Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mpasi oyo ekobo epesaka
    Lamuká!—1999 | Octobre
    • Mpasi oyo ekobo epesaka

      “Nakei.” Wana ezali liloba mobali ya Patriciaa alobaki na ye na telefone—liloba yango epesaki ye mpasi koleka maloba nyonso oyo alobá na ye. Patricia alobi ete: “Nandimaki soko moke te ete mobali na ngai akoboya ngai. Nazalaki kobanga likambo yango ntango nyonso—mobali na ngai atika ngai mpo na mwasi mosusu—yango ekómi mpenza likambo ya solo.”

      PATRICIA, mwasi ya mbula 33, azalaki mpenza kosala milende mpo ete libala na ye ezala malamu; mpe mobali na ye ayebisaki ye ete akoboya ye soko moke te. Patricia alobi: “Topesanaki elaka ete tokovanda esika moko ata soki mikakatano nini ekokómela biso. Mpe nandimaki mpenza ete alobaki solo. Kasi, . . . atiki ngai. Sikawa natikali mabɔkɔ mpamba—natikali ngai moko—ngai moko mpenza!”

      Hiroshi akobosana soko moke te mokolo oyo eyebanaki ete mama na ye azalaki kosala ekobo. Alobi boye: “Nazalaki bobele na mbula 11. Mama alekaki na ndako mbangumbangu. Papa alandaki ye na nsima mpe alobaki ete, ‘Malɛmbɛ, tiká tósolola likambo yango.’ Namonaki ete likambo moko ya mabe esalemaki. Papa alɛmbaki nzoto. Kutu kino lelo ayoki naino nzoto malamu te mpo na likambo yango. Lisusu, azalaki na moto moko te mpo na kosolola na ye likambo yango. Na bongo, akómaki kosolola nde na ngai. Kanisá naino, mobali ya mbula koleka 40 aluka komibɔndisa epai ya mwana na ye ya mobali ya mbula 11!”

      Atako likambo yango ya nsɔni ezali kosalema na mabota ya bakonzi, na bato ya politiki, na bilombe ya bafilime, mpe na bakonzi ya mangomba to kati na mabota na biso moko, ekobo ezali se kobebisa mabala. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Emonani ete ekobo esalamaka na mokili mobimba, mpe mbala mosusu esalamaka ndenge moko na libala.” Balukiluki mosusu bakanisi ete babalani mingi (50 kino 75%) basalá ekobo. Zelda West-Meads, mopesi-toli na makambo ya libala alobi ete atako bato mingi oyo basalaka ekobo bayebanaka te, kasi “emonani polele ete ekobo ezali kosalema mingi koleka.”

      Okomitungisa mingi mpenza

      Atako ekobo to koboma libala ezali koyokisa bato mpasi, bato bayebaka mpenza te mikakatano oyo yango ezali koyeisa mokolo na mokolo na bomoi ya bato oyo likambo yango ekómeli bango. Longola mbongo mingi oyo ebimaka mpo na likambo yango, balukiluki balobelaka te mitungisi minene oyo ekobo ebimisaka—ebele ya mpisoli mpe mobulungano monene, mawa, kobanga, mpasi monene, kozanga mpɔngi na boumeli ya mikolo mingi mpo na likambo yango ya nsɔmɔ. Bato oyo likambo yango ekómeli bango bakoki kotika kolela, kasi mpota oyo bazoki ekokauka noki te. Mpasi mpe mabe oyo esalemi esilaka noki te.

      Buku Ndenge nini kolonga mpasi ya koboma libala (na Lingelesi) elobi ete: “Mingimingi ekobo etungisaka moto na makanisi, mpe mbala mosusu ebebisaka lolenge oyo atalelaka makambo. Okosala nini? Okotalela yango ndenge nini? Ndenge nini okolonga mokakatano yango? Okoki kondima likambo yango to koboya kondima, koyoka nkanda to komipesa ngambo, kotyela mobalani na yo motema to kokanisela ye mabe.”

      Yango ezali likambo oyo ekómelaki Pedro nsima ya koyeba ete mwasi na ye azalaki kosala ekobo. Alobi ete: “Soki mobalani na yo asali ekobo, makanisi na yo ekobulungana.” Mobalani oyo basaleli ye mabe ayebaka mpenza te ntina ya likambo oyo ekómeli ye. Bongo ekozala boni mpo na bato mosusu oyo bayebi likambo yango malamu te? Patricia alobi ete: “Moto moko te akokoka koyeba mpasi oyo nazali koyoka. Soki nakanisi ete mobali na ngai azali na mwasi mosusu, epesaka ngai mpasi mingi, mpasi oyo nakokoka kolobela yango te.” Abakisi ete: “Na bantango mosusu nakanisaka ete nakobɛla ligboma. Mokolo mosusu namiyoki malamu; mokolo mosusu nalɛmbi nzoto. Mokolo mosusu nabosani ye; mokolo mosusu nakanisi makambo nyonso ya mabe, lokuta mpe nsɔni oyo ayokisi ngai.”

      Nkanda mpe kobanga

      Mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo alobi ete: “Na bantango mosusu okoyoka nkanda makasi koleka.” Ezali bobele nsɔni te mpo na mabe basaleli moto mpe mpota bazokisi ye, kasi lokola mopanzi-nsango moko alobi yango, ezali mpe “nkanda mpo na mabe oyo ebebisi libala na ye, libala oyo ekokaki kozala na esengo.”

      Mingimingi bato yango bamiyokaka ete bazali na ntina te mpe bakómaka komimona mpamba. Pedro alobi ete: “Okokóma komituna boye: ‘Nazali nde kitoko te? Nazali lisusu na mayele te?’ Okobanda komitalela na ndenge nyonso mpo na komona libunga.” Kati na buku na ye Kolinga, kopesa lokumu mpe kokosa (na Lingelesi) Zelda West-Meads, mopesi-toli na makambo ya libala na Angleterre alobi ete: “Moko ya makambo maleki mpasi oyo okobunda na yango . . . ezali likambo ya komizwa lisusu na kilo.”

      Komona ete omemi ngambo mpe onyokwami na makanisi

      Longola mitungisi oyo tolobeli, moto akoki komona ete amemi ngambo. Mwasi moko oyo akutanaki na likambo yango alobi ete: “Nakanisi basi nde bamonaka mpenza ete bamemi ngambo. Ozali komitungisa mpe komituna: ‘Mabe nini nasali?’”

      Mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo alobeli likambo mosusu oyo abéngi yango mitungisi oyo eleki ndelo. Alobi boye: “Okonyokwama na makanisi mbala na mbala.” Mwasi moko azalaki kolela mokolo na mokolo ntango mobali na ye asalaki ekobo mpe atikaki ye. Alobi ete: “Nazali koyeba malamu mpenza mokolo ya liboso oyo nalelaki te, ezalaki bapɔsɔ mingi nsima ya kokende na ye. Nsima ya mwa basanza, nalekisaki pɔsɔ mobimba nalelaki te. Mikolo wana mpe bapɔsɔ wana esalisaki ngai mpo namiyoka malamu.”

      Minyoko mbala mibale

      Likambo oyo bato mingi bayebaka te ezali ete mbala mingi moto oyo asali ekobo anyokoli mobalani na ye mbala mibale. Na ndenge nini? Patricia apesi biso eyano: “Ezalaki mpasi mpo na ngai. Azalaki bobele mobali na ngai te kasi mpe moninga na ngai—moninga na ngai ya motema—na boumeli ya bambula mingi.” Ɛɛ, mbala mingi ntango mikakatano ebimaka, mwasi alukaka lisalisi epai ya mobali na ye. Sikawa, mobali yango apesi ye bobele mpasi te kasi azali mpe lisusu wana te mpo asunga mwasi na ye, moto azalaki kotyela motema. Na mbala moko, ayokisi mwasi na ye mpasi mingi mpe akimi ye; nzokande azalaki moninga na ye ya motema.

      Na yango, babalani oyo basaleli bango mabe banyokwamaka mingi koleka na ndenge bakosi bango. Mpe lokola bazali lisusu na moto te oyo bakoki mpenza kotyela motema, ezali likambo ya mpasi mpenza oyo mobalani oyo basaleli ye mabe akobunda na yango. Mopesi-toli moko na makambo ya libala amonisi mpo na nini ekobo ekoki kotungisa moto: “Topesaka ndambo monene ya bomoto na biso, bilikya na biso, mikano na biso mpe bamposa na biso na libala . . . , tolukaka moto oyo tokoki mpenza kotyela motema, moto oyo akosala biso mabe te. Soki bakosi biso, ekoki kozala lokola ndako monene ekwei.”

      Buku Ndenge nini kolonga mpasi ya koboma libala (na Lingelesi) elobi ete, ezali polele ete moto oyo likambo yango ekómeli ye “azali na mposa ya lisalisi mpo na kobongisa makanisi na ye . . . Akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na koyeba kopona mpe ndenge ya kosala yango.” Kasi kopona nini?

      Okoki komituna, ‘Naboma libala to nabongisa?’ Mbala mingi soki libala ekómi na mikakatano, ekoki kozala lokola likambo ya pɛtɛɛ kozwa nokinoki ekateli ya koboma yango. Okoki kokanisa boye: ‘Koboma libala ezali mabe te mpamba te Biblia epesi nzela ya kosala yango soki mobalani asali ekobo.’ (Matai 19:9) Epai mosusu, oyebi ete Biblia ezali kosɛngisa koboma libala te. Na yango, okoki komona malamu kobongisa na mobalani na yo mpe kosala lisusu boyokani makasi kati na libala na bino.

      Koboma libala na mobalani oyo asali ekobo to kobongisa na ye ezali likambo ya moto ye moko. Nzokande, ndenge nini okoki koyeba ekateli oyo okozwa? Tosɛngi yo libosoliboso otalela makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo mpo na koyeba soki okoki kobongisa.

      [Maloba na nse ya lokasa]

      a Wana ezali bankombo na bango te.

  • Bokoki kobongisa?
    Lamuká!—1999 | Octobre
    • Bokoki kobongisa?

      Buku “Matata na kati ya libala” (na Lingelesi) elobi ete: “Ezalaka mpasi te kobanda mbala moko koluka ndenge ya koboma libala, kasi ezali na mabala mingi oyo ekokaki koumela mpe kozala na esengo soki babalani babongisaki.”

      LIKANISI yango eyokani na liteya moko ya kala oyo Yesu Klisto ateyaki na ntina na koboma libala. Atako alobaki ete moto akoki koboma libala soki mobalani na ye asali ekobo, kasi alobaki te ete esengeli kosala bobele bongo. (Matai 19:3-9) Mobalani oyo basaleli ye mabe akoki kobatela libala na ye. Ekoki kozala ete mobali oyo asali ekobo azali naino kolinga mwasi na ye.a Mbala mosusu azali mobali malamu mpe tata oyo akokisaka mpenza bamposa ya libota na ye. Soki ataleli malamu bomoi na ye moko mpe oyo ya bana na ye, mwasi oyo mobali na ye asali ekobo akoki kozwa ekateli ya kobongisa na mobali na ye na esika ete aboma libala. Soki ezali bongo, akotalela makambo nini mpe ndenge nini akoki kolonga kobongisa libala?

      Liboso mpenza, tokoki koloba ete koboma libala to kobongisa, yango nyonso ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Lisusu, ezali te ete soki mwasi alimbisi mobali na ye ntango asali ekobo, asilisi likambo oyo etindaki mobali yango asala ekobo. Mpo na kobongisa libala, esɛngaka kotalela likambo mokomoko oyo ebimi, kolobela yango polele mpe na bosembo nyonso, mpe kosala milende. Mbala mingi babalani batyolaka ntango mpe milende oyo esɛngaka mpo na kobongisa libala na bango. Kasi, babalani mingi basalaki milende mpe babongisi mabala na bango.

      Mituna oyo esengeli komituna

      Mpo na kozwa ekateli ya malamu, mwasi asengeli kotalela malamumalamu mayoki na ye mpe koyeba malamu kopona likambo oyo akosala. Asengeli kotalela mituna oyo elandi: Mobali na ngai alingi mpenza tózala na libala? Akati mpenza boyokani na mwasi yango, to azali naino kokakatana? Asɛngaki bolimbisi? Soki bongo, abongoli mpenza motema mpe ayoki mpasi na likambo asalaki? To azali koluka kobwakela ngai foti mpo na mabe na ye? Azali mpenza koyoka mawa mpo na mabe oyo asalaki? To azali nde koyoka nkanda mpo eyebani ete asali ekobo mpe boyokani na ye na makango na ye ebebi?

      Ekozala boni mpo na mikolo mizali koya? Asili kobanda kotika bizaleli mpe makanisi oyo epusaki ye asala ekobo? Azwi mpenza ekateli ya kozongela lisusu mabe yango te? To azali naino na momeseno ya kozala ntango nyonso esika moko na basi mpe kosala boyokani makasi na bango? (Matai 5:27, 28) Azali mpenza komipesa mpo na koluka kobongisa libala? Soki bongo, azali kosala nini na ntina na yango? Biyano malamu na mituna yango ekoki komonisa polele ete likoki ya kobongisa libala ezali.

      Kolobela likambo yango ezali na ntina mingi

      Mokomi moko ya Biblia alobi ete: “Myango ikokufa wana bato na toli bazangi.” (Masese 15:22) Yango ezali mpenza bongo mpo na mwasi oyo mobali na ye asali ekobo, asengeli kosolola likambo yango na mobali na ye. Atako ekozala na ntina te kokɔta na mozindo mpo na kolobela ndenge mobalani oyo asali mabe asangisaki nzoto na makango na ye, babalani bakoki kosolola na bosembo mpe yango ekopesa bango nzela ya koyeba bosolo ya likambo oyo esalemaki mpe kolongola makanisi mabe. Yango ekoki kosalisa babalani yango bátika ezaleli ya koboya kolobana mpe bátika matata to kozala na nkanda oyo ekoumela. Ya solo, ntango mosusu ekozala pɛtɛɛ te mpo na kosolola, ezala mpo na mwasi to mpo na mobali. Kasi babalani mingi bamonaki ete yango ezali na ntina mpo na kozongisa boyokani na libala.

      Likambo mosusu ya ntina mpo na kobongisa libala yango oyo: koyeba makambo oyo ezali kotambola malamu te kati na libala—makambo oyo mwasi na mobali basengeli kosala milende mpo na kobongisa yango. Zelda West-Meads apesi toli oyo: “Ntango bosili kolobela mpasi oyo boyoki, mpe ntango bozwi ekateli ete likambo yango esili, mpe bolingi kozala na libala na bino, bómonisa mpo na nini likambo yango ekómaki mpe bózongisa boyokani kati na libala.”

      Mbala mosusu bozalaki lisusu kopesana lokumu te. To botyolaki makambo ya elimo. Ekoki kozala ete bozalaki kolekisa lisusu ntango elongo te. To bozalaki lisusu kolingana na bolingo ya motema moko te, kopesana longonya te, mpe kopesana lokumu oyo esengeli te. Kotalela lisusu malamumalamu mikano na bino mpe makambo ya ntina mpo na bino ekosalisa bino mingi ete bózala lisusu esika moko mpe ekosalisa bino bózala sembo.

