Bamipesá—Epai ya nani?
“Tokosala yango yɔnsɔ elobi [Yehova], mpe tokotosa yango.”
—ESODE 24:7.
1, 2. (a) Bato mosusu bamipesaka epai ya nini? (b) Komipesa esuki bobele na bato oyo bazali basangani ya lingomba?
NA Febwáli 1945, bakumbi-mpepo ya etumba na nkombo Zero-fighter ya Limpinga libéngami Yatabe, na ekólo Japon, bayanganisamaki kati na ndako epai bato bayokaka masukúlu. Moko na moko kati na bango apesamelaki lokasa moko mpo na kokoma soki akolinga komipesa mpo na kozala moko kati na babundi ya etuluku ya kamikaze. Mokonzi moko ya basodá oyo azalaki wana na ntango yango alobi ete: “Nakanisaki ete ezalaki libyangi mpo na ngai ete nakaba nzoto na ngai na ntango oyo ekólo ezalaki kati na mpasi. Lokola mayoki na ngai mazalaki kopusa ngai ete namipesa, nandimaki mokumba yango.” Ayekolaki kotambwisa mpe kokumba Ohka moko (mpepo ya komiboma oyo ezalaki na mandóki rocket) mpe lolenge ya kokweisa yango likoló na masúwa ya banguna. Nzokande, etumba esilaki liboso ete azwa libaku ya kokokisa mokumba yango mpe bongo kokufa mpo na ekólo mpe mpo na mokonzi ya ekólo na ye. Ntango Japon elóngaki etumba te, kondima na ye kati na mokonzi ya ekólo esilaki.
2 Na eleko moko boye, na Japon bato mingi bamipesaki epai na mokonzi, oyo bazalaki kokanisa na ntina na ye ete azalaki nzambe na bomoi. Na bamboka mosusu, ezalaki mpe ezali naino na biloko mingi oyo ezali kopesamela losambo. Bamilió ya bato basili komipesa na losambo ya Malia, ya Bouddha, to ya banzambe mosusu—oyo mbala mingi bamonisamaka na bikeko. Wana bapusami na masukúlu ya kolamwisa mayoki, bato mosusu bapesaka mbongo na bango nyonso oyo bazwaki na mpasi epai na bateyi oyo balobaka na televizyó, lokola lisungi lipesami na motema moko oyo ekokani na losambo. Nsima ya etumba, ba Japonais mingi oyo batikalaki na mawa na motema balukaki eloko mosusu oyo bakokaki kopesa bomoi na bango epai na yango. Mpo na basusu, mosala nde ezalaki eloko yango. Ezala na Ɛ́sti to na Wɛ́sti, bato mingi bazali kopesa bomoi na bango mpo na konduka bozwi. Bilenge bazali kotonga bomoi na bango likoló na babɛti-miziki mosusu, oyo bazali komekola lolenge na bango ya bomoi. Ebele na bato basili kokóma lelo oyo basambeli na bango moko, kokómisáká bamposa na bango eloko ya losambo na bango. (Bafilipi 3:19; 2 Timoté 3:2) Kasi biloko motindo wana to bato motindo wana babongi solo kopesamela losambo oyo euti na motema?
