Apɛndisi
Apɛndisi—Mituna oyo baboti batunaka
“Ndenge nini nakoki kosala ete mwana na ngai asolola na ngai?”
“Nasengeli kotyela mwana na ngai ngonga ya kozonga na ndako?”
“Ndenge nini nakoki kosalisa mwana na ngai ya mwasi azala na bokatikati na oyo etali kolya?”
Yango ezali mwa mituna kati na mituna 17 oyo biyano na yango ezali na apɛndisi oyo. Lisolo oyo ezali na biteni motoba, mpe biteni yango ezali kotinda biso na mikapo oyo elobeli mpenza masolo yango, na volimi 1 mpe 2 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi.
Tángá lisolo oyo. Soki likoki ezali, lobelá yango elongo na molongani na yo. Na nsima, salelá toli yango ntango ozali kosalisa bana na yo. Biyano oyo okozwa na lisolo oyo ebongi mpenza kotyelama motema. Euti na bwanya ya bato te, kasi na Biblia, Liloba ya Nzambe.—2 Timote 3:16, 17.
290 Kosolola
297 Mibeko ya ndako
302 Kozwa liberte
307 Kosangisa nzoto mpe kobanda kolinga
311 Komitungisa
KOSOLOLA
Ezali mpenza mabe koswana na molongani na ngai to na mwana na ngai?
Na libala, matata ezangaka te. Kasi, yo nde okopona ndenge ya kosilisa yango. Bilenge bayokaka mpasi mingi ntango baboti na bango baswanaka. Likambo yango esengeli kotungisa yo, mpamba te, libala na bino ezali ndakisa oyo bana na bino bakolanda ntango bakobala. Soki boyokani te na likambo moko, mpo na nini te kosalela libaku wana mpo na kolakisa bana ndenge ya malamu ya kosilisa matata? Meká kosala boye:
Yokáká. Biblia eyebisi biso ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) ‘Kozongisaka mabe na mabe te’ mpo yango ezali lokola kotya petrole na mɔtɔ. (Baroma 12:17) Ata soki molongani na yo alingi koyoka yo te, yo okoki kondima koyoka ye.
Luká komonisa ye likambo na esika ya koloba mabe mpo na ye. Na kimya nyonso, yebisá molongani na yo ndenge oyo ezaleli oyo amonisi esali yo mpasi. (“Esalaka ngai mpasi ntango . . .”) Kolukaka te kopesa ye foti to kolobela ye mabe. (“Okipaka ngai te.” “Oyokaka ngai te.”)
Kowela kosilika te. Na bantango mosusu, eleki malamu kokata lisolo mpe kozongela yango ntango nkanda esili. Biblia elobi boye: “Ebandeli ya kowelana ezali lokola ntango moto azali kofungola mai; na bongo liboso koswana ebima, bendá nzoto.”—Masese 17:14.
Sɛngá molongani na yo bolimbisi, mpe soki esengeli, sɛngá bana na yo bolimbisi. Brianne, oyo azali na mbula 14, alobi boye: “Na bantango mosusu, nsima ya koswana, baboti basɛngaka ngai ná yaya na ngai ya mobali bolimbisi mpo bayebi ete esali biso mpasi.” Moko ya makambo ya ntina mingi oyo okoki koteya bana na yo ezali ya koyeba koloba na komikitisa nyonso: “Limbisá ngai.”
Bongo soki ozali nde koswana na bana na yo? Luká koyeba soki ozali kotya petrole na mɔtɔ kozanga ete oyeba yango. Na ndakisa, talá likambo oyo ezali na ebandeli ya mokapo 2 na lokasa 15 ya buku oyo. Okoki komona mwa makambo mama ya Rachel asalaki oyo ebimisaki koswana? Okoki kosala nini mpo oswanaka te na mwana na yo? Meká kosala boye:
● Kobimisaka te maloba oyo ezali kopesa ye foti nyonso, na ndakisa maloba lokola “ozalaka kaka boye” to “osalaka ata moke te boye to boye.” Maloba wana etindaka nde mwana aluka komilongisa. Kutu, maloba yango ezali nde kolekisa ndelo, mpe mwana na yo ayebi yango. Mbala mosusu mwana na yo ayebi mpe ete ozali kobimisa maloba wana mingimingi mpo ozali na nkanda, kasi te mpo asali mbeba.
● Na esika obimisa maloba oyo ezali ntango nyonso kopesa ye foti, salá makasi omonisa ndenge oyo bizaleli ya mwana na yo esalaka yo mpasi. Na ndakisa okoki koloba: “Nayokaka boye ntango osalaka boye to boye.” Ata soki ondimi yango to te, na motema na ye, mwana na yo ayebi ke makanisi na yo ezali na ntina mpo na ye. Soki ozali koyebisa mwana na yo ndenge oyo bizaleli na ye ezali kosala yo mpasi, na ntembe te okosala ete bóyokanaka.a
● Atako ekoki kozala mpasi, osengeli komipekisa tii ntango nkanda na yo ekokita. (Masese 29:22) Soki ozali koswana na mwana na yo mpo asalaka lisusu misala ya ndako te, sololá yango polele elongo na ye. Komá makambo mpenza oyo esɛngami mpo na ye mpe soki esengeli, monisá polele bitumbu nini ekopesama soki asali yango te. Zalá motema molai mpe yoká makanisi ya mwana na yo, ata soki omoni ete azali na libunga. Bilenge mingi basepelaka mpenza na moto oyo ayokaka bango na esika kaka ya kopesaka bango mitindo.
● Liboso okóma mbala moko na likanisi ete mwana na yo akómi motomboki, yebá ete makambo mingi oyo omonaka emonisaka kaka ndenge mwana na yo azali kokola. Mbala mosusu mwana na yo azali koswana kaka mpo na komonisa ete abandi kokola. Kokwea te na motambo ya koswanaka na ye. Kobosana te ete ndenge osalaka ntango batumoli yo epesaka liteya na mwana na yo. Soki ozali kopesa ndakisa malamu ya kozala motema molai, na ntembe te mwana na yo akolanda ndakisa yango.—Bagalatia 5:22, 23.
TALÁ MOKAPO 2 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 24 NA VOLIMI 2
Makambo nini oyo nasalá kala bana na ngai basengeli koyeba?
Kanisá ete likambo oyo ekómeli yo: Ozali kolya elongo na molongani na yo, mwana na yo ya mwasi, mpe baninga mosusu. Ntango bozali kosolola, moninga na yo moko alobeli moto moko oyo olingaki—kasi bokabwanaki—liboso ozwa molongani oyo bozali na ye sikoyo. Mwana na yo ya mwasi atikali monɔkɔ polele. Atuni yo boye: “Olingi koloba ke olinganaki na moto mosusu?” Obɛtelá naino mwana na yo lisolo wana te. Sikoyo alingi koyeba yango malamumalamu. Okosala nini?
Mbala mingi, kosilikaka te soki mwana na yo atuni yo mituna. Ntango nyonso oyo azali kotuna yo mituna mpe azali koyoka biyano oyo ozali kopesa, bozali nde kosolola; yango ezali likambo oyo baboti mingi bazalaka na mposa ya kosala.
Makambo nini oyo osalá kala osengeli koyebisa mwana na yo? Na ntembe te, okolinga te koyebisa ye makambo oyo ezali koyokisa yo nsɔni. Kasi, soki esengeli, koyebisa mwana na yo mikakatano mosusu oyo okutanaki na yango ekoki kosalisa ye. Na ndenge nini?
Tózwa ndakisa moko. Mokolo moko, ntoma Paulo alobaki mpo na ye moko ete: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai. . . . Ngai moto ya mawa!” (Baroma 7:21-24) Yehova Nzambe akomisaki maloba yango na Biblia mpe abombisaki yango mpo na litomba na biso. Mpe tozali mpenza kozwa litomba, mpo nani akoki koboya ete Paulo alobaki solo?
