Loyembo 107
Bóya na ngomba ya Yehova
Ya Papye
1. Talá na likoló
Talá likoló’a ngomba.
Kuna ngomb’a Yehova
Etombwani mpenza.
Bato ya mosika,
Bauti bipai nyonso,
Baza’ kobelela
‘Yaká, tósalela Yah.’
Sik’oyo nde ntango
Ya moke akómi monene.
Tozali kokola,
Tokozwa mapamboli’ebele.
Bato basopani
Mpe bandimi Yehova.
Bango balaki
Kolanda Nzambe libela.
2. Yesu alobaki
Bósakola liloba.
Nsango malamu mpenza
Ez’osakolama.
Kristo’ayangeli,
Asɛngi tólanda ye.
Bato’a sembo bayoki
Toli ya Liloba.
Oyo nde esengo
Komona ebele ya bato!
Tóndima kosunga,
Bato báyeba Nzamb’a solo.
Tiká tóbelela,
Tóbenga bato nyonso,
‘Bóya na ngomba ya
Nzambe mpo na libela.’
(Talá mpe Nz. 43:3; 99:9; Yis. 60:22; Mis. 16:5.)