-
Bolóngi likoló na Satana mpe likoló na misala na yeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 1 Janvier
-
-
libota mobimba ya bato oyo bamitangoli na Nzambe ekundweli biso kobeba oyo ebimisamaki na “bilombe” bapɔtɔ mabe mpe ya mobulu oyo bazalaki na mikolo na Noa. (Genese 6:4, 12, 13; Luka 17:26) Na yango, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Satana azali kobimisa misala mabe mpe myango mitondi na mayele mabe mpo na kosopa nkanda na ye, mingimingi epai na libota ya Nzambe.—1 Petelo 5:8; Emoniseli 12:17.
22. Ntango Satana akozala lisusu te, mapamboli nini tokoki kolikya kozwa?
22 Satana alobelami nkutu te kati na mikapo ya nsuka ya mokanda ya Yobo. Ntembe na ye mabe oyo ete bato bakoki te kotikala sembo epai na Nzambe esilaki komonana lokuta na kotalela bosembo ya Yobo. Bobele bongo, mosika te wana “ebele monene” ya bato na sembo “bakobima na bolózi monene,” Satana akokangama mpe akobwakama na libulu mozindo. Mibali mpe basi ya kondima, sangisá Yobo, moto na kondima, bakosangana na “ebele monene” yango mpo na kosepela na mapamboli kati na paladiso, mapamboli minene koleka oyo Yobo azwaki!—Emoniseli 7:9-17; 20:1-3, 11-13; Yobo 14:13.
-
-
Libota na BoyengebeneLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 1 Janvier
-
-
Libota na Boyengebene
“Jipola bikuke ete libota na boyɛngɛbɛnɛ mpe na kobatela kondimana baingela.”—YISAYA 26:2.
1. Mpo na nini maloba ya Yisaya na ntina na “libota na boyengebene” ekoki kokamwisa?
LELO oyo, mabota mazali na mitindo mikeseni. Mosusu ezali ya demokrasi, mosusu eyangelami na mikonzi oyo basimbi bokonzi nyonso na mabɔkɔ na bango moko. Mosusu ezali ya bozwi, mosusu ya bobólá. Kasi likambo oyo esangisi mabota nyonso wana ezali oyo ete: Nyonso esangani na mokili oyo Satana azali nzambe na yango. (2 Bakolinti 4:4) Na kotalela likambo yango, maloba ya Yisaya makoki kokamwisa bato, mpamba te alobi ete: “Jipola bikuke ete libota na boyɛngɛbɛnɛ mpe na kobatela kondimana baingela.” (Yisaya 26:2) Libota ya boyengebene? Ee, libota moko ya boyengebene lizali, mpamba te esakweli elobeli kozala na yango na mikolo na biso. Ndenge nini moto akoki koyeba libota wana likeseni na mabota nyonso mosusu?
2. “Libota na boyengebene” ezali libota nini? Lolenge nini toyebi yango?
2 Kati na lolenge oyo Biblia New World Translation ezali kobongola Yisaya 26:2, elobelami na ntina na libota yango ete ezali “kobatela etamboli ya sembo.” Biblia King James Version (na pembeni) ebongoli molɔngɔ́ yango boye, “libota na boyengebene oyo ebatelaka solo.” Mabongoli nyonso mibale wana mabongi mpenza. Ya solo, ezali pɛtɛɛ mpo na koyeba libota ya boyengebene mpamba te ezali libota bobele moko oyo, awa na mabelé, ezali kotosa Klisto Mokonzi, mpe esangani te na mokili oyo ya Satana. (Yoane 17:16) Lokola ezali bongo, basangani na yango bayebani na lolenge na bango ya ‘kobatela etamboli malamu na bango kati na mabota.’ Bazali kolanda lolenge ya bomoi oyo ezali kokumisa Nzambe. (1 Petelo 2:12) Lisusu, epai nyonso oyo bazwami kati na mokili, bazali basangani kati na “lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzi mpe etɛmiseli ya solo.” (1 Timoté 3:15, NW) Lokola bazali etɛmiseli ya solo, basili kobwaka bafilozofi nyonso oyo eteyami na boklisto ya nkombo mpamba, mpe bazali na ‘mposa makasi ya komela miliki ebebisami te oyo ezali bongo kati na liloba’—Biblia, Liloba ya Nzambe. (1 Petelo 2:2, NW) Lisusu, na molende nyonso bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai “na bato yɔnsɔ na nse na Likolo.” (Bakɔlɔsɛ 1:23) Na ntembe te, libota yango lisalemi na batikali ya “Yisraele ya Nzambe,” lisangá ya baklisto bapakolami, boye te? Ezali mpenza bongo.—Bagalatia 6:16.
Libota libotami
3. Lobelá lolenge nini “libota na boyengebene” ebotamaki.
3 Ntango nini “libota na boyengebene” libotamaki? Ebandeli na yango esakolamaki kati na mokanda ya Yisaya. Na Yisaya 66:7, 8, tozali kotánga ete: “Naino [Siona] ajalaki na mpasi tɛ abotaki; naino mpasi na ye ekomelaki ye tɛ abimisaki mwana mobali. . . . Siona ajuaki mpasi na kobota [mpe] abotaki bana na ye.” Likambo ya kokamwa, Siona, lisangá ya Nzambe oyo ezali na likoló, esengelaki kobota “mwana mobali” liboso ya koyoka mpasi. Na mobu 1914, Bokonzi ya Masiya ebotamaki na makoló. (Emoniseli 12:5) Nsima na yango, wana mabota mingi bamikɔtisaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe baklisto bapakolami bazwaki bolózi mpe minyoko. Na nsuka, na mobu 1919, libota ya elimo, “mwana mobali,” ebotamaki awa na mabelé. Na bongo Siona ‘ebotaki bana na ye’—bapakolami ya “libota ya boyengebene” wana ya sika— mpe bango babongisamaki mpo na mosala ya kotatola oyo esengelaki kokóla sé kokóla.—Matai 24:3, 7, 8, 14; 1 Petelo 2:9.
4. Mpo na nini libota na boyengebene ya Nzambe esengeli kobunda mpo na kobatela bosembo?
4 Uta ebandeli na yango, libota yango lizali kokutana na komekama makasi na ntina na bosembo na yango. Mpo na nini? Ntango Bokonzi ya likoló ebotamaki, Satana mpe bademó na ye babwakamaki longwa na likoló kino awa na mabelé. Mongongo moko makasi elobaki ete: “Sasaipi lobiko, na nguya, na Bokonji na Njambe na biso, na bokonji na Klisto na ye, esili koya; mpɔ ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Njambe butu na moi, asili kobwakama. Bango baleki ye jambi na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomɔi na bango tɛ, ata kino kufa.” Satana azalaki na nkanda makasi lokola makambo mabongwanaki “mpe akei kobuna etumba na bango batikalaki na libota na [mwasi], baoyo batosaki malako na Njambe mpe bajalaki na matatoli na Yesu.” Liboso na kobundisama oyo ebimisamaki na Satana, baklisto bapakolami batɛlɛmaki ngwi. Kino lelo oyo, basangani ya molende ya libota na boyengebene ya Nzambe bazali komonisa kondima na makila na Yesu oyo mapesamaki mpo na lisiko mpe bazali kolanda kopesa Yehova likoki ya koyanola na motumoli monene na kobateláká bosembo “ata liboso na kufa.”—Emɔnisɛli 12:1, 5, 9-12, 17; Masese 27:11.
5. Ezaleli nini kitoko ezali kosalisa Batatoli ya mikolo na biso na kobatela bosembo?
5 Na mobu 1919, wana litatoli oyo ezali kopesama na mikolo na biso na ntina na Bokonzi ya Nzambe ebandaki, Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na ntango wana, motuya na bango ezalaki moke kasi bazalaki makasi kati na kondima. Bakómaki moboko ya ‘mboka na nguya, oyo lobiko ezali mapango na yango mpe bizingelo na yango.’ Elikya na bango ezalaki epai na “Yah Yehova [oyo] azali Libanga likoumela seko.” (Yisaya 26:1, 3, 4) Lokola Mose na ntango ya kala, bayambolaki ete: “Nakosakola nkombo na [Yehova]. [Bópesa lokumu epai na Nzambe na biso, NW.] Ye Libanga, mosala na ye ebɔngi; mpɔ ete njela na ye yɔnsɔ boyɛngɛbɛnɛ. Njambe na sembo mpe na mabe tɛ, ye moyɛngɛbɛni mpe mosembwi.”—Dutɛlɔnɔmɛ 32:3, 4.
6. Na nzela nini Yehova asili kopambola libota na ye na mikolo oyo ya nsuka?
6 Uta ntango wana, bikuke mpo na kokɔta na ebongiseli ya Bokonzi ya Nzambe efungwamaki, bato ya liboso na koyanganisama ezalaki bongo batikali kati na baklisto bapakolami 144 000 mpe sikawa ebele monene ya “bampate mosusu” basangani elongo na bango mpo na kosakola makambo oyo Bokonzi na Yehova ekosala. (Yoane 10:16) Na yango, ekoki ete esakolama na esengo nyonso: “Osili kofulukisa libota, Ɛ [Yehova], osili kofulukisa libota, okɛmbisami; okomisi yango mosika kino nsuka yɔnsɔ na mokili.”
-