi na bomoi te, mpe ete mokolo yango mobimela bino pwasa te lokola motambo. Mpamba te ekobimela bato nyonso bafandi na mikili nyonso. Senzela ntango nyonso, mpe bondela ete bozala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe na kotelema liboso na Mwana na moto.”
Baseka na mayele mpe baseka bilema
Yesu ayanoli na motuna ya bantóma na ye oyo batunaki ye elembo ya kozonga na ye kati na nguya ya Bokonzi. Sikawa, azali kolimbola bango makambo mosusu ya elembo yango na nzela na masese to bililingi misato.
Baoyo bakozala na bomoi na ntango na koya na ye, bakomona kokokisama ya moko na moko na masese wana. Abandi oyo ya liboso na maloba oyo ete: “Bongo bokonzi na likoló ezali lokola baseka zomi baoyo bakamataki miinda na bango mpe bakendaki kozwana na mobali na libala. Mitano na bango bazalaki bilema mpe mitano [mosusu] na mayele.”
Na liloba “bokonzi na likoló ezali lokola baseka zomi,” Yesu alingi koloba te ete ndambo na bato oyo bakozwa libula ya Bokonzi na likoló bazali bilema mpe ete ndambo mosusu bazali mayele! Te, alingi koloba ete na likambo litali Bokonzi ya likoló, ezali na mitindo mibale na bato, to mpe makambo oyo matali Bokonzi makomonana na ndenge mibale ekeseni.
Baseka zomi bazali komonisa baklisto nyonso oyo bazali to mpo bakomilobaka ete bazali kati na Bokonzi ya likoló. Ezali na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso nde lisangá na boklisto lilakamaki na libala elongo na Mobali na libala, Yesu Klisto oyo asekwi mpe asili kokembisama. Kasi libala lisengelaki kosalema na likoló nsima na bikeke mingi, na eleko moko oyo eyebisamaki sikisiki te.
Kati na lisese, baseka zomi babimi mpo na koyamba mobali na libala mpe kosangana na molongó ya bato bayei na libala. Ntango akokóma, baseka bakongengisa nzela na miinda na bango, kopésáká bongo lokumu epai na mobali na libala, wana ekomema ye mwasi na ye kati na ndako ebongisami mpo na ye. Kasi, Yesu alimboli ete: “Bilema bakamataki miinda na bango nde bakamati mafuta na bango elongo te. Kasi baoyo na mayele bakamati mafuta kati na milangi esika moko na miinda na bango. Eumeli mobali na libala, bango nyonso baoki mpongi mpe balali.”
Koumela mingi ya mobali na libala elakisi ete koya na Klisto lokola Mokonzi moyangeli, ekozala nsima na ntango molai. Na yango, Yesu azwi kiti ya bokonzi na 1914. Na boumeli ya butu molai oyo ezalaki liboso ete likambo yango lisalema, baseka nyonso balalaki. Kasi bakweisami mpo na yango te. Baseka bilema bakweisami mpo ete bazali na mafuta te kati na milangi na bango. Yesu alimboli lolenge oyo baseka balamwisamaki na mpongi liboso ete mobali na libala akóma. “Kati na butu, mongongo moyokami ete: ‘Tala mobali na libala! Bobima mpo na kozwana na ye.’ Bongo, baseka yango nyonso balongwi na mpongi mpe babongisi miinda na bango. Bilema balobi na baoyo na mayele ete: ‘Pesa biso ndambo na mafuta na bino, mpamba te miinda na biso mizali kozimana.’ Nde bango na mayele bazongisi liloba ete: ‘Te, ekokoka te mpo na biso mpe mpo na bino. Bokenda epai na bateki mpe bosomba yango mpo na bino mpenza.’”
Mafuta mamonisi eloko oyo ezali kopesa baklisto ya solo nzela ete bangenga lokola miinda. Ezali bongo Liloba na Nzambe, oyo baklisto bazali kokangama na yango, lisusu mpe elimo santu oyo ezali kosalisa bango na kokanga ntina ya Liloba yango. Mafuta ya elimo mazali kopesa nzela na baseka na mayele ete bapalanganisa pole mpo na koyamba mobali na libala kati na nzela epai bato batandami kino na elambo ya libala. Kasi, kelasi ya baseka bilema, ezali na mafuta ya elimo te kati na milangi na yango, mafuta ya elimo oyo makoki. Nde Yesu ayebisi likambo oyo likobima:
“Ekei bango [baseka bilema] kosomba [mafuta], mobali na libala ayei mpe baseka oyo bamilengelaki baingeli esika moko na ye kino libala mpe ekuke ekangami. Na nsima, baseka mosusu bayei mpe balobi ete: ‘Nkolo, nkolo, fungwela biso!’ Nde ye azongisi monoko ete: ‘Nayebi bino te.’”
Nsima na koya na Klisto kati na Bokonzi na ye ya likoló, baklisto bapakolami ya solo, kelasi ya baseka na mayele, basosoli mpenza mokumba oyo bazali na yango ya kopalanganisa pole kati na mokili oyo ya molili, mpo na kokumisa Mobali na libala wana ekozonga ye. Kasi baklisto oyo bamonisami na baseka bilema, bamilengeli te mpo na koyamba ye na masanzoli. Yango wana, na ntango ngonga ekoki, Klisto aboyi kofungwela bango ekuke ya elambo ya libala kati na likoló. Atiki bango na libándá, kati na molili makasi ya mokili oyo, mpo ete bakufa elongo na bato mosusu oyo bazali kotyola mibeko. Yesu asukisi na maloba oyo: “Bongo bokengelaka mpo ete boyebi mokolo soko ntango te.”
Lisese ya talánta
Bobele elongo na bayekoli na ye likoló na ngomba ya Olive, Yesu apesi bango sikawa lisese mosusu, ya mibale kati na masese misato malandani. Mwa mikoló liboso, na mboka Yeriko, apesaki lisese na paláta mpo na komonisa ete Bokonzi ekoya nsima na ntango molai. Na komonisáká bokokani mingi, lisese oyo apesi sikawa esakoli makambo oyo makosalema na ntango na koya na ye kati na nguya na Bokonzi. Ezali komonisa polele ete, ntango nyonso oyo bazali na mabelé, bayekoli na ye basengeli kosala mpo na kokólisa “biloko na ye.”
Yesu abandi lisese yango boye: “Ezali [elingi koloba makambo mazali na boyokani na Bokonzi] lokola moto oyo alingi kokende mobémbo, abyangi baombo na ye mpe apesi bango biloko na ye.” Mobali yango ezali Yesu oyo, liboso na kosala mobémbo na likoló, apesaki biloko na ye epai na baombo na ye, bayekoli oyo bazali basangani na Bokonzi ya likoló. Biloko yango etali bozwi ya mosuni te, kasi emonisi elanga kati na yango Yesu akónaki mpo ete ebota bayekoli mingi.
Yesu apesi biloko na ye epai na baombo na ye mwa liboso ete azonga na likoló. Asalaki lolenge nini? Apesi bango etinda ya kolanda kosala kati na elanga yango na kosakoláká nsango na Bokonzi kino nsuka na mokili. Lokola alobi yango ete: “Na moko apesi talánta mitano, na mosusu mibale mpe na mosusu moko, epai na moto na moto engebene makoki na ye mpe akei mobémbo.”
Talanta mwambe—biloko na Klisto—ekabolami bongo engebene makoki, to makasi na elimo, ya baombo, baoyo bamonisi bakelasi ekeseni ya bayekoli. Na ekeke ya liboso, emonani ete kelasi oyo ezwaki talánta mitano esalemaki na bantóma. Engebene makambo oyo Yesu alobi na nsima, baombo oyo bazwaki talánta mitano mpe talánta mibale babotisi moto na moto mbala mibale na kosakoláká Bokonzi mpe na kozalisáká bayekoli. Nzokande, moombo oyo azwaki talánta moko abómbaki yango na libulu oyo atimolaki kati na mabelé.
Yesu akóbi koloba ete: “Nsima na ntango molai, nkolo na baombo yango azongi mpe abongisi makambo na bango elongo.” Ezalaki liboso na ekeke ya ntuku mibale te, mwa mibu 1 900 na nsima, nde Klisto azongaki mpo na kobongisa makambo elongo na bango; ezalaki nde “nsima na ntango molai.” Na nsima Yesu alimboli ete:
“Ye oyo azwaki talánta mitano ayei liboso wana ememi ye talánta mosusu mitano, ete: ‘Nkolo, opesaki ngai talánta mitano, tala nasaleli talánta mosusu mitano.’ Nkolo na ye alobi na ye ete: ‘Malamu, moombo malamu mpe na sembo! Ozalaki sembo na makambo mike, nakotya yo likoló na mingi. Ingela na esengo na nkolo na yo.’” Bobele bongo, moombo oyo azwaki talánta mibale asalelaki yango mpe azwaki talánta mosusu mibale, mpe akumisami lolenge moko mpe mbano motindo moko.
Kasi ndenge nini baombo yango na sembo, baingeli kati na esengo ya Nkolo na bango? Esengo ya Nkolo, Yesu Klisto, ezalaki ya kozwa libula na Bokonzi na ntango akendaki “mobémbo” na likoló, epai na Tata na ye. Mpo na baombo na sembo ya ntango na biso, bazali na esengo monene lokola bapesameli mikumba mingi na ntina na Bokonzi, mpe wana bazali kosilisa mosala na bango na mabelé, bazali na esengo monene ya kosekwa mpo na kokóta kati na Bokonzi ya likoló. Kasi tokoloba boni mpo na moombo ya misato?
Na koimaima alobi ete: “Nkolo, nayebaki ete yo ozali moto na makasi. Nabangaki, nakei mpe nabómbi talánta na yo kati na mabelé. Tala, ozali na eloko na yo.” Moombo oyo aboyaki mosala na nko, mosala ya kosakola mpe kozalisa bayekoli, kati na elanga. Yango wana nkolo abengi ye ete “moombo mabe mpe na goigoi,” mpe azwi ekateli oyo: “Boye, bobotola ye talánta yango . . . Bobwaka mpe moombo na mpamba kino na molili na libándá; wana bileli bizali mpe kokatakata na mino.” Wana babwakami na libándá, basangani na kelasi ya moombo oyo mabe bazali na esengo moko te kati na elimo.
Likambo oyo lizali liteya monene mpo na baoyo nyonso bazali komiloba ete bazali kolanda Klisto. Soko nde balingi kokumisama mpe kozwa mbano, mpe ete babwakama te kati na molili na libándá to mpe kobebisama libela te, basengeli kokólisa biloko ya Nkolo na bango na likoló, na kosanganáká mingi na mosala ya kosakola. Ozali nde kosala yango na molende?
Ntango Klisto akoya kati na nguya na Bokonzi
Yesu azali naino elongo na bantóma na ye likoló na ngomba ya Olive. Koyanoláká na motuna na bango na ntina etali elembo ya koya na ye mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo, apesi bango sikawa lisese ya nsuka na masese misato oyo malandani. Yesu abandi na koloba ete: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo.”
Bato bakoki te komona baanzelu kati na nkembo na bango ya likoló. Na yango, koya na Mwana na moto, Yesu Klisto, mpe baanzelu na ye, esengeli komonana na bato te. Likambo yango lisalamaki na 1914. Mpo na mokano nini? Yesu alimboli ete: “Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola bato lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotya bampate na loboko na ye na mobali nde bantaba na loboko na ye na mwasi.”
Kolobáká mpo na baoyo bakabwani mpe batyami na esika malamu, Yesu alobi ete: “Bongo mokonzi akoloba na bango na loboko na ye na mobali ete, ‘Yaka, bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi libongisami mpo na bino longwa [na ebandeli] ya mokili.’” Bampate bakoyangela elongo na Klisto na likoló te, kasi bakosangola Bokonzi na ndimbola oyo ete, bakozala bato oyo bakofanda na mabelé na nsé na boyangeli na ye. “Ebandeli ya mokili” etyamaki ntango Adam na Eva babotaki bana oyo bakokaki kozwa litomba na bibongiseli oyo Nzambe akamataki mpo na kosikola bato.
Kasi mpo na nini bampate bakabwani mpe batyami na loboko na mobali na Mokonzi, na esika na lokumu? Mokonzi apesi eyano ete: “Mpamba te, nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei; nazalaki na mposa na mai mpe bomelisi ngai; nazalaki mopaya mpe boyambi ngai; nazalaki bolumbu mpe bolatisi ngai; nazalaki na maladi mpe boyei kotala ngai; nazalaki na boloko mpe boyeli ngai.”
Lokola bampate bazali awa na mabelé, balingi bayeba lolenge nini basalaki misala nyonso wana malamu epai na Mokonzi na bango oyo azali na likoló. “Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala mpe toleisi yo to na mposa na mai mpe tomelisi yo? Ntango nini tomoni yo mopaya mpe toyambi yo to bolumbu mpe tolatisi yo? Ntango nini tomoni yo na maladi to na boloko mpe toyei epai na yo?”
Mokonzi ayanoli ete: “Nazali koloba na bino solo ete, esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki mike, bosalelaki ngai yango.” Bandeko na Klisto ezali batikali na ba 144 000, baoyo bazali naino na bomoi na mabelé, baoyo bakoyangela elongo na ye na likoló. Mpe Klisto alobi ete, kosalela bango malamu elimboli kosalela ye malamu.
Na nsima Mokonzi alobi na bantaba ete: “Bolongwa na ngai, bino bolakelami mabe kino mɔto na seko ebongisami mpo na Satana mpe baanzelu na ye. Mpamba te nazalaki na nzala mpe boleisi ngai te mpe na mposa na mai nde bomelisi ngai te; nazalaki mopaya mpe boyambi ngai te, bolumbu nde bolatisi ngai te, na maladi mpe na boloko nde boyei komonana na ngai te.”
Kasi, bantaba balobi ete: “Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala to na mposa na mai to mopaya to bolumbu to na maladi to na boloko mpe biso tosungi yo te?” Bantaba bakweisami bobele mpo na likambo oyo bampate balongisami na yango. Yesu azongiseli bango ete: “Lokola ezangaki bino kosala yango epai na moko na bango baleki mike, bozangaki kosalela ngai.”
Na yango, koya na Klisto kati na nguya na Bokonzi, ekozala na ntango na kosambisa, liboso ete biloko mabe ya ntango oyo bikóma na nsuka, na ntango na bolozi monene. Bantaba “bakolongolama kino kobebisama na seko, kasi bayengebene [bampate] kino bomoi na seko.” Matai 24:2 kino 25:46; 13:40, 49; Malako 13:3-37; Luka 21:7-36; 19:43, 44; 17:20-30; 2 Tim. 3:1-5; Yoane 10:16; Emoniseli 14:1-3.
▪ Likambo nini lipusi bantóma ete batuna motuna, kasi bazali mpenza kokanisa na likambo nini mosusu?
▪ Eteni nini na esakweli na Yesu ekokanaki na mobu 70, kasi nini esalamaki te na mbula wana?
▪ Ntango nini esakweli na Yesu ekokanaki mpo na mbala ya liboso, kasi ntango nini ezwi kokokana na yango monene?
▪ Eloko na mbindo ezali nini, kati na kokokana ya liboso mpe kati na kokokana ya nsuka?
▪ Mpo na nini kobomama na Yelusaleme ezalaki te bolozi monene kati na kokokisama na yango ya nsuka?
▪ Makambo nini ya mokili mazali komonisa koya na Klisto?
▪ Ntango nini ‘mabota nyonso ya mokili bakolela,’ kasi bayekoli na Klisto bakosala nini na ntango wana?
▪ Yesu apesi lisese nini mpo na kosalisa baoyo bakokóma bayekoli na ye ete bakoka kososola ntango ya nsuka?
▪ Yesu apesi likebisi nini epai na bayekoli na ye oyo bakozala na bomoi na boumeli na mikolo ya nsuka?
▪ Baseka zomi bazali elilingi ya banani?
▪ Ntango nini lisangá na boklisto lilakamaki mpo na libala elongo na Mobali na libala, kasi ntango nini Mobali na libala ayei komema mwasi na ye na elambo ya libala?
▪ Mafuta elakisi nini, mpe baseka na mayele oyo bazali na yango bakoki kosala nini?
▪ Elambo na libala ezali kosalema epai wapi?
▪ Mbano nini kitoko baseka bilema bazwi yango te, mpe esukeli bango boni?
▪ Lisese na talánta liteyi biso nini?
▪ Baombo bazali banani, mpe biloko nini bipesameli bango?
▪ Ntango nini nkolo azongi mpo na kobongisa makambo na ye, mpe akuti likambo nini?
▪ Esengo oyo baombo na sembo baingeli kati na yango ezali nini, mpe nini ekómeli moombo ya misato, ye moombo mabe?
▪ Mpo na nini koya na Klisto esengeli komonana te, mpe mosala nini azali kokokisa na eleko yango?
▪ Na ndimbola nini bampate basangoli Bokonzi?
▪ Ntango nini “ebandeli ya mokili” etyamaki?
▪ Likoló na likambo nini bato batyami na molongó ya bampate to na molongó ya bantaba?
-
-
Yesu azali komilengela mpo na kokumisa Pasiká na ye ya nsukaMoto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
-
-
Mokapo 112
Yesu azali komilengela mpo na kokumisa Pasiká na ye ya nsuka
MOKOLO ya mibale 11 Nisan moleki. Yesu asilisi koteya bantóma na ye likoló na ngomba ya Olive. Oyo nde mokolo motondi na mosala mpe na ntina mingi! Mbala mosusu na bozongi mpo na kolala na Betania, Yesu alobi na bantoma na ye ete: “Boyebi ete nsima na mikolo mibale Pasiká ekosalama, mpe bakokaba Mwana na moto mpo na koboma ye na nzeté.”
-