Loyembo 28
Pambolá makita na biso
1. Pambolani biso awa,
Tolɔmbi yo, Yehova;
Tik’elimo na yo Nzambe,
Ekambani makita.
2. Liloba na yo, bilei.
Pesani biso yango.
Lakisá biso lolenge
Ya kolimbola yango.
3. Yah, mpo tolingi bosantu,
Toyei mpo tóteyama,
Tóyekola koyeba yo
Mpo’ete tómikitisa.
4. Yehova, pesani biso
Bomoko, kimya na yo.
Tolingi kosalela yo,
Tokokumisa sé yo.