Ndenge moko mpe, ntango bana na yo bazali koyoka makambo ya malamu oyo osalaki mpe mabunga oyo osalaki, yango ekoki kosalisa bango bámitya na esika na yo. Ya solo, okolaki na eleko mosusu. Kasi, atako bantango ebongwanaka, bato babongwanaka te; batoli ya Biblia mpe ebongwanaka te. (Nzembo 119:144) Soki ozali koyebisa bana na yo mikakatano oyo okutanaki na yango, mpe ndenge olongaki yango, okosalisa bango mpe bálonga mikakatano na bango. Elenge mobali moko nkombo na ye Cameron alobi boye: “Ntango omoni ete baboti na yo bakutanaki na mikakatano ndenge moko na oyo ya yo, bazali komonana bato ya solo na miso na yo.” Abakisi boye: “Mbala ya nsima oyo okokutana na mokakatano moko, okomituna liboso soki baboti na yo bakutaná naino te na likambo yango.”
Likebisi: Esengeli kaka te ete osukisa lisolo nyonso na liteya moko. Ya solo, mbala mosusu ozali kobanga ete mwana na yo azala na likanisi ya mabe to amona ete ezali mabe te ye mpe asala mabunga wana oyo osalaki. Kasi na esika oyebisa mwana na yo na mokuse oyo olingi ete asala te (“Yango wana osengeli ata moke te . . .”), osengeli nde kolobela na mokuse ndenge yo ozali komiyoka. (“Soki nazongisi makanisi nsima, namonaka ete esengelaki te nasala boye to boye mpo . . .”) Mwana na yo akoki kozwa liteya moko ya ntina mingi na makambo oyo okutanaki na yango, kozanga ete amona lokola ozali kopesa ye mitindo.—Baefese 6:4.
TALÁ MOKAPO 1 NA VOLIMI 1
Ndenge nini nakoki kosala ete mwana na ngai asolola na ngai?
Ntango bana na yo bazalaki naino mike, bazalaki koyebisa yo makambo nyonso. Soki otuni bango motuna, bazalaki koyanola mbala moko. Mbala mingi, ezalaki na ntina te otunaka ntango nyonso mituna; bazalaki kobimisa makambo nyonso bango moko. Nzokande, lokola bana na yo bakómi bilenge, koluka ete básolola na yo ezali mosala ya mpunda, lokola nde ozali koluka kobimisa mai na libulu oyo ekauká. Ozali komilobela: ‘Basololaka na baninga na bango. Mpo na nini basololaka na ngai te?’
Kokanisa te ete lokola bana na yo bazali kosolola na yo te, yango elimboli ete basundoli yo to balingi te okɔta na makambo na bango. Likambo ya solo ezali ete sikoyo nde bazali na mposa na yo mingi koleka. Mpe likambo ya esengo, bato ya mayele bamonisi ete bilenge mingi bazwaka toli ya baboti na bango na valɛrɛ, koleka kutu oyo ya baninga na bango to oyo bapesaka na televizyo, na radio to na bazulunalo.
Sikoyo, mpo na nini bakakatanaka mingi mpo na koyebisa yo oyo ezali na makanisi na bango? Talá oyo bilenge mosusu balobi mpo na ntina oyo bakakatanaka mpo na kosolola na baboti na bango. Na nsima, omituna mituna oyo elandi maloba yango mpe tángá bavɛrsɛ oyo batye wana.
“Ezalaka mpasi nasolola na papa mpo azalaka na makambo mingi na mosala mpe na lisangá. Emonanaka mpenza lokola ntango ya kosolola na ye ezalaka te.”—André.
‘Kozanga koyeba yango, natindaka bana na ngai bákanisa ete naza’ na makambo mingi mpe nakokoka kosolola na bango te? Soki bongo, nakoki kosala nini mpo bana na ngai bázala na mokakatano te ya kosolola na ngai? Ntango nini nakoki komityela mbala na mbala mpo na kosolola na bana na ngai?’—Kolimbola Mibeko 6:7.
“Nayaki kolelela mama mpo baswanisaki ngai na kelasi. Nalingaki abɔndisa ngai, kasi na esika asala yango, apamelaki nde ngai. Banda mokolo wana, nasololaka lisusu na ye te ata mpo na likambo ya ntina.”—Kenji.
‘Nasalaka ndenge nini soki bana na ngai bayei koyebisa ngai likambo moko? Ata soki esɛngi nasembola bango, nasengeli te kofanda naino mpe koyoka bango na likebi nyonso liboso ya kopesa toli?’—Yakobo 1:19.
“Emonanaka ke ntango nyonso oyo baboti balobi ete tósolola mpe bakosilika te, basilikaka kaka. Na yango, bana bamonaka lokola bakosi bango.”—Rachel.
‘Soki mwana na ngai ayebisi ngai likambo moko oyo epesi ngai nkanda, ndenge nini nakoki komipekisa?’—Masese 10:19.
“Mbala mingi ntango nazalaki koyebisa mama basekele na ngai, azalaki kokende mbala moko koyebisa yango baninga na ye. Nazalaki lisusu na konfianse na ye te ntango molai.”—Chantelle.
‘Namonisaka limemya epai ya mwana na ngai na ndenge napanzaka te basekele oyo ayebisaka ngai?’—Masese 25:9.
“Naza’ na makambo mingi oyo nalingaka koyebisa baboti na ngai. Naza’ kaka na mposa básalisa ngai nabanda lisolo.”—Courtney.
‘Nakoki kobanda lisolo na mwana na ngai? Ntango nini ezali malamu mpo tósolola?’—Mosakoli 3:7.
Lokola ozali moboti, okozwa matomba mingi soki ozali kosolola na mwana na yo. Talá likambo oyo ekómelaki Junko, oyo azali na mbula 17 mpe afandaka na Japon. Alobi boye: “Mokolo moko, nayebisaki mama polele ete nasepelaka kozala mingi na bana-kelasi na esika ya kozala na bandeko na ngai bakristo. Mokolo oyo elandaki, nakutaki na mesa na ngai mokanda moko oyo mama atikelaki ngai. Na mokanda yango, ayebisaki ngai ete ye mpe azalaki kozwa baninga te na kati ya bandeko na ye bakristo. Amonisaki ngai bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo basalelaki Nzambe ata ntango bazalaki na moto moko te pembeni oyo akokaki kolendisa bango. Apesaki ngai mpe longonya mpo na milende oyo nazalaki kosala mpo na kozwa baninga ya malamu. Ekamwisaki ngai koyeba ete ezalaki kaka ngai moko te nde nakutanaki na likambo yango. Mama na ngai mpe akutanaki na likambo yango, mpe nazalaki na esengo mingi ya koyeba yango, yango wana nalelaki. Makambo oyo mama ayebisaki ngai elendisaki ngai makasi, mpe nazwaki makasi ya kosala oyo ezali malamu.”
Ndenge mama ya Junko amonaki yango, bilenge bafungwamaka epai ya baboti na bango soki bandimi mpenza ete baboti bakotyola makanisi na bango te to bakolobela yango mabe te. Kasi okoki kosala nini soki omonaka ete mwana na yo abayaka to azalaka na nkanda ntango asololaka na yo? Kokwea te na motambo ya kosala lokola ye. (Baroma 12:21; 1 Petro 2:23) Nzokande, ata soki ekoki kozala mpasi, monisá na maloba mpe na bizaleli na yo ndakisa oyo olingi ete mwana na yo alanda.
Kobosana likambo oyo te: Bilenge bakolaka mokemoke tii bákóma mikóló. Bato ya mayele bamonaki ete na eleko yango, bizaleli ya bilenge ebongwanaka mingi; ntango mosusu basalaka makambo lokola mikóló, ntango mosusu lokola bana mike. Soki ozali komona makambo yango epai ya mwana na yo, okoki kosala nini, mingimingi na ntango oyo asalaka makambo lokola mwana moke?
