Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | Janvier 15
    • Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova

      “Bópona bino moko lelo nani bino bokosalela.”​—YOS. 24:15.

      MEKÁ KOPESA EYANO

      • Ndenge nini okoki kotika mosala na esika oyo ebongi?

      • Ndenge nini okoki komonisa bokatikati na oyo etali masano mpe kominanola?

      • Soki moto moko ya libota na yo atiki Yehova, ndenge nini okoki kosala ete mawa na yo eleka ndelo te?

      1-3. (a) Mpo na nini Yosua azali ndakisa malamu ya moto oyo aponaki nzela ya malamu na bomoi na ye? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kozwa bikateli?

      LILOBA “kopona” ezali na nguya mingi. Soki moto aponi nzela to eloko moko, elingi koloba ete ye moko nde andimi yango mpe alingi bomoi na ye etambwisama ndenge wana. Tózwa ndakisa: kanisá ete moto moko azali kotambola na nzela mpe mbala moko amoni ete nzela yango ekabwani na banzela mibale. Nzela nini akopona? Soki moto yango ayebi esika oyo azali kokende, na ntembe te nzela moko ekomema ye pene na esika yango, kasi nzela mosusu ekoki komema ye mosika na esika yango.

      2 Biblia elobeli bato mingi oyo bakutanaki na likambo ya ndenge wana. Na ndakisa, Kaina asengelaki kopona soki akobimisa nkanda na ye nyonso to akopekisa yango. (Eba. 4:6, 7) Yosua asengelaki kopona soki akosalela Nzambe ya solo to akosambela banzambe ya lokuta. (Yos. 24:15) Yosua azalaki na mokano ya kotikala pene na Yehova; yango wana aponaki nzela oyo esalisaki ye akokisa mokano yango. Kaina azalaki na mokano ya ndenge wana te, yango wana aponaki nzela oyo ekomisaki ye mosika na Yehova.

      3 Na bantango mosusu, esɛngaka ete biso mpe tózwa bikateli ya ntina mingi mpo tókoka kotikala na nzela ya malamu. Yango wana, tosengeli kobosana te ete nzela oyo toponi kolanda ekoki kopesa Yehova lokumu mpe kosalisa biso tótikala pene na ye to kokómisa biso mosika na ye. (Tángá Baebre 3:12.) Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokotalela makambo nsambo ya bomoi na biso oyo tosengeli kotika te ete ekómisa biso mosika na Yehova.

      MOSALA

      4. Mpo na nini mosala ezali na ntina?

      4 Bakristo bazali na mokumba ya kokokisa bamposa na bango moko mpe oyo ya mabota na bango. Biblia emonisi ete soki moto alingi te kokokisa bamposa ya bato ya ndako na ye te, azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te. (2 Tes. 3:10; 1 Tim. 5:8) Ya solo, mosala ezali na ntina mingi na bomoi na biso. Kasi soki tokebi te, mosala ekoki kokómisa biso mosika na Yehova. Na ndenge nini?

      5. Makambo nini ya ntina tosengeli kotalela liboso ya kondima mosala moko?

      5 Kanisá ete ozali koluka mosala. Soki ofandi na mboka oyo kozwa mosala ezalaka pɛtɛɛ te, mbala mosusu okoki kokanisa ete osengeli kondima mosala ya liboso to mpe mosala nyonso oyo bapesi yo. Kasi okosala nini soki mosala yango eyokani te na mitinda ya Biblia? Okosala nini soki programɛ ya mosala yango mpe ntango oyo ekobanda kozwa yo mpo na kokende mpe kozonga ekopekisa yo olekisaka ntango mingi na makambo ya elimo to elongo na libota na yo? Okondima kaka mosala yango, mpo okanisi ete eleki malamu ondima ata mosala ya mabe na esika ozala na mosala te? Kobosana te ete soki oponi nzela ya mabe, yango ekoki kokómisa yo mosika na Yehova. (Ebr. 2:1) Ezala ozali koluka mosala to ozali kotala soki osengeli koluka mosala mosusu, ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?

      6, 7. (a) Mikano nini mibale moto akoki kozala na yango na oyo etali mosala? (b) Mokano nini ekosalisa yo ozala pene na Yehova, mpe mpo na nini?

      6 Ndenge tomonaki yango liboso, osengeli kobosana te esika oyo ozali kokende. Omituna boye: ‘Nalingi ete mosala yango esalisa ngai na nini?’ Soki otalelaka mosala lokola nzela ya kokokisa bamposa na yo mpe oyo ya libota na yo mpo bókoba kosalela Nzambe, Yehova akopambola milende oyo ozali kosala. (Mat. 6:33) Lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te; akoki kosalisa yo soki obungisi mosala na yo to ntango nkita ekwei na mbalakaka. (Yis. 59:1) Yehova “ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”​—2 Pe. 2:9.

      7 Kasi ezali boni soki olingi ete mosala na yo esalisa yo okóma na mbongo mingi? Mbala mosusu okokokisa mokano na yo. Kasi, ata soki okómi na mbongo mingi, kobosana te ete kosala mosala kaka mpo na kokóma mozwi ekoki kozala likama. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Soki bozwi mpe mosala ezali makambo oyo eleki ntina na bomoi na yo, ekoki kokómisa yo mosika na Yehova.

      8, 9. Mituna nini baboti basengeli komituna na oyo etali mosala, mpe mpo na nini?

      8 Soki ozali moboti, osengeli koyeba ete bana na yo bakoki kolanda ndakisa na yo. Bana na yo bamonaka ete eloko nini eleki ntina mpo na yo? Mosala na yo to boninga na yo ná Yehova? Soki bamonaka ete na bomoi na yo, olukaka libosoliboso nde kozala moto monene, kozala na lokumu mingi, mpe kozala na mbongo mingi, omoni te ete bakoki kolanda yo na nzela wana ya mabe? Bakozala kaka na limemya mpo na yo? Elenge mwasi moko oyo azali mokristo alobi boye: “Nabosanaka te ete mpo na papa, mosala ezalaki likambo ya liboso na bomoi na ye. Na ebandeli, ezalaki komonana lokola nde azalaki kosala mingi mpo azalaki na mposa ete libota na biso ezala na biloko nyonso oyo eleki malamu. Alingaki ete bamposa na biso ekokisama malamu. Kasi na bambula oyo euti koleka, makambo ebongwanaki. Papa akómaki kosala ntango nyonso, mpe azalaki kosomba biloko ya ntalo mingi, kasi ezalaki te biloko oyo tozalaki mpenza na mposa na yango. Na yango, toyebanaki lokola libota moko ya bato ya mbongo, kasi te lokola libota oyo elendisaka basusu básalela Yehova. Nalingaki kosepela mingi soki papa akómaki kosala mingi mpo na kosalisa biso tókoba kozala pene na Yehova, na esika ete asalaka mingi mpo na kozala na mbongo mingi.”

      9 Baboti, bótika te ete mosala na bino ekómisa bino mosika na Yehova. Na ndakisa oyo bozali kopesa, bósalisa bana na bino bámona ete bondimaka mpenza ete bozwi oyo eleki ntina ezali ya elimo, kasi ya mosuni te.​—Mat. 5:3.

      10. Makambo nini elenge asengeli kotalela ntango alingi kopona mosala oyo akosala na bomoi na ye?

      10 Soki ozali elenge mpe ozali kokanisa mosala nini osengeli kosala na bomoi na yo, ndenge nini okoki kopona nzela ya malamu? Ndenge tomonaki yango liboso, osengeli koyeba esika oyo ozali kokende. Formasyo oyo olingi kozwa mpe mosala oyo olingi kosala ekosalisa yo otya mosala ya Yehova na esika ya liboso to ekokómisa yo nde mosika na Yehova? (2 Tim. 4:10) Olingi kozala lokola bato oyo bayebi Yehova te, oyo bazalaka na esengo kaka soki bazali na mbongo mingi? To okozala nde na kondima lokola Davidi, oyo akomaki ete: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.” (Nz. 37:25) Kobosana te ete nzela moko ekoki kokómisa yo mosika na Yehova, kasi mosusu ekoki kosalisa yo ozala na bomoi oyo eleki malamu. (Tángá Masese 10:22; Malaki 3:10.) Okopona nzela nini?a

      MASANO MPE KOMINANOLA

      11. Biblia elobi nini na oyo etali masano mpe kominanola, mpe likambo nini tosengeli kobosana te?

      11 Biblia epekisi kosakana te; emonisi mpe te ete kominanola to masano ezali kolekisa ntango mpamba. Paulo akomelaki Timote ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Tim. 4:8) Kutu Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kopumbwapumbwa,” mpe elendisaka biso ete tózwaka mwa ntango ya kopema. (Mos. 3:4; 4:6) Kasi soki tokebi te, masano mpe kominanola ekoki kokómisa biso mosika na Yehova. Na ndenge nini? Likama ekoki kouta na makambo oyo mibale: lolenge ya kominanola to masano oyo tozali kopona mpe ntango oyo tozali kolekisa na yango.

      Kominanola ya malamu mpe oyo elyaka ntango mingi te epesaka esengo

      12. Makambo nini osengeli kotalela ntango olingi kopona lolenge moko ya masano to ya kominanola?

      12 Liboso, osengeli kotalela lolenge ya kominanola to masano oyo oponi. Ya solo, masano mpe kominanola ya malamu ezali. Kasi, masano mpe kominanola mingi etindaka bato básala makambo oyo Nzambe ayini, na ndakisa mobulu, misala ya bilimo mabe, mpe kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Yango wana, tosengeli kotalela malamumalamu lolenge ya kominanola to masano oyo tolingi kopona. Tosengeli komituna boye: Ekotinda ngai nakóma na bizaleli ya malamu to ya mabe? Ekotinda ngai nakóma na elimo ya mobulu, elimo ya kowelana, to bolingo ya ekólo? (Mas. 3:31) Ekolya ngai mbongo? Ekobɛtisa basusu libaku? (Rom. 14:21) Masano mpe kominanola oyo olingi kopona ekosala ete osangana na bato ya ndenge nini? (Mas. 13:20) Ekokolisa epai na yo mposa ya kosala makambo ya mabe?​—Yak. 1:14, 15.

      13, 14. Makambo nini osengeli kotalela na oyo etali ntango oyo osengeli kolekisa na kominanola?

      13 Osengeli mpe kotalela ntango oyo okolekisa na kominanola to masano yango. Omituna boye: ‘Nalekisaka ntango mingi mpo na kominanola mpe yango esalaka ete natikala kaka na ntango moke mpo na makambo ya elimo?’ Soki oponi kolekisa ntango mingi na masano mpe kominanola, okoyoka mpenza esengo na yango te ndenge okanisaki. Kutu, baoyo batikaka kominanola na esika na yango nde bayokaka esengo mingi koleka. Mpo na nini? Mpamba te lokola bayebaka ete bakokisaki liboso “makambo oyo eleki ntina,” lisosoli na bango etungisaka bango te soki bazwi mwa ntango mpo na kominanola.​—Tángá Bafilipi 1:10, 11.

      14 Atako kolekisa ntango mingi na kominanola ekoki mbala mosusu komonana lokola nde epesaka esengo, kolanda nzela wana ekoki kokómisa yo mosika na Yehova. Kim, ndeko mwasi moko ya mbula 20 azwaki liteya na likambo yango. Alobi boye: “Liboso, nazalaki kokende bafɛti na nsuka ya pɔsɔ nyonso, na mokolo ya mitano, ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Kasi sikoyo, nakóma komona ete ezali na makambo mosusu eleki ntina oyo nasengeli kosala. Na ndakisa, lokola nazali mobongisi-nzela, nalamukaka na ngonga ya motoba (6:00) ya ntɔngɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola; yango wana nakoki te kotikala na fɛti tii na ngonga ya liboso (1:00) to ya mibale (2:00) ya butu. Nayebi ete bafɛti ezalaka ntango nyonso mabe te, kasi ekoki kolongola likebi na biso na makambo eleki ntina. Lokola eloko mosusu nyonso, esengeli kotika bafɛti na esika na yango.”

      15. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bápona masano to kominanola oyo ekozala malamu mpo na bango?

      15 Baboti bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni, ya elimo, mpe ya motema, ezala ya bango moko to ya bana na bango. Mpo na yango, basengeli mpe kozwaka bibongiseli mpo na kominanola. Soki ozali moboti, osengeli te kopekisa bana na yo lolenge nyonso ya masano to ya kominanola. Atako bongo, osengeli kokebisa bango na masano mpe kominanola oyo ekoki kobebisa bango. (1 Ko. 5:6) Soki okanisi malamu liboso, okoki kozwa masano mpe kominanola oyo ekozala mpenza malamu mpo na libota na yo.b Soki osali bongo, yo ná bana na yo bokopona nzela oyo ekosalisa bino bózala pene na Yehova.

      BOYOKANI NA KATI YA LIBOTA

      16, 17. Likambo nini ya mawa epesaka baboti mingi mpasi, mpe ndenge nini toyebi ete Yehova ayebi mpasi na bango?

      16 Boyokani oyo ezalaka kati na moboti mpe mwana na ye ezalaka makasi mpenza, yango wana Yehova azwaki ndakisa ya boyokani yango mpo na komonisa ndenge oyo ye moko alingaka basaleli na ye. (Yis. 49:15) Na yango, ezali mabe te koyoka mpasi mingi soki moto moko ya libota na biso atiki Yehova. Ndeko mwasi moko, oyo mwana na ye ya mwasi abimisamaki na lisangá alobi boye: “Esalaki ngai mpasi mingi, mpe nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini atiki Yehova?’ Namiyokaki lokola namemi ngambo mpe nazalaki komipesa foti.”

      17 Yehova ayebi mpasi oyo ozali koyoka. Ye moko mpe “ayokaki mpasi na motema na ye” ntango mwana na ye ya liboso awa na mabele, mpe na nsima, pene na bato nyonso oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela, batombokelaki ye. (Eba. 6:5, 6) Soki likambo ya ndenge wana ekómelá yo naino te, mbala mosusu okoyeba te ndenge oyo yango esalaka mpasi. Atako bongo, ekozala malamu te tótika ete etamboli mabe ya moto ya libota na biso oyo abimisami na lisangá ekómisa biso mosika na Yehova. Na yango, ndenge nini okoki kosala mpo mawa na yo eleka ndelo te ntango moto moko ya libota na yo atiki Yehova?

      18. Mpo na nini baboti basengeli te komipesa foti soki mwana na bango moko atiki Yehova?

      18 Komipesa foti te mpo na likambo oyo esalemi. Yehova atikelá moto na moto bonsomi ya kopona nzela oyo alingi kolanda, mpe moto mokomoko ya libota na yo oyo amipesá epai ya Yehova mpe azwá batisimo “akomema mokumba na ye moko.” (Gal. 6:5) Na miso ya Yehova, mosumuki nde azali na ngambo mpo na nzela oyo aponi kolanda, kasi yo te. (Ezk. 18:20) Lisusu, osengeli te kopesa basusu foti. Osengeli nde kotosa ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa disiplini na moto oyo asali lisumu. Osengeli kotɛmɛla nde Zabolo, kasi te bankulutu oyo bazali na mokumba ya kobatela lisangá.​—1 Pe. 5:8, 9.

      Ezali mabe te ozala na elikya ete mokolo mosusu moto oyo olingaka akozongela Yehova

      19, 20. (a) Baboti oyo mwana na bango abimisami na lisangá bakoki kosala nini mpo mawa na bango eleka ndelo te? (b) Elikya nini baboti yango bakoki kozala na yango?

      19 Longola yango, soki oponi kokangela Yehova nkanda, okomikómisa nde mosika na ye. Ya solo, moto wana ya libota na yo asengeli komona ete ozali na ekateli ya kolinga Yehova mingi koleka eloko mosusu nyonso, koleka ata boyokani na bino na libota. Yango wana, mpo olonga ntango likambo ya ndenge wana ekómeli yo, osengeli kosala nyonso obatela boyokani na yo ná Yehova. Komitangola te na bandeko basi mpe mibali ya lisangá oyo bazali sembo. (Mas. 18:1) Fungolelá Yehova motema na yo na libondeli. (Nz. 62:7, 8) Koluka te kokakola mobeko ya Yehova mpo na kozala na boyokani ya pene na moto ya libota na yo oyo abimisamá na lisangá, na ndakisa na nzela ya telefone to Internet. (1 Ko. 5:11) Zalá ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Yehova. (1 Ko. 15:58) Ndeko mwasi oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nayebi ete nasengeli kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Yehova mpe kozala ntango nyonso makasi na elimo mpo nakoka kosalisa mwana na ngai ya mwasi ntango akozongela Yehova.”

      20 Biblia elobi ete bolingo “elikyaka makambo nyonso.” (1 Ko. 13:4, 7) Ezali mabe te ozala ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu moto ya libota na yo akozongela Yehova. Mbula nyonso, basumuki mingi babongolaka mitema mpe bazongisamaka na lisangá. Yehova akangelaka bango nkanda te ntango babongoli motema. Kutu, ‘asepelaka kolimbisa.’​—Nz. 86:5.

      PONÁ NZELA YA MALAMU

      21, 22. Ekateli na yo ezali nini na oyo etali kosalela bonsomi na yo ya kopona?

      21 Yehova apesá biso bato bonsomi ya kopona. (Tángá Mibeko 30:19, 20.) Kasi bonsomi yango epesi biso mpe mokumba monene. Mokristo mokomoko asengeli komituna boye: ‘Nzela nini nazali kolanda? Natiki nde ete mosala, masano mpe kominanola, to boyokani na ngai ná bato ya libota ekómisa ngai mosika na Yehova?’

      22 Bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na basaleli na ye esilaka te. Eloko moko te ekoki kokabola biso na Yehova, longola kaka soki biso moko toponi kolanda nzela ya mabe. (Rom. 8:38, 39) Kasi, kotika te ete yango esalema! Zalá na ekateli ya kotika te ete eloko moko ekómisa yo mosika na Yehova. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo mosusu minei, oyo tosengeli kotika te ete ekómisa biso mosika na Yehova.

      a Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kopona mosala, talá mokapo 38 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, volimi 2.

      b Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá Lamuká! ya sanza ya zomi na moko 2011, nkasa 17-19, na Lifalanse.

  • Kobá kopusana penepene na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | Janvier 15
    • Kobá kopusana penepene na Yehova

      “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—YAK. 4:8.

      OKOKI KOLIMBOLA?

      • Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati na oyo etali baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo mpe bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto?

      • Ndenge nini tokoki kotalela mbongo na ndenge oyo ebongi mpe koboya komikumisa koleka ndelo?

      • Ndenge nini tokoki kotikala penepene na Yehova?

      1, 2. (a) “Mayele” nini Satana asalelaka? (b) Nini ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe?

      YEHOVA NZAMBE akelaki bato na mposa ya kopusana penepene na ye. Kasi, Satana alingi ete tókanisa ndenge ye akanisaka: ete tozali na mposa ya Yehova te. Wana ezali lokuta oyo Satana asalelaka banda ntango oyo akosaki Eva na elanga ya Edene. (Eba. 3:4-6) Banda ntango wana tii sikoyo, bato mingi basalaka libunga ya kokanisa ete moto azali na mposa ya Nzambe te.

      2 Kasi biso tokoki kokima motambo wana ya Satana, mpamba te “toyebi malamu mayele na ye.” (2 Ko. 2:11) Satana alukaka kokómisa biso mosika na Yehova na ndenge atindaka biso tópona banzela ya mabe. Kasi, ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, tokoki kopona nzela ya malamu na oyo etali mosala, masano to kominanola, mpe makambo ya libota. Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo tosengeli kotika te ete baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo, bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, mbongo, mpe komikumisa epekisa biso ‘tópusana penepene na Nzambe.’​—Yak. 4:8.

      BAAPARƐYI OYO EZALI KOBIMA MIKOLO OYO

      3. Monisá ndenge moto akoki kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe.

      3 Na bisika mingi na mokili, bato mingi bakómi kosalela baordinatɛrɛ mpe baaparɛyi mosusu. Soki tosaleli baaparɛyi yango malamu, ekoki kosalisa biso. Kasi soki tosaleli yango mabe, ekoki kokabola biso ná Tata na biso ya likoló. Tózwa ndakisa ya baordinatɛrɛ. Zulunalo oyo ozali kotánga sikoyo ekomamaki mpe ebimisamaki na lisalisi ya baordinatɛrɛ. Ordinatɛrɛ ekoki kosalisa biso tósala bolukiluki mpe tósolola na bato oyo bazali mosika, mpe na bantango mosusu, ekoki kosalisa biso tóminanola malamu. Kasi, soki tokebi te tokoki mpe kokóma baombo ya ordinatɛrɛ. Bato oyo basalaka bapiblisite balukaka kotinda bato bákanisa ete esengeli kozala na aparɛyi nyonso oyo ebimi sika. Elenge mobali moko akómaki na mposa makasi ya kozwa modɛlɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ebimaki sika, yango wana, kozanga ete bato báyeba yango, atɛkaki ngɛi (rein) na ye moko mpo na kosomba yango. Oyo nde bozoba!

      4. Mokristo moko asalaki nini mpo atika momeseno ya kolekisa ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ?

      4 Likambo ya mabe koleka, tokoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova soki tozali kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo na ndenge ya mabe to na ndenge ya kolekisa ndelo. Jon,a mokristo moko oyo azali na mbula 28 alobi boye: “Nayebi toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tómisombela ntango oyo ebongi’ mpo na makambo ya elimo. Kasi na likambo etali baordinatɛrɛ, monguna na ngai ya liboso ezali nde ngai moko.” Mbala mingi, Jon asalelaka Internet tii na butu makasi. Alobi boye: “Soki nalɛmbi mingi, ekómaka mpasi koleka natika kosolola na baninga na Internet to natika kotala bafilme ya mikuse, ata mpe bafilme ya mbindo.” Mpo atika momeseno wana ya mabe, Jon asalaki ete ordinatɛrɛ na ye ekangamaka yango moko soki ntango na ye ya kolala ekoki.​—Tángá Baefese 5:15, 16.

      Baboti, bósalisa bana na bino bàsalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na ndenge ebongi

      5, 6. (a) Baboti basengeli kosala nini mpo na bana na bango? (b) Baboti bakoki kosala nini mpo bana na bango bálekisaka ntango elongo na baninga ya malamu?

      5 Baboti, ezali na ntina te ete bólandelaka makambo nyonso oyo bana na bino basalaka; atako bongo bosengeli kotyela bango mwa mibeko na oyo etali kosalela ordinatɛrɛ. Bótika te ete bátalaka na Internet makambo ya mbindo, masano ya bitumba, misala ya bilimo mabe, mpe básololaka na baninga mabe, kaka mpo bolingi ete bázanga eloko ya kosala te mpe bátungisa bino te. Soki bosali bongo te, bakoki kokanisa boye: ‘Lokola Papa ná Mama balobi eloko te, ezali na yango mabe te.’ Baboti, bozali na mokumba ya kobatela bana na bino, ezala baoyo bazali naino mike to baoyo bakómi bilenge, mpo eloko moko te ekómisa bango mosika na Yehova. Ata banyama mpe babatelaka bana na bango na likama. Kanisá ndenge oyo urse akoki kosala soki monguna moko alingi kosala bana na ye mabe!​—Kokanisá na Hosea 13:8.

      6 Bósalisa bana na bino bálekisaka ntango mingi elongo na bakristo oyo bazali na etamboli ya malamu, ezala bilenge to mikóló. Mpe bóbosana te ete bana na bino bazalaka na mposa ete bino nde bólekisaka ntango mingi elongo na bango! Yango wana, bólukaka ntango ya kosɛka, ya kosakana, ya kosala mosala, mpe ya “kopusana penepene na Nzambe” elongo na bana na bino.b

      BOKƆLƆNGƆNƆ YA NZOTO

      7. Mpo na nini biso nyonso tolingaka kozala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ?

      7 Mbala mingi, totunaka bato: “Ozali malamu?” Motuna wana emonisi ete biso bato tokutanaka na likambo moko ya mpasi. Biso nyonso tobɛlaka mpamba te baboti na biso ya liboso batikaki ete Satana akómisa bango mosika na Yehova. Mokano ya Satana ezalaka ete tóbɛla, mpo soki tozali na maladi, ekozala mpasi tósalela Yehova. Mpe soki tokufi, tokoki lisusu kosalela Yehova te. (Nz. 115:17) Yango wana, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tózala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ.c Tosengeli mpe komibanzabanza mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bandeko na biso mpe bolamu na bango.

      8, 9. (a) Ndenge nini tokoki koboya komitungisa koleka ndelo na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto? (b) Matomba nini tokozwa soki tozali kobatela esengo na biso?

      8 Kasi, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Bandeko mosusu basalaka piblisite ya bankisi, bilei, to biloko mosusu na molende mingi koleka kutu oyo bazalaka na yango na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mbala mosusu basalaka yango na makanisi mabe te, kasi mpo na kosalisa bandeko. Atako bongo, tosengeli te kosala piblisite ya bankisi to biloko mosusu oyo ekoki kosalisa moto azala nzoto kolɔngɔnɔ to azala kitoko, liboso to nsima ya makita na ndako ya Bokonzi to na mayangani. Mpo na nini?

      9 Tokendaka na makita mpo na kolobela makambo ya elimo mpe mpo na kobakisa esengo na biso, oyo eutaka na elimo santu ya Nzambe. (Gal. 5:22) Ntango tokei na makita to na mayangani, kopesa basusu toli na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto to bankisi mosusu, ezala basɛngi biso yango to te, ekoki kolongola likebi na biso na makambo ya elimo mpe kosilisa basusu esengo na bango. (Rom. 14:17) Ekateli oyo moto azwaka na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na ye etali kaka ye moko. Lisusu, moto moko te akoki kosilisa maladi mpo na libela. Ata minganga oyo bayebi mosala na bango malamu banunaka mpe babɛlaka, mpe nsukansuka bakufaka. Mpe komitungisa koleka ndelo na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na biso ekoki te kobakisa bolai ya bomoi na biso. (Luka 12:25) Nzokande, “motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.”​—Mas. 17:22.

      10. (a) Bizaleli nini ekómisaka moto kitoko na miso ya Yehova? (b) Ntango nini tokozala mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ?

      10 Ndenge moko mpe, ezali mabe te koluka ete tómonana kitoko na miso ya bato. Kasi, tosengeli te kosala nyonso mpo na kolongola bilembo nyonso oyo emonisi ete tobandi konuna. Bilembo wana ekoki komonisa ete moto akɔmɛli, abongi kozwa lokumu, mpe azali na kitoko ya kati. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.” (Mas. 16:31) Lokola Yehova atalelaka biso ndenge wana, biso moko mpe tosengeli kosala makasi tómitalelaka ndenge oyo ye atalelaka biso. (Tángá 1 Petro 3:3, 4.) Na yango, tokanisi ete kosɛnga básala biso lipaso moko boye to kondima bápesa biso nkisi moko boye oyo na nsima ekoki kobimisela biso likama kaka mpo tómonana kitoko ekomonisa mpenza ete tozali na bwanya? “Esengo ya Yehova” nde esalaka ete moto azala na kitoko ya solosolo, oyo ezalaka na kati, ata soki anuni to azali kobɛla. (Neh. 8:10) Kaka na mokili ya sika nde tokozala mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ mpe tokozongela kitoko ya bolenge. (Yobo 33:25; Yis. 33:24) Kasi liboso ete tókɔta na mokili yango, kozala na bwanya mpe komonisa kondima ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova ata soki tozali kokutana na mikakatano sikoyo.​—1 Tim. 4:8.

      MBONGO

      11. Ndenge nini mbongo ekoki kokóma motambo?

      11 Kozala na mbongo ezali mabe te; ezali mpe mabe te koluka mbongo na ndenge ya malamu. (Mos. 7:12; Luka 19:12, 13) Kasi, soki moto azali kokolisa “bolingo ya mbongo,” nsukansuka, akokóma mosika na Yehova. (1 Tim. 6:9, 10) “Motungisi ya makambo ya ntango oyo,” elingi koloba komitungisa koleka ndelo mpo na kozwa biloko ya kobikela ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Ezali mpe bongo mpo na “nguya ya bokosi ya bomɛngo,” elingi koloba kokanisa ete bozwi epesaka esengo mpe kimya ya solosolo. (Mat. 13:22) Yesu amonisaki yango polele ete “moto moko te” akoki kozala moombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.​—Mat. 6:24.

      12. Mitambo nini ekómi mingi lelo oyo na makambo ya mbongo, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?

      12 Soki tokanisi ete mbongo ezali eloko oyo eleki ntina, yango ekoki kotinda biso tósala makambo ya mabe. (Mas. 28:20) Mpo na kozwa mbongo ebele nokinoki, bandeko mosusu basombaki batike ya loteri to bamikɔtisaki na mimbongo ya mindɔndɔ, mpe balukaki ata kokɔtisa bandeko mosusu ya lisangá na makambo yango. Basusu basɛngaki bandeko mosusu ya lisangá bádefisa bango mbongo mpo na kosala na yango mombongo mpe balakaki ete bakozongisa yango na benefisi. Soki tokebi na ezaleli ya lokoso te, bakoki kobuba biso to kolyela biso mbongo. Yango wana, esengeli kosalela bososoli. Mbala mingi, soki balaki yo mbongo ebele na mbala moko, osengeli kokeba mpe kofungola miso.

      13. Yehova alingaka ete tótalela mbongo ndenge nini?

      13 Soki totye “bokonzi mpe boyengebene na ye” na esika ya liboso, Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kozwa biloko ya kobikela. (Mat. 6:33; Ef. 4:28) Alingi te ete tolalaka mpɔngi ntango makita ezali kosalema mpo tosalaka mingi, to tómitungisaka mpo na makambo ya mbongo ntango tozali na Ndako ya Bokonzi. Nzokande, na mokili oyo, bato mingi bakanisaka ete koboma nzoto mpo na koluka mbongo nde ekosalisa bango bázala na bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe bákóma na bomɛngo. Mbala mingi, batindaka bana na bango bámityela mpe mikano ya ndenge wana. Yesu amonisaki ete kokanisa ndenge wana ezali bozoba. (Tángá Luka 12:15-21.) Yango ekundweli biso ndakisa ya Gehazi, oyo akanisaki ete akoki kobatela boyokani na ye ná Yehova ata soki azali na lokoso.​—2 Bak. 5:20-27.

      14, 15. Mpo na nini tosengeli te kokanisa ete mbongo nde ekosalisa biso tózala na bomoi ya esengo? Pesá ndakisa.

      14 Bampongo mosusu ezindaki na mai mpe ekufaki mpamba te elukaki kotombola mbisi oyo elekaki kilo. Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela mokristo? Alex, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Nasalelaka mbongo na ngai na ekɛngɛ mpenza. Soki namoni ete natye sabuni mingi ya kosukola nsuki (shampoing), nazongisaka mosusu na molangi.” Atako bongo, Alex akweaki na motambo ntango akómaki kosomba biloko ebele mpe kobomba yango mpo na kotɛka yango na nsima; akanisaki ete soki asali bongo, akotika mosala na ye mpo akóma mobongisi-nzela. Mpo na yango, akómaki koluka koyeba bisika oyo bazalaki kotɛka biloko na ntalo moke. Asalelaki mpe mbongo oyo abombaki mpe mosusu oyo adefaki epai ya bakomelesa mpo na kosomba biloko oyo balobaki ete ekotɛkama na ntalo mingi nsima ya mwa mikolo. Kasi, eumelaki te, valɛrɛ ya biloko oyo asombaki ekitaki makasi. Alex alobi boye: “Nazalaki kosala nyonso mpo mbongo na ngai ezonga. Nakanisaki ete soki nazeli mwa moke, biloko yango ekomata lisusu ntalo.”

      15 Basanza mingi elekaki, kasi Alex azalaki kokanisa kaka biloko oyo asombaki. Azalaki kokoka te kotya likebi na makambo ya elimo, mpe azalaki lisusu kolala malamu te. Kasi, ntalo ya biloko oyo asombaki emataki lisusu te. Alex abungisaki mbongo oyo azalaki kobomba mpe esɛngaki ete atɛka ndako na ye. Alobi boye: “Nabimiselaki libota na ngai mikakatano mingi.” Kasi, azwaki liteya moko monene. Alobi boye: “Sikoyo, nayebi ete soki moto atye motema na mokili oyo ya Satana, nsukansuka, akoya kolela na nsima.” (Mas. 11:28) Ya solo, soki tozali kotya motema na mbongo oyo tobombi, na biloko mosusu oyo ekɔtiselaka biso mbongo, to na mayele oyo tozali na yango mpo na koluka mbongo na mokili oyo, ezali lokola nde tozali kotya elikya na biso epai ya Satana, oyo azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Ko. 4:4; 1 Tim. 6:17) Kobanda wana, Alex akómisá bomoi na ye pɛpɛlɛ “mpo na nsango malamu.” Yango epesá ye moko mpe libota na ye esengo mingi mpe esalisá bango bápusana lisusu penepene na Yehova.​—Tángá Marko 10:29, 30.

      KOMIKUMISA

      16. Na ndenge nini komikumisa ya malamu ekeseni na oyo ya mabe?

      16 Komikumisa nyonso ezalaka mabe te. Na ndakisa, tosengeli ntango nyonso komikumisa ndenge tozali Batatoli ya Yehova. (Yir. 9:24) Komipesa lokumu na ndenge oyo eleki ndelo te esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mpe tótosa mitinda ya Nzambe na oyo etali etamboli malamu. Kasi, komizwa na valɛrɛ mingi mpe kokanisa ete makanisi na biso nde ezali na ntina mingi koleka ekoki kosala ete tókóma mosika na Yehova.​—Nz. 138:6; Rom. 12:3.

      Na esika ya kobunda kaka mpo na kozwa mikumba na lisangá, mipesá nde na mosala na kosakola!

      17, 18. (a) Bandakisa nini Biblia epesi ya bato oyo bazalaki na komikitisa mpe oyo bazalaki na lolendo? (b) Ndenge nini ndeko mobali moko aboyaki kotika ete lolendo ekómisa ye mosika na Yehova?

      17 Biblia elobeli bato oyo bazalaki na lolendo mpe bato mosusu oyo bazalaki na komikitisa. Na ndakisa, mokonzi Davidi alukaki litambwisi ya Yehova na komikitisa nyonso mpe Yehova apambolaki ye. (Nz. 131:1-3) Kasi Yehova akitisaki Nebukadenezare ná Beleshazare, mpo bakonzi yango bazalaki na lolendo. (Dan. 4:30-37; 5:23-30) Lelo oyo mpe, makambo mosusu ekoki komonisa soki tozali na komikitisa to te. Ryan, mosaleli na misala moko ya mbula 32, alongwaki na lisangá oyo azalaki liboso mpe akendaki na lisangá mosusu. Alobi boye: “Nakanisaki ete ekoumela te mpo nakóma nkulutu. Kasi mbula mobimba elekaki, nazwaki kaka mokumba yango te.” Ryan asilikaki mpe akómaki kokanisa ete bankulutu baboyi kopesa ye mikumba? Atikaki koyangana na makita to atikaki ete lolendo ekómisa ye mosika na Yehova mpe basaleli na ye? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?

      18 Ryan alobi boye: “Natángaki masolo nyonso oyo ebimá na mikanda na biso oyo elobeli koyeba kozela.” (Mas. 13:12) “Nabandaki kososola ete esengelaki nayekola kozala na motema molai mpe komikitisa. Esengelaki natika Yehova apesa ngai formasyo.” Ryan akómaki nde kotya likebi mingi na kosalela basusu, ezala na kati ya lisangá to na mosala ya kosakola. Eumelaki te, akómaki koyekola Biblia na bato mingi oyo bazalaki kokola na elimo. Alobi boye: “Ntango nakómaki nkulutu mbula moko na ndambo na nsima, ezalaki na ntango oyo nazalaki kokanisa yango te. Natikaki komitungisa mpo na yango mpo nakómaki kosepela mingi na mosala ya kosakola.”​—Tángá Nzembo 37:3, 4.

      TIKÁLÁ PENEPENE NA YEHOVA!

      19, 20. (a) Ndenge nini tokoki kotika te ete makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo ekokómisa biso mosika na Yehova? (b) Bandakisa nini ya bato oyo batikalaki penepene na Yehova tokoki komekola?

      19 Makambo nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo mpe oyo eleki etaleli mpenza bomoi na biso. Tomikumisaka ndenge tozali basaleli ya Yehova. Kozala na libota ya esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ ezali makabo minene oyo euti na Yehova. Toyebi malamu ete mosala mpe mbongo ekoki kosalisa biso tókokisa bamposa na biso. Toyebi mpe ete masano to kominanola ekoki kopesa biso makasi mpe baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo ekoki kosalisa biso. Kasi kosalela biloko wana nyonso na ntango oyo ebongi te, na kolekisa ndelo, to na ndenge oyo ekoki kopekisa biso tómipesa na makambo oyo etali losambo na biso ekoki kokómisa biso mosika na Yehova.

      Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova!

      20 Satana alingi ete likambo ya ndenge wana ekómela biso. Kasi, okoki koboya ete likama ya ndenge wana ekómela yo ná libota na yo. (Mas. 22:3) Pusaná penepene na Yehova mpe tikalá penepene na ye. Tozali na bandakisa mingi na Biblia oyo ekoki koteya biso na likambo wana. Enoka mpe Noa ‘batambolaki elongo na Nzambe ya solo.’ (Eba. 5:22; 6:9) Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Ebr. 11:27) Nzambe azalaki ntango nyonso kosunga Yesu mpo asalaki makambo oyo esepelisaki Tata na ye ya likoló. (Yoa. 8:29) Mekolá bandakisa wana. ‘Sepeláká ntango nyonso. Bondeláká ntango nyonso. Na makambo nyonso pesáká matɔndi.’ (1 Tes. 5:16-18) Mpe kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova!

      a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

      b Talá lisolo “Ndenge ya kobɔkɔla bana mpo bákola malamu” na Lamuká! 01/12.

      c Talá lisolo “Une meilleure santé en cinq leçons” na Lamuká! ya sanza ya misato 2011, na Lifalanse.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto