Loyembo 120
Tótɛlɛma ngwi lokola Luta
1. Na Luta, Naomi’alobaki:
‘Zongá na yo’epai na baboti.
Mpo na yango, Lut’aboyaki,
Mpo ye alingaki Naomi.
2. ‘Te, nakoki te kotika yo.
Nakolanda yo bipai binso.
Soki bosɛngá tokokufa,
Elongo na yo, nakozala.’
3. ‘Ndeko na yo’akozala ya nga’;
Nzambe na yo, nakosambela.
Tika Nzambe asala bongo,
Tokokabwana sé na kufa.’
4. Oyo nde kondima monene!
Biso mpe tokomekola ye!
Tózala na mpiko, molende;
Tózala sembo’epai na Nzambe.