-
Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya MasiyaBiblia eteyaka mpenza nini?
-
-
APƐNDISI
Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya
MOSAKOLI Danyele azalaki na bomoi mbula koleka 500 liboso Yesu abotama. Atako bongo, Yehova ayebisaki ye makambo oyo ekosalisa bato báyeba ntango oyo Yesu akoponama Masiya to Klisto. Ayebisaki ye boye: “Yebá mpe sosolá ete longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme kino koya ya mopakolami [“Masiya,” NW], mokonzi, ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima . . . pɔsɔ ntuku motoba na mibale.”—Danyele 9:25.
Mpo na koyeba ntango oyo Masiya akoya, tosengeli liboso koyeba ntango nini bambula oyo esengelaki koleka tii koya na ye ebandaki. Esakweli elobi ete ezali “longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme.” ‘Liloba yango ebimaki’ ntango nini? Nehemia, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobi ete ezali “na [mbula] ya ntuku mibale ya mokonzi [Alatazelezese]” nde liloba ebimaki ete bátonga lisusu lopango ya Yelusaleme. (Nehemia 2:1, 5-8) Bato ya mayele na makambo ya kala balobi ete Alatazelezese abandaki koyangela na mobu 475 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na yango, mbula ya 20 ya boyangeli na ye ekokaki na mobu 455 L.T.B. Sikoyo tozwi ntango oyo esakweli ya Danyele oyo etali Masiya ebandaki kokokisama, elingi koloba na mobu 455 L.T.B.
Danyele amonisi ntango oyo esengelaki koleka tii ‘Masiya Mokonzi’ akoya. Esakweli na ye elobi ‘pɔsɔ nsambo mpe pɔsɔ ntuku motoba na mibale’—nyonso epesi pɔsɔ 69. Yango ezali mbula boni? Na Babiblia mingi, bamonisi ete bapɔsɔ wana ezali te bapɔsɔ oyo eumelaka mikolo nsambo, kasi ezali nde bapɔsɔ ya bambula. Elingi koloba, pɔsɔ moko elakisi mbula nsambo. Bayuda ya ntango ya kala bayebaki malamu likanisi yango ya bapɔsɔ ya bambula, to kotánga bambula nsambonsambo. Na ndakisa, epai na bango, mbula nyonso ya nsambo, ezalaki mbula ya Sabata. (Exode 23:10, 11) Na yango, pɔsɔ 69 wana ya esakweli ezali nde pɔsɔ 69 oyo mokomoko na yango ezali na mbula 7, mpe nyonso epesi mbula 483.
Sikoyo, etikali kaka kotánga bambula yango. Soki tobandi na mobu 455 L.T.B. mpe totángi mbula 483, ekosuka na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.). Ezali mpenza na mbula wana nde Yesu azwaki batisimo mpe akómaki Masiya!a (Luka 3:1, 2, 21, 22) Ndenge esakweli yango ekokisamaki mobimba bongo ezali mpenza likambo ya kokamwa, boye te?
a Longwa na mobu 455 L.T.B. tii na mobu 1 L.T.B. esali mbula 454. Longwa na mobu 1 L.T.B. tii na mobu 1 T.B. esali mbula moko (mobu zero ezalaki te). Mpe longwa na mobu 1 T.B. tii na mobu 29 T.B. esali mbula 28. Soki tobakisi bambula wana nyonso, tokozwa mbula 483. Yesu ‘abomamaki’ na mobu 33 T.B., na pɔsɔ ya 70. (Danyele 9:24, 26) Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 11, mpe buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, na nkasa 995-997. Babuku yango nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova.
-
-
Yesu Klisto—Masiya oyo alakamakiBiblia eteyaka mpenza nini?
-
-
APƐNDISI
Yesu Klisto—Masiya oyo alakamaki
MPO na kosalisa biso tóyeba Masiya, Yehova Nzambe atindaki ebele ya basakoli oyo Biblia elobeli báyebisa kobotama ya Mobikisi yango oyo alakamaki, mosala na ye, mpe liwa na ye. Bisakweli nyonso wana ya Biblia ekokisamaki epai ya Yesu Klisto. Likambo ya kokamwa, bisakweli yango elobeli makambo ya mikemike mingi oyo etali ye mpe makambo yango nyonso esalemaki mpe bongo. Na ndakisa, tótala mwa bisakweli oyo eyebisaki kobotama ya Masiya mpe bomwana na ye.
Mosakoli Yisaya asakolaki ete Masiya akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. (Yisaya 9:7) Esalamaki mpe bongo, Yesu abotamaki na libota ya Davidi.—Matai 1:1, 6-17.
Mika, mosakoli mosusu ya Nzambe, asakolaki ete mwana yango akobotama na “Beteleme Efelata,” mpe akokóma mokonzi. (Mika 5:2) Ntango Yesu abotamaki, bingumba mibale na Yisalaele ezalaki na nkombo Beteleme. Mosusu ezalaki pene na Nazarete, na nɔrdi ya ekólo, mpe mosusu ezalaki pene na Yelusaleme, na Yuda. Kala, bazalaki kobenga Beteleme oyo ezali pene na Yelusaleme Efelata. Yesu abotamaki na engumba yango, se ndenge esakolamaki!—Matai 2:1.
Esakweli mosusu ya Biblia elobaki ete Mwana ya Nzambe akobengama “longwa na Ezipito.” Ntango Yesu azalaki mwana moke, bakendaki na ye na Ezipito. Nsima ya liwa ya Erode, balongwaki na ye na Ezipito. Na ndenge yango, esakweli wana ekokisamaki.—Hosea 11:1; Matai 2:15.
Na etanda “Bisakweli oyo etali Masiya,” bavɛrsɛ oyo etyami na nse ya motó ya likambo “Esakweli” elobeli makambo ya Masiya. Tosɛngi yo otala soki makambo yango ekokani na oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Kokokisama.” Okomona ete Liloba ya Nzambe elobaka solo mpe okondimela yango lisusu koleka.
Ntango ozali kotalela bavɛrsɛ yango, yebá ete bavɛrsɛ ya bisakweli ekomamaki bambula bankama ebele liboso Yesu abotama. Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.” (Luka 24:44) Ndenge yo moko omoni na Biblia na yo, makambo yango ekokisamaki mpenza, ata moko ezangaki te!
-