      Koyeba kolimbisa

      Atako azali kosala milende, mwasi oyo mobali na ye asali ekobo akoki kozala na mokakatano mpo na kolimbisa mobali na ye, mpe mingi koleka mwasi oyo mobali na ye asali na ye ekobo. (Baefese 4:32) Kasi likoki mpo na kotika nkanda yango ezali. Buku moko elobi ete: “Mobalani oyo basaleli ye mabe asengeli koyeba ete ezali na bantango oyo asengeli kotika kokanisa ntango nyonso likambo yango. Ezali na ntina ete atika kolobela ntango nyonso mbeba oyo mobalani na ye asalaki mpo na koluka kopesa [ye] etumbu.”

      Babalani mingi bamonaki ete na kosaláká milende mpo na kokitisa nkanda, mokemoke balongolaki nkanda oyo bazalaki koyoka mpo na mobalani oyo asalaki mbeba. Kosala bongo ezali na ntina mingi mpo na kobongisa libala.

      Kotyelana lisusu motema

      Mwasi moko oyo motema ebebaki mpo mobali na ye asalaki ekobo, amitunaki ete: “Tokotyelana mpenza motema lisusu ndenge tozalaki liboso?” Lobanzo na ye ezali na ntina mpamba te ekobo ebebisaka boyokani mpe esalaka ete bato bátyelana lisusu motema te. Lokola mbɛki ya motuya, ezalaka pɛtɛɛ mpo bato bátyelana lisusu motema te kasi ezalaka mpasi mpo na kozongisa ezaleli yango. Kotyelana motema mpe komemyana ezali na ntina mpo boyokani ezonga mpe eumela.

      Yango esɛngaka mingi mpenza komeka kotyelana motema lisusu. Na esika ete asɛngaka ntango nyonso bátyela ye motema, mobalani oyo asalaki ekobo akoki kosala ete bátyela ye lisusu motema soki azali kolobela misala na ye polele mpe azali ntango nyonso sembo na makambo na ye. Baklisto basengeli ‘kobwaka lokuta mpe kolobelana solo.’ (Baefese 4:25) Zelda West-Meads alobi ete mpo ete mobalani na yo atyela yo lisusu motema, okoki liboso “koyebisa [ye] programe na yo, bipai oyo okokenda, ntango nini okozonga mpe salá makasi ozala epai oyo olobaki okozala.” Soki obongoli programe yango, yebisá ye.

      Esɛngaka ntango mpe milende mpo na komizwa lisusu na lokumu. Mobalani oyo asalaki ekobo akoki kosalisa mobalani na ye ntango azali komonisa ete azali kolinga ye mpe kopesaka ye longonya—koyebisa ye mbala na mbala ete asepelaka na ye mpe alingaka ye. Mama moko ya lokumu mpe mopesi-toli alobaki ete: “Bókumisa ye mpo ya misala mya maboko ma ye.” (Masese 31:31, Liloba lya Nzambe) Nzokande, mwasi akoki kosala milende mpo na kozongisa ezaleli ya komizwa na lokumu na komipesáká na makambo oyo ye asalaka malamumalamu na bomoi na ye.

      Esɛngaka ntango

      Lokola ekobo esalaka mpasi, ezali likambo ya kokamwa te ete nsima ya bambula mingi makanisi ya mawa mpe ya mpasi ezongaka lisusu. Nzokande, lokola mpota ekaukaka mokemoke, kozala na komikitisa, motema molai, koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na babalani nyonso mibale. Yango ekosalisa bango bátyelana lisusu motema mpe bápesana limemya.​—Baloma 5:3, 4; 1 Petelo 3:8, 9.

      Buku Kolinga, kopesa lokumu mpe kokosa (na Lingelesi) elobi ete, “Mpasi makasi oyo esalaka na basanza ya liboso eumelaka te. Esilaka . . . Nsima, okolekisa mikolo, bapɔsɔ mpe basanza, kutu bambula kozanga kokanisa likambo yango.” Soki ozali kosalela ntango nyonso mitinda ya Biblia na libala na yo mpe ozali koluka mapamboli mpe litambwisi ya Nzambe, na ntembe te okozala na “kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—Bafilipi 4:4-7, 9.

      Pedro alobi: “Soki nazongisi makanisi na nsima, namonaka ete makambo yango ebongoli bomoi na biso. Nzokande, na bantango mosusu esɛngaka tóbongisa mwa makambo mosusu na libala na biso. Kasi tolongi na komekama yango. Tofandi na libala na biso mpe tozali na esengo.”

      Ezali boni soki mobalani oyo asali likambo te azali komona ntina te ya kolimbisa mobalani na ye oyo asali ekobo? To soki alimbisi ye (alongoli nkanda) kasi mpo na ntina oyo ye moko ayebi, aponi koboma libala lokola Biblia epesi yango nzela? Koboma libala esɛngaka makambo nini?b Tosɛngi na yo otalela makambo mosusu oyo etaleli koboma libala, mpe ndenge babalani mosusu basalaki yango.

