Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bh lok. 199-lok. 201 par. 4
  • Yesu Klisto—Masiya oyo alakamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu Klisto—Masiya oyo alakamaki
  • Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Masolo mosusu
  • Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bisakweli oyo elobelaki Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bazalaki kozela Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yesu Klisto lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Biblia eteyaka mpenza nini?
bh lok. 199-lok. 201 par. 4

APƐNDISI

Yesu Klisto​—Masiya oyo alakamaki

MPO na kosalisa biso tóyeba Masiya, Yehova Nzambe atindaki ebele ya basakoli oyo Biblia elobeli báyebisa kobotama ya Mobikisi yango oyo alakamaki, mosala na ye, mpe liwa na ye. Bisakweli nyonso wana ya Biblia ekokisamaki epai ya Yesu Klisto. Likambo ya kokamwa, bisakweli yango elobeli makambo ya mikemike mingi oyo etali ye mpe makambo yango nyonso esalemaki mpe bongo. Na ndakisa, tótala mwa bisakweli oyo eyebisaki kobotama ya Masiya mpe bomwana na ye.

Mosakoli Yisaya asakolaki ete Masiya akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. (Yisaya 9:7) Esalamaki mpe bongo, Yesu abotamaki na libota ya Davidi.​—Matai 1:1, 6-17.

Mika, mosakoli mosusu ya Nzambe, asakolaki ete mwana yango akobotama na “Beteleme Efelata,” mpe akokóma mokonzi. (Mika 5:2) Ntango Yesu abotamaki, bingumba mibale na Yisalaele ezalaki na nkombo Beteleme. Mosusu ezalaki pene na Nazarete, na nɔrdi ya ekólo, mpe mosusu ezalaki pene na Yelusaleme, na Yuda. Kala, bazalaki kobenga Beteleme oyo ezali pene na Yelusaleme Efelata. Yesu abotamaki na engumba yango, se ndenge esakolamaki!​—Matai 2:1.

Esakweli mosusu ya Biblia elobaki ete Mwana ya Nzambe akobengama “longwa na Ezipito.” Ntango Yesu azalaki mwana moke, bakendaki na ye na Ezipito. Nsima ya liwa ya Erode, balongwaki na ye na Ezipito. Na ndenge yango, esakweli wana ekokisamaki.​—Hosea 11:1; Matai 2:15.

Na etanda “Bisakweli oyo etali Masiya,” bavɛrsɛ oyo etyami na nse ya motó ya likambo “Esakweli” elobeli makambo ya Masiya. Tosɛngi yo otala soki makambo yango ekokani na oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Kokokisama.” Okomona ete Liloba ya Nzambe elobaka solo mpe okondimela yango lisusu koleka.

Ntango ozali kotalela bavɛrsɛ yango, yebá ete bavɛrsɛ ya bisakweli ekomamaki bambula bankama ebele liboso Yesu abotama. Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.” (Luka 24:44) Ndenge yo moko omoni na Biblia na yo, makambo yango ekokisamaki mpenza, ata moko ezangaki te!

BISAKWELI OYO ETALI MASIYA

LIKAMBO

ESAKWELI

KOKOKISAMA

Abotami na libota ya Yuda

Genese 49:10

Luka 3:23-33

Ngɔndɔ moko nde aboti ye

Yisaya 7:14

Matai 1:18-25

Azali mokitani ya Mokonzi Davidi

Yisaya 9:7

Matai 1:1, 6-17

Yehova alobi ete azali Mwana na Ye

Nzembo 2:7

Matai 3:17

Bato mingi bandimeli ye te

Yisaya 53:1

Yoane 12:37, 38

Akɔti na Yelusaleme likoló ya mpunda

Zekalia 9:9

Matai 21:1-9

Moko na baninga na ye atɛki ye

Nzembo 41:9

Yoane 13:18, 21-30

Batɛki ye na palata 30

Zekalia 11:12

Matai 26:14-16

Afandi nyɛɛ liboso ya bafundi na ye

Yisaya 53:7

Matai 27:11-14

Babwaki mbɛsɛ mpo na bilamba na ye

Nzembo 22:18

Matai 27:35

Bafingi ye ntango azali likoló ya nzete ya mpasi

Nzembo 22:7, 8

Matai 27:39-43

Ata mokuwa na ye moko ebukani te

Nzembo 34:20

Yoane 19:33, 36

Bakundi ye esika moko na bato ya bomɛngo

Yisaya 53:9

Matai 27:57-60

Asekwi liboso apɔla

Nzembo 16:10

Misala 2:24, 27

Nzambe atomboli ye na lobɔkɔ na Ye ya mobali

Nzembo 110:1

Misala 7:56

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto