Loyembo 151
Tósakola nsango malamu ya Bokonzi
1. Nsango ya Bokonzi, Klisto’asɛngi esakolama.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Tósala na molende kati na mosala wana.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Tósakoli nsango yango na nzela mpe na ndako,
N’ebele ya mikanda tokabweli bato.
Tósalaka mosala ya Nzambe na mpiko nyonso.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
2. Nsango y’elambo Nzamb’asali, tóyebisa yango.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Mosika te, basembwi bakosepela na yango.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Tóyebisa bango, bakolya, nzal’ekosila nyee;
Biloko malamu na elambo ya Nzambe.
Tóyebisa basembwi bomo’ ebɛlɛmi pene.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
3. Nsango ya Bokonzi ezali nsango ya esengo.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Ye alingi Yehova, aya tósepel’elongo.
Tósakola nsango ya Bokonzi!
Tóyebisa ’te, Nzamb’akobɔndisa basembwi mpe
Akopesa kimya na bango bandimi ye.
Tóyebisa bato ntina ya kosalela Nzambe.
Tósakola nsango ya Bokonzi!