Loyembo 192
Tóyebisa solo ya Bokonzi
1. Ezalaki, ntang’eleki,
Moklist’atelenganaki.
Nde Yehova apesaki
Pole na ye; engɛngaki.
2. Yambo mpenza, esengeli
Kosalela Mozalisi.
Kokumisa nkombo na ye,
Koyebisa nkembo na ye.
3. Totatoli nsango na Yah
Na ndako, na balabála.
Tokoteya bato solo,
Mpe bábika mpo na yango.
4. Tólɛmba te, tómonisa
Losambo ya pɛto na Yah.
Na molende, tokosala,
Na bosembo kino nsuka.