Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 8 points 1-7
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Ndenge nini tokoki kopona baninga ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Poná malamu baninga na yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
    Lamuká!—2011
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 8 points 1-7
Liteya 08. Mobali moko afandi mpe azali kotala na likoló.

LITEYA 08

Okoki kozala moninga ya Yehova

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Yehova alingi oyeba ye malamumalamu. Mpo na nini? Mpo Yehova ayebi ete soki oyebi malamumalamu bizaleli na ye, ndenge oyo asalelaka bato makambo, mpe oyo alingi mpo na yo, na ntembe te okolinga mpenza kozala moninga na ye. Okoki mpenza kokóma moninga ya Nzambe? (Tángá Nzembo 25:14.) Okoki kosala nini mpo okóma moninga na ye? Biblia epesi eyano na mituna yango mpe emonisi mpo na nini kozala moninga ya Yehova ezali na ntina mingi.

1. Yehova alingi osala nini?

Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Yango elakisi nini? Yehova alingi ete okóma moninga na ye. Lokola Nzambe amonanaka te, bato mosusu bakoki kondima te ete bakoki kokóma baninga na ye. Kasi, na kati ya Biblia, Liloba na ye, Yehova amonisi bizaleli na ye oyo ezali kosalisa biso tópusana penepene na ye. Soki tozali kotánga Biblia, tokokóma mpenza baninga ya Yehova atako tomonaka ye te.

2. Mpo na nini Yehova azali moninga malamu koleka?

Yehova alingaka yo mingi koleka moto mosusu nyonso. Alingi ete ozala na esengo mpe obondelaka ye ntango nyonso oyo ozali na mposa ya lisalisi. Okoki ‘kobwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Yehova azali ntango nyonso pene ya kosalisa, kobɔndisa, mpe koyoka baninga na ye.​—Tángá Nzembo 94:18, 19.

3. Yehova alingi baninga na ye básala nini?

Yehova alingaka bato ya ndenge nyonso, “Kasi azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana [sembo].” (Masese 3:32) Yehova alingi ete baninga na ye básala makasi ya kotosa makambo oyo alobi ete ezali malamu mpe báboya makambo oyo alobi ete ezali mabe. Bato mosusu bakanisaka ete bakokoka te kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali mabe ná malamu. Nzokande, Yehova azali na motema mawa. Andimaka moto nyonso oyo alingaka ye mpenza mpe oyo asalaka makasi mpo na kosepelisa ye.​—Nzembo 147:11; Misala 10:34, 35.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo na kokóma moninga ya Yehova, mpe ntina oyo Yehova azali moninga malamu koleka moninga nyonso oyo okoki kozala na ye.

4. Abrahama azalaki moninga ya Yehova

Lisolo ya Abrahama (oyo babengaka mpe Abrama) oyo ezali na Biblia ezali kosalisa biso tóyeba malamu soki kozala moninga ya Nzambe elakisi nini. Tángá lisolo ya Abrahama na Ebandeli 12:1-4. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova ayebisaki Abrahama asala nini?

  • Yehova alakaki Abrahama nini?

  • Abrahama asalaki nini na makambo oyo Yehova ayebisaki ye?

5. Makambo nini Yehova asɛngaka epai ya baninga na ye?

Mbala mingi, tolingaka ete baninga na biso básala makambo oyo tolingaka.

  • Makambo nini olingaka ete baninga básalela yo?

Tángá 1 Yoane 5:3, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yehova alingi ete baninga na ye básala nini?

Mpo na kotosa Yehova, ekoki kosɛnga ete tóbongola bizaleli na biso mpe makambo mosusu oyo tosalaka na bomoi. Tángá Yisaya 48:17, 18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Yehova alingi ete baninga na ye bátosa mibeko na ye?

Mobali moko azali kopesa moninga na ye ya mosala ekoti mpo amibatela.

Moninga ya malamu ayebisaka biso makambo oyo ekoki kobatela biso mpe oyo ekomemela biso bolamu. Yehova mpe asalaka bongo mpo na baninga na ye

6. Yehova asalaka nini mpo na baninga na ye?

Yehova asalisaka baninga na ye bálonga mikakatano. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Yehova asali mingi mpo na ngai (3:20)

  • Ndenge nini Yehova asalisaki mwasi oyo touti kotala na video alonga makanisi mabe mpe kobanga oyo azalaki na yango?

Tángá Yisaya 41:10, 13, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova alaki kosala nini mpo na baninga na ye nyonso?

  • Okanisi ete Yehova azali moninga ya malamu? Mpo na nini?

Bililingi: Baninga ya malamu basalisanaka. 1. Mobali moko azali kosalisa moninga na ye mpo na komema mesa. 2. Mwasi moko azali koyebisa moninga na ye makambo. 3. Mobali moko azali kosalisa moninga na ye oyo azali na mpasi na lokolo.

Moninga ya malamu asalisaka yo ntango ozali na mposa ya lisalisi. Yehova mpe akosalisa yo

7. Mpo tózala baninga ya Yehova tosengeli kosololaka na ye mpe koyokaka ye

Bato mibale bakómaka na boninga makasi ntango bazali kosolola mingi. Tángá Nzembo 86:6, 11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini tokoki kosolola na Yehova?

  • Ndenge nini Yehova alobaka na biso?

Bililingi: 1. Mwasi moko azali kobondela, elingi koloba azali kosolola na Nzambe. 2. Mwasi moko azali kotánga Biblia, na maloba mosusu atiki Yehova aloba na ye.

Tosololaka na Yehova ntango tobondelaka ye; mpe alobaka na biso na nzela ya Biblia

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nandimi te ete moto akoki kokóma moninga ya Nzambe.”

  • Okopesa vɛrsɛ nini oyo emonisi ete tokoki kokóma baninga ya Yehova?

NA MOKUSE

Yehova alingi ete okóma moninga na ye, mpe akosalisa yo opusana penepene na ye.

Bozongeli

  • Ndenge nini Yehova asalisaka baninga na ye?

  • Mpo na nini Yehova asɛngaka baninga na ye bábongwana?

  • Okanisi ete ezali mpenza mpasi kozala moninga ya Yehova? Mpo na nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Kozala moninga ya Nzambe ekoki komemela yo bolamu nini?

“Yehova, Nzambe oyo bato basengeli koyeba” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2003)

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo na kokóma moninga ya Yehova.

“Ndenge nini nakoki kokóma moninga ya Nzambe?” (Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, mokapo 35)

Talá mpo na nini mwasi moko alobi ete kozala moninga ya Yehova ekómisi bomoi na ye malamu koleka.

“Nazalaki kobanga liwa!” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 1 2017)

Yoká oyo bilenge balobi mpo na boninga na bango ná Yehova.

Osengeli kosala nini mpo ozala moninga ya Nzambe? (1:46)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto