Loyembo 116
Pole ezali kongɛnga se kongɛnga
Ya Papye
1. Basakoli balukaluká Kristo,
Elikya mpo na bato’a mpasi.
Elimo’elobaki Masiy’akoya,
Mpo na kobikisa mokili.
Lelo, Masiya aza’ koyangela,
Kozala n’ezali solo.
Koyeba makambo oyo, esengo;
Baanzelu mpe batalak’ango!
(MONDIMO)
Nzela na biso ez’ongɛnga;
Pol’ez’otambwisa biso.
Batelá mateya ya Nzambe;
Azali kokamba biso.
2. Nkolo’apesá biso moombo’a sembo,
Na ye tozali koleisama.
Pole ya solo eza’ se kongɛnga,
Esepelisaka mitema.
Nzel’eza’ se kongɛnga, topikami,
Toz’otambola na pole.
Totɔndi Yehova, Lizib’a solo,
Tokotambola na nzela n’e.
(MONDIMO)
Nzela na biso ez’ongɛnga;
Pol’ez’otambwisa biso.
Batelá mateya ya Nzambe;
Azali kokamba biso.
(Talá mpe Rom. 8:22; 1 Ko. 2:10; 1 Pe. 1:12.)