Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/96 lok. 4
  • Tóteya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mwa babúku

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóteya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mwa babúku
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Mwa babúku: bisaleli ya motuya mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 2/96 lok. 4

Tóteya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mwa babúku

1 Basaleli nyonso oyo bamipesi na Yehova bazali na mokumba ya koteya bazalani na bango Liloba ya Nzambe. Ntina monene ya mokumba wana emonanaka epai na biso ntango tososolaka ete ye oyo bokonzi nyonso na likoló mpe na mabelé epesamelaki ye apesi biso etinda ya kozalisa “bayekoli bato ya mabota nyonso,  . . . koteyaka bango.” (Mat. 28:18-20) Kosakolama ya nsango malamu ezali kosɛnga na biso ete tókóma batei.​—2 Tim. 2:2.

2 Na Febwáli, tokosalela makoki na biso ya batei mpo na kokabola mwa babúku. Tokoki kopona mwa makanisi ya Biblia oyo mabongi mpe kobongisa mwa bakomantere oyo ekopesa biso nzela na kobanda lisoló.

3 Soki tokolakisa mwa búku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?” tokoki koloba boye:

◼ “Totalaki baninga na bino mingi ya pembeni mpe tomoni ete bazali komilela mpo na bokóli ya bobomi bato, ya terrorisme mpe ya mobulu. Engebene yo, mpo na nini makambo yango makómi kokóla lolenge wana? [Tótika moto yango ayanola.] Ezali esengo na koyeba ete Biblia esakolaki yango. [Tótánga 2 Tim. 3:1-3.] Yebá ete makambo yango masengelaki komonana na ‘mikolo ya nsuka’. Yango ezali komonisa ete likambo moko likómi na nsuka na yango. Okanisi nini mpo na yango?” Tótiká ete moto yango ayanola. Tófungola mwa búku na lokasa 22, tólakisa elilingi mpe tótalela mokapo moko to mikapo mibale oyo mityami na lokasa yango. Tózwa bibongiseli mpo na kozonga ete tólimbola mpo na nini tondimaka ete mapamboli yango mazali lisusu mosika te.

4 Mbala mosusu tokosepela kolakisa mwa búku “Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? ”:

◼ “Bato mingi bazali na mokakatano ya koyeba ntina ya bomoi na bango. Bobele bato moke nde bazali na esengo, nzokande mingi bazali na bomoi ya kozanga elikya mpe ya mpasi. Okanisi ete ezali bomoi ya motindo wana nde Nzambe akanaki mpo na biso? [Tótika moto yango ayanola.] Engebene Biblia, Nzambe alingi ete tófanda na mokili lokola oyo.” Tólakisa elilingi ya lokasa 21, na nsima tóleka na lokasa 25 mpe 26, paragrafe 4-6, mpe tólimbola makambo oyo Nzambe asili kolaka. Tóbimisa motuna oyo mpo na bozongeli ya sika: “Ndenge nini tokoki kondimisama ete Nzambe akokokisa bilaka na ye?”

5 Tokoki kolakisa mwa búku “Sepela na bomoi ya seko na Mabele!” na kolakisáká elilingi ya ezipeli na mobimba na yango mpe na kotunáká ete:

◼ “Okosepela kofanda na mokili oyo etondi na bato ya esengo lokola oyo? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia elobi na biso ete Nzambe alingi bato mpe asepeli komona bango kozala na bomoi ya esengo awa na mabelé.” Tóleka na elilingi 49, mpe tótánga moko ya mikapo oyo mityami. Na nsima tólakisa elilingi nimero 50, mpe tólimbola oyo tosengeli kosala soki tolingi kozala na bomoi kati na paladiso. Tósɛnga bozongeli mpo na kosolola na ntina na kozala na kondima epai na Yesu Klisto.

6 Yehova asepelaka wana ‘tozali komonisa bokóli na biso polele na kotyáká likebi makasi na mateya na biso.’ (1 Tim. 4:15, 16) Mwa babúku ekozala na ntina mingi mpo na biso mpo na kosunga baoyo bazali na mposa ya koyoka “nsango malamu lokola eloko moko kitoko.” —Yis. 52:7, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto