Loyembo 124
Tóyamba bango malamu
Ya Papye
1. Yehova ayebi mpenza koyamba.
Asepeli te na koponapona.
Apesaka mbula,
ná moi lokola;
Apesaka biso biloko.
Soki tosaleli bato boboto,
Toza’ komekola Nzambe na biso.
Tata akofuta bolamu tosalá,
Boboto oyo eza’ sembo.
2. Bolamu toza’ kosalela bato
Ekoki kopesa litomba solo.
Bato tóyambaka,
ata mpe bapaya,
Tóndima kosunga bango mpe.
Lokola Lidia, lobá: ‘Bókɔta.’
Ntango bakɔti, bákuta mpe kimya.
Tat’ayebi bato na ye bipai nyonso,
Baoyo bamekolaka ye.
(Talá mpe Mis. 16:14, 15; Rom. 12:13; 1 Tim. 3:2; Ebr. 13:2; 1 Pe. 4:9.)