Loyembo 53
Bokóli na ebongiseli ya teokrasi
1. Ebongiseli ya Nzambe ekóli.
Yango epalangani mingi bɛɛ.
Bato banso ba sembo basanzoli
Yehova na limemya monene.
Na’ebandeli bazalaki sé moke;
Nde lelo, basáli bafuluki;
Bapakolami mp’ebele monene,
Banso, mpo na Nzambe, batatoli.
2. Klisto’akosambisa, ye nde Mokonzi.
Mabota bayei liboso na ye.
Mosika te’akoboma banguna nyee,
Mpo’alóngisa Bokonzi ya Nzambe.
Tata na seko, Mopesi na toli,
Ye na nguya, Mokonzi ya kimya;
Mpo na Yehova, y’atondi molende,
Ye sol’akoyangela na kimya.
3. Awa tokómi na ntango ya nsuka,
Y’osepeli nde na bokóli te?
Mitema mitondi n’esengo mingi
Mpo na boboto, ngolu ya Nzambe.
Banso, tókebisa batuki ete,
Armagedon ekoboma bango;
Tósakola sol’epai na basembwi,
Yango nsango malamu ya sembo.