Loyembo 59
Tomipesi epai na Nzambe!
Ya Papye
1. Nzambe abendi biso na nzel’a Kristo
Tózala bayekoli’a nkolo.
Uta kuna na lola,
Pole eza’ kongɛnga.
Kondim’ebakisami;
Mpe komiboya tondimi.
(MONDIMO)
Toponi komipesa nde na Yehova.
Ye ná Yesu, nde tokosalela.
2. Na libondeli toyebisi Yehova
Tokosalela ye libela.
Oyo mpenza esengo,
Bato báyeba yango,
Nkombo na ye Yehova,
Mpe Bokonzi tósakola.
(MONDIMO)
Toponi komipesa nde na Yehova.
Ye ná Yesu, nde tokosalela.