Kokwea na motambo te ya kolobela ye mabe to ya koswana na ye lokola mwana moke. Kasi, osengeli nde kotalela ye lokola elenge oyo azali koyekola kokóma mokóló. (1 Bakorinti 13:11) Na ndakisa, soki mwana na yo abandi kosala makambo lokola mwana moke mpe alobi: “Mpo na nini oz’olandelalandela ngai boye?” okoki koyoka mposa ya kozongisela ye eyano na nkanda. Kasi, soki osali bongo, okokoka lisusu kosolola na ye te, okokóma nde koswana na ye. Okoki kaka koloba boye: “Emonani ete oza’ mpenza na nkanda. Mpo na nini te tósolola nsima soki nkanda na yo esili?” Soki osali bongo, okoyoka nkanda te. Sikoyo, akokóma na mposa ya kosolola, na esika ya koswana.
TALÁ MOKAPO 1 MPE 2 NA VOLIMI 1
MIBEKO YA NDAKO
Nasengeli kotyela mwana na ngai ngonga ya kozonga na ndako?
Mpo na kosalisa yo oyanola na motuna yango, kanisá ete likambo oyo ekómeli yo: Miniti 30 eleki na ngonga oyo otyelaki mwana na yo ya mobali mpo azonga na ndako, mpe oyoki porte ez’ofungwama malɛmbɛ. Ozali komilobela: ‘Akanisi ke nalali.’ Ya solo, olali naino te. Ofandaki nde pembeni ya porte tii na ngonga oyo mwana na yo asengelaki kozonga na ndako. Ntango mwana na yo afungoli mpenza porte ya ndako, miso na bino mibale ekutani. Okoloba nini? Okosala nini?
Okoki kosala boye. Okoki kokipe mbeba yango te. Okoki komilobela: ‘Bomwana ezalaka kaka boye.’ To okoki koloba na nkanda nyonso: “Okobimaka lisusu te!” Na esika osala makambo kozanga kokanisa, yoká ye naino, soki ezali mpenza na ntina oyo esali ete azonga ndako retare. Na yango okoki kosalela libaku wana mpo na komonisa mwana na yo liteya moko ya ntina mingi. Ndenge nini?
Likanisi: Yebisá mwana na yo ke bokosolola likambo yango mokolo oyo elandi. Na nsima, luká ntango oyo ebongi mpo bófanda mpe bólobela ndenge oyo bokosilisa likambo yango. Baboti mosusu bamekaki kosala boye: Soki mwana azongi na ndako nsima ya ngonga oyo batyelaki ye, mbala ya nsima oyo akobima, akozonga ndako miniti 30 liboso ngonga yango ekoka. Nzokande, soki mwana azongaka na ndako mbala na mbala na ngonga oyo batyeli ye, mpe amonisi ete bakoki kotyela ye motema, bokoki komona malamu kopesa ye bonsomi mosusu, ntango mosusu, koyebisa ye ete akoki kozonga na ndako ata nsima ya ngonga oyo batyeli ye. Ezali na ntina ete mwana na yo ayeba malamu ngonga oyo asengeli kozonga na ndako mpe bitumbu oyo akozwa soki atosi te ngonga oyo botyeli ye. Bosengeli mpe kopesa ye bitumbu yango soki esɛngi bongo.
Kasi, yebá ete Biblia elobi: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Na yango, liboso otyela mwana na yo ngonga oyo asengeli kozonga na ndako, mbala mosusu okolinga kosolola na ye likambo yango, mpe kotika ye apesa ngonga oyo akosepela kozonga na ndako, mpe ntina oyo asepeli kozonga na ngonga wana. Talelá mpe makanisi na ye, ata soki ekokesana na oyo ya yo. Soki mwana na yo amonisi ete abongi kotyelama motema, okoki kotalela mpe makanisi na ye soki ezali malamu.
Kotosa ngonga ezali na kati na makambo ya bomoi. Soki ozali kotyela mwana na yo ngonga oyo asengeli kozonga na ndako, ezali te kaka mpo obatela ye na makama. Ezali mpe mpo oteya mwana na yo ezaleli moko oyo ekosalisa ye mingi ntango akolongwa na ndako.—Masese 22:6.
TALÁ MOKAPO 3 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 22 NA VOLIMI 2
Ndenge nini nakoki kotika kobendana na mwana na ngai na likambo etali bilamba?
Talá likambo oyo balobeli na lokasa 77 ya buku oyo. Kanisá ete Laetitia azali mwana na yo. Ozali komona ete alati bilamba oyo ezali kotika nzoto na ye libándá. Na mbala moko olobi: “Kende kolongola bilamba yango, soki te, okobima awa te!” Kosala bongo ekoki kozala malamu. Kutu, mwana na yo asengeli nde kotosa. Kasi ndenge nini okoki koteya ye alata kaka te bilamba mosusu, kasi abongola mpe makanisi na ye?
● Ya liboso, kobosana likambo oyo te: Mwana na yo ayebi lokola yo to koleka yo ete kolata mabe ebimisaka makambo mabe. Na motema na ye, mwana na yo alingi te kobima moto ya ligboma to kobenda likebi ya bato kaka mpamba. Monisá na motema molai nyonso ete bilamba oyo etikaka nzoto libándá esepelisaka mpenza te, mpe limbolá mpo na nini.b Yebisá ye bilamba mosusu oyo akoki kolata.
● Ya mibale, kozala makambo makasimakasi te. Omituna boye: ‘Elamba oyo ezali kobuka etinda moko ya Biblia, to ngai moko nde nasepeli na yango te?’ (2 Bakorinti 1:24; 1 Timote 2:9, 10) Soki yo moko nde osepeli na elamba yango te, okoki kotika mwana na yo alata yango?
● Ya misato, koyebisa kaka mwana na yo te bilamba oyo asengeli te kolata. Salisá ye nde azwa bilamba oyo ebongi. Mpo na nini te kosalela nkasa 82 mpe 83 ya buku oyo mpo na kosalisa mwana na yo akanisa na likambo yango? Ezali na ntina mingi ete opesa ntango mpe milende na yo mpo na kosala yango!
Nasengeli kotika mwana na ngai abɛtaka masano ya video?
Masano ya video ebongwani mingi banda ntango ozalaki elenge. Lokola ozali moboti, ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo ayeba makama oyo ekoki kobima na masano yango mpe kokima yango?
Okosala eloko moko te soki opekisi masano nyonso ya video to soki omonisi ete kobɛta masano wana ezali kolekisa mpenza ntango ya mpamba. Kobosana te ete masano nyonso te nde ezali mabe. Kasi, ekoki kokómisa moto moombo. Yango wana, talelá malamu bangonga oyo mwana na yo alekisaka na kobɛta masano wana. Lisusu, talelá lolenge ya masano oyo mwana na yo asepelaka na yango. Okoki ata kotuna mwana na yo mituna lokola oyo:
● Lisano nini bana kelasi na yo babɛtaka mingi?
● Nini esalemaka na lisano yango?
● Mpo na nini okanisi ete babɛtaka yango mingi?
Mbala mosusu okomona ete mwana na yo ayebi makambo mingi oyo etali masano ya video koleka ndenge ozalaki kokanisa! Ntango mosusu kutu asilá kobɛta masano oyo omoni ete ezali mabe. Soki ezali bongo, kotombokela ye te. Yango ezali libaku mpo na yo ya kosalisa mwana na yo akolisa makoki na ye ya kososola.—Baebre 5:14.
Tuná mwana na yo mituna oyo ekosalisa ye ayeba mpo na nini azali kosepela na masano ya video oyo eza’ mabe. Na ndakisa, okoki kotuna motuna lokola oyo:
● Omonaka lokola basundoli yo mpo bapesi yo nzela te ya kobɛta lisano yango ya video?
Ekoki kozala ete bilenge mosusu babɛtaka lisano moko mpo bázala na masolo ya kobɛtela baninga na bango. Soki ezali bongo mpo na mwana na yo, okotalela likambo yango te ndenge olingaki kotalela yango soki mwana na yo azalaki kosepela na masano oyo ezali kolakisa mobulu ya nsɔmɔ to makambo ya mbindo.—Bakolose 4:6.
Bongo soki mwana na yo azali kosepela na makambo mabe oyo ezali na kati ya lisano moko? Bilenge mosusu batingamaka kaka ete makambo mabe oyo esalemaka na bavideo esalaka bango eloko te. Bakanisaka ete: ‘Eza’ te mpo naz’osala yango na ordinatɛrɛ nde nakokóma kosala yango na ndenge ya solo.’ Soki mwana na yo akanisaka bongo, bendá likebi na ye na Nzembo 11:5. Ndenge maloba ya vɛrsɛ emonisi yango, Yehova ayinaka kaka te baoyo basalaka mobulu, kasi mpe baoyo balingaka mobulu. Etinda yango etaleli mpe kosangisa nzoto mpe bizaleli mosusu nyonso ya mabe oyo Biblia epekisi.—Nzembo 97:10.
Soki mwana na yo azali kobɛta masano ya video ya mabe, meká kosala boye:
● Kotika te mwana abɛtaka masano ya video esika oyo azali kaka ye moko, na ndakisa na shambrɛ na ye.
● Tyá mibeko oyo asengeli kolanda; na ndakisa, akobɛta masano ya video te soki naino asilisi kosala devuare te, kolya te, to kosala likambo mosusu ya ntina.
● Monisáká ye ete kosala misala oyo esɛngaka kobimisa makasi ya nzoto ezali na ntina mingi.
● Taláká bana na yo ntango bazali kobɛta masano ya video, to kutu na ntango mosusu bɛtáká elongo na bango.
Ya solo, osengeli kopesa bana na yo ndakisa malamu na oyo etali kominanola, mpo okoka koloba na bango polele mpe na bosembo. Omituna boye: ‘Baemisyo ya ndenge nini mpe bafilme ya ndenge nini natalaka na televizyo?’ Komikosa te; soki ozali bongolabongola, bana na yo bakoyeba yango!
Bongo soki mwana na ngai azali moombo ya telefone, ya ordinatɛrɛ, to ya aparɛyi mosusu oyo ebimi sika?
Mwana na yo alekisaka ntango mingi na internet, atángaka mpe atindaka bamesaje ebele na telefone, to ayokaka miziki mingi, na esika asololaka na yo? Soki ezali bongo, okoki kosala nini?
Okoki kaka kobɔtɔla mwana na yo aparɛyi yango. Kasi, kokanisa te ete baaparɛyi nyonso oyo ebimi sika ezali mabe. Kutu, na ntembe te osalelaka aparɛyi moko oyo baboti na yo bazalaki kosalela te. Na yango, na esika obɔtɔla aparɛyi ya mwana na yo—longola kaka soki ezali na ntina mpenza oyo esɛngi bongo—okoki kosalela yango lokola libaku ya kosalisa mwana na yo asalela baaparɛyi oyo ebimi sika malamu mpe na bokatikati. Ndenge nini okoki kosala yango?
Fandá ná mwana na yo mpe sololá na ye likambo yango. Ya liboso, yebisá ye ntina oyo ozali komitungisa. Ya mibale, yoká makambo oyo azali koloba. (Masese 18:13) Ya misato, bóluka ndenge ya kosilisa likambo yango. Kobanga te kopekisa ye mwa makambo mosusu, kasi kozala makambo makasimakasi te. Elenge moko nkombo na ye Ellen, alobi boye: “Ntango nakómaki kolekisa ntango mingi na kotindaka bamesaje, baboti babɔtɔlaki ngai telefone te; batyelaki ngai nde mibeko. Lolenge oyo basilisaki likambo yango esalisaki ngai nazala na bokatikati na likambo ya kotinda bamesaje, ata soki baboti bazali te.”
Bongo soki mwana na yo azali koluka komilongisa? Kokanisa te ete aboyi koyoka toli na yo. Zalá nde na motema molai mpe tikelá mwana na yo ntango ya kokanisa na likambo yango. Ekoki kozala ete asili kondima toli na yo mpe akani kosala mbongwana oyo esengeli. Bilenge mingi bazali lokola elenge Hailey, oyo alobi ete: “Liboso nasilikaki ntango baboti bayebisaki ngai ete nakómi moombo ya ordinatɛrɛ na ngai. Kasi na nsima, lokola nazalaki kokanisa mingi na yango, nayaki komona ete bazalaki koloba solo.”
KOZWA LIBERTE
Na makambo nini nasengeli kotikela mwana na ngai liberte?
Motuna oyo ekoki kozala mpasi soki etaleli makambo ya sekele ya mwana na yo. Na ndakisa, okosala nini soki mwana na yo ya mobali afandi na kati ya shambrɛ na ye mpe akangi porte? Okokɔta mbala moko kozanga kobɛta porte? To okosala nini soki mwana na yo ya mwasi akei mbangumbangu na kelasi mpe abosani telefone na ye? Okozwa yango mpe obandi kotánga bamesaje na ye?
Ezali pɛtɛɛ te koyanola na mituna wana. Lokola ozali moboti, ozali na lotomo ya koyeba nini ezali koleka na bomoi ya mwana na yo mpe osengeli kobatela ye. Kasi, okokoka te kolandela makambo nyonso oyo mwana na yo azali kosala to kokɛngɛlaka ye ntango nyonso. Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na likambo yango?
Ya liboso, yebá ete soki mwana na yo alingi te oyeba makambo na ye, yango elimboli te ete azali kaka kosala likambo moko ya mabe. Mbala mingi, eza’ likambo oyo ekómelaka mwana nyonso oyo azali kokola. Ntango bilenge balingi te basusu báyeba makambo na bango, yango ezali kosalisa bango báyekola kosala makambo na ndenge na bango, wana bazali kozwa baninga na bango moko mpe kosalela ‘makoki na bango ya kokanisa’ mpo na kotalela malamu mikakatano na bango. (Baroma 12:1, 2) Yango ekosalisa bango mpe bákolisa mayele; ezali na ntina bázala na yango mpo bákóma mikóló ya malamu. Ezali mpe kosalisa bango bámanyola liboso ya kozwa bikateli to koyanola na mituna ya mpasi.—Masese 15:28.
Ya mibale, yebá ete koluka kolandela makambo nyonso oyo mwana na yo asalaka ekoki kosala ete akangela yo nkanda to atomboka. (Baefese 6:4; Bakolose 3:21) Yango elimboli ke osengeli lisusu te kolandela makambo nyonso oyo asalaka? Te, mpo ozali kaka moboti na ye. Kasi, mokano ezali ete mwana na yo azala na lisosoli ya malamu. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7; Masese 22:6) Nsukansuka, kosalisa mwana ezalaka malamu mingi koleka kokɛngɛla ye.
Ya misato, sololá likambo yango elongo na mwana na yo. Yoká makambo oyo ez’otungisa ye. Na bantango mosusu, okoki kotikela ye mwa bonsomi te? Yebisá mwana na yo ete okotikela ye asalaka mwa makambo na ye moko kaka soki abebisi konfianse na yo te. Monisá ye bitumbu oyo akozwa soki atosi te, mpe salelá yango soki esɛngi bongo. Zalá na kondima ete okoki kotikela mwana na yo asala mwa makambo na ye moko kozanga ete otika mokumba na yo ya moboti oyo azali komibanzabanza mpo na mwana na ye.
TALÁ MOKAPO 3 MPE 15 NA VOLIMI 1
Ntango nini mwana na ngai asengeli kokata kelasi?
“Balakisi baz’osepelisa ngai te!” “Naza’ na badevuare mingi!” “Nabundaki mpo naleka na kelasi mosusu; ya nini yango nabundaka kaka boye?” Bilenge mosusu oyo bamitunaka mituna wana bakómaka na mposa ya kokata kelasi liboso bázwa mayele oyo ekosalisa bango na bomoi. Soki mwana na yo alingi kokata kelasi, okoki kosala nini? Meká kosala boye:
● Talelá malamu ndenge oyo yo moko otalelaka kelasi. Ntango ozalaki naino na kelasi, ozalaki komona yango lokola kolekisa ntango ya mpamba—lokola okangami na bolɔkɔ tii mokolo oyo okobanda kosala makambo oyo mpo na yo ezalaki ya malonga? Soki ezali bongo, mbala mosusu mwana na yo mpe akómi kotalela kelasi ndenge wana. Likambo ya solo ezali ete, kotánga kelasi ya malamu ekosalisa bango bákóma na “bwanya ná likoki ya kokanisa,” bizaleli oyo basengeli na yango mpo bákokisa mikano na bango.—Masese 3:21.
● Pesá ye biloko oyo ekosalisa ye atánga. Bana mosusu oyo bakoki kozwa bapwɛ ya malamu bayebaka te ndenge ya koyekola—to bazalaka na bisika oyo ebongi te mpo na koyekola. Mpo báyekola malamu, basengeli kozala na esika ya malamu, oyo ezali na mwinda ya malamu, mpe biloko oyo bakoki kosala na yango bolukiluki. Okoki kosalisa mwana na yo akende liboso, ezala na makambo ya kelasi to ya Nzambe, soki otye ye na esika moko ya malamu mpo akanisaka na mozindo na makambo ya sika oyo az’oyekola.—Talá mpe 1 Timote 4:15.
● Mikɔtisá mpe na makambo yango. Moná balakisi mpe bapesi-toli ya eteyelo lokola baninga na yo, kasi te banguna na yo. Kutanáká na bango. Yebáká bankombo na bango. Sololá na bango na oyo etali mikano mpe mikakatano ya mwana na yo. Soki mwana na yo az’okoka kozwa bapwɛ mingi te, luká koyeba ntina. Na ndakisa, mwana na yo az’omona ete soki azwi bapwɛ mingi na kelasi, baninga na ye bakobanda konyokola ye? Azali na likambo na molakisi moko? Bongo mateya oyo ezali kopesama? Programɛ ya mateya oyo ez’opesama na kelasi esengeli kosalisa mwana akolisa mayele na ye, kasi te kolekela ye motó. To mbala mosusu mwana na yo az’omona malamu te to azali na makoki mingi te ya koyekola?
Soki ozali komikɔtisa mingi na formasyo ya mwana na yo, ezala na makambo ya kelasi to ya Nzambe, ekozala mpasi te mpo alonga.—Nzembo 127:4, 5.
Ndenge nini nakoki koyeba soki mwana na ngai akoki mpo na kolongwa na ndako?
Serena, oyo tolobelaki na mokapo 7 ya buku oyo, abangaka kolongwa na ndako. Mpo na nini? Alobi boye: “Ata soki nalingi kosomba eloko na mbongo na ngai moko, papa akolinga te. Alobaka ete wana eza’ mosala na ye. Yango wana ntango nakanisaka ke mokolo mosusu nakobanda kofuta bafaktire ngai moko, yango ebangisaka ngai.” Na ntembe te, tata ya Serena azali na makanisi ya malamu, kasi okanisi ke az’osalisa mwana na ye ayeba kotambwisa makambo ntango akozala epai na ye moko?—Masese 31:10, 18, 27.
Bana na yo bamibongisi naino te mpo na komema mikumba ya bomoi bango moko mpo obatelaka bango mingi koleka ndelo? Ndenge nini okoki koyeba yango? Talelá makambo minei oyo elandi, oyo tolobelaki mpe na mokapo 7 na nse ya motó ya likambo moke “Namibongisi mpenza?”—kasi sikoyo talelá yango na miso ya moboti.
Koyeba kosalela mbongo. Bana na yo ya mikóló bayebi ndenge ya kotondisa papye oyo emonisaka ete ofuti mpako, to oyo basengeli kosala mpo na kotosa mibeko oyo etali kofuta mpako na mboka oyo bofandi? (Baroma 13:7) Bayebi kosalela malamu mbongo oyo bazali na yango na banki? (Masese 22:7) Bayebi kosalela malamu mbongo oyo bazwaka mpe kobikela na oyo bazali na yango? (Luka 14:28-30) Basilá koyoka esengo oyo moto ayokaka soki asombi eloko na mbongo na ye moko? Basilá koyoka esengo monene koleka oyo moto ayokaka ntango azali kosalela ntango mpe biloko na ye mpo na kosalisa basusu?—Misala 20:35.
Koyeba misala ya ndako. Bana na yo ya basi mpe ya mibali bayebi kolamba? Olakisá bango ndenge ya kosukola mpe kongoma (repasser) bilamba? Soki bana na yo bakumbaka motuka, bakoki kosala mwa misala ya mikemike oyo esɛngaka mpo na kobongisa yango na ndakisa kobongisa kura, kotya mafuta mosusu ya motɛrɛ to pinɛ mosusu?
Koyeba kofanda malamu ná basusu. Ntango bana na yo babendanaka, oyaka ntango nyonso kokabola bango, mpe kokweisela bango ndenge oyo basengeli kosilisa matata yango? To osalisaka bango báyeba kosilisa matata na bango na kimya, mpe na nsima nde báya koyebisa yo yango?—Matai 5:23-25.
Programɛ ya koyekola Biblia mpe makambo ya losambo. Ondimisaka bana na yo mateya na makasi to osalisaka bango bándima yango? (2 Timote 3:14, 15) Na esika ya koyanolaka ntango nyonso na mituna oyo batunaka na oyo etali lingomba mpe bizaleli malamu, oteyaka bango bákolisa ‘likoki na bango ya kokanisa’? (Masese 1:4) Okosepela bálanda ndenge yo oyekolaka Biblia to básala yango koleka yo?c
Na ntembe te, kosalisa bana na yo na makambo oyo touti kolobela esɛngaka ntango mpe milende mingi. Kasi, ezali na ntina mingi osala bongo mpo atako okoyoka mawa ntango mwana na yo akokende, okosepela mingi ndenge osalisi ye.
TALÁ MOKAPO 7 NA VOLIMI 1
KOSANGISA NZOTO MPE KOBANDA KOLINGA
Nasengeli koyebisa mwana na ngai makambo etali kosangisa nzoto?
Bayebisaka bana makambo etali kosangisa nzoto na ntango bazali naino mike mpenza. Banda kala, Biblia esakolaki ete “mikolo ya nsuka” ekozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe ekozala na bato “oyo bazangi komipekisa” mpe “oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” (2 Timote 3:1, 3, 4) Momeseno ya kosangisa nzoto na moto nyonso oyo olingi ezali moko ya bilembo mingi oyo emonisi ete esakweli yango ezali kokokisama.
Lelo oyo, mokili ekeseni mpenza na ndenge ezalaki ntango ozalaki kokola. Kasi, makambo mosusu ebongwani te. Yango wana, makambo mabe oyo bana na yo bazali kokutana na yango elekela yo te to ebangisa yo te. Zalá nde na ekateli ya kosalisa bango básala ndenge ntoma Paulo alendisaki bakristo eleki sikoyo mbula 2000, ete: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11) Ezali solo ete bilenge bakristo mingi bazali mpenza kobunda etumba mpo na kosala oyo ezali malamu, atako bazali kokutana na makambo mabe. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo asala mpe bongo?
Mpo na kobanda lisolo, okoki kosalela mikapo oyo ezali na eteni 4 ya buku oyo mpe eteni 1 mpe 7 ya volimi 2. Mikapo yango ezali na bavɛrsɛ oyo ezali kotinda moto akanisa malamumalamu. Mikapo mosusu elobeli bandakisa ya solo ya bato oyo bakangamaki na oyo ezali malamu mpe bazwaki mapamboli, mpe bato oyo baboyaki kolanda mibeko ya Nzambe mpe bakutanaki na mikakatano. Bavɛrsɛ mosusu ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa bana na yo báyeba libaku malamu oyo bazali na yango—mpe oyo yo ozali na yango—ya kolanda mibeko ya Nzambe na bomoi na bango. Mpo na nini te kosala programɛ mpo na kotalela masolo yango elongo na bango kozanga koumela?
TALÁ MOKAPO 23, 25, MPE 32 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 4 TII 6, 28, MPE 29 NA VOLIMI 2
Nasengeli kotika mwana na ngai abanda kolinga?
Ata ndele, mwana na yo akokóma na mposa makasi ya kobanda kolinga. Phillip alobi boye: “Nasalaka kutu eloko moko te! Soki bana basi bayei kosɛnga ngai tóbima, natɛlɛmi wana mpe nabandi komituna: ‘Sikoyo, nakosala nini?’ Ezalaka mpasi naboya mpo bamosusu bazalaka kitoko mpenza!”
Likambo ya malamu koleka oyo okoki kosala lokola moboti ezali ya kosolola na mwana na yo na oyo etali kobanda kolinga, ntango mosusu okoki kosalela mokapo 1 na volimi 2 mpo na kosolola na ye. Luká koyeba nini mwana na yo ayokaka mpo na mikakatano oyo akutanaka na yango na kelasi to ata mpe na lisangá. Ntango mosusu okoki kosolola na ye makambo yango na mabaku mosusu, na ndakisa “ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala.” (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Ezala bozali wapi, kobosana te ete osengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.”—Yakobo 1:19.
Soki mwana na yo alobi na yo ete asepeli na mwana mobali to mwana mwasi moko, kobanga te. Elenge mwasi moko alobi boye: “Ntango papa ayokaki ke nazalaki na mwa moto na ngai, ayokaki nkanda makasi! Mpo abangisa ngai, alukaki kotuna ngai mituna kilikili, na ndakisa soki nakoki mpo na libala; ntango ozali elenge, mituna ya ndenge wana ekoki kotinda yo omona neti okoba kaka na mwa moto na yo tii bokobalana, mpo omonisa baboti na yo ke bazali na libunga!”
Soki mwana na yo ayebi ke soki ayebisi yo ete abandi kolinga, okosala ye mabe, akoki kosalaka yango na kobombana. Elenge mwasi moko alobi boye: “Soki baboti basiliki ntango bayoki ete mwana na bango abandi kolinga, yango ekotinda ye akóma kobombela bango likambo yango lisusu malamu koleka. Bakokabwana te. Bakobanda kosala yango nde na kobombana.”
Okozwa matomba mingi soki bozali kosolola likambo yango polele. Brittany, oyo azali na mbula 20, alobi boye: “Baboti na ngai balobelaka ngai polele likambo etali kobanda kolinga. Ezali na ntina mpo na bango báyeba moto oyo nazali kosepela na ye, mpe namonaka ke eza’ malamu! Papa akosolola na moto yango. Soki ezali na makambo oyo ez’otungisa baboti na ngai, bayebisaka ngai yango. Mbala mingi nayaka komona ete nasepeli na moto yango te liboso kutu tóbanda kolingana.”
Kasi, nsima ya kotánga mokapo 2 na volimi 2, okoki komituna boye: ‘Mwana na ngai alingaka moto moko kozanga kutu nayeba?’ Talá makambo oyo bilenge mingi balobi mpo na ntina oyo basusu bakómaka na mposa ya kolinga na kobatama, mpe na nsima kanisá na mituna oyo elandi maloba yango.
“Bilenge mosusu bazalaka na kimya te na ndako, yango wana balukaka mwa moto oyo akoki kobɔndisa bango.”—Wendy.
Lokola ozali moboti, okoki kosala nini mpo bana na yo bámiyoka ete otyelaka bango likebi? Ezali nde na makambo oyo osengeli kobongisa mpo na yango? Soki ɛɛ, makambo nini?
“Ntango nazalaki na mbula 14, moninga moko ya kelasi asɛngaki ngai tóbanda kobima. Nandimaki. Nakanisaki ke nakomiyoka malamu mingi soki mwana mobali atye ngai mabɔkɔ na lipeka.”—Diane.
Soki Diane azalaki mwana na yo, ndenge nini olingaki kosolola na ye likambo yango?
“Telefone esalisaka mingi bilenge bálingana na kobombana. Baboti bayebaka ata eloko moko te!”—Annette.
Bibongiseli nini okoki kozwa soki bana na yo basalelaka telefone?
“Mingimingi, ezalaka mpasi te bana bálingana na kobombana soki baboti bakipaka mpenza te makambo oyo bana na bango basalaka mpe soki basalaka yango na banani.”—Thomas.
Ezali nde na mayele oyo okoki kosalela mpo oyebaka makambo oyo mwana na yo asalaka, kasi otikelaka ye mpe bonsomi oyo ebongi?
“Mbala mingi, baboti bazalaka na ndako te ntango bana baza’ na ndako. To baza’ na konfianse mingi koleka na bana na bango mpe batikaka bango bákendaka ná bato mosusu.”—Nicolas.
Kanisá naino bato oyo bazalaka mingi na bana na yo. Oyebaka mpenza makambo oyo basalaka ntango bazali elongo?
“Bilenge mosusu balinganaka na kobombana mpo baboti baleki makambo makasi.”—Paul.
Kozanga ete obuka mibeko mpe mitinda ya Biblia, ndenge nini okoki kosala ete ‘ezaleli na yo ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso’?—Bafilipi 4:5.
“Ntango nazalaki kokola, nazalaki komiyoka ete naza’ na ntina te, mpe nazalaki koluka ete bato bátyela ngai likebi. Nakómaki kokomela mwana mobali moko ya lisangá moko penepene na biso, mpe tolinganaki. Epai na ye, nazalaki komiyoka ete naza’ mpenza na ntina.”—Linda.
Okoki kokanisa mwa makambo ya malamu oyo bato ya libota ya Linda bakokaki kosala mpo na kokokisa mposa na ye wana?
Mpo na nini te kosalela mokapo 2 na volimi 2 mpe eteni oyo ya Apɛndisi mpo na kosolola na mwana na yo ya mwasi to ya mobali? Mpo moto abimisa sekele, esɛngaka kosolola na ye polele mpe na motema mobimba.—Masese 20:5.
TALÁ MOKAPO 1 TII 3 NA VOLIMI 2
KOMITUNGISA
Nakosala nini soki mwana na ngai ayebisi ngai ete alingi komiboma?
Likambo ya mawa, na bisika mosusu na mokili, bilenge mingi bamibomaka. Na ndakisa, na États-Unis, bilenge mingi oyo bamibomaka bazali na mbula kati na 15 tii 25, mpe na bambula soki 20 oyo eleki, motángo ya bilenge oyo bamibomaki, oyo bazali na mbula kati na 10 tii 14 emataki mbala mibale. Mingimingi baoyo bamibomaka ezali baoyo bazalaka na maladi moko ya motó, oyo bato mingi ya libota na bango bamibomaki, mpe oyo balingaki komiboma na kala. Makambo oyo ekoki komonisa ete elenge akómi na makanisi ya komiboma ezali:
● Abandi kokima bato ya libota na ye mpe baninga na ye
● Azali lisusu te kolya mpe kolala ndenge amesanaki liboso
● Azali lisusu kosepela te na makambo oyo azalaki kosepela na yango liboso
● Bizaleli na ye ebongwani mpenza
● Akómi komɛla masanga mpe badrɔgɛ mingi
● Akómi kokaba biloko na ye ya motuya
● Akómi kolobela liwa to akómi komitungisa mpo na makambo oyo etali liwa
Moboti akosala libunga monene mpenza soki aboyi kolandela makambo wana. Kozwa makambo wana nyonso na lisɛki te. Kokanisa mbala moko te ete ezali kaka eleko moko oyo mwana na yo azali kolekisa.
Koyoka nsɔni te ya koluka lisalisi mpo na mwana na yo soki azali kotungisama makasi na makanisi to azali kobɛla maladi moko ya motó. Mpe soki omoni ete mwana na yo abandi kokóma na makanisi ya komiboma, sololá na ye na likambo yango. Likanisi oyo elobaka ete soki osololi na elenge na likambo etali komiboma, okotinda ye asala yango, ezali lokuta. Bilenge mingi bamiyokaka malamu soki baboti na bango basololi na bango likambo yango. Na yango, soki mwana na yo andimi ete alingaki komiboma, luká koyeba mayele nini akanaki kosalela, mpe tuná ye ndenge oyo alingaki kosalela mayele yango. Soki ayebisi yo makambo mingi, okoluka mpe kosalisa ye nokinoki.
Kokanisa te ete mitungisi na ye ekosila yango moko. Mpe soki emonani ete esili, kokanisa te ete likambo yango esili mpenza. Kasi, ekoki kozala ete na ntango wana nde azali na likama makasi. Mpo na nini? Mpo ntango elenge azali kotungisama makasi, akoki kozwa lisusu makasi te ya kokokisa mposa na ye ya komiboma. Kasi, ntango kotungisama esili mpe makasi ezongi, azwi sikoyo makasi ya kokokisa mposa na ye ya komiboma.
Ya solo, ezali mawa komona ete ntango bilenge mosusu babungisi elikya bakómaka na makanisi ya komiboma. Soki baboti mpe mikóló mosusu ya malamu batyaka likebi na makambo oyo emonisi ete mwana alingi komiboma mpe balandelaka yango, bakoki ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi’ mpe kozala lokola esika oyo bilenge bakoki kozwa libateli.—1 Batesaloniki 5:14.
TALÁ MOKAPO 13 MPE 14, NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 26 NA VOLIMI 2
Nasengeli kobombela bana mawa na ngai?
Liwa ya molongani ezali likambo ya mpasi mpenza oyo ekómelaka moto. Kasi ekómi na ntango oyo mwana na yo azali na mposa ya lisalisi na yo. Ndenge nini okoki kosalisa ye asilisa mawa na ye, kasi osilisa mpe oyo ya yo? Meká kosala boye:
● Kobombaka mawa na yo te. Mwana na yo ayekolaka makambo mingi ya ntina na bomoi na ye ntango az’omona ndenge oz’osala. Akoyekola mpe ndenge ya kosilisa mawa na ye ntango az’omona ndenge oz’osala. Na yango, kokanisa te ete okobima elombe liboso ya mwana na yo soki ozali kobombela ye mawa na yo nyonso. Yango ekoki koteya mwana na yo asalaka mpe bongo. Nzokande, ntango ozali kobimisa mpasi oyo ozali na yango na motema, akoyekola ete eleki malamu kobimisa mawa na esika ya kobomba yango, mpe ete ezali mabe te ye mpe ayokaka mawa, mpasi, ata mpe nkanda.
● Lendisá mwana na yo alobaka. Kozanga ete mwana na yo akanisa ke bazali kotinda ye na makasi, lendisá ye ayebisa yo oyo ezali na motema na ye. Soki azali kokakatana mwa moke, mpo na nini te kotalela mokapo 16 ya buku oyo? Lisusu, lobelá basuvenire mingi ya kitoko oyo ozali na yango mpo na molongani na yo oyo akufá. Lobelá ndenge ekozala mpasi mpo na yo okanga motema. Ntango azali koyoka yo ozali kobimisa mawa na yo polele, mwana na yo akoyekola mpe kosala bongo.
● Yebá esika makoki na yo esuki. Olingi osunga mpenza mwana na yo na ntango oyo ya mpasi mpenza; yango ezali malamu. Kasi kobosana te ete liwa ya molongani na yo oyo ozalaki kolinga mingi epesi yo mpasi mingi na motema. Yango wana, ekoki kozala ete mpo na mwa ntango moke, olɛmbi na nzoto mpe na makanisi. (Masese 24:10) Okoki kosɛnga lisalisi epai ya bandeko mosusu ya libota mpe baninga mosusu oyo bazali mikóló. Soki osɛngi lisalisi, yango ekomonisa ete okɔmɛli. Masese 11:2 elobi boye: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”
Lisalisi ya malamu koleka oyo okoki kozwa eutaka epai ya Yehova Nzambe, oyo alaki basambeli na ye ete: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”—Yisaya 41:13.
Ndenge nini nakoki kosalisa mwana na ngai ya mwasi azala na bokatikati na oyo etali kolya?
Okoki kosala nini soki mwana na yo ya mwasi akómi kolya na ndenge ebongi te?d Liboso, luká koyeba mpo na nini akómi na ezaleli wana.
Emonani ete bato mingi oyo balyaka na ndenge ebongi te bamizwaka na valɛrɛ te, balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, mpe bamityelaka mibeko ya makasimakasi. Salá nyonso mpo otinda ye te akolisa bizaleli yango. Lendisá ye amimona ete azali na ntina.—1 Batesaloniki 5:11.
Lisusu, tyá mpenza likebi na ndenge yo moko otalelaka biloko ya kolya mpe kilo ya nzoto. Kozanga koyeba yango, omonisaka ete makambo wana eleki ntina mpenza, ezala na maloba na yo to na makambo oyo osalaka? Kobosana te ete bilenge bamitungisaka mingi mpo na ndenge bamonanaka na miso ya bato. Ata soki ozali kosala masɛki na ndenge bana bayaka minene ntango bazali naino bilenge, mpe ndenge bakolaka maimai, yango ekoki kotya mobulu na motó ya elenge oyo bakoki kondimisa ye makambo kozanga mpasi.
Soki otaleli malamu likambo yango mpe obondeli mpo na yango, yebisá mwana na yo ya mwasi likambo yango polele. Meká kosala boye:
● Kanisá malamumalamu oyo okoloba mpe ntango ya koloba yango.
● Monisá polele likambo oyo ezali kotungisa yo mpe mposa na yo ya kosalisa ye.
● Kokamwa te soki abandi liboso komilongisa.
● Yoká ye na motema molai.
Oyo eleki ntina, omipesa mpenza na kosalisa mwana na yo alonga ezaleli wana. Bósalisa ye libota mobimba mpo abika!
TALÁ MOKAPO 10 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 7 NA VOLIMI 2
MAKAMBO YA NZAMBE
Ndenge nini nakoki kokoba koteya mwana na ngai makambo ya Nzambe ntango azali kokóma elenge?
Biblia elobi ete bazalaki koteya Timote makambo ya Nzambe ‘banda bomwana na ye mpenza,’ mpe na ntembe te osalaka mpe bongo epai ya bana na yo. (2 Timote 3:15) Kasi, ntango bana na yo bakómi bilenge, mbala mosusu ekosɛnga obongola mwa moke lolenge oyo oteyaka bango. Bana na yo oyo bazali kokola, bakómi sikoyo koyeba makambo mosusu ya mpasi oyo bazalaki koyeba te ntango bazalaki naino mike. Ezali na ntango oyo nde osengeli mpenza kosalisa bango básalela “makoki na [bango] ya kokanisa.”—Baroma 12:1.
Ntango Paulo azalaki kokomela Timote, alobelaki makambo oyo Timote ‘ayekolaki mpe oyo basalisaki ye andima bosolo na yango.’ (2 Timote 3:14) Mbala mosusu bana na yo bazali sikoyo na mposa ‘básalisa bango bándima’ mateya ya Biblia oyo bayebaki banda bomwana. Mpo na kosimba mitema na bango, osengeli kosuka kaka te na koyebisa bango oyo basengeli kosala to kondima. Basengeli koyeba ndenge oyo bango moko bakoki kosala. Ndenge nini okoki kosalisa bango? Bandá na koyebisa bango makambo mingi oyo bakoki kokanisa na yango mpe lobelá mituna oyo elandi:
● Nini endimisaka ngai ete Nzambe azali?—Baroma 1:20.
● Ndenge nini nayebi ete mateya ya Biblia oyo baboti bateyaki ngai ezali solo?—Misala 17:11.
● Nini endimisaka ngai ete mitinda ya Biblia ezali mpo na bolamu na ngai?—Yisaya 48:17, 18.
● Ndenge nini nayebi ete bisakweli ya Biblia ekokokisama?—Yosua 23:14.
● Nini endimisaka ngai ete eloko moko te na mokili oyo ekokani na “motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu”?—Bafilipi 3:8.
● Mbeka ya lisiko ya Kristo elimboli nini mpo na ngai?—2 Bakorinti 5:14, 15; Bagalatia 2:20.
Okoki kokakatana mpo na kosalisa bana na yo bákanisa na mituna wana, mpo ozali kobanga ete bakokoka te koyanola yango. Kasi, yango ezali lokola oz’oboya kotala likɔnga oyo elakisaka nivo ya esansi oyo ezali na motuka, mpo ozali kobanga likɔnga yango elakisa ete esansi esili. Soki ezali bongo, eleki malamu oyeba yango liboso mpo okutana na mokakatano te! Ndenge moko mpe, sikoyo—wana bana na yo bazali naino na ndako—nde ntango ya kosalisa bango bálukaluka biyano na mituna oyo etali kondima na bango mpe ‘bándima bosolo’ ya makambo oyo bazali koyekola.e
Kobosana te ete ezali mabe te osɛnga mwana na yo ya mwasi to ya mobali amituna: “Mpo na nini nazali kondima yango?” Diane, oyo azali na mbula 22 akanisi lisusu ndenge asalaki yango ntango azalaki naino elenge. Alobi boye: “Nalingaki te nazala na bantembe mpo na bindimeli na ngai. Ntango nazalaki kobimisa biyano ya polele mpe oyo nandimi ngai moko, nayaki komona ete nasepelaki kozala Motatoli ya Yehova! Ntango nyonso oyo bazalaki kotuna ngai mpo na nini nazali te kosala likambo moko boye, na esika ya koyanola: ‘Lingomba na ngai epekisi yango,’ nakoloba nde: ‘Ngai namoni ke ezali malamu te.’ Na maloba mosusu, nakómisaki likanisi ya Biblia, likanisi na ngai.”
Likanisi: Mpo na koyeba soki mwana na yo azali kosalela malamu makoki na ye ya kokanisa na mitinda ya Biblia, sɛngá ye asala lokola azali moboti ntango likambo ebimi. Na ndakisa, kanisá ete mwana na yo ya mwasi asɛngi yo nzela akende na fɛti moko oyo yo oyebi (ata ye mpe ayebi) ete ekozala mpenza malamu te. Na esika oyanola kaka “te,” okoki koloba boye: ‘Nakosepela omitya na esika na ngai. Kanisá fɛti oyo olingi kokende, salá bolukiluki (ntango mosusu na mokapo 37 ya buku oyo mpe mokapo 32 na volimi 2), mpe na nsima zongá lobi mpo osolola yango na ngai. Nakomitya na esika na yo mpe nakosɛnga yo nakende na fɛti yango, mpe yo na mokumba na yo ya moboti, okoyebisa ngai soki ekozala likanisi ya malamu to te.’
TALÁ MOKAPO 38 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 34 TII 36 NA VOLIMI 2
Mwana na biso azali kosepela lisusu te na makambo ya Nzambe. Tokoki kosala nini?
Liboso, kokanisa noki te ete mwana na yo aboyi lingomba na yo. Mbala mingi, ezali na likambo mosusu nde ezali kotinda ye asala bongo. Na ndakisa, ntango mosusu mwana na yo:
● Bilenge mosusu bazali kotya ye mbamba mpe azali koyoka nsɔni mpo na kokesana na bango mpe kokangama na makambo oyo Biblia elobaka
● Amonaka ete bilenge mosusu (ata mpe bandeko na ye ya makila) bazali bakristo ya malamu mpenza mpe amonaka ete akokoka te kolanda ndakisa na bango
● Azali na mposa makasi ya baninga, kasi amiyokaka lokola azali kaka ye moko to abongi te kozala kati na bandeko na ye bakristo
● Amonaka bilenge mosusu oyo bamibengaka bakristo kasi bazali na bizaleli mabe
● Azali kosala makasi abongisa bomoto na ye na ndenge na ye, kasi azali komona ete asengeli kotya ntembe na mateya oyo ozwaka na valɛrɛ mingi
● Amonaka ndenge bana-kelasi na bango basalaka makambo ya mbindo ndenge balingi, mpe yango ebimiselaka bango makama te
● Azali koluka kosepelisa moboti moko oyo azali Motatoli te
Yebá ete makambo wana ekómaka te mpo ozali koteya mwana na yo malamu te. Mbala mingi ekómaka mpo sikoyo azali kokutana na mikakatano mpo azali kosalela mateya ya Nzambe. Sikoyo okoki kosala nini mpo olendisa ye?
Kozala makambo makasimakasi te, kasi kokanga mpe miso na mabe te. Luká koyeba ntina oyo mwana na yo alɛmbi nzoto, mpe bongisá makambo mosusu oyo ekosalisa mwana na yo akola malamu na elimo. (Masese 16:20) Na ndakisa, makanisi oyo ezali na etanda “Ndenge ya komibongisa liboso” oyo ezali na nkasa 132 mpe 133 na volimi 2, ekoki kosalisa mwana na yo alongola kobanga mpe azala nsɔninsɔni te ntango baninga na ye bazali kotya ye mbamba. To soki mwana na yo azali komiyoka lokola azali kaka ye moko, okoki kozwa ntango ya kosalisa ye mpenza azwa baninga ya malamu.
Lukelá ye moto moko oyo akoki kolendisaka ye. Na bantango mosusu, elenge akolaka malamu soki mokóló moko oyo azali ndeko ya libota te alendisaka ye. Oyebi moto moko oyo ndakisa na ye ekoki mpenza kosalisa mwana na yo akola malamu na elimo? Mpo na nini te kosɛnga ye alekisaka ntango na mwana na yo? Mokano na yo ezali te ya kotika mokumba na yo. Kasi kanisá na ndakisa ya Timote. Ndakisa ya ntoma Paulo esalisaki ye mingi, mpe Paulo azwaki matomba mingi ndenge aponaki Timote azala moninga na ye ya mosala.—Bafilipi 2:20, 22.
Ntango nyonso oyo mwana na yo akozala na ndako na yo, ozali na lotomo ya kosɛnga ye alanda losambo na yo. Kasi, na nsuka, mokano na yo ezali ya kokɔtisa bolingo ya Nzambe na motema na ye, kasi te ya kotinda ye alanda yo mpo kaka alanda. Mpo na kosalisa mwana na yo akɔta na lingomba ya solo, yo moko pesá ye ndakisa oyo ebongi amekola. Kosɛnga ye te makambo oyo akokoka kosala te. Lukelá ye moto moko oyo akoki kolendisaka ye mpe baninga ya malamu. Ntango mosusu mokolo moko, mwana na yo akoloba ndenge mokomi ya nzembo alobaki ete: “Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.”—Nzembo 18:2.
TALÁ MOKAPO 39 NA VOLIMI 1, MPE MOKAPO 37 MPE 38 NA VOLIMI 2
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kasi, komemisaka mwana na yo ngambo te mpo osala ete yo ná ye bóyokana.
b Mwana na yo amitungisaka mingi mpo na nzoto na ye, na yango kebá ete omonisa ye te ete nzoto na ye ezali na mbeba.
c Talá nkasa 315 tii 318.
d Atako tozali kolobela mingimingi bana basi, batoli oyo elobelami awa etaleli mpe bana mibali.
e Mokapo 36 na volimi 2 ekoki kosalisa bilenge básalela makoki na bango ya kokanisa mpo bámindimisa mpenza ete Nzambe azali.