Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/96 lok. 1
  • Tózala batosi, kasi bobele bayoki mpamba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala batosi, kasi bobele bayoki mpamba te
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • “Batosi na Liloba” na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Batosi ya Liloba ya Nzambe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tólukaka liboso Bokonzi ya Nzambe​—Na kopesáká mbeka na masanzoli ntango nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • “Bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 2/96 lok. 1

Tózala batosi, kasi bobele bayoki mpamba te

1 Na mikolo na biso, baklisto ya solo bandimaka na motema moko toli oyo ezali kosɛnga na bango ete bázala batosi na liloba, kasi bobele bayoki mpamba te. (Yak. 1:22) Ezaleli na bango ekeseni mpenza na oyo ya baklisto ya nkombo mpamba baoyo bazali kosalela Nzambe bobele na maloba. (Yis. 29:13) Yesu amonisaki polele ete bobele baoyo bakosala mokano ya Nzambe nde bakobika.​—Mat. 7:21.

2 Losambo oyo ezangi misala ya bokangami na Nzambe, ezali na ntina moko te. (Yak. 2:26) Na bongo, tómituna boye: ‘Misala na ngai mimonisaka mpenza ete kondima na ngai ezali ya solosolo? Namitambwisaka mpenza na boyokani na bindimeli na ngai? Lolenge nini nakoki komekola Yesu malamu koleka?’ Na koyanoláká na bosembo nyonso na mituna oyo, tokomona bokóli oyo tosili kosala mpo na oyo etali kosala mokano ya Nzambe mpe oyo etikali na biso mpo na kokokisa.

3 Lokola tozali bayekoli ya Yesu, tosengeli kozala na mokano ya liboso lolenge moko na oyo mokomi na Nzembo alobaki: “Tosepeli kati na Nzambe ntango nyonso mpe tokotɔ́nda nkombo na yo libela.” (Nz. 44:8) Boklisto ezali lolenge ya bomoi oyo esengeli komonana mokolo na mokolo mpe na makambo nyonso oyo tosalaka. Tokozwa bosepeli mingi na komonisáká na misala na biso nyonso mposa na biso ya sembo ya kokumisa Yehova.​—Filp. 1:11.

4 Kokumisa Yehova esuki te bobele na komitambwisa na lolenge lobongi kati na bomoi: Soki etamboli malamu ezalaki likambo bobele moko oyo Nzambe azali kosɛnga, mbele tokoki kosepela koluka bobele komibongisa. Nzokande, losambo na biso esɛngi mpe ete tósakola mitinda ya Yehova mpe tóyambola nkombo na ye liboso na bato banso.​—Eb. 13:15; 1 Pet. 2:9.

5 Kosakolama ya nsango malamu liboso na bato banso ezali moko ya misala ya ntina mingi oyo tosengeli kokokisa. Yesu amipesaki na mosala yango, mpamba te ayebaki ete yango elimbolaki bomoi ya seko mpo na baoyo bakoyoka. (Yoane 17:3) Lelo oyo, “kosakola liloba” ezali mpe na ntina; ezali mwango bobele moko mpo na lobiko ya bato. (Mis. 6:4; Lom. 10:13) Mpo na matomba oyo tokoki kozwa, tozali kososola mpo na nini Paulo alendisi biso ete ‘tósakola liloba’ mpe ‘tósala yango na etingya.’​—2 Tim. 4:2.

6 Kokumisa Yehova esengeli kozala na esika nini kati na bomoi na biso? Mokomi na Nzembo amonisaki ete ezalaki lobanzo na ye na boumeli ya mokolo mobimba. Yango mpe ezali mayoki na biso, boye te? Ezali bongo. Tokotalela boyokani na biso elongo na bazalani lokola mabaku ya kolobela nkombo ya Yehova. Tokoluka kosala ete lisoló likɔta na makambo ya elimo. Tokosala mpe milende ya kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola elongo na lisangá. Baoyo ezalela na bango ekoki kopesa nzela, bakoki kokana kosala mosala ya mobongisi-nzela, oyo epesaka nzela ete mosala ya kosakola ezala na lokumu mokolo na mokolo na bomoi na bango. Liloba ya Nzambe lizali kondimisa biso ete baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe na motema na bango mobimba bazali na esengo.​—Yak. 1:25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto