Loyembo 16
Bókima epai ya Bokonzi ya Nzambe!
Ya Papye
1. Basɔkɛmi bóluka nde Yehova;
Mpe bosembo ná komikitisa.
Boye na mokolo ya nkanda na ye
Bókoka kobatelama.
(MONDIMO)
Bókima epai ya Bokonzi;
Bókangama na yango.
Kuna Nzamb’akopesa libateli;
Bótosa nde mibeko.
2. Bolingi solo mpe boyengebene?
Bópangwisa mpisoli na bino.
Bókima epai ya Bokonzi’a Nzambe;
Bótosa Mokonzi Kristo.
(MONDIMO)
Bókima epai ya Bokonzi;
Bókangama na yango.
Kuna Nzamb’akopesa libateli;
Bótosa nde mibeko.
3. Bótombola mitó, mpe bósepela
Bóndima ete Bokonzi’ezali
Atye bokonzi na ye na likoló.
Bóbanga ye, Mozalisi.
(MONDIMO)
Bókima epai ya Bokonzi;
Bókangama na yango.
Kuna Nzamb’akopesa libateli;
Bótosa nde mibeko.
(Talá mpe Nz. 59:16; Mas. 18:10; 1 Ko. 16:13.)