Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bt mok. 14 nk. 108-115
  • “Biso nyonso toyokani”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Biso nyonso toyokani”
  • ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Boyokani na maloba ya Basakoli” (Misala 15:13-21)
  • ‘Batindaki mibali oyo baponami’ (Misala 15:22-29)
  • “Basepelaki na elendiseli yango” (Misala 15:30-35)
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Nani azali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tosala na bomoko elongo na college central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Bokabwani ebimaki’
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
bt mok. 14 nk. 108-115

MOKAPO 14

“Biso nyonso toyokani”

Ndenge lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli mpe ndenge ekateli yango esalisaki masangá ezala na bomoko

Euti na Misala 15:13-35

1, 2. (a) Lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso esengelaki kopesa biyano na mituna minene nini? (b) Nini esalisaki bandeko yango bázwa ekateli ya malamu?

MOTO nyonso azali kozela ekateli oyo ekozwama. Bantoma ná bankulutu oyo bayangani na ndako moko na Yerusaleme bazali kotalana, bayebi ete basengeli kozwa ekateli na likambo moko ya ntina mingi. Likambo ya kokatama ngenga ebimisi mituna minene. Bakristo basengeli nde kotosa Mibeko ya Moize? Bokeseni esengeli nde kozala kati na Bayuda oyo bakómi bakristo mpe bato ya bikólo oyo bakómi bakristo?

2 Mibali oyo bazali kokamba lisangá bataleli makambo mingi. Balobeli bisakweli oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe litatoli ya bato oyo bamonaki ndenge Yehova azalaki kopambola. Moto na moto amonisi makanisi na ye. Bazali na makambo nyonso oyo basengeli na yango mpo na kokata likambo yango. Ezali polele ete elimo ya Yehova ezali kolakisa nzela. Mibali yango bakolanda nde litambwisi ya elimo yango?

3. Ndenge nini kotalela lisolo oyo ezali na Misala mokapo 15 ekosalisa biso?

3 Esengelaki kozala mpenza na kondima mpe mpiko mpo na kolanda litambwisi ya elimo na likambo yango. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakoki koyina bango makasi koleka. Epai mosusu, ezali mpe na mibali na kati ya lisangá oyo balingi kaka ete basaleli ya Nzambe bátosa Mibeko ya Moize. Lisangani ya mikóló-bakambi ekozwa ekateli nini? Tótalela yango. Na lisolo oyo, tokomona ndenge mibali yango batiká ndakisa oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova elandaka. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa yango ntango tolingi kozwa bikateli mpe ntango tokutani na mikakatano na bomoi na biso ya bokristo.

“Boyokani na maloba ya Basakoli” (Misala 15:13-21)

4, 5. Makambo nini oyo ezali na bisakweli ya Liloba ya Nzambe Yakobo alobelaki mpo na kosalisa bayangani báyeba makanisi ya Yehova?

4 Moyekoli Yakobo, ndeko ya Yesu, azwaki maloba.a Emonani ete na libaku yango, ye nde azalaki kokamba likita. Emonani ete maloba na ye emonisaki makanisi oyo bayangani nyonso bakómaki na yango. Yakobo alobaki na bayangani nyonso boye: “Simeone ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe atyaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye. Mpe yango ezali na boyokani na maloba ya Basakoli.”​—Mis. 15:14, 15.

5 Na ntembe te, maloba ya Simeone, to Simo Petro, mpe litatoli ya Barnabasi ná Paulo esalisaki Yakobo akanisa mikapo oyo esalisaki bango báyeba malamu makanisi ya Yehova. (Yoa. 14:26) Nsima ya koloba ete ezali na “boyokani na maloba ya Basakoli,” Yakobo azongelaki maloba oyo ezali na Amose 9:11, 12. Mokanda yango ezali na kati ya mikanda ya Makomami ya Ebre oyo ebengamaka “Basakoli.” (Mat. 22:40; Mis. 15:16-18) Tokomona ete maloba ya Yakobo ekeseni mwa moke na maloba oyo ezali mpenza na mokanda ya Amose lelo oyo. Ekoki mpenza kozala ete Yakobo azongelaki maloba yango ndenge ezali na Biblia ya Septante, libongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre.

