Loyembo 18
Bolingo ya sembo ya Nzambe
Ya Papye
1. Nzambe yo bolingo;
Tolingi solo na yo.
Y’opesi Mwana na yo,
Mpo akufela biso,
Tózala na bosembo.
Tózwa bomoi ya seko.
(MONDIMO)
Bato ya mposa ya mai,
Bómɛla mai ofele.
Ɛɛ, bóya komɛla mai,
Boboto ya Nzambe.
2. Nzambe yo bolingo;
Misala n’o bolingo.
Bolingo n’o tomoni:
Kristo azwi Bokonzi
Akokisi ndai na ye.
Bokonzi na ye eye’.
(MONDIMO)
Bato ya mposa ya mai,
Bómɛla mai ofele.
Ɛɛ, bóya komɛla mai,
Boboto ya Nzambe.
3. Nzambe yo bolingo;
Tiká tómekola yo.
Basɔkɛmi tósunga,
Mpo bosembo bálanda.
Tósakola na mpiko.
Tóbɔndisaka bato.
(MONDIMO)
Bato ya mposa ya mai,
Bómɛla mai ofele.
Ɛɛ, bóya komɛla mai,
Boboto ya Nzambe.