Mwa babúku: bisaleli ya motuya mpo na mosala ya kosakola
1 Mbala mingi, mosáli na misala ya mabɔkɔ oyo ayebi malamu mosala na ye amemaka liboke ya bisaleli oyo moko na moko ezali na mosala na yango ya sikisiki. Biso baoyo tozali basakoli ya Bokonzi, tozali na mwa babuku mingi oyo ezali kosalisa biso na kokokisa malamumalamu bamposa ya elimo ya bato oyo tozali koteya. (Mas. 22:29) Ekoki kozala ete tokutani na moto oyo atungisami na makanisi. To lisusu, moto oyo azali na mposa ya boyangeli ya sembo, to oyo azali komituna soki bomoi ezali mpenza na mokano. Lolenge nini kosalela mwa babúku na biso mpo na kosunga bango?
2 Na ntango tozali kolakisa mwa búku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?,” tokoki koloba ete:
◼“Bato mosusu oyo bazali komona bampasi mpe bokɛsɛnɛ oyo ezali kati na mokili, bazali na momeseno ya koloba ete Nzambe nde azali mobandisi na yango. Bazali koloba ete lokola Nzambe azali Mozwi-na Nguya-Nyonso, soki azalaki mpenza komibanzabanza mpo na biso, mbɛlɛ asilisi bampasi na biso. Okanisi nini mpo na yango? [Tiká ete moto yango ayanola.] Nzembo 72:12-14 ezali komonisa ete Nzambe azali solo komibanzabanza mpo na biso. Azali mobandisi ya bampasi te mpe ya bokɛsɛnɛ te. Alaki ete mosika te basáli-na-mabe bakolongolama. Mwa búku oyo Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, ezali kolimbola oyo akosala mpe lolenge nini tokoki kozwa matomba na yango.” Tokoki mbala mosusu kolanda lisolo na kolobeláká na mokuse paragrafe 22, na lokasa 27.
3 Soki tozali kosalela mwa búku “But de la vie”, tokoki kobanda lisoló boye:
◼“Ata ndɛlɛ, moto nyonso to pene na bato nyonso, bakozanga te komituna mituna likoló na mokano ya bomoi. Ezali bobele kobika mbula 70 to mbula 80, mpe na nsima kokufa? To bomoi ezali nde na mokano? Okanisi nini mpo na yango? [Tiká ete moto yango ayanola]. Nzembo 37:29, tozali komona mokano kitoko ya Nzambe mpo na moto mpe mpo na mabele.” Nsima ya kotánga mokapo, tólakisa elilingi ya lokasa 31, mpe tólimbola lolenge ya bomoi tokozala na yango kati na paladiso.
4 Tokoki kobimisa mwa búku “Tala” na kolakisáká elilingi mobimba ya ezipeli mpe na kotunáká ete:
◼“Engebene makanisi na yo, esengeli kosala nini mpo na kobongola mabelé ete mákóma na lolenge oyo? [Tiká ete moto yango apesa likanisi na ye]. Na elilingi oyo, moto na moto azali na ndako na ye mpe na mosala ya malamu. Kimya ezali, bilei bizali mingi mpe mabelé mabebisami te. Atako bazali kosala milende makasi, biyangeli ya bato emonani ete ezali na likoki moko te mpo na kosala mokili ya lolenge oyo. Nzokande, Biblia ezali kopesa biso elikya ete Nzambe, ‘akozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ [Fungolá mwa búku na losaka 30, mpe tángá Emoniseli 21:3, 4] Mwa búku oyo ekolakisa yo nini osengeli kosala mpo na kozala na bomoi kati na mokili wana ya sika.” Soki moto yango amonisi mpenza bosepeli, tófungola mwa búku na lokasa 3, mpe tólakisa ye lolenge nini totambwisaka boyekoli ya Biblia.
5 Soki tokolakisa mwa búku “Sepela na bomoi ya seko awa na mabelé!,” tokoki kosalela makanisi oyo:
◼“Bato mingi bakanisaka ete basengeli kokende na likoló mpo na kosepela na bomoi ya seko, kasi okoloba nini mpo na oyo etali kozala na bomoi ya seko awa na mabelé? [Tiká ete moto yango ayanola]. Biblia ezali kondimisa biso ete bomoi ya seko ezali solo mpe ezali komonisa biso lolenge nini tokoki kozwa yango.” Tángá Yoane 17:3. Na nsima, tólakisa na molobani na biso elilingi N0 49, mpe tótuna ye boye: “Okosepela kozala na bomoi kati na mokili lokola oyo?” Tólakisa mwa buku yango mpe tózwa bibongiseli mpo na bozongeli ya sika.
6 Mwa babúku elobelaka makambo oyo mazali koleka na mokili, eyanolaka na mituna oyo bato bamitunaka mpe ememaka kobɔndisama. Na kosaleláká malamumalamu bisaleli yango, tokosunga bato ya motema malamu ete ‘bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.’—1 Tim 2:4, NW.