Tózwa makambo na lisɛki te na mosala ya Yehova
“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”—FLP. 1:10.
1, 2. Nini etindi bato mingi na mokili oyo bákóma kozwa bomoi na lisɛki, mpe ebimisi mituna nini?
LELO, mokili ezali na mpasi mpe na makambo ya mawa mingi koleka na eleko mosusu nyonso. Bato oyo bazali na boyokani malamu te na Yehova bamonaka ete koyika mpiko na ‘ntango ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano’ oyo tozali lelo ezali pɛtɛɛ te. (2 Tim. 3:1-5) Mokolo na mokolo, babundaka kaka na makasi na bango moko, kasi mbala mingi balongaka mpenza te. Lokola balingi kozwa makambo na lisɛki na bomoi na bango, bato mingi bazali koluka bisengo na masano ndenge na ndenge oyo ezali se kobima na mokili lelo.
2 Mpo na kolongola mitungisi ya bomoi, bato mingi balukaka libosoliboso bisengo. Soki akebi te, mokristo akoki mpe kokóma na bomoi ya ndenge wana. Ndenge nini tokoki kokima likambo yango? Ekosɛnga nde tósakanaka ata mwa moke te? Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati na oyo etali bisengo mpe mikumba na biso? Mitinda nini ya Biblia esengeli kotambwisa biso, mpo ete, atako tozali koluka kosala makambo ya ntina na bomoi, tólekisa mpe ndelo te?
Tózwa makambo na lisɛki te na mokili oyo elingá bisengo
3, 4. Ndenge nini Makomami esalisi biso tómona ntina ya kozwaka makambo na lisɛki te?
3 Kaka ndenge toyebi yango, mokili ezali kolendisa bato ‘bálinga bisengo’ koleka ndelo. (2 Tim. 3:4) Ndenge mokili ezali komonisa ete moto asengeli komisepelisa ekoki kozala likama mpo na elimo na biso. (Mas. 21:17) Na yango, ezali mpamba te ndenge, na mikanda oyo akomelaki Timote mpe Tito, ntoma Paulo akɔtisaki mpe toli na likambo etali koboya kozwa makambo na lisɛki. Kosalela toli yango ekosalisa biso tótɛmɛla makanisi ya mokili oyo, ya kozwa bomoi na lisɛki.—Tángá 1 Timote 2:1, 2; Tito 2:2-8.
4 Bikeke mingi liboso, Salomo akomaki ete na bantango mosusu, ebongi kotya bisengo pembeni mpo na kosala makambo ya ntina koleka. (Mos. 3:4; 7:2-4) Ya solo, lokola bomoi ezali mokuse, tosengeli ‘kosala makasi mpenza’ mpo tózwa lobiko. (Luka 13:24) Mpo na yango, tosengeli kokoba ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Flp. 1:10) Elingi koloba ete tosengeli kotya likebi mingi na likambo mokomoko oyo etali bomoi ya mokristo.
5. Wapi likambo moko ya bomoi oyo tosengeli kozwa na lisɛki te?
5 Na ndakisa, ndenge moko na Yehova mpe Yesu, bakristo bazwaka na lisɛki te mokumba na bango ya kozala makasi na mosala. (Yoa. 5:17) Mpo na yango, bato mingi bakumisaka bango ete bazali basali ya malamu mpe bato ya kotyela motema. Mingimingi, batata ya mabota nde balukaka kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Kutu, koboya koleisa mpe kolatisa bato ya libota ezali ‘kowangana kondima,’ to kowangana Yehova!—1 Tim. 5:8.
Atako losambo na biso epesaka esengo, tózwa yango na lisɛki te
6. Ndenge nini toyebi ete tosengeli kozwa losambo ya Yehova na lisɛki te?
6 Banda kala, Yehova amonaka ete kosambela ye na ndenge oyo ebongi ezali na ntina mingi. Na ndakisa, na ntango ya Mibeko ya Moize, Bayisraele bakutanaki na mpasi makasi ntango batikaki losambo ya Yehova. (Yos. 23:12, 13) Na ekeke ya liboso T.B., bayekoli ya Kristo basengelaki kosala milende makasi mpo na kobatela losambo ya pɛto mpo ebebisama te na mateya mpe makanisi ya mabe. (2 Yoa. 7-11; Em. 2:14-16) Lelo mpe, bakristo ya solo bazwaka losambo na bango na lisɛki te.—1 Tim. 6:20.
7. Ndenge nini Paulo azalaki komibongisa mpo na mosala ya kosakola?
7 Mosala na biso ya kosakola epesaka esengo. Kasi, mpo tóbatela esengo na mosala yango, tosengeli kokanisaka yango malamu mpe komibongisa liboso. Paulo amonisaki ndenge azalaki kokipe bato oyo azalaki koteya. Akomaki boye: “Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini, nabikisa bamosusu. Kasi nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nasakola yango elongo na bamosusu.” (1 Ko. 9:22, 23) Paulo azalaki kosepela mingi kosalisa bato na elimo, mpe azalaki kokanisa malamu ndenge akokokisa bamposa ya moyoki mokomoko. Na ndenge yango, alongaki kolendisa bango mpe kopesa bango mposa ya kosambela Yehova.
8. (a) Tosengeli kozala na makanisi nini mpo na baoyo tozali koteya na mosala na biso ya kosakola? (b) Ndenge nini koyekola Biblia na moto ekoki kobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola?
8 Ndenge nini Paulo amonisaki ete azwaka mosala na ye na lisɛki te? Andimaki ‘kosala lokola moombo’ mpo na Yehova mpe mpo na baoyo bakoyoka nsango ya solo. (Rom. 12:11; 1 Ko. 9:19) Ntango tondimi mokumba ya koteya bato Liloba ya Nzambe—ezala ntango tozali koyekola Biblia na moto, ezala na makita ya bokristo, to na Losambo ya libota—toyebaka mokumba na biso epai ya bato oyo tozali koteya? Mbala mosusu tomonaka ete koyekola na moto Biblia pɔsɔ na pɔsɔ ezali kilo mingi. Ya solo, mbala mingi esɛngaka tózwa ntango oyo tokokaki kosala makambo na biso moko mpe kolekisa yango na kosalisa basusu. Bongo, yango eyokani te na likanisi oyo Yesu amonisaki na maloba oyo ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa”? (Mis. 20:35) Ntango biso moko tozali koteya bato nzela ya lobiko, tokozwa esengo oyo tokoki kokokanisa yango na mosala mosusu te.
9, 10. (a) Koboya kozwa makambo na lisɛki elimboli nde ete tokoki kominanola te mpe kolekisa ntango te elongo na basusu? Limbolá. (b) Nini ekosalisa nkulutu alendisaka basusu mpe bato bákimaka ye te?
9 Koboya kozwa makambo na lisɛki elimboli te ete tokoki kominanola te mpe kosepela te elongo na basusu. Yesu apesaki ndakisa ya malamu mpenza na ndenge azalaki kolekisa ntango kaka mpo na koteya te, kasi mpe mpo na kominanola mpe kosala boninga ná bato. (Luka 5:27-29; Yoa. 12:1, 2) Koboya kozwa makambo na lisɛki elimboli mpe te ete tosengeli ntango nyonso kozala na elongi ya moto oyo asɛkaka te. Soki Yesu azalaka ntango nyonso elongi ya kokangama, na ntembe te bato balingaki kopusana pene na ye te. Nzokande, ata bana bazalaki kobanga te kozala penepene na ye. (Mrk. 10:13-16) Ndenge nini tokoki komekola bokatikati ya Yesu na likambo yango?
10 Ntango azalaki koloba mpo na nkulutu moko, ndeko mobali moko alobaki boye: “Ye moko amityelá mibeko mingi, kasi alukaka te ete basusu básala makambo na ndenge ya kokoka.” Bakoki mpe koloba bongo mpo na yo? Ezali malamu te koluka basusu básalaka makambo na ndenge ya kokoka. Na ndakisa, bana basepelaka ntango baboti bazali kosɛnga bango makambo oyo bakokoka kosala mpe bazali kosalisa bango básala yango. Ndenge moko mpe, bankulutu bakoki kolendisa bato mosusu na lisangá bákende liboso na elimo, kasi ekozala malamu soki bapesi mpe bango malako ya sikisiki mpo na ndenge ya kosala yango. Lisusu, soki nkulutu azali komizwa na kilo koleka ndelo te, akolendisa basusu mpe bato bakobanda kokima ye te. (Rom. 12:3) Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Nalingaka te nkulutu azwaka likambo nyonso kaka na lisɛki. Kasi, soki mpe azali ntango nyonso elongi ya kokangama, ezalaka mpasi kosolola na ye.” Ndeko mwasi mosusu alobaki ete amonaka ete bankulutu mosusu “bakoki kobangisa basusu mpo elongi na bango ezalaka ntango nyonso ekangamá.” Bankulutu bakolinga soki moke te kokitisa esengo oyo bandeko na bango bakristo basengeli kozala na yango na losambo ya Yehova, “Nzambe ya esengo.”—1 Tim. 1:11.
Kondima mikumba na lisangá
11. “Koluka kosala” na lisangá elimboli nini?
11 Ntango Paulo alendisaki bandeko mibali na lisangá básala makasi bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba ya minene koleka, ezalaki te mpo na kolendisa moto akokisa mposa na ye ya kozala na lokumu. Kasi, akomaki nde boye: “Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1, 4) Maloba “koluka kosala” elimboli ete bandeko mibali basengeli mpenza kosala milende mpo na kokóma na bizaleli ya elimo oyo esengeli mpo bákoka kosalela bandeko na bango. Soki ndeko mobali alekisi ata mbula moko banda azwi batisimo mpe azali kokokisa na ndenge oyo ebongi masɛngami ya Makomami mpo na kokóma mosaleli na misala, ndenge emonisami na 1 Timote 3:8-13, bankulutu bakoki kotinda nkombo na ye mpo azwa mokumba yango. Simbá ete vɛrsɛ 8 elobi polelepolele ete: “Basaleli na misala mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te.”
12, 13. Lobelá makambo oyo bilenge mibali bakoki kosala mpo bázwa mikumba.
12 Ozali ndeko mobali ya mbula pene na 20, osilá kozwa batisimo mpe ozwaka makambo na lisɛki te? Okoki koluka kosala na ndenge mingi. Moko na yango ezali nde kobongisa mosala na yo ya kosakola. Osepelaka kobima na mosala ya kosakola na bandeko ya mbula nyonso? Ozali kosala makasi mpo ozwa moto oyo okoki koyekola na ye Biblia? Ntango ozali koyekola Biblia na moto mpe ozali kosalela malako oyo tozwaka na makita ya bokristo, okokolisa makoki na yo ya koteya. Longola yango, okoyekola komitya na esika ya moto oyo azali koyekola banzela ya Yehova. Wana moyekoli na yo abandi komona ete asengeli kobongola bomoi na ye, okoyeba—na motema molai mpe na mayele—kosalisa ye mpo asalela mitinda ya Biblia.
13 Bandeko mibali ya bilenge, bokoki komonisa mikóló na lisangá ete bozali wana, koyebisa bango ete bokosala oyo bokoki mpo na kosalisa bango. Bokoki mpe kotya likebi na ndenge Ndako ya Bokonzi ezali, kosalisa mpo ezala ntango nyonso pɛto mpe na molɔngɔ. Soki bozali kondima kosalisa na ndenge nyonso oyo bokoki, elimo na bino ya komipesa ekomonisa ete bozali kozwa makambo na lisɛki te na mosala ya Nzambe. Lokola Timote, bokoki koyekola komitungisa mpenza mpo na bamposa ya lisangá.—Tángá Bafilipi 2:19-22.
14. Ndenge nini bilenge mibali bakoki ‘komekama mpo na koyeba soki bakoki’ kosala na lisangá?
14 Bankulutu, bóluka kosalela bilenge mibali oyo bazali kosala makasi mpo na ‘kokima bamposa ya bolenge’ mpe oyo bazali ‘kolanda boyengebene, kondima, bolingo, kimya,’ mpe bizaleli mosusu ya malamu. (2 Tim. 2:22) Ntango bozali kopesa bango mwa misala na lisangá, bakoki ‘komekama mpo na koyeba soki bakoki’ kozwa mokumba, bongo ‘bato nyonso bakoki komona polele ete bazali kokende liboso.’—1 Tim. 3:10; 4:15.
Tózwaka makambo na lisɛki te na lisangá mpe na libota
15. Na kolanda 1 Timote 5:1, 2, ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka makambo na lisɛki te na boyokani na biso ná basusu?
15 Kozwa makambo na lisɛki te esɛngi mpe kopesa bandeko na biso ya mibali mpe ya basi lokumu. Na toli na ye oyo apesaki Timote, Paulo amonisaki ntina ya kopesa basusu limemya. (Tángá 1 Timote 5:1, 2.) Yango ezali na ntina, mingimingi na boyokani na biso na moto oyo azali molongani na biso te. Lolenge oyo Yobo apesaki basi lokumu, mingimingi mwasi na ye, ezali ndakisa oyo ebongi komekola. Asalaki milende mpenza mpo atala mwasi mosusu na mposa ya mabe te. (Yobo 31:1) Kozwa bandeko na biso ya mibali mpe ya basi na lisɛki te ekopekisa biso tózala selesele na ndeko oyo azali molongani na biso te to tósala likambo moko oyo ekoki kotinda ndeko mwasi to ndeko mobali ayoka mabe kozala pene na biso. Kopesa basusu lokumu ezali na ntina, mingimingi ntango bato mibale balingani mpo na kobalana. Mokristo oyo azwaka makambo na lisɛki te akosakana soki moke te na mayoki ya moto.—Mas. 12:22.
16. Ndenge oyo bato na mokili batalelaka mokumba ya mobali mpe tata ná ndenge oyo Biblia elobeli yango ekeseni na nini?
16 Tosengeli mpe kokeba mpo tózwaka na lisɛki te mikumba oyo Nzambe apesá biso na kati ya libota. Mokili ya Satana ezali kokitisa valɛrɛ ya mokumba ya mobali mpe tata. Bafilme ya mikolo oyo elingaka mingi komonisa ete mibali mpe batata ya mabota babongi na lokumu mpe na limemya te. Nzokande, Biblia epesi mobali mokumba monene; etye ye “mokonzi ya mwasi.”—1 Ko. 11:3; Ef. 5:23.
17. Limbolá ndenge oyo kosala losambo na libota ekoki komonisa ete tozwaka mikumba na biso na lisɛki te.
17 Mobali akoki kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Kasi soki azali kopesa litambwisi na makambo ya elimo te, ekomonisa ete azangi bokɛngi mpe bwanya. (Mib. 6:6, 7) Na yango, 1 Timote 3:4 elobi ete soki ozali tata ya libota mpe ozali na mposa ya kozwa mikumba mosusu na lisangá, osengeli kozala moto oyo “akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te.” Yango wana, omituna boye: ‘Nabongisaka ntango pɔsɔ nyonso mpo na kosala losambo na libota na ngai?’ Tokoki koloba ete basi bakristo mosusu babondelaka mibali na bango nde kobondela mpo bátambwisa libota na makambo ya elimo. Mobali nyonso asengeli kotala malamu soki azwaka mokumba yango na lisɛki te. Kasi, mwasi mokristo mpe asengeli kopesa mabɔkɔ na ebongiseli ya Losambo na libota mpe kosala elongo na mobali na ye mpo etambola malamu.
18. Ndenge nini bana bakoki koyekola kozwa makambo na lisɛki te?
18 Bana mpe balendisami bázwa makambo na lisɛki te na bomoi. (Mos. 12:1) Ezali na likama moko te soki bana mike bayekoli kosala mosala makasi, kosala misala ya ndako oyo ekoki na mbula mpe makoki na bango. (Bil. 3:27) Ntango Mokonzi Davidi azalaki naino elenge, ayekolaki kozala mobateli malamu ya mpate. Ayekolaki mpe kobɛta miziki mpe kosala banzembo—makoki oyo epesaki ye libaku ya kosala liboso ya mokonzi ya Yisraele. (1 Sa. 16:11, 12, 18-21) Na ntembe te, na bolenge na ye, Davidi azalaki kosakana, kasi ayekolaki mpe makambo ya ntina oyo asalelaki na nsima mpo na kokumisa Yehova. Makambo oyo ayekolaki na mosala ya kobatela bampate esalisaki ye akamba ekólo Yisraele na motema molai. Bino bilenge, makambo nini bozali koyekola, oyo ekosalisa bino bósalela Mozalisi na bino mpe ekobongisa bino mpo na mikumba oyo bokozwa na mikolo ezali koya?
Zalá na bokatikati
19, 20. Ozali na ekateli ya kozala na makanisi ya ndenge nini mpo na yo moko mpe losambo na yo?
19 Biso nyonso tokoki kosala makasi mpo na kozala na bokatikati na ndenge oyo tozali komitalela, elingi koloba tómizwaka na ntina mingi koleka ndelo te. Tokolinga te kokóma ‘bayengebene koleka ndelo.’ (Mos. 7:16) Kosala mwa masɛki ekoki kokitisa nkanda, ezala na ndako, na mosala, to ntango tozali kosala elongo na bandeko na biso bakristo. Na kati ya libota, moto nyonso asengeli kokeba ete alandelaka ntango nyonso te mwa mabunga ya basusu noki alongola kimya oyo esengeli kozala na ndako. Na lisangá, biso nyonso tokoki koyekola kosɛka mpe kosepela elongo, kosala ete masolo na biso mpe ndenge na biso ya koteya etonga mpe elendisa.—2 Ko. 13:10; Ef. 4:29.
20 Tozali na mokili oyo ezwaka Yehova mpe mibeko na ye na kilo te. Kasi, basaleli ya Yehova bamonaka ete kotosa Yehova mpe kozala sembo epai na ye ezali na ntina mingi. Ezali mpenza esengo kozala na kati ya lisangá monene boye ya bato oyo basambelaka Yehova mpe “bazwaka makambo na lisɛki te”! Tózala na ekateli makasi ya kozwa makambo na lisɛki te na bomoi mpe na losambo na biso.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kotɛmɛla makanisi ya mokili oyo, ya kozwa bomoi na lisɛki?
• Ndenge nini tokoki kozala na esengo na mosala ya Nzambe, mpe kozwa yango na lisɛki te?
• Ndenge nini makanisi na biso na oyo etali kondima mikumba emonisaka soki tozwaka makambo na lisɛki to te?
• Limbolá ntina oyo kopesa bandeko na biso ya lisangá mpe ya libota lokumu ezali likambo ya lisɛki te.
[Bililingi na lokasa 12]
Mobali asengeli kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya libota na ye