Loyembo 115
‘Tózalana na bolingo ya solo’
1. Nde bolingo ya solo
Ekoyikaka mpiko.
Ekosalela Nzambe
Na esengo bɛɛ.
Na bolingo ya Nzambe,
Apesi Mwana na ye.
Mpe atii biso banso
Esika moko.
Yehova, yo bolingo,
Tokosalela sé yo.
Mpe y’okosunga biso
Na ntango inso.
Koyin’etondi lelo;
Tómonisa bolingo,
Ezaleli ya nguya
Tómekola Yah, tómekola Yah.
2. Bolingo malamu nde
Ekozokisaka te,
Ezali na limemya
Na bato banso.
Bolingo ya bosembo
Eyini moimi mpo
Eyebi kolimbisa,
Ekokólaka.
Awa nsuk’ebɛlɛmi,
Tótonda bososoli.
Soki yang’ezali te,
Tozali mpamba.
Bolingo eyikana
Ete tóboya nkanda,
Tózala na boboto.
Tólanda yango, tólanda yango.