Loyembo 70
Tózala lokola Yilimia
1. Oyo esengo mingi,
Kosalela Yehova.
Tómonisa bosembo,
Tokozala na kimya.
Nde Biblia elobi:
Soki tobangi Nzambe,
Tokonyokwama solo, nde
Tokopambwama na ye.
2. Tómikundola mpo na
Elenge Yilimia.
Nzambe asungaki ye
Et’atika kobanga.
‘Bakobundisa yo mpo
Na solo koboma yo,
Kasi bakolónga yo te,
Mpo nakozala na yo.’
3. Na bambula mingi bɛɛ,
Asalelaki Nzambe.
Atikalaki sembo,
Ata bampasi na ye.
Tólanda Yilimia,
Mpe tózala na mpiko,
Tóliky’epai na Yehova;
Akolobaka solo.