3. Lolenge nini biloko mosusu ya losambo bimonanaki ete bizali na ntina te?
3 Mbala mingi, basambeli ya bikeko babulunganaka wana bamoni mpenza bosolo ya makambo. Kosambela biloko to bato epesaka mawa na motema ntango basambeli na yango bakangi ntina ete bikeko na bango bizali bobele “bilɔkɔ bisalami na mabɔkɔ na bato.” (Njembo 115:4) Wana misala ya nsɔ́ni ya bateyi oyo balobaka na televizyó mitɔndɔlami polele, bato na motema sembo balɛmbaka nzoto. Wana nkita “ya kotengatenga” ekwei, basáli babulunganaka ntango bamoni nkombo na bango kati na baoyo basengeli kozonga ndako mpo na mwa ntango. Kokita ya nkita na bambula oyo epesaki mpasi mingi epai na baoyo bamipesi mingi na koluka bozwi. Nyongo oyo bazwaki na elikya ete bakokóma na mbongo mingi ekómaki bozito monene oyo makoki ya kozongisa yango mazali moke mpenza. (Matai 6:24, NW, maloba na nsé ya lokasa) Ntango bavɛdɛ́tɛ ya miziki Rock mpe bato mosusu ya masano bakufaka to ntango lokumu na bango ekitaka, basambeli na bango bamiyokaka ete basundolami. Mpe baoyo bazali kolanda bomoi ya komisepelisa mbala mingi babukaka mbuma ya bololo.—Bagalatia 6:7.
4. Nini etindaka bato na kopesa bomoi na bango na biloko oyo bizangi ntina?
4 Nini epusaka bato na komipesa bango moko na makambo oyo ya mpamba? Mbala mingi, ezalaka bongo elimo ya mokili oyo etambwisami na Satana Zábolo. (Baefese 2:2, 3) Bopusi ya elimo wana ezali komonana na mitindo mikeseni. Moto moko akoki kopusama na mitindá ya libota oyo miuti na bankɔ́kɔ na ye. Kelasi oyo moto atángaki mpe lolenge moto abɔkwamaki ekoki kozala na bopusi monene likoló na lolenge na ye ya kokanisa. Makambo oyo mazali kosalema na esika ya mosala makoki kopusa “basodá ya kompanyi” na komipesa na mosala na kolekisa ndelo, likambo oyo likoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Mposa ya kozwa ntango nyonso biloko mingi ezali kouta na elimo ya koluka bozwi mingi ya mokili oyo. Mitema ya bato mingi misili kobeba, mizali kopusa bango na komipesa na bamposa na bango ya moimi. Balukaka te kotalela soki mikano yango mibongi kozwa losambo na bango.
Libota oyo emipesá
5. Komipesa nini epai na Yehova oyo esalemaki esili koleka mibu 3 500?
5 Esili koleka mibu 3 500, libota moko emonaki ye oyo abongi mpenza na kopesamela losambo. Bamipesaki epai na Nzambe, Nkolo Moyangeli Yehova. Etuluku mobimba ya libota ya Yisraele eyambolaki komipesa na bango epai na Nzambe kati na mokili mokauki ya Sinai.
6. Nkombo ya Nzambe elingaki kozala na ndimbola nini mpo na Bayisraele?
6 Nini epusaki Bayisraele na kosala bongo? Ntango bazalaki na boombo na Ezipito, Yehova atindaki Mose ete apesa bango bonsomi. Mose atunaki soki lolenge nini ye akokaki kobénga Nzambe oyo atindaki ye, mpe Nzambe ye moko ayebisaki bango ete azali “Nakomimonisa oyo ekomimonisa ngai ete nazali.” Atindaki Mose koloba na bana ya Yisraele ete: “Nakomimonisa atindi ngai epai na bino.” (Exode 3:13, 14, NW) Maloba oyo mazalaki komonisa ete Yehova akomikómisaka lolenge nyonso oyo asepeli kokóma mpo na kokokisa mikano na ye. Asengelaki komimonisa Mokokisi ya bilaka na ye na motindo oyo bankɔ́kɔ ya Bayisraele bayebaki yango liboso te.—Exode 6:2, 3.
7, 8. Bilembeteli nini Bayisraele bazalaki na yango ete Yehova nde azalaki Nzambe oyo abongaki ete bámipesa epai na ye?
7 Bayisraele bamonaki lolenge mokili ya Ezipito mpe bato na yango bazwaki mpasi na Malózi Zomi. (Nzembo 78:44-51) Na nsima, mbala mosusu koleka bato milió misato, kati na bango basi elongo na bana, bakangaki bisaka mpe balongwaki na mokili ya Gosɛnɛ na butu moko, oyo ezalaki bolóngi moko ya monene. (Exode 12:37, 38) Na nsima, na Mai Motane, Yehova amimonisaki ye moko lokola “mobali na etumba” ntango abikisaki libota na ye na mabɔkɔ ya mampinga ya Falo na kokaboláká Mai Monene mpo na kolekisa Bayisraele mpe na kozongisáká yango na nsima likoló na Baezipito oyo bazalaki kolanda bango. Na yango, “Yisalaele mpe bamɔnaki mosala monɛnɛ mosalaki [Yehova] epai na Baejipito, mpe bato yango babangaki [Yehova]. Bandimaki mpe [Yehova].”—Esode 14:31; 15:3; Nzembo 136:10-15.
8 Lokola nde bazwaki naino elembeteli te mpo na ndimbola ya nkombo na Nzambe, Bayisraele baimaimaki na ntina na Yehova mpe momonisi na ye, Mose, mpo na kozanga ya bilei mpe ya mai. Yehova atindaki nkanga, anokisaki mana longwa na likoló, mpe abimisaki mai na libangá na Mɛliba. (Exode 16:2-5, 12-15, 31; 17:2-7) Yehova abikisaki mpe Bayisraele na mabɔkɔ na Baamaleki. (Exode 17:8-13) Bayisraele bakokaki soko moke te koangana oyo Yehova alobaki na nsima na nzela ya Mose ete: “[Yehova, Yehova], ajali Njambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda nɔki tɛ mpe aleki na boboto mpe na sɔlɔ. Akobatela boboto na ye mpɔ na nkoto nkoto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanja, mpe lisumu.” (Esode 34:6, 7) Ya solo, Yehova amimonisaki ete abongi kopesamela losambo.
9. Mpo na nini Yehova apesaki Bayisraele libaku ya komonisa komipesa na bango mpo na kosalela ye, mpe bayanolaki nini?
9 Atako Yehova azalaki na lotómo ya kozala nkolo ya Bayisraele mpo ete ye nde abimisaki bango na Ezipito, lokola azali Nzambe ya boboto mpe ya motema mawa, apesaki bango libaku ya komonisa na bolingo na bango moko mposa ya kosalela ye. (Deteronome 7:7, 8; 30:15-20) Amonisaki lisusu masɛngami mpo na kosala kondimana kati na ye mpe Bayisraele. (Exode 19:3-8; 20:1 kino 23:33) Ntango Mose ayebisaki bango masɛngami yango, Bayisraele balobaki ete: “Tokosala yango yɔnsɔ elobi [Yehova] mpe tokotosa.” (Esode 24:3-7) Na bolingo na bango moko, bakómaki libota oyo emipesi epai na Nkolo Moyangeli Yehova.
Botɔ́ndi ezali komema na komipesa
10. Komipesa na biso epai na Yehova esengeli kozala likoló ya moboko nini?
10 Yehova, Mozalisi, abongi ntango nyonso ete tómipesa epai na ye na molimo na biso mobimba. (Malaki 3:6; Matai 22:37; Emoniseli 4:11) Nzokande, komipesa na biso esengeli te kozwa moboko bobele likoló na bindimandima, na mayoki oyo mazali kobongwana nokinoki, to na kopusama na basusu—ata mpe baboti na biso. Esengeli kozala na moboko likoló na boyebi ya solo na ntina na Yehova mpe na botɔ́ndi mpo na makambo oyo Yehova asili kosala mpo na biso. (Baloma 10:2; Bakolose 1:9, 10; 1 Timoté 2:4) Motindo moko lokola Yehova apesaki Bayisraele libaku ya komonisa na bolingo nyonso komipesa na bango, azali mpe kopesa biso libaku ya komipesa na bolingo na biso mpe ya komonisa komipesa yango polele liboso na bato.—1 Petelo 3:21.
11. Boyekoli na biso ya Biblia esili komonisa nini na ntina na Yehova?
11 Na nzela ya boyekoli ya Biblia, toyebi ete Nzambe azali moto. Liloba na ye lizali kosalisa biso na kososola bizaleli na ye lokola oyo emonisami kati na biloko bizalisami. (Nzembo 19:1-4) Kati na Liloba na ye tokoki komona ete azali te Bosato ya libombami oyo moto akoki te kososola. Ye akweaka na etumba soko moke te mpe na yango akoanganaka bonzambe na ye te. (Exode 15:11; 1 Bakolinti 8:5, 6; Emoniseli 11:17, 18) Lokola asili kokokisa bilaka na ye, yango ezali kokundwela biso ndimbola ya nkombo na ye kitoko, Yehova. Azali Mosáli Monene ya mikano. (Genese 2:4, NW, maloba na nsé ya lokasa; Nzembo 83:18; Yisaya 46:9-11) Na koyekoláká Biblia, tososoli malamu ete azali sembo mpe abongi na kotyelama motema.—Deteronome 7:9; Nzembo 19:7, 9; 111:7.
12. (a) Nini ezali kobenda biso epai na Yehova? (b) Lolenge nini lisoló ya makambo oyo makomami kati na Biblia ekoki kopusa moto na kosalela Yehova? (c) Lolenge nini omiyokaka mpo na oyo etali kosalela Yehova?
12 Eloko oyo ezali mpenza kobenda biso epai na Yehova ezali bomoto na ye oyo etondi na bolingo. Biblia ezali komonisa lolenge ye azali na bolingo, na ezaleli ya kolimbisa mpe na motema mawa kati na boyokani na ye elongo na bato. Kanisá lolenge akólisaki bozwi ya Yobo, nsima wana Yobo abatelaki makasi bosembo na ye. Likambo ya Yobo emonisi polele ete “Yehova atondi na boboto mpe na motema mawa.” (Yakobo 5:11, NW; Yobo 42:12-17) Kanisá lolenge Yehova asalaki epai na Davidi ntango asalaki ekobo mpe abomisaki moto. Ee, Yehova azali pene ya kolimbisa ata masumu minene soki mosumuki abɛlɛmi epai na ye na “motema motutami mpe na mawa.” (Njembo 51:3-11, 17) Kanisá lolenge oyo Yehova asalaki epai na Saulo moto ya Talasia, oyo azalaki liboso monyokoli monene ya libota ya Nzambe. Bandakisa wana ezali komonisa motema mawa mpe motema malamu ya Nzambe na kosaleláká bato oyo babongoli motema. (1 Bakolinti 15:9; 1 Timoté 1:15, 16) Paulo amonaki ete akokaki kopesa bomoi na ye mobimba mpo na kosalela Nzambe wana ya bolingo. (Baloma 14:8) Yo mpe ozali kokanisa lolenge yango?
13. Elembo nini ya bolingo monene ya Yehova ezali kopusa bato ya motema sembo na komipesa bango moko epai na ye?
13 Mpo na Bayisraele, Yehova asikolaki bango na boombo ya Ezipito, mpe asili kobongisa mwango ya kobikisa biso na boombo ya lisumu mpe ya kufa—mwango yango ezali mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Yoane 3:16) Paulo alobi ete: “Nde Nzambe amɔnisi bolingo na ye mpɔ na biso na njela oyo: naino ejalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Ebongiseli oyo etondi na bolingo ezali kopusa bato ya mitema sembo na komipesa na nzela ya Yesu Klisto. “Jambi bolingo na Klisto ekangi biso awa ekati biso ntina ete mɔkɔ akufeli bato yɔnsɔ mpe bongo bato yɔnsɔ basili kokufa. Akufeli bato yɔnsɔ ete baoyo bajali na bomɔi babika lisusu mpɔ na bango mpenja tɛ kasi mpɔ na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.”—2 Bakɔlinti 5:14, 15; Baloma 8:35-39.
14. Bobele koyeba misala ya Yehova ekoki mpo na kopusa biso na kopesa bomoi na biso epai na ye? Limbolá.
14 Nzokande, koyeba bomoto ya Yehova mpe lolenge asalaka boyokani elongo na bato ekoki te. Esengeli kolóna botɔ́ndi ya solo mpo na Yehova. Lolenge nini? Na kosaleláká Liloba ya Nzambe kati na bomoi na biso mpe na kososoláká ete mitindá oyo mizali kati na yango mizali kopesa matomba. (Yisaya 48:17) Tosengeli kooka ete Yehova asili kobikisa biso na mbindo ya mokili oyo etambwisami na Satana. (Kokanisá na 1 Bakolinti 6:11.) Kati na etumba na biso mpo na kosala oyo ezali sembo, tozali koyekola kotalela Yehova, mpe tozali kososola biso moko ete Yehova azali Nzambe ya bomoi, “Ye oyo akoyokaka mabondeli.” (Nzembo 62:8; 65:2) Tozali nokinoki komiyoka ete tozali pene na ye mpe tokoki koyebisa ye mayoki ya mozindo ya motema na biso. Mayoki makasi ya bolingo mpo na Yehova makokóla kati na motema na biso. Na ntembe te yango ekomema biso na kopesa bomoi na biso epai na ye.
15. Nini epusaki mobali moko, oyo kala amipesaki na mosala na ye, na kosalela Yehova?
15 Mingi basili koyeba Yehova, Nzambe wana ya bolingo, mpe basili kopesa bomoi na bango mpo na kosalela ye. Tókamata ndakisa ya elɛktrisiɛ́ moko oyo mosala na ye mozalaki kokóla mpenza malamu. Ezalaki na bantango mosusu oyo azalaki kobanda mosala na ntɔ́ngɔ́ mpe azalaki kosala moi mobimba mpe butu mobimba, kozongáká na ndako na ngonga ya mitano na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo molandi. Nsima ya kopema penepene na ngonga moko, asengelaki kobima mpo na mosala epai mosusu. Azali komikundola ete: “Namipesaki mingi na mosala na ngai.” Ntango mwasi na ye abandaki koyekola Biblia, ye mpe asanganaki na boyekoli yango. Alobi ete: “Banzambe nyonso oyo nayebaki kino na ntango wana bazalaki bobele kozela ete básalela bango, basalaki eloko moko te mpo na matomba na biso. Kasi Yehova akamataki ebongiseli mpe atindaki Mwana sé moko na ye awa na mabelé mpe yango ezalaki mpo na ye komipimela moko monene.” (1 Yoane 4:10, 19) Nsima ya basanza zomi, mobali wana amipesaki epai na Yehova. Nsima na yango, amipesaki mobimba na kosalela Nzambe ya bomoi. Asɛngaki mosala ya ntango nyonso mpe akendaki kosala epai mposa ya basakoli ezalaki monene. Lokola bantoma, ye mpe ‘atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.’ (Matai 19:27) Nsima ya sanza mibale, ye mpe mwasi na ye babyangamaki mpo na kosala na filiale ya la Société Watch Tower ya mboka epai bazalaki kofanda, mpo ete akoka kopesa lisungi na misala ya lontiliki. Esili sikawa koleka mibu 20, azali kosala mosala oyo ye alingi mingi, na filiale—mpo na ye moko te—kasi mpo na Yehova.
Monisá polele komipesa na yo
16. Wapi matambe oyo moto asengeli kosala mpo na komipesa epai na Yehova?
16 Nsima ya koyekola Biblia mpo na mwa ntango, bilenge mpe mikóló basepelaka mingi na ntina na Yehova mpe na ntina na oyo asili kosala mpo na bango. Yango esengeli kopusa bango na komipesa epai na Nzambe. Yo mpe okoki kozala moko na bango. Lolenge nini okoki komipesa epai na Yehova? Nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya Biblia, osengeli komitambwisa engebene boyebi wana mpe osengeli kondimela Yehova mpe Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Osengeli kobongola motema mpe kotika etamboli nyonso ya masumu oyo ozalaki na yango kala. (Misala 3:19) Na nsima, okokóma na litambe ya komipesa, komonisáká yango na maloba ya polele kati na libondeli epai na Yehova. Na ntembe te, libondeli wana ekosala bopusi oyo ekoumela ntango molai kati na makanisi na yo, mpamba te, ekozala ebandeli ya boyokani ya sika kati na yo mpe Yehova.
17. (a) Mpo na nini bankulutu batalelaka mituna oyo misilá kobongisama elongo na baoyo bauti komipesa? (b) Litambe nini ya ntina esengeli kokokisama nokinoki nsima ya komipesa, mpe mpo na mokano nini?
17 Lokola Mose alimbwelaki Bayisraele masɛngami mpo na kokɔta kati na kondimana elongo na Yehova, bankulutu kati na masangá ya Batatoli ya Yehova basalisaka baoyo bauti komipesa na kotalela malamumalamu oyo komipesa na bango ezali kosɛnga. Basalelaka mituna oyo misilá kobongisama mpo na koyeba soki moko na moko na bango asili kokanga ntina ya mateya ya moboko ya Biblia mpe ayebi makambo oyo masɛngami epai na Motatoli ya Yehova. Na nsima, esengeli kobongisa molulu moko mpo na komonisa polele komipesa yango. Na momeseno, moto oyo auti komipesa azalaka na mposa makasi ya koyebisa na basusu ete asili kokɔta kati na boyokani malamu elongo na Yehova. (Kokanisá na Yilimia 9:24.) Lolenge eleki malamu mpo na kosala yango ezali ya kozwa batisimo ya mai lokola elembo ya komipesa yango. Kozindisama mobimba kati na mai mpe na nsima kobimisama, oyo elimboli ete asili kokufa mpo na oyo etali etamboli ya kala ya moimi mpe asekwi mpo na lolenge ya bomoi ya sika, oyo ya kosala mokano ya Nzambe. Ezali sakramɛ́ntu te, ezali mpe te molulu lokola misogi, molulu ya ba Shinto, oyo ekanisamaka ete kati na yango moto asengeli kopɛtolama na mai.a Nzokande, batisimo ezali eyambweli ya polele ya komipesa oyo esilaki kosalema kati na libondeli.
18. Mpo na nini tosengeli mpenza kondimisama ete komipesa na biso ekozala ya mpamba te?
18 Molulu wana liboso na bato banso ezali likambo oyo ekoki kobosanama te, oyo ezali kokundwela mosaleli wana ya sika ya Nzambe boyokani ya libela oyo azali na yango sikawa elongo na Yehova. Na kokesena na komipesa oyo mokumbi-mpepo ya kamikaze asalaki mpo na ekólo na ye mpe mokonzi na ye, komipesa wana epai na Yehova ekozala ya mpamba te, mpo ete ye azali Nzambe ya seko, Mozwi-na-Nguya-Nyonso oyo akokokisaka nyonso oyo esili ye kokana. Ye, mpe bobele ye moko, nde abongi ete tósambela ye na molimo na biso mobimba.—Yisaya 55:9-11.
19. Nini ekotalelama kati na lisoló oyo ekolanda?
19 Nzokande, komipesa ezali kosɛnga makambo mingi. Na ndakisa, lolenge nini komipesa ezali na bopusi likoló na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Yango ekotalelama kati na lisoló oyo ekolanda.
[Maloba na nse]
a Talá búku L’humanité à la recherche de Dieu, oyo ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 194-195.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini komipesa na lolenge oyo esalemaka na mokili esukaka na mawa?
◻ Nini epusaki Bayisraele na komipesa bango moko epai na Yehova?
◻ Nini ezali kopusa biso na komipesa lelo epai na Yehova?
◻ Lolenge nini tokoki komipesa epai na Nzambe?
◻ Batisimo ya mai ezali na ndimbola nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Na Sinai Bayisraele bamipesaki bango moko epai na Yehova