-
“Tosili komona Masiya”!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 1 Octobre
-
-
mabe, mpe mpo na kokɔtisa boyengebene libela na libela.” Bayuda bayebaki malamu ete, bobele mbeka, liwa, nde ekokaki kozala mbɔndi mpo na mabe.—Levitike 17:11; tala Baebele 9:22.
18. (a) Lolenge nini Yisaya mokapo 53 emonisi ete Masiya asengelaki kooka mpasi mpe kokufa? (b) Nini emonani lokola bongolabongola kati na esakweli wana?
18 Yisaya mokapo 53 elobeli Masiya lokola Mosali ya ntina mingi ya Jéhovah, oyo asengelaki kooka mpasi mpe kokufa mpo na kolimbisama ya masumu ya bato mosusu. Verset 5 eyebisi ete: “Atɔbɔlami mpo na masumu na biso atutami mpo na mabe na biso.” Nsima na koyebisa biso ete Masiya wana asengelaki kokufa lokola mbeka mpo na mabe,” bobele esakweli yango emonisi ete asengelaki “kofulisa mikolo na ye, mpe lobɔkɔ na ye ekolongisa makambo masepelisi Jéhovah.” (Verset 10, MN) Ezali bongolabongola te? Lolenge nini Masiya akokaki kokufa mpe “kofulisa mikolo na ye?” Lolenge nini akokaki kopesama lokola mbeka, mpe na nsima, ‘kolongisa makambo oyo masepelisi Jéhovah?’ Lolenge nini akokaki bongo kokufa mpe kolala libela kati na kufa kozanga kokokisa bisakweli ya ntina bilobelami mpo na ye, lokola oyo elobi ete, asengeli koyangela mpo na libela, mpe akoyeisa kimya mpe bolamu na mokili mobimba?—Yisaya 9:6, 7.
19. Lolenge nini lisekwa na Yesu lizali koyokanisa bisakweli bimonani lokola ete bizali bongolabongola na ntina na Masiya?
19 Likamwisi moko monene lisilisaki oyo emonanaki lokola bongolabonga. Yesu asekwaki. Bayuda mingi ya motema sembo bamonaki likambo yango monene. (1 Bakolinti 15:6) Na nsima, ntóma Paulo akomaki ete: “Ye wana [Yesu Klisto] asili kotombola bobele mbeka moko mpo na libela mpe afandi na lobɔkɔ mobali na Nzambe, mpe azali kozela uta ntango wana kino banguna na ye bakotyama lokola etyelo ya makolo na ye.” (Baebele 10:10, 12, 13, MN) Ee, ezali nsima ya lisekwa na Yesu mpo na bomoi ya likoló, mpe nsima ya eleko ya “kozela” nde asengelaki kotyama Mokonzi mpe kobundisa banguna ya Tata na ye, Jéhovah. Mpo na mokumba na ye ya Mokonzi na likoló, Yesu Masiya azali na bopusi likoló na bomoi ya bato nyonso. Lolenge nini? Yango ekotalelama na lisoló na biso lilandi.
-
-
Koya ya Masiya mpe boyangeli na yeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 1 Octobre
-
-
Koya ya Masiya mpe boyangeli na ye
“Yesu oyo alongwi kati na bino mpe atombolami na likoló, akoya bobele motindo oyo emonaki bino ye kokenda na likoló.”—MISALA 1:11, MN.
1, 2. (a) Lolenge nini baanzelu mibale babɔndisaki bantóma na Yesu na ntango ye amataki na likoló? (b) Mituna nini mibimisami na ntina na elikya ya kozonga ya Klisto?
Mibali zomi na moko batɛlɛmaki na nkiteli ya ngomba ya bilaya, wana ezalaki bango kotala likoló. Mwa ntango moke, Yesu Klisto oyo azalaki kati na bango, amati na likoló mpe etangwi mokemoke kino azipami na lipata. Na boumeli ya bambula oyo balekisaki elongo na ye, mibali yango bamonaki wana Yesu azalaki kopesa ebele ya bilembeteli bimonisi ete azalaki Masiya; batungisamaki mingi mpo na liwa na ye, mpe bazalaki na nsai na lisekwa na ye. Sikawa, asili kokenda.
2 Baanzelu mibale babimi pwasa mpe bayebisi maloba oyo na kobɔndisa ete: “Mibali ya Galilai, mpo na nini botɛlɛmi wana kotaláká likoló? Yesu oyo alongwi kati na bino mpe
-