Loyembo 19
Bósepelaka ntango nyonso
1. Sepelá! Esengo!
Nzamb’asepeli na yo.
Esengo! Kokisá
Mosala ntango nyonso.
Ozali na nyonso,
Nzamb’alingi yo.
Okosɛnga ye nini lisusu?
Kimy’oy’a elimo, bolamu mpe esengo,
Ezali mpo na yo.
Okofanda na Nkolo.
Sepeláká mpenza, simbá kondima
Mpe okozwa nde bolamu mingi.
2. Esengo monene
Mpo ete tosikwami.
Tóyoka, tólanda
Yesu, ye Motambwisi.
Na ye, tozwi bomoi,
Mpe toponami
Na Nzambe ebongi tótosa ye.
Tópesa lokumu na Mokonzi ya sika,
Batikali na ye,
baleisi etongá.
Balakisi nzela mpo ete biso
Tópesa bato banso elikya.
3. Oyo nde esengo
Na kosakola solo!
Ezali esengo
Na kosakola nsango.
Tólinga bandeko
Na biso banso;
Tokozala kati na bomoko.
Tika tósakola ntango inso, Bokonzi.
Na yango nd’ebele
Bayanganisamaki.
Tokosambela sé Yehova Nzambe,
Ye Mozalisi na biso banso.