      [Maloba na nse ya lokasa]

      a Mpo na kozala polele, tokolobela mwasi oyo mobali na ye asali ekobo. Nzokande, mitinda oyo elobelami awa ezali kotalela mpe mibali oyo basi na bango basali ekobo.

      b Talá lisolo “Engebene Biblia: Ekobo—Nalimbisa to nalimbisa te?” na Lamuká! ya 8 Augusto 1995, ebimeli ya Lifalanse.

      [Etanda na lokasa 6]

      LISALISI YA MALAMU

      Na kotalela makambo mingi oyo esɛngamaka, ekoki kozala malamu koluka toli epai ya moto oyo ameseni kopesa toli na makambo yango. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova bakoki kosɛnga toli epai ya bankulutu ya lisangá, bato ya boboto oyo bamityaka na esika ya basusu.​—Yakobo 5:13-15.

      Bapesi-toli, baninga, mpe bandeko basengeli te kopusa mobalani aboma libala to abongisa soki ekateli na ye endimami polele na Makomami. Mwasi moko moklisto oyo aponaki koboma libala alobaki ete: “Bósalisa biso, kasi bótika biso moko tózwa ekateli.”

      Toli oyo ekopesama esengeli kouta na Biblia. Mwasi moko oyo aponaki koboma libala alobi ete: “Koyebisa bango te ndenge bakomiyoka to bakomiyoka te. Kasi, tiká bango báloba makanisi na bango polele.” Koyokela moto yango mawa mpe komonisela ye bolingo ya motema ekokitisa ye motema na mpasi oyo azali koyoka mpo mobalani na ye asali ekobo. (1 Petelo 3:8) Mopesi-toli moko oyo akɔmeli alobi boye: “Moto azali oyo akoloba lokola akoswama na mbɛli; nde lolemo na bato na mayele ezali na bomoi.”​—Masese 12:18.

      Mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo alobi ete: “Nazalaki na mposa ya moto ayokela ngai, mposa ya liloba ya kobɔndisa mpe ya kolendisa. Mpe mwasi na ngai azalaki na mposa makasi ete bámonisa ye nini asengelaki kosala, mpe kopesa ye longonya mpo na milende oyo azalaki kosala—yango ezali lisalisi ya malamu oyo ekokaki kosalisa ye.”

      Soki nsima ya kokanisa na mozindo mpe kosala mabondeli, moto aponi kokabwana na mobalani na ye oyo asali ekobo to koboma libala mpo na ntina oyo emonisami na Makomami, ekozala malamu te kopesa ye toli oyo ekomonisa ete amemi ngambo. Nzokande, esengeli kosalisa ye alongola mayoki wana, yango ezali na ntinate.

      Moto moko oyo aponaki koboma libala alobaki ete: “Soki olingi kozala mpenza mobɔndisi malamu, kobosana soko moke te ete mayoki ya moto mpe ezali na ntina.”

      [Etanda na lokasa 7]

      MPO NA NINI BASI MOSUSU BAPONAKA KOTIKALA NA LIBALA?

      Na bamboka mingi, basi mosusu bazalaka na liponi mosusu te bobele kofanda na mobali oyo asali ekobo ata abongoli motema te. Na ndakisa, basi baklisto mosusu oyo bafandi na bamboka ya bobola oyo ebebisami na bitumba bafandaka na mobali oyo asali ekobo kasi azali kokokisa bamposa ya libota na ye, atako azali lisusu mondimi te. Na yango, bazali na ndako, bazali na mobali oyo abatelaka bango mpe amemaka mwa lifuti ya sanza na sanza, bazali kozwa mbongo mpe bolamu oyo mobali apesaka—atako azali sembo te na libala. Basi yango bamonaka ete atako ezalela yango ebongi te to mpe ezali pɛtɛɛ te, kasi epesi bango—na kotalela bomoi na bango mpenza—bonsomi monene koleka soki baponaki koboma libala mpe komisalisa bango moko.

      Nsima ya kokanga motema na likambo motindo wana—mbala mosusu na boumeli ya bambula mingi—basi mosusu basili kozwa mapamboli mpe esengo ya komona ete nsukansuka mibali na bango babongoli motema mpe bakómi baklisto ya sembo mpe oyo batondi na bolingo. —Kokanisá na 1 Bakolinti 7:12-16.

      Na yango, ezali malamu te koloba mabe na mwasi oyo amoni malamu kofanda na mobali na ye—atako asali ekobo kasi abongoli motema te. Azwi ekateli moko ya monene mpe esengeli kopesa ye lisalisi oyo azali na yango mposa.

      [Etanda na lokasa 8]

      FOTI YA NANI?

      Ezali solo ete mabunga ya mobalani oyo asali likambo te ekoki kobebisa boyokani ya libala. Kasi Biblia elobi ete “moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolɛngolama na mposa mabe na ye moko. Na nsima, esili mposa kozwa zemi, eboti lisumu.” (Biso nde totɛngisi makomi; Yakobo 1:14, 15) Atako makambo oyo ekoki koweisa moto ezali ndenge na ndenge, mbala mingi ezalaka “mposa mabe na ye moko” nde ekopusa ye na kosala ekobo. Soki mabunga ya mobalani ezali kobimisa mikakatano na libala, kosala ekobo ezali mwango ya kosilisa mikakatano yango te. —Baebele 13:4.

      Nzokande, babalani bakoki kosilisa mikakatano na bango soki bazali kosala milende ntango nyonso mpo na kosalela mitinda ya Biblia. Yango etaleli mpe etinda ya ‘koyikaka mpiko mpe kolimbisanaka.’ Basengeli mpe kosala makasi mpo na komonisa ntango nyonso bizaleli lokola ‘motema na mawa, boboto, komikitisa, bopɔlɔ, mitema pɛtɛɛ.’ Oyo eleki ntina, basengeli ‘komilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.’ —Bakolose 3:12-15.

      [Elilingi na lokasa 7]

      Kolanda na likebi mpenza makambo mobalani na yo azali koloba esalisaka mpo na kobongisa libala

  • Soki mobalani oyo asali likambo te aponi koboma libala
    Lamuká!—1999 | Octobre
    • Soki mobalani oyo asali likambo te aponi koboma libala

      “Soki mobali na yo akufi, bato bakomitya na esika na yo, ata soki ozalaki mwasi malamu te. Kasi soki mobali na yo aboyi yo—bato mosusu bakokanisa ete ozalaki mwasi mabe na libala. Nabondeli bino, BÓSALISA NGAI!”—Motángi moko ya Lamuká! na Afrique du Sud.

      EKOBO mpe koboma libala ekoki kobulunganisa mpenza makanisi ya moto. Atako babalani mingi bamoni malamu kobongisa mpe kofanda na mabala na bango, kasi basusu bamonaki malamu báboma libala na babalani na bango oyo basali ekobo, lokola Nzambe apesi yango nzela. (Matai 5:32; 19:9) Na ndakisa, kozala na libateli, makambo ya elimo, mpe bolamu ya mwasi oyo asali likambo te mpe ya bana na ye ekoki kotyama na likama. Mwasi akoki mpe kobanga kozwa maladi moko oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. To mbala mosusu alimbisi mobali na ye kasi azali mpenza komona ete akokoka lisusu kotyela ye motema te mpe akokoba kofanda esika moko na ye te.

      Mwasi moko oyo mobali na ye asalaki ekobo alobaki ete: “Yango ezalaki ekateli eleki makasi na bomoi na ngai.” Ya solo, ekateli yango eleki mpenza makasi—bobele te mpo ekobo epesaka mpasi kasi mpe mpo ete koboma libala ezali na makambo na yango oyo ekoumela bomoi mobimba. Na yango, soki mwasi oyo mobali na ye asali ekobo aponi koboma libala to aponi koboma yango te, ezali ekateli na ye moko. Bato mosusu basengeli kotosa lotomo oyo Biblia ezali kopesa mobalani oyo asali likambo te mpo na kozwa ekateli.

      Likambo ya mawa, babalani mingi babomaka libala nokinoki kozanga kokanisa malamumalamu. (Kokanisá na Luka 14:28.) Makambo nini esengeli kotalela soki oponi koboma libala?

      Soki bozali na bana

      Buku Matata kati na libala (na Lingelesi) elobi ete: “Mbala mingi, baboti bamibanzabanzaka mingi koleka na mikakatano na bango moko mpe babosanaka bamposa ya bana.” Na yango, ntango ozali kokana koboma libala, kobosana te matomba ya elimo mpe bolamu ya bana na bino. Balukiluki mingi bazali komona ete soki baboti babomi libala na bango na kimya, bana bakonyokwama mingi mpenza te. Ata na ntango ya matata makasi, kozala na boboto ekosalisa moto ‘aswana te kasi azala na boboto liboso na bato nyonso, azala na motema molai.’—2 Timote 2:24, 25.a

      Mwasi oyo aponi koboma libala, asengeli kobosana te ete abomi libala na mobali na ye—kasi bana baboyi tata na bango te. Bana bazali ntango nyonso na mposa ya mama mpe ya tata na bango. Ya solo, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kokabola bango, na ndakisa soki emonani ete mwana akobebisama. Kasi esengeli te ete kozanga koyokana na makambo ya losambo to na makambo mosusu ekóma motambo mpo na kopimela bana bolamu ya kozala na mama mpe na tata na bango.

      Esengeli mpe koyeba ete bana mike balingaka mpe bazalaka na mposa bátalela bango, bálinga bango, mpe bázala na bango na boboto. Buku moko elobi ete: “Soki bana bazali komona ete bazali kolinga bango ntango nyonso, bakokoka komesana na ezaleli na bango ya sika.” Lisusu, kotalela bamposa na bango ya elimo mokolo na mokolo ekosalisa bango bázala malamu.​—Deteronome 6:6, 7; Matai 4:4.

      Mbongo mpe mibeko ya Leta

      Koboma libala ekoki kosala ete babalani bázwa lisusu te mbongo mpe biloko mosusu oyo bazalaki kozwa, mpe mbala mosusu ata esika ya kofanda. Lokola ekosɛnga na mobalani ete abimisaka mbongo mingi kasi akɔtisaka yango mingi te, ekozala malamu kotya liboso makambo oyo maleki ntina. Ezali malamu te kobungisa mbongo mingi to kokɔta banyongo mpo na komeka kosilisa mpasi.

      Soki ozwi ekateli ya koboma libala, ezali mpe na ntina mingi ozwa ekateli elongo na mobalani na yo mpo na koyeba ndenge ya kosalela mbongo oyo bobombaki na banki. Na ndakisa, mpo mobalani moko abuba mosusu te na mbongo oyo ezali na banki, ezali malamu kosɛnga na banki ete epesa mbongo bobele soki sinyatili na bino nyonso mibale ezali, kino moto na moto akokóma na kɔnti na ye moko.

      Ezali mpe malamu kokoma mbongo oyo ozali kozwa mpe kobimisa, mpo na komilɛngɛlɛ kosɛnga mbongo oyo osengeli na yango mpo na kobikela. Lisusu, na bikólo mingi, mibeko ya Leta esɛngaka bato oyo babomi libala báyebisa likambo yango na kompanyi oyo efutisaka mpako.

      Lisusu, bato mingi balingaka kotuna avoka—oyo ayebi malamu makambo matali koboma libala. Na bikólo mosusu bapesi-toli basalisaka bato báyokana mpo na kozwa bikateli oyo ekondimama na esambiselo. Mingimingi mpenza soki bazali na bana, baboti mingi baponaka kosalela moto oyo azali na mposa ya kotya boyokani kati na bango. Na esika ete bámona ete soki babomi libala bakoki kozwa mwa biloko mosusu, baboti mosusu balukaka te kongalisa matata mpe mpasi yango. Bamonaka ete mwa matomba oyo bakoki kozwa na biloko ya mosuni ezali mpenza na ntina te koleka mpasi oyo bakoyoka mpe mbongo oyo bakobimisa na likambo yango.

      Ntango baninga bakómi ndenge

      Moto moko alobaki ete: “Bato mingi batyelaka baninga na bango oyo babomi mabala motema te mpe bayokaka nsɔni mpo na bango. Tosengeli kotyola likambo yango te.” Ata soki mwasi azalaki sembo mpe asaleli lotomo na ye oyo endimami na Leta, na mibeko ya mboka mpe na Biblia, ekoki kozala na bato mosusu oyo bakopesa ye foti mpo libala na ye ebebi. Baninga yango bakobanda kopesa ye mbote na esengo te mpe na nsima bakokóma kokima ye. Oyo eleki mabe, bato oyo bazalaki baninga ya motema bakoki koyinana mpenza.

      Bato mingi bayebaka te ete moto oyo abomi libala azali na mposa ya lisungi mingi; bakoki kokanisa ete kokomela ye mwa mokanda moke to mwa maloba na karti ekoki mpo na ye. Nzokande, buku Koboma libala mpe kokabwana (na Lingelesi) elobi ete atako bongo, ezalaka na baninga mosusu oyo ntango nyonso “bazali komitya na esika na yo mpe bakobénga yo na telefone mpo na kotuna soki ozali na mposa bákenda kotika yo na esika moko, bápesa yo mabɔkɔ na mosala moko to básolola na yo soki ozali na mposa ya kosolola.” Ya solo, lokola Biblia elobi yango, na ntango wana, moto azali na mposa ya “moninga . . . oyo akotikala penepene koleka ndeko.”​—Masese 18:24.

      Salá milende mpo na kolonga

      Mama moko oyo aponaki koboma libala esili koleka mbula zomi na motoba alobi ete: “Bantango mosusu namiyokaka ete nazali ngai moko—ata ntango nazali esika moko na bato.” Asalaki nini? Alobi ete: “Mpo namitika bongo te, namipesaka na misala, mosala ya kobɔkɔla mwana na ngai, mpe kobongisa ndako na ngai. Nabandi mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, nayebisaka mpe bato oyo tofandaka na bango makambo oyo toyekolaka, mpe nasalisaka bato mosusu. Makambo wana nyonso esalisaka ngai mingi.”

      Badati mosusu mpe bileko mosusu ya mobu ekoki kozongisa makambo mosusu ya mpasi na makanisi: mokolo oyo eyebanaki ete mobali na yo asalaki ekobo, mokolo oyo alongwaki na ndako, dati oyo bosambaki likambo yango. Esengo oyo babalani bazalaki kolekisa elongo na ntango ya—kopema mpe bokundoli mokolo ya libala—ekoki kosala mpasi mpenza. Patricia alobi ete: “Na mikolo wana, namibongisaka mpo nalekisa ntango esika moko na bandeko na ngai to na baninga na ngai oyo bayebi mpasi na ngai. Tosalaka makambo oyo ekosalisa ngai nakanisa makambo maleká te mpe nakanisa nde makambo ya sika. Kasi lisalisi na ngai oyo eleki monene ezali boyokani na ngai na Yehova—lokola nayebi ete azali koyeba malamumalamu mpasi na ngai.”

      Kolɛmba te

      Babalani oyo basalelaki mitinda ya Biblia mpe baponaki koboma libala na babalani na bango oyo basali ekobo lokola Nzambe apesi yango nzela, basengeli te kokanisa ete bamemi ngambo to kobanga ete Yehova abwaki bango. Yehova ayini ekobo ya mobalani—oyo ebimisi “kolela mpe . . . kokimela.” (Malaki 2:13-16) Ata Yehova, Nzambe ya “mawa,” ayebi mpenza ndenge moto ayokaka ntango moto oyo azalaki kolinga abwaki ye. (Luka 1:78; Yilimia 3:1; 31:31, 32) Na yango, yebá ete “[Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye.”​—Nzembo 37:28.

      Ya solo, soki mobalani asalaki ekobo te mbɛlɛ makambo oyo nyonso ekokaki kobima te. Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota,b oyo ezali bongo kopesa toli ya malamu mpo na libota, ezali kosalisa bato mingi na mokili mobimba bátonga libala ya esengo mpe bápɛngola kosala ekobo. Ezali na mikapo oyo ezali kolobela ndenge ya kotonga libala ya esengo, kobɔkɔla bana, mpe kolonga mikakatano ya libala. Batatoli ya Yehova oyo bazali esika ofandi to babimisi ya zulunalo oyo bakosepela koyebisa yo makambo mosusu na lisolo yango.

      [Maloba na nse ya lokasa]

      a Okoki koyeba makambo mosusu na masolo “Mokumba ya kobɔkɔla bana—Wapi likanisi ya bokatikati?” mpe “Lisalisi mpo na bana oyo baboti na bango babomi libala,” na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1997 mpe ya 22 Aprili 1991, ebimeli ya Lifalanse.

      b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

      [Etanda na lokasa 10]

      BANA BALINGAKA TE BABOTI NA BANGO BÁBOMA LIBALA

      Na 1988, Diana, mwana mwasi ya mokonzi-mwasi ya Angleterre, ye akufá alobaki ete, bobele na Grande-Bretagne, mokolo na mokolo bana koleka 420 bazali komona ndenge baboti na bango bazali koboma libala. Mwana moko kati na bana yango misato akokisi naino mbula mitano te. Likambo ya mawa, nsima ya koboma libala, bana 40 likoló ya monkama bamonanaka lisusu te na mama to na tata na bango.

      Atako bato mingi bakanisaka bongo te, mopanzi-nsango moko akomaki ete: “Bana oyo basepelaka na kobomama ya libala ya baboti na bango, bazalaka mingi te. Nzokande bana mingi balingaka ete baboti na bango bázala esika moko ata soki mikakatano ezali.” Ata soki ntango ekobo esalemi babalani bakómi koswana mingi, basengeli koloba nokinoki te ete koboma libala ekozala malamu mpo na bana. Soki bakobongola makanisi na bango mpe bizaleli na bango, mbala mosusu bakokoka kobatela libala na bango mpo na bolamu ya libota mobimba.

      Mokomi Pamela Winfield alobi ete: “Mibali oyo basali ekobo basengeli kokanisa mpisoli oyo ekobima na miso ya bana na bango mpo na bokabwani ya libota oyo euti na bozoba ya baboti na bango.”

      [Etanda na lokasa 11]

      NZAMBE AYINAKA KOBOMA LIBALA NYONSO?

      Patricia alobi ete: “Lokola nayebaki ete Yehova ayinaka koboma libala, likambo yango etungisaki ngai mingi. Na motema na ngai, nazalaki ntango nyonso komituna, ‘Nazali mpenza kosepelisa Yehova?’”

      Tiká tótalela naino makambo oyo Malaki 2:16 elobi mpo na koyanola na motuna yango. Na ntango ya Malaki, mibali mingi na Yisalaele bazalaki koboma mabala na basi na bango, ntango mosusu se mpo na kobala bilenge basi bapakano. Nzambe andimaki mayele mabe yango ata moke te, yango ezalaki mpenza ezaleli ya kokosa. (Malaki 2:13-16) Na yango, eloko oyo Nzambe ayinaka ezali ete moto alongola mobalani na ye bobele mpamba mpo na kozwa mosusu. Moto oyo akosala ekobo na nko mpe na nsima abomi libala na mobalani na ye to apusi ye na makasi ete báboyana, azali na mayele mabe mpe asali lisumu.

      Nzokande, bavɛrsɛ yango ezali koboya koboma libala nyonso te. Yango ekoki komonana na maloba ya Yesu oyo: “Ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 19:9) Na maloba wana Yesu amonisaki ete pite ezali ntina oyo moto akoki koboma libala—ntina bobele moko oyo ezali kopesa nzela ya kobala moto mosusu. Mobalani oyo asali likambo te akoki kozwa ekateli ya kolimbisa mobalani na ye oyo asali ekobo. Nzokande, soki moto asaleli maloba ya Yesu mpo na koboma libala na mobalani na ye oyo asali ekobo, asali likambo moko te oyo Yehova ayinaka. Nzambe ayini nde etamboli mabe ya mobalani oyo asali ekobo

      [Bililingi na lokasa 10]

      Soki bazwi lisalisi ya bolingo, mobalani oyo asali likambo te mpe bana, bakozala malamu

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto