Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/2 nk. 8-12
  • Lisekwa ya bato sembo ekozala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisekwa ya bato sembo ekozala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyanganisama ya bato oyo bakokani na bampate
  • Elikya ya lisekwa
  • Bandimi “batángami bayengebene”
  • Lisekwa oyo ekosalema awa na mabelé
  • Elikya oyo ezali kopesa kobɔndisama
  • Liteya ya lisekwa etali mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nguya oyo elikya ya lisekwa epesaka
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Elikya ya lisekwa ezali na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Elikya ya lisekwa ezali na ndimbola nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/2 nk. 8-12

Lisekwa ya bato sembo ekozala

“Nazali na elikya epai na Nzambe . . . ete lisekwa ekozala

mpo na bato sembo mpe mpo na bato sembo te.”​—MISALA 24:15, NW.

1. Ezalela nini bato bazali kati na yango uta kokwea ya Adama mpe Eva kati na lisumu?

“OYO lobɔkɔ na yɔ ejui mpɔ na kosala, sala yango na nguya na yɔ mpɔ ete ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na esika na bakufi, esika ekokɛnda yɔ.” (Mosakoli 9:10) Bobele na maloba moke, oyo mabongi, Mokonzi ya mayele, Salomo, alobeli ezalela oyo ezali liboso na bato banso uta Adama mpe Eva, baboti na biso ya liboso bakweaki kati na lisumu. Liwa ekómelaka moto nyonso​—mozwi mpe mobólá, mokonzi mpe moto mpamba, moto sembo mpe moto sembo te. Ya solo liwa esili “koyangela lokola mokonzi.”​—Baloma 5:17, NW.

2. Mpo na nini bato mosusu ya sembo batungisamaki na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka?

2 Atako bokóli ya siansi oyo ezali kosalema na mikolo oyo mpo na makambo matali monganga, liwa ezali koyangela lokola mokonzi ata na mikolo na biso. Atako yango ezali likambo ya kokamwa te, bamoko bakoki mwa moke kotungisama na ntango bakutani na monguna wana ya kala. Mpo na nini? Ezali mpo ete kala, na bambula 1920, la Société Watch Tower asakolaki nsango oyo ete: “Bamilió na bato oyo bazali lelo na bomoi bakokufa te.” Bamilió yango bazali banani? Ezali bongo “bampate” oyo Yesu alobelaki kati na lisese na ye na ntina na bampate mpe bantaba. (Matai 25:31-46) Esakolamaki na ntina na bato yango oyo bakokani na bampate ete bakobima na boumeli ya ntango ya nsuka, mpe ete elikya na bango ekozala bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Nsima ya bambula, libota ya Nzambe lizwaki bososoli malamu ya etɛlɛmɛlo oyo “bampate” yango bazali na yango kati na mikano ya Yehova. Basosolaki ete bato wana ya botosi bakokabolama na “bantaba” ya motó makasi mpe nsima na kobomama ya bato oyo bakokani na bantaba, bampate bakosangola mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi oyo ebongisamaki mpo na bango.

Koyanganisama ya bato oyo bakokani na bampate

3. Likoló na mosala nini basaleli ya Nzambe batyaki likebi na bango kobanda 1935?

3 Kobanda mobu 1935, ‘moombo ya sembo’ atyaki likebi na koluka bato wana oyo bakokani na bampate mpe azali komema bango kati na lisangá ya Yehova. (Matai 24:45; Yoane 10:16) Baklisto wana ya botosi bayebaki ete Yesu azali sikawa koyangela kati na Bokonzi ya Yehova oyo ezali na likoló mpe ete ntango esili kobɛlɛma mpenza mpo na kotya nsuka na ebongiseli ya biloko oyo ya mabe mpe kotya mokili ya sika oyo kati na yango boyengebene ekozala. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 12:10) Kati na mokili wana ya sika, maloba ya kolendisa oyo ya Yisaya makokokisama: “Akosilisa kufa libela.”​—Yisaya 25:8.

4. Atako elikya makasi oyo bazalaki na yango ya komona kolóngisama ya boyangeli ya Yehova na Armagedon, nini ekómelaki bato mingi kati na bampate mosusu?

4 Lokola nsuka ya mokili ya Satana ebɛlɛmi mpenza, baklisto oyo bakokani na bampate bakosepela mpenza kozala na bomoi kino na ntango oyo boyangeli ya Yehova ekolóngisama na boumeli ya bolózi monene oyo ekokwela Babilone Monene mpe biteni mosusu ya mokili ya Satana. (Emoniseli 19:1-3, 19-21) Mpo na mingi kati na bango, makambo masalemi na motindo oyo balikyaki yango te. Mingi oyo balikyaki kozala kati na “bamilió” oyo bakokufa te, basili kokufa mpenza. Bamoko babomamaki mpo na solo kati na bolɔ́kɔ mpe na bakáa ya bakangami to na mabɔkɔ ya bato na milende mabe ya mangomba. Basusu bakufaki na makámá to na makambo oyo ekómelaka bato banso​—bokɔnɔ mpe konuna. (Nzembo 90:9, 10; Mosakoli 9:11) Ya solo, mingi mosusu mpe bakokufa liboso ete nsuka eya. Lolenge nini bato wana bakomona kokokisama ya elaka ya mokili ya sika oyo kati na yango boyengebene ekozala?

Elikya ya lisekwa

5, 6. Nini ezali kozela baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, oyo bazali kokufa liboso ya Armagedon?

5 Ntoma Paulo apesaki eyano wana azalaki koloba liboso na Moyangeli Moloma Feliki. Lokola eyebisami na Misala 24:15 (NW), Paulo alobaki na molende nyonso ete: “Nazali na elikya epai na Nzambe . . . ete lisekwa ekozala mpo na bato sembo mpe mpo na bato sembo te.” Elikya ya lisekwa ezali kopesa biso mpiko ata na ntango tokutani na mikakatano mileki mpenza makasi. Na ntina na elikya wana, baninga na biso balingami oyo bazali kozwa bokɔnɔ mpe bazali kooka ete bakokufa, bazali kolɛmba te na lolenge loleki ndelo. Ata soki bakokufa, bayebi ete bakozwa mbano ya bosembo na bango. Na ntina na elikya ya lisekwa, bandeko na biso ya mpiko, mibali mpe basi, oyo bazali kobomama na mabɔkɔ ya banyokoli bayebi ete banyokoli yango bakoki kozwa elónga te. (Matai 10:28) Ntango mosangani moko kati na lisangá akufi, tozali na mawa mpo ete tobungisi ye. Nzokande, soki azalaki moko kati na bampate mosusu, tozali kosepela mpo ete moninga na biso mondimi amonisaki bosembo kino nsuka mpe azali sikawa kopema, kozeláká bongo mokili ya sika ya Nzambe oyo ezali koya.​—1 Batesaloniki 4:13.

6 Ee, elikya ya lisekwa ezali moko na makambo ya ntina ya kondima na biso. Kasi, mpo na nini endimeli na biso kati na lisekwa ezali makasi boye, mpe banani bazali na elikya yango?

7. Lisekwa ezali nini, mpe wapi mwa mikapo oyo emonisi ete yango ekosalema solo?

7 Liloba na Greke mpo na “lisekwa” ezali a·naʹsta·sis, oyo elimboli “kotɛlɛma.” Ezali mpenza kopesa likanisi ya kobima longwa na bakufi. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete liloba “lisekwa” mpenza ezali kati na Makomami ya Liebele te, nzokande elikya ya lisekwa emonisami kati na Makomami yango. Na ndakisa, emonisami kati na maloba oyo Yobo abimisaki na ntango oyo azalaki kati na mpasi: “Ɛ sɔkɔ okobomba ngai kati na esika na bakufi [Sheol, NW] . . . sɔkɔ okotiela ngai elaka mpe okokanisa ngai!” (Yobo 14:13) Bobele bongo, na Hosea 13:14, tozali kotánga ete: “Nakosikola bango na lobɔkɔ na [Sheol, NW]. Nakobikisa bango na kufa. Ɛ kufa, esweli na yɔ wapi? Ɛ [Sheol, NW], libebisi na yɔ wapi?” Na 1 Bakolinti 15:55, ntoma Paulo atángaki maloba oyo mpe amonisaki ete bolóngi oyo esakolamaki likoló na liwa ekokokisama na nzela ya lisekwa. (Ya solo, na mokapo oyo Paulo azalaki kolobela lisekwa ya likoló.)

Bandimi “batángami bayengebene”

8, 9. (a) Lolenge nini bato bazangi kokoka bakoki kozwa lisekwa ya bato sembo? (b) Nini ezali moboko ya elikya na biso kati na bomoi oyo ekoki te kokatama na liwa?

8 Wana azalaki kosamba liboso na Feliki, lokola tolobelaki yango na paragrafe 5, Paulo alobaki ete lisekwa likozala mpo na bato sembo mpe mpo na bato sembo te. Bato sembo oyo bakosekwisama bazali banani? Ya solo, ezali na moto moko te oyo azali sembo uta kobotama na ye. Biso banso tozali basumuki uta kobotama, mpe tosalaka masumu kati na bomoi na biso mobimba​—yango ezali kokómisa biso bato oyo babongi na kufa, mpo na bantina mibale. (Baloma 5:12; 6:23) Atako bongo, kati na Biblia tozali kokuta maloba “batángami bayengebene.” (Baloma 3:28, NW) Yango elobeli bato oyo, atako bazangi kokoka, masumu na bango malimbisami na Yehova.

9 Maloba yango masalelami mingi mpo na baklisto bapakolami, oyo bazali na elikya ya likoló. Na Baloma 5:1 (NW), ntoma Paulo alobi ete: “Sikawa lokola totángami bayengebene na ntina na kondima, tiká ete tózala na kimya elongo na Nzambe na nzela na Nkolo na biso Yesu Klisto.” Baklisto bapakolami nyonso batángami bayengebene na ntina na kondima. Kondima na bango na likambo nini? Lokola Paulo alimboli yango na sikisiki kati na mokanda na ye epai na Baloma, ezali kondima na bango epai na Yesu Klisto. (Baloma 10:4, 9, 10) Yesu, moto na kokoka, akufaki mpe na nsima asekwisamaki longwa na kufa mpe amataki na likoló mpo na kopesa motuya ya bomoi na ye ya bomoto mpo na biso. (Baebele 7:26, 27; 9:11, 12) Ya solo, ntango Yehova andimaki mbeka wana, Yesu asombaki bato longwa na boombo ya lisumu mpe ya kufa. Baoyo bazali komonisa kondima na ebongiseli wana bazali kozwa matomba mingi mpo na yango. (1 Bakolinti 15:45) Na ntina na ebongiseli wana, mibali mpe basi ya sembo bazali na elikya ya kosangola bomoi oyo ekokatama te na monguna mabe, oyo ete liwa.​—Yoane 3:16.

10, 11. (a) Lisekwa nini ezali kozela baklisto bapakolami ya sembo? (b) Lolenge nini ya lisekwa bandimi oyo bazalaki liboso na Klisto bazalaki kolikya yango?

10 Na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, bapakolami ya sembo, oyo batángami bayengebene, bazali na elikya mpenza ya kosekwisama lokola bikelamu ya elimo oyo bikokufaka te, lokola Yesu. (Emoniseli 2:10) Lisekwa na bango elobelami na Emɔnisɛli 20:6, oyo elobi ete: “Baoyo babimi na lisekwa na liboso bajali na esɛngɔ, mpe bajali basantu. Kufa na mibale ejali na nguya likolo na bango tɛ, kasi bakojala banganga na Njambe mpe na Klisto; bakojala bakonji esika mɔkɔ na ye mbula nkoto.” Oyo ezali lisekwa ya likoló. Tomoni mpe ete Biblia ezali kobenga yango “lisekwa na liboso,” oyo emonisi ete makambo mingi mosusu makoya nsima.

11 Kati na Baɛbɛlɛ mokapo 11, Paulo alobeli molɔngɔ́ ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso na Klisto mpe oyo bamonisaki kondima makasi epai na Yehova Nzambe. Bango mpe bazalaki na kondima kati na lisekwa. Na molɔngɔ́ Ebr 11 35 ya mokapo wana, Paulo alobeli lisekwa ya kokamwa oyo esalemaki na ntango ya Yisraele, na kolobáká ete: “Basi bajuaki bakufi na bango mpɔ na lisekwa; bamosusu babɛtami makasi, baboyi kokangwa [na nzela ya lisiko, NW] ete bajua lisekwa lileki malamu.” Batatoli wana ya sembo ya ntango na kala bazali kozela lisekwa lileki malamu koleka bato oyo basekwisamaki, na ndakisa na Eliya mpe Elisa. (1 Mikonzi 17:17-22; 2 Mikonzi 4:32-37; 13:20, 21) Elikya na bango ezalaki lisekwa na mokili ya sika epai kuna basaleli ya Nzambe bakonyokolama te na ntina na kondima na bango, mokili oyo epai kuna basi bakobungisa te balingami na bango kati na kufa. Ee, bazalaki na elikya ete bakobima kati na bakufi kati na mokili ya sika, mokili bobele moko oyo biso mpe tozali kolikya yango. (Yisaya 65:17-25) Yehova amonisaki bango makambo mingi te na ntina na mokili wana ya sika lokola biso toyebi yango. Kasi, bayebaki ete mokili yango ezalaki koya, mpe balingaki kozala na bomoi kati na yango.

Lisekwa oyo ekosalema awa na mabelé

12. Bato na sembo oyo bazalaki liboso na Klisto batángamaki bayengebene? Limbolá.

12 Tosengeli kokanisa ete lisekwa ya mibali mpe ya basi ya sembo oyo bazalaki liboso na Klisto kati na mokili ya sika ekozala kati na lisekwa ya bayengebene? Ya solo, ezali bongo, mpamba te Biblia ebéngi bango bayengebene. Na ndakisa, moyekoli Yakobo atángi mobali moko mpe mwasi moko ya ntango na kala oyo babéngamaki bayengebene. Mobali yango ezalaki bongo Abalayama, tata ya libota ya Baebele. Na ntina na ye tozali kotánga ete: “‘Abalayama andimaki Njambe mpe yango etangameli ye mpɔ na boyɛngɛbɛnɛ’; abiangami mpe ‘moninga na [Yehova].’” Mwasi yango ezalaki bongo Laaba, oyo azalaki Moyisraele te, oyo amonisaki kondima monene epai na Yehova mpe akómaki mosangani ya libota ya Baebele. (Yakobo 2:23-25) Ee, mibali mpe basi ya ntango na kala oyo bamonisaki kondima makasi epai na Yehova mpe na bilaka na ye mpe batikalaki sembo kino kufa, batángamaki bayengebene epai na Yehova na ntina na kondima na bango, mpe na ntembe te bakosekwa na ‘lisekwa na bato sembo.’

13, 14. (a) Lolenge nini toyebi ete baklisto oyo bazali na elikya ya lisekwa oyo ekosalema awa na mabelé bakoki kotángama bayengebene? (b) Yango elimboli nini mpo na bango?

13 Nzokande, ezali boni mpo na bato oyo bakokani na bampate lelo, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé, baoyo bamipesi epai na Yehova mpe bazali kokufa na bosembo nyonso na boumeli ya ntango oyo ya nsuka? Bango mpe bakosekwa na lisekwa ya bato sembo? Emonani ete ezali bongo. Ntoma Yoane amonaki ebele monene ya bato wana ya sembo kati na emonaneli. Talá lolenge oyo alobeli bango: “Natalaki, mpe namɔni ebele monɛnɛ, oyo moto tɛ akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ; batɛlɛmi liboso na kiti na bokonji mpe liboso na Mwana na Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ, mpe basimbi bitape na mbila na mabɔkɔ na bango. Bangangi na mongongo makasi ete, ‘Lobiko na Njambe na biso oyo afandi na kiti na bokonji, mpe na Mwana na Mpate.’”​—Emɔnisɛli 7:9, 10.

14 Tóyeba ete bato wana ya bopɔlɔ bandimisami makasi na ntina na lobiko na bango, mpe bazali komonisa ete yango euti na Yehova mpe Yesu, “Mwana na Mpate.” Lisusu, batɛlɛmi liboso na Yehova mpe liboso ya Mwana na Mpate, bango nyonso balati bilamba mpɛmbɛ. Mpo na nini balati bilamba mpɛmbɛ? Ekelamu moko ya likoló ayebisi Yoane ete: “Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.” (Emɔnisɛli 7:14) Kati na Biblia, mpɛmbɛ ezali elilingi ya bopɛtɔ, ya boyengebene. (Nzembo 51:7; Danyele 12:10; Emoniseli 19:8) Likambo oyo ete ebele monene bamonani ete balati bilamba mpɛmbɛ elimboli ete Yehova azali kotalela bango ete bazali sembo. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Mpamba te, na ndimbola ya elilingi, basukoli bilamba na bango kati na makila ya Mwana na Mpate. Bazali komonisa kondima na makila ya Yesu Klisto oyo masopamaki mpe na yango batángami bayengebene lokola baninga ya Nzambe na elikya ya kobika na bolózi monene. Na yango, moklisto nyonso ya sembo oyo asili komipesa epai na Nzambe, mpe azali mosangani ya “ebele monene,” oyo akufi liboso ya bolózi monene, akoki kondimisama ete akosekwa na lisekwa ya bato sembo oyo ekosalema awa na mabelé.

15. Lokola bato sembo mpe bato sembo te bakosekwisama, wapi litomba ya lisekwa ya bato sembo?

15 Lisekwa wana elobelami na Emɔnisɛli mokapo 20, molɔngɔ́ 13, na maloba oyo: “Mai monɛnɛ ejongisi bakufi na kati na yango: Kufa na Ewelo ijongisi bakufi na kati na yango. Basambisami moto na motindo na misala na ye, moto na motindo na misala na ye.” Na bongo, na boumeli ya Mokolo monene ya Kosambisa ya Yehova na mbula nkóto, baoyo nyonso bazali kati na makanisi ya Yehova, bakosekwisama​—ezala bato sembo, ezala mpe bato sembo te. (Misala 17:31) Ekozala mpenza likambo malamu koleka mpo na bato sembo! Basilaki kotambwisa bomoi na bango engebene kondima. Basili kobanda kozala na boyokani ya penepene elongo na Yehova mpe bazali na elikya kati na kokokisama ya mikano na ye. Batatoli ya sembo, baoyo bazalaki na bomoi liboso ya Ntango na Klisto, bakolamwisama longwa na kufa na mposa makasi ya koyekola lolenge mikano ya Yehova na ntina na Mombóto misilaki kokokisama. (1 Petelo 1:10-12) Baoyo bazali kati na bampate mosusu, oyo Yehova azali kotalela lokola bato sembo na mikolo na biso, bakolamwisama longwa na nkunda, na mposa makasi ya komona lolenge mabelé mabongwani Paladiso, oyo balobaki na ntina na yango wana bazalaki kosakola nsango malamu kati na ebongiseli ya biloko oyo. Ekozala solo eleko moko kitoko!

16. Nini tokoki koloba na ntina na lisekwa ya Mokolo ya Kosambisa ya baoyo bazali kokufa na ntango na biso?

16 Na boumeli ya Mokolo ya Kosambisa ya mbula nkóto, ntango nini baoyo bakufaki na bosembo nyonso na bambula oyo ya nsuka ya ebongiseli ya Satana, bakosekwisama? Biblia elobeli yango te. Nzokande, ebongi mpenza ete bato batángami sembo oyo bazali kokufa na mikolo na biso básekwa awa na mabelé mpe básangana bongo elongo na ebele monene oyo bakobika na Armagedon kati na mosala ya koyamba bato ya kala oyo bakosekwa, boye te? Ezali boye mpenza!

Elikya oyo ezali kopesa kobɔndisama

17, 18. (a) Kobɔndisama nini elikya ya lisekwa ezali kopesa? (b) Topusami na koloba nini na ntina na Yehova?

17 Elikya ya lisekwa ezali kopesa makasi mpe kobɔndisama epai na baklisto nyonso lelo oyo. Soki totikali sembo, ezala ata ntango mpe makambo makanami te to ezala ata monguna nini, akoki te kobɔtɔla mbano na biso. Na ndakisa, Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992, na lokasa 177, tozali komona bafɔtɔ́ ya baklisto ya mpiko na mboka Ethiopie, oyo bandimaki kokufa kozanga kowangana kondima na bango. Maloba oyo mazali na nsé ya fɔtɔ́ na bango eyebisi ete: “Bilongi oyo tozali kozela komona yango lisusu na ntango ya lisekwa.” Oyo nde libaku kitoko tokozala na yango ya koyeba bato wana mpe basusu mingi oyo bamonisaki bosembo motindo wana ata liboso na kufa!

18 Ezali boni mpo na balingami na biso mpe baninga na biso oyo na ntina na bobangé to na maladi, bakokóma kino na bolózi monene te? Na nzela ya elikya ya lisekwa, bakomona mikolo kitoko oyo mizali koya soki batikali sembo. Mpe biso, soki na mpiko nyonso, tomonisi kondima kati na mbeka ya lisiko ya Yesu, tokomona mikolo kitoko oyo mizali koya. Mpo na nini? Mpamba te, lokola Paulo, tozali na elikya kati na “lisekwa ya bato na sembo mpe ya bato na sembo te.” Na motema na biso mobimba, tozali kotɔ́ndɔ Yehova mpo na elikya wana. Ya solo, yango ezali kopusa biso na kozongela maloba oyo ya mokomi na Nzembo ete: “Bosakola lokumu na ye kati na mabota na bato, misala na ye na kokamwa kati na bato yɔnsɔ. Loba ete [Yehova] ajali monɛnɛ mpe akoki kokumisama.”​—Njembo 96:3, 4.

Okoki kolimbola?

◻ Mikapo nini mizali kosalisa biso na kondima elikya tozali na yango ya lisekwa oyo ekosalema awa na mabelé?

◻ Nini ezali kosala ete baklisto bátángama sikawa bayengebene?

◻ Lolenge nini elikya ya lisekwa ezali kopesa biso mpiko mpe molende?

[Elilingi na lokasa 9]

Lokola Paulo, baklisto bapakolami bazali kolikya kati na lisekwa ya likoló

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto