Loyembo 52
Batelá motema na yo
Ya Papye
1. Batelá motema na yo;
Masumu kimáká.
Nzamb’atalaka motema
Bomoto n’o mpenza.
Motema ezali mabe
Ekoki kobunga.
Boye batelá motema,
Mpe landá Yehova.
2. Bongisá motema na yo
Bondelá Tata n’o.
Kumisá ye ntango nyonso;
Lobá mposa na yo.
Mateya Yehov’apesi
Tótosaka yango.
Zaláká motema sembo
Mpe pesá y’esengo.
3. Kimá makanisi mabe;
Malamu saláká.
Motem’endima Liloba,
Mpo olendisama.
Yehov’alingi basembwi;
Tóbɛta ntembe te.
Boye sambelá kaka ye
Zalá moninga n’e.