6. Ndenge nini Makomami esalisaki mpo na kozwa ekateli ya malamu na likambo oyo bazalaki kotalela?

6 Na nzela ya Amose, Yehova asakolaki ete ntango ekoya wana akotɛlɛmisa “ndako ya matiti ya Davidi,” elingi koloba molɔngɔ ya bakonzi oyo ekomema na Bokonzi ya Masiya. (Ezk. 21:26, 27) Yango elingi nde koloba ete Yehova akozala na boyokani kaka ná ekólo ya Bayuda? Te. Esakweli yango ebakisi ete “bato ya bikólo nyonso” bakoyanganisama lokola “bato oyo babengami na nkombo [ya Nzambe].” Tóbosana te ete Petro autaki kopesa litatoli ete Nzambe “asalaki bokeseni ata moke te kati na biso [Bayuda] mpe bango [bandimi oyo bazali bato ya bikólo], kasi apɛtolaki nde mitema na bango na nzela ya kondima.” (Mis. 15:9) Na maloba mosusu, mokano ya Nzambe ezalaki ete Bayuda ná bato ya bikólo bázwa libula ya Bokonzi. (Rom. 8:17; Ef. 2:17-19) Esika moko te bisakweli yango emonisaki ete bandimi oyo bazali bato ya bikólo basengeli naino kokatama ngenga to kokóma baprozelite.

7, 8. (a) Yakobo apesaki likanisi nini? (b) Maloba ya Yakobo elimbolaki nini?

7 Nsima ya kotalela makambo oyo Makomami elobi mpe litatoli oyo ayokaki, Yakobo apesaki likanisi oyo: “Yango wana ekateli na ngai ezali te ya kotya na mobulu bato ya bikólo oyo bazali kobaluka epai ya Nzambe, kasi ya kokomela bango ete báboya biloko oyo ekómisami mbindo na bikeko, pite, banyama oyo ekamolamá mpe makila. Mpo banda na ntango ya kala, Moize azali na bato oyo basakolaka maloba na ye na engumba nyonso, mpo na sabata nyonso mikanda na ye etángamaka na mongongo makasi na basinagoga mpo bato báyoka.”​—Mis. 15:19-21.

8 Ntango Yakobo alobaki ete “yango wana ekateli na ngai ezali ete,” alingaki nde komonisa ete lokola ye nde azalaki kokamba likita, azalaki na bokonzi likoló ya bandeko mosusu mpe andimisaki bango makanisi na ye na makasi? Te! Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekateli na ngai ezali” ekoki mpe kolimbola “Namoni ete” to “Napesi likanisi ete.” Yakobo azalaki te komitombola likoló ya bayangani mosusu, apesaki nde likanisi mpo bátalela yango na kolanda makambo oyo bautaki koyoka mpe makambo oyo Makomami elobi na likambo yango.

9. Likanisi oyo Yakobo apesaki ezalaki na matomba nini?

9 Yakobo apesaki nde likanisi ya malamu? Emonani ete likanisi na ye ezalaki malamu, mpamba te bantoma ná bankulutu bandimaki yango. Yango ememaki matomba nini? Ya liboso, likanisi oyo apesaki elingaki “kotya mobulu” te lokola esɛngaki te ete bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo bátosa Mobeko ya Moize. (Mis. 15:19) Ya mibale, ekateli yango ezalaki komemya lisosoli ya Bayuda oyo bakómaki bakristo, baoyo mbula na mbula, bazalaki koyoka ndenge ‘sabata nyonso mikanda ya Moize etángamaka na mongongo makasi na basinagoga.’b (Mis. 15:21) Na ntembe te, likanisi oyo apesaki elingaki kolendisa bondeko kati na Bayuda oyo bakómaki bakristo mpe bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo. Na koleka, elingaki kosepelisa Yehova Nzambe mpo eyokanaki na mokano na ye. Yango ezalaki ndenge malamu mpenza ya kosilisa mokakatano oyo ekokaki kobebisa bomoko mpe bolamu ya lisangá mobimba ya Nzambe! Ezali mpe ndakisa malamu mpo na lisangá ya bokristo lelo oyo!

Albert Schroeder azali kosala diskur na liyangani ya mikili mingi na 1998

10. Lelo oyo, ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka ndakisa ya lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso?

10 Ndenge mokapo oyo eleki emonisaki yango, lelo oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka makambo ndenge lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kosala na siɛklɛ ya liboso, elingi koloba ete na makambo nyonso, elukaka litambwisi ya Yehova, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe ya Yesu Kristo, Mokonzi ya lisangá.c (1 Ko. 11:3) Ndenge nini basalaka yango? Albert Schroeder, ndeko oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi banda 1974 tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele na sanza ya Marsi 2006, alobaki boye: “Bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakutanaka mokolo nyonso ya misato, babandaka likita na bango na libondeli mpe basɛngaka litambwisi ya elimo ya Yehova. Basalaka makasi ete likambo nyonso oyo bakotalela mpe ekateli nyonso oyo bakozwa eyokana na Biblia, Liloba ya Nzambe.” Ndenge moko mpe, Milton Henschel, ndeko oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi na boumeli ya bambula ebele tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele na sanza ya Marsi 2003, atunaki motuna moko ya ntina mingi epai ya bana-kelasi ya mbala ya 101 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Atunaki boye: “Ezali nde na ebongiseli mosusu awa na mabele oyo bakambi na yango batalelaka Biblia, Liloba ya Nzambe, liboso ya kozwa bikateli ya ntina mingi?” Eyano ezali polele.

‘Batindaki mibali oyo baponami’ (Misala 15:22-29)

11. Ndenge nini ekateli ya lisangani ya mikóló-bakambi eyebisamaki na masangá?

11 Lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme ezwaki ekateli oyo bandimaki bango nyonso. Kasi, mpo bandeko na masangá básala makambo na bomoko, esengelaki kotindela bango ekateli yango na maloba ya polele mpe ya kolendisa. Ndenge nini basalaki yango? Lisolo elobi boye: “Bantoma mpe bankulutu elongo na lisangá mobimba bazwaki ekateli bátinda mibali oyo baponami na kati na bango bákende na Antiokia elongo na Paulo mpe Barnabasi. Batindaki Yudasi oyo bazalaki kobenga Barsabasi ná Silasi, bato oyo bazalaki na mikumba minene na kati ya bandeko.” Longola yango, bakomaki mokanda mpe batindaki yango na mabɔkɔ ya mibali yango mpo bátánga yango na masangá nyonso na Antiokia, na Siri, mpe na Silisia.​—Mis. 15:22-26.

12, 13. Likambo nini ya malamu esalemaki na ndenge batindaki (a) Yudasi ná Silasi? (b) mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi?

12 Lokola Yudasi ná Silasi bazalaki “na mikumba minene na kati ya bandeko,” babongaki mpenza mpo na kozala bamonisi ya lisangani ya mikóló-bakambi. Bandeko yango minei bakokaki mpenza komonisa ete nsango oyo bamemaki ezalaki kaka te eyano mpo na likambo ya kokatama ngenga, kasi ezalaki mpe malako ya lisangani ya mikóló-bakambi na makambo mingi. ‘Mibali oyo baponamaki’ balingaki mpenza kolendisa bondeko kati na Bayuda oyo bakómaki bakristo, oyo bazalaki na Yerusaleme mpe bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo, oyo bazalaki na bamboka mosusu. Ebongiseli yango emonisaki mpenza bwanya mpe bolingo! Na ntembe te, ebongiseli yango elendisaki kimya mpe bomoko na kati ya basaleli ya Nzambe.

NDENGE LISANGANI YA MIKÓLÓ-BAKAMBI EBONGISAMI LELO OYO

Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, lisangá ya Batatoli ya Yehova lelo oyo etambwisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo esangisi bandeko mibali ya sembo oyo batyami mafuta na elimo. Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka likita pɔsɔ nyonso. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi babongisami mpe na bakomite motoba, oyo mokomoko ezali na mikumba na yango.

  • Komite ya Batambwisi etambwisaka biro oyo etalelaka makambo ya mibeko mpe ndenge ya kosala soki esengeli kolimbola mateya na biso na nzela ya radio, televizyo, to Internet. Ezwaka mpe bibongiseli mpo na kosalisa bandeko oyo bakutani na makama, na botɛmɛli, to makambo mosusu ya mbalakaka oyo ezwi Batatoli ya Yehova ata na mboka nini.

  • Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele ezwaka bibongiseli mpo Batatoli ya Yehova oyo basalaka na Babetele ya mokili mobimba bázala malamu na elimo mpe na mosuni. Lisusu, komite yango etalelaka soki esengeli kobakisa bandeko mosusu na Babetele.

  • Komite ya kobimisa mikanda etambwisaka misala konyata, kobimisa mpe kotinda mikanda oyo elimbolaka Biblia. Etalelaka mpe ba-imprimeri, babiro ya filiale mpe mosala ya kotonga bafiliale, Bandako ya Bokonzi, mpe Bandako ya Mayangani. Komite yango mpe esalaka nyonso mpo makabo oyo epesamaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba esalelama na ndenge ebongi.

  • Komite ya Mosala etambwisaka mosala ya kosakola mpe makambo etali bankulutu, bakɛngɛli ya zongazonga mpe basakoli ya ntango nyonso. Ebengisaka mpe bandeko na Eteyelo ya Gileadi mpo na kopesa bango formasyo mpo bákoka kofandisa mpe kosalisa masangá na mokili mobimba.

  • Komite ya Mateya etambwisaka mosala ya kobongisa mateya mpo na mayangani ya mike mpe ya minene, mpe na makita ya lisangá, ata mpe makambo oyo ekobima na audio mpe bavideo. Ebongisaka mateya mpo na Eteyelo ya Gileadi, Eteyelo mpo na babongisi-nzela, mpe biteyelo mosusu ná mateya mpo na bandeko ya Betele.

  • Komite ya Bokomi ezali na mokumba ya kobimisa bilei ya elimo mpo na masangá mpe bato nyonso. Komite yango eyanolaka mpe na mituna ya Biblia oyo bato batunaka, etambwisaka mosala ya kobongola mikanda na mokili mobimba, mpe etalelaka kokomama ya badrame mpe badiskur.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka litambwisi ya elimo santu. Bandeko oyo bazali na lisangani yango bakanisaka te ete bazali bakonzi ya basaleli ya Yehova. Kasi, lokola bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, bango mpe “bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate [Yesu Kristo] epai nyonso oyo azali kokende.”​—Em. 14:4.

13 Mokanda oyo bamemaki ezalaki na malako ya polele mpo na bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo, kaka mpo na likambo ya kokatama ngenga te, kasi mpe mpo na makambo oyo basengeli kosala mpo Yehova andima mpe apambola bango. Likanisi ya ntina mingi na mokanda yango elobaki boye: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko, makila, banyama oyo ekamolamá mpe pite. Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana, bokozala malamu. Bótikala malamu!”​—Mis. 15:28, 29.

14. Nini esalisaka basaleli ya Yehova básala na bomoko na kati ya mokili oyo ekabwani?

14 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova, oyo baleki milio 8 na masangá koleka 100 000 na mokili mobimba, bazali na bomoko na mateya mpe na misala na bango. Ndenge nini bazali kolonga kozala na bomoko, nzokande mokili lelo oyo ekabwani mpenza mpe etondi na yikiyiki? Libosoliboso, bazali na bomoko mpo bango nyonso balandaka litambwisi ya polele oyo Yesu Kristo, Mokonzi ya lisangá, apesaka na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba, Lisangani ya mikóló-Bakambi. (Mat. 24:45-47) Bazali mpe na bomoko mpamba te bango nyonso bandimaka kolanda litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

“Basepelaki na elendiseli yango” (Misala 15:30-35)

15, 16. Ndenge nini likambo ya kokatama ngenga esilaki, mpe nini esalisaki mpo esila na ndenge ya malamu?

15 Mokanda ya Misala ebakisi ete ntango bandeko oyo bautaki na Yerusaleme bakómaki na Antiokia, “bayanganisaki etuluku yango ya bato mpe bapesaki bango mokanda yango.” Bandeko basalaki nini nsima ya koyoka malako ya lisangani ya mikóló-bakambi? “Nsima ya kotánga [mokanda yango], basepelaki na elendiseli yango.” (Mis. 15:30, 31) Longola yango, Yudasi ná Silasi “balendisaki bandeko yango na badiskur mingi mpe bapesaki bango makasi.” Ezali na ndimbola yango nde mibali wana bazalaki “basakoli,” kaka ndenge Barnabasi, Paulo, ná bandeko mosusu babengamaki basakoli, elingi koloba bato oyo bayebisi mokano ya Nzambe.​—Mis. 13:1; 15:32; Kob. 7:1, 2.

16 Emonanaki polele ete Yehova apambolaki makambo nyonso oyo basalaki mpo likambo ekatama malamu. Nini esalisaki mpo makambo nyonso eleka malamu? Na ntembe te, ezali mpo ete lisangani ya mikóló-bakambi epesaki malako ya polele na ntango oyo ebongi, nsima ya kotalela Liloba ya Nzambe mpe kolanda litambwisi ya elimo na Ye. Longola yango, bayebisaki ekateli yango na lisangá mokomoko na bolingo mpenza.

17. Na ndenge nini makambo oyo Paulo, Barnabasi, Yudasi ná Silasi basalaki etiká ndakisa mpo na bakɛngɛli ya zongazonga lelo oyo?

17 Na kolanda ndakisa yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova epesaka bandeko ya mokili mobimba malako na ntango oyo ebongi. Ntango bazwi bikateli, bayebisaka yango na masangá na ndenge ya polele. Ntango mosusu bayebisaka yango na nzela ya bakɛngɛli ya zongazonga. Bandeko yango oyo bazali na elimo ya komipimela batalaka lisangá mokomoko, bapesaka malako ya polele mpe balendisaka bandeko. Lokola Paulo ná Barnabasi, bandeko yango balekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola, ‘bateyaka mpe basakolaka nsango malamu ya liloba ya Yehova, elongo na bato mosusu mingi.’ (Mis. 15:35) Lokola Yudasi ná Silasi, bakɛngɛli ya zongazonga ‘balendisaka bandeko na badiskur mingi mpe bapesaka bango makasi.’

18. Basaleli ya Nzambe basengeli kosala nini mpo Yehova akoba kopambola bango?

18 Ezali boni mpo na masangá? Nini esalisaka masangá ya mokili mobimba ekoba kozala na kimya mpe na bomoko na mokili oyo etondi na bokabwani? Tóbosana te ete ezali moyekoli Yakobo nde akomaki na nsima ete: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa . . . Bato oyo babatelaka boyokani malamu na basusu, batyaka kimya mpe yango esalaka ete bábota mbuma ya makambo oyo ezali sembo.” (Yak. 3:17, 18) Toyebi te soki Yakobo azalaki kokanisa likita oyo basalaki na Yerusaleme ntango akomaki maloba yango. Kasi, makambo oyo ekomami na Misala mokapo 15 ezali komonisa polele ete Yehova apambolaka basaleli na ye kaka soki bazali kosala na kimya mpe na bomoko.

19, 20. (a) Nini emonisi ete kimya mpe bomoko ekɔtaki na lisangá ya Antiokia? (b) Paulo ná Barnabasi bakokaki sikoyo kosala nini?

19 Emonani polele ete kimya mpe bomoko ekɔtaki na lisangá ya Antiokia. Na esika bandeko ya Antiokia báwelana ná bandeko oyo bautaki na Yerusaleme, basepelaki mingi ndenge Yudasi ná Silasi bakendaki kotala bango. Mpo lisolo elobi: ”‏Nsima ya kolekisa mwa ntango kuna, bandeko batikaki bango bázonga na kimya epai ya baoyo batindaki bango ,” elingi koloba ete bazongaki na Yerusaleme.d (Mis. 15:33) Tokanisi mpenza ete bandeko na Yerusaleme mpe basepelaki ntango mibali yango mibale bayebisaki bango ndenge oyo balekisaki mobembo na bango. Na nzela ya boboto monene ya Yehova, bakokisaki malamu mokumba na bango!

20 Paulo ná Barnabasi, baoyo batikalaki na Antiokia, bakokaki sikoyo komipesa na mosala ya kosakola mpo na kopesa ndakisa, ndenge bakɛngɛli ya zongazonga basalaka lelo oyo ntango bakei kotala masangá. (Mis. 13:2, 3) Ezalaki mpenza lipamboli mpo na basaleli ya Yehova! Kasi, ndenge nini Yehova asalelaki mpe apambolaki mibali wana mibale oyo bazalaki kopalanganisa nsango malamu na molende? Tokotalela yango na mokapo elandi.

Mama ná mwana na ye ya mwasi na liyangani, bazali kotala buku “mituna oyo bilenge batunaka​​—Biyano oyo ebongi, volimi 2.”

Bakristo ya ntango na biso basepelaka na bilei ya elimo oyo Nzambe apesaka na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe batindami na yango

YAKOBO​—“NDEKO YA NKOLO”

Yakobo, mwana ya Yozefe ná Maria, azali moto ya liboso oyo atángami na kati ya baleki ya Yesu. (Mat. 13:54, 55) Ekoki kozala ete azalaki mwana ya mibale ya Maria. Yakobo akolaki esika moko ná Yesu, amonaki ndenge Yesu azalaki kosakola, mpe ayebaki ete Yesu azalaki na “nguya ya kosala makamwisi,” ezala amonaki yango to te. Kasi, ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, Yakobo ná bandeko na ye mosusu “bazalaki kondimela ye [yaya na bango] te.” (Yoa. 7:5) Kutu, ekoki kozala ete Yakobo azalaki kokanisa lokola bandeko mosusu ya Yesu oyo bazalaki koloba mpo na Yesu ete: “Abɛli motó.”​—Mrk. 3:21.

Yakobo azali kotánga rulo.

Kasi, makambo nyonso ebongwanaki nsima ya lisekwa ya Yesu. Atako Makomami ya Grɛki elobeli bato mosusu misato oyo bazalaki na nkombo ya Yakobo, emonani mpenza ete Yesu abimelaki nde Yakobo oyo azalaki ndeko na ye na boumeli ya mikolo 40 oyo alekisaki nsima ya lisekwa na ye. (1 Ko. 15:7) Ekoki kozala ete likambo yango esalisaki Yakobo ayeba malamu soki ndeko na ye azalaki mpenza nani. Ezala bongo to te, ntango Yesu amataki na likoló, mikolo soki zomi na nsima, Yakobo, mama na ye mpe bandeko na ye mosusu bayanganaki ná bantoma na shambrɛ ya likoló mpo na kobondela.​—Mis. 1:13, 14.

Na nsima, Yakobo akómaki mosangani ya lisangá ya Yerusaleme mpe bandeko bazalaki kopesa ye limemya mingi mpe ekoki kozala ete bakómaki kotalela ye lokola ntoma, to “motindami” ya lisangá yango. (Gal. 1:18, 19) Likambo mosusu oyo emonisi polele ete Yakobo azalaki na mokumba monene ezali maloba oyo Petro alobaki nsima ya kobimisama na bɔlɔkɔ na ndenge ya likamwisi. Ntoma yango ayebisaki bayekoli ete: “Bóyebisa Yakobo mpe bandeko makambo oyo.” (Mis. 12:12, 17) Emonani ete ntango likambo ya kokatama ngenga ekómaki liboso ya “bantoma ná bankulutu” na Yerusaleme, Yakobo nde akambaki likita mpo na kokata likambo yango. (Mis. 15:6-21) Lisusu, ntoma Paulo alobaki ete Yakobo, Kefa (Petro) ná ntoma Yoane “bazalaki lokola makonzí” ya lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme. (Gal. 2:9) Ata bambula mingi na nsima, ntango Paulo azongaki na Yerusaleme nsima ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ, ayebisaki Yakobo mpe “bankulutu nyonso bazalaki wana,” makambo oyo akutanaki na yango.​—Mis. 21:17-19.

Emonani ete ezali Yakobo yango, oyo Paulo abengaki “ndeko ya Nkolo,” nde akomaki mokanda ya Yakobo na kati ya Biblia. (Gal. 1:19) Na mokanda yango, Yakobo amimonisi lokola ntoma te, ndeko ya Yesu mpe te, kasi lokola “moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo.” (Yak. 1:1) Mokanda ya Yakobo emonisi ete, lokola kaka Yesu, Yakobo azalaki kotala na likebi mpenza biloko oyo ezali na mokili mpe bizaleli ya bato. Mpo na kolimbola mateya ya Nzambe, Yakobo asalelaki ndakisa ya makambo oyo bato bameseni komona na mokili, na ndakisa mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ememaka, likoló oyo etondi minzoto, moi makasi, bafololo, mɔtɔ ya zamba, mpe ndenge oyo bato basalaka ete banyama bátosa bango. (Yak. 1:6, 11, 17; 3:5, 7) Lokola ayebaki malamu ndenge bato bakanisaka mpe basalaka makambo, apesaki batoli oyo ebongi mpenza mpo na kozala na boyokani ya malamu ná basusu.​—Yak. 1:19, 20; 3:2, 8-18.

Maloba ya Paulo na 1 Bakorinti 9:5 emonisi ete Yakobo azalaki na mwasi. Biblia eyebisi te ntango mpe ndenge oyo Yakobo akufaki. Nzokande, Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, akomaki ete mwa moke nsima ya liwa ya Guvɛrnɛrɛ Festusi na mobu soki 62 T.B., mpe liboso ete Albinus azwa esika na ye, Ananus (Ananiasi), nganga-nzambe monene, “ayanganisaki bazuzi ya Sanedrina mpe abimisaki liboso na bango mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Yakobo, ndeko ya Yesu oyo abengamaki Kristo, mpe bato mosusu.” Josèphe akomaki ete Ananus “afundaki bango ete babukaki mibeko mpe atindaki ete báboma bango na mabanga.”

a Talá etanda “Yakobo​—‘Ndeko ya Nkolo,’” na lokasa 112.

b Yakobo amonisaki bwanya na ndenge atángaki makomi ya Moize, oyo ezalaki kaka na mibeko te, kasi ezalaki mpe kolobela makambo oyo Nzambe asalaki mpe makambo oyo ezalaki komonisa mokano na Ye liboso kutu apesa Mobeko. Na ndakisa, mokanda ya Ebandeli ezali komonisa polele likanisi ya Nzambe mpo na makila, ekobo, mpe kosambela bikeko. (Eba. 9:3, 4; 20:2-9; 35:2, 4) Na bongo, Yehova amonisaki mitinda oyo etaleli bato nyonso, ezala Bayuda to bato ya bikólo.

c Talá etanda “Ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami lelo oyo,” na lokasa 110.

d Na vɛrsɛ 34, mabongoli mosusu ya Biblia ebakisaka ete Silasi asepelaki kotikala na Antiokia. (haut fleuve) Kasi, emonani ete maloba yango ebakisamaki na nsima.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto