Libongoli ya mokili ya sika na Lifalansé esembolami lisusu
1 Lokola tozali baklisto Batatoli ya Yehova, kobimisama ya libongoli moko ya sika to ya libongoli moko oyo esembolami lisusu ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali mpenza likambo moko ya ntina mingi. Na bongo, ezali esengo mingi mpe ntina ete, lokola yango esilaki koyebisama na mayangani ya etúká 1995, tosili kozwa libongoli ya Lifalansé oyo esembolami lisusu ya Traduction du monde nouveau. Mosika te, tokozwa ebimeli ya volími ya monene, oyo ezali na banɔ́ti mpe mitindami.
2 Na ntembe te nokinoki tofungolaki yango, mbala mosusu mpo na kotánga mikapo mosusu oyo tolingaka mingi. Tosalaki nini mpe mayoki na biso ezalaki nini? Tokamwaki na mwa bambongwana mosusu kati na makomi?
3 Esengeli liboso mpenza komituna mpo na nini kobimisa libongoli oyo esembolami lisusu ya Traduction du monde nouveau na Lifalansé. Tolobela yango noki ete, libongoli oyo tozalaki kosalela lizalaki malamu mpenza mpe lizalaki solo kokokisa bamposa na biso, ezala mpo na boyekoli ya moto ye moko ya Liloba ya Nzambe to mpo na kosakola Bokonzi. Nzokande, lokola nkota ya mikolo na biso izali kokóla ntango nyonso, Biblia nyonso izali kosembolama lisusu na bantango na yango, mpe libongoli na biso likoki te kopɛngola mobeko wana. Lisusu, yango ezali kopesa nzela na babongoli, oyo bazwi eksperiansi mingi ete bátalela lisusu mokanda yango mpe bápɛtola makomi ya libongoli na bango. Tótalela sikawa mwa makambo ya ntina ya libongoli yango.
Ekomeli ya sika ya bankombo ya bato
4 Likambo oyo likamwisaki bino libosoliboso, na ntembe te ezali ekomeli ya sika ya bankombo. Na bongo, Élie ekómi Éliya ; Néhémie, Nehémia ; Urie, Ouriya ; mpe bongo na bongo. Mpo na nini mbongwana wana? Bankombo mingi ya Biblia elobelaka bonzambe. Ezali mitindami wana na nkombo ya Yehova oyo ezalaki komonana lisusu te kati na bankombo oyo ekomamaki kala longwa na lokota greke to latíni, oyo babongoli balingaki kobimisa kati na libongoli oyo lisembolami lisusu. Na yango, ekomeli ya sika ebimi mpo na bankombo mingi.
5 Talá mwa bandakisa mosusu, liboso mpenza mpo na nkombo ya Nzambe oyo ekomami na mokuse liboso ya nkombo moko: “Yonathân ”, “ Jéhovah a donné” (talá “Yehonathân” na 2 Chroniques 17:8); “Yehoshaphat”, “Jéhovah est juge.” Na nsuka ya bankombo: Éliya, “ Mon Dieu est Jéhovah”; Nehémia, “ Jéhovah console.” Tokoki lisusu kotánga Ouriya, oyo kala ezalaki kokomama Urie, “ Ma lumière est Jéhovah.” Toloba na kolekáká ete lolaka u ezalaka na liebele te. Lolenge moko na bosemboli na biso, mabongoli mingi matyaka ou, mpe oyo matyaka u kati na makomi ebosanaka te koyebisa na lokasa ya libandela ete molelisi u etángamaka ntango nyonso ou. Na ndakisa: “Our des Chaldéens [ou de Chaldée].”—Gen. 11:28.
6 Mwa bandakisa wana ezali komonisa ntina oyo ezali ya koyákisa (transcrire) bankombo longwa na liebele kasi na greke te to na latíni te, lokola yango ezalaki kosalema kala. Na ndakisa, bankombo mingi oyo esukaka na ie (lokola Élie to Néhémie) oyo ezwami kati na libongoli oyo liutu koleka mpe kati na Biblia mosusu ekomami na lolenge ya latíni longwa na liebele, mosusu ezali na lolenge ya greke. Kati na bankombo oyo eyákisami longwa na greke to na latíni, nkombo ya Nzambe emonanaka lisusu te, yango ezali likambo ya mawa. Totalela na ndakisa nkombo Élie, lokola yango ezalaki kobima na libongoli ya kala. Koyákisáká yango mbala moko longwa na liebele, nkombo yango ekómi Éliya (“ Mon Dieu est Jéhovah ”), kati na yango Ya ezali kobima polele, ekomeli mokuse ya nkombo Jéhovah.
7 Kasi, ekoki komonana ete bato mosusu bakoloba na biso mpo na nini tolandi kosalela ekomeli “Jéhovah,” nzokande babongoli mosusu ya Biblia na Lifalansé basalelaka “Yahweh” to “Yahvé,” kopesáká mokalo ete “Jéhovah” ezali kokokana te na ebengeli ya sikisiki ya nkombo ya Nzambe. Tokopesa eyano nini na yango? Ɛh bɛɛ, na ndakisa ya mabongoli mosusu mingi ya Biblia, babongoli ya Traduction du monde nouveau batiki se bongo ekomeli ya kala ya bankombo oyo eyebani mingi na bato nyonso, ata mpo na bato oyo bamesani na Biblia te. Tótánga na ndakisa, Noé, Moïse, Jérusalem mpe Jésus. Bankombo wana minei ezali ekomeli ya Lifalansé oyo euti na Latíni. Babongoli ya Biblia oyo baponi kokoma “Yahweh” to “Yahvé” mpo na nkombo ya Nzambe basanzɛ́ te ekomeli ya kala ya bankombo oyo totángi awa na likoló, nzokande mbala mosusu mpo ezala pene mpenza na liebele esengelaki koyákisa yango “Noah,” “Moshè,” “Yeroushalayim” mpe “Yehoshoua.” Lolenge moko na nkombo Noé, Moïse, Jérusalem mpe Jésus, kotaleláká kosalelama na yango, babongoli ya Traduction du monde nouveau, basanzɛ́ te ekomeli wana ya kala ya nkombo ya Nzambe oyo eyebani malamu, Jéhovah, lokola yango endimamaki uta bikeke mingi na lokota Lifalansé.
Libongoli moko ya sembo na bindimeli ya Biblia
8 Na bisika mosusu, eponami kobongolama ya ndimbola ya maloba oyo elandi na penepene lisusu bindimeli ya Biblia oyo bimonisami na maponi ya libongoli ya Lingelesi, na kokangisáká penepene liebele to greke. Talá mwa bandakisa mosusu. Kati na Genèse 3:15 elobami ete: “Je mettrai une inimitié entre toi et la femme, entre ta semence et sa semence.” Tozali kokuta awa liloba “semence” na esika ya “postérité.” Tóbosana te ete Traduction du monde nouveau ezali libosoliboso Biblia ya boyekoli oyo ekopesa nzela na kozwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Na yango, babongoli bamipesaki mokumba ya kopesa libongoli oyo elimboli mpenza makambo ndenge yango ezali, na bongo liponi awa esalemaki mpo na liloba “semence.” Liloba yango lizali kobongola liloba ya liebele zèraʽ, oyo elimboli “semence, graine, récolte,” kasi lisusu, na elobeli ya Biblia, “descendance, postérité,” ndimbola oyo epesami na nɔ́ti. Liloba oyo ekokani na yango na greke ezali spérma, oyo mpe ebongolamaki na “semence.” Na ndakisa, na Luka 1:55 tozali kotánga boye: “Comme il l’avait annoncé à . . . Abraham et à sa semence [en note: “descendance”.]”
9 Kati na bisika mingi, oyo tozalaki kokuta liloba “piété,” tozali komona sikawa elobeli “attachement à Dieu.” Na ndakisa, tozali kotánga boye: “Afin que nous puissions continuer à mener une vie calme et paisible dans un parfait attachement à Dieu et en toute dignité.” (1 Tim. 2:2) “L’exercice corporel est utile à peu de chose, mais l’attachement à Dieu est utile à toutes choses.” (1 Tim. 4:8) “Oui, c’est un moyen de grand gain que cet attachement à Dieu, si l’on sait se suffire à soi-même.” (1 Tim. 6:6) Mpo na nini mbongwana motindo wana? Ezali bongo kobongolama ya liloba eusébéïa, oyo ebongolamaki kala na “piété.” Nzokande, bato boni bayebaka ndimbola ya liloba “piété” lelo oyo? Mingimingi bakanisaka na mwa bokangami ezangi ntina na mibeko ya lingomba, na mimeseno ya ekokiseli mpamba, na esika ya ezaleli oyo ezali kokɔtisa moto na mobimba na ye na bokangami na bomoto ya Nzambe. Nzokande ezali wana nde ndimbola ya liloba eusébéïa, oyo ebongolami polele mpe sikisiki na “attachement à Dieu.”
10 Bobele bongo, tólobela mbongwana mosusu oyo mbala mosusu bosili komona yango. Na Matthieu 22:14 mpe 24:22, tozali kotánga boye: “Il y en a beaucoup qui sont invités, mais peu qui sont choisis. ” “ À cause de ceux qui ont été choisis ces jours-là seront écourtés.” Liloba élus ekitinyamaki bongo na elobeli ceux qui ont été choisis. Ya solo mpenza, baklisto bapakolami bazali élus te na lolenge ya demokrasi to basilaki kotángama liboso te, ndimbola oyo epesamaka mingimingi na liloba “élus” kati na boklisto ya nkombo mpamba, kasi bazali nde choisis na Yehova.
11 Kati na bambongwana oyo na ntembe te bokosepela na yango ntango bokosunga bato ya motema malamu ete bákanga ntina ya bindimeli ya Makomami, tótalela lisusu mbongwana ya mokapo oyo mosalelamaka mingi, Jean 1:1. Tozali kotánga yango boye kati na libongoli oyo esembolami lisusu: “Au commencement la Parole était, et la Parole était avec Dieu, et la Parole était un dieu.” Nsuka ya mokapo ekómisamaki na “un dieu” mpamba te liloba ya greke θεός (théos) ezali awa nkombo-lisangá na bɔɔkɔ etyami liboso ya likelelo kasi elandami te na artiklɛ definí. Ezali théos moko oyo esalelami kozanga artiklɛ, nzokande Nzambe oyo elongo na ye Liloba (to Logos) azalaki na ebandela amonisami, ye, na elobeli ya greke ὁ θεός, elingi koloba théos elandami na artiklɛ definí ho. Ezali théos, elingi koloba Nzambe. Na bongo, kolobáká ete Parole to Logos ezalaki “un dieu,” na maloba mosusu “de condition divine,” Yoane alingaki koloba te ete Liloba ezalaki Dieu oyo elongo na ye ezalaki. Ntoma azalaki kolobela bobele motindo ya la Parole (to Logos) kozanga kokokisa yango na Nzambe ye moko.
12 Na ntembe te bokomona mpe elobeli “unique-engendré” oyo esalelami mbala mingi mpo na Yesu. Tozali kotánga boye: “Le dieu unique-engendré qui est dans le sein du Père.” “Dieu a tellement aimé le monde qu’il a donné son Fils unique-engendré.” (Jean 1:18; 3:16) To lisusu: “Dieu a envoyé son Fils unique- engendré.” (1 Jean 4:9) Elobeli yango, “unique- engendré,” ebongoli na lolenge ya sikisiki mpe ya ndimbola mpenza liloba ya greke monogenès. Liloba wana lizali komonisa te kobotama na lolenge ya bomoto ya Yesu, kasi nde na boye ete azali bobele ye moko na lolenge na ye, ezali ye moko oyo asalemaki mbala moko na Nzambe mpenza.
13 Mbala mosusu motángi akokamwa na kokutáká likelelo “bâtir” na esika ya “édifier” na bisika oyo bizali na ndimbola ya elimo. Na ndakisa, na 1 Corinthiens 14:12 mpe na Romains 15:2 : “Puisque vous désirez avec zèle des dons de l’esprit, cherchez à y abonder pour bâtir la congrégation.” “Que chacun de nous plaise à son prochain dans ce qui est bon pour le bâtir.” Na mikapo wana, ezali te bobele likambo litali kolendisa basusu na ndimbola ya kokembisa bango na kopesáká ndakisa malamu, kasi, lokola zingazinga ya frazɛ ya Paulo ezali komonisa yango, ezali lokola kotonga ndako: na ndakisa, lisangá to bomoto ya boklisto.
“Monsieur”
14 Na botángi na bino ya baevanzile, mbala mosusu bokamwaki na bokɔti ya liloba “monsieur” na esika ya “Seigneur” kati na mikapo mosusu. Na ndakisa, na Jean 12:21 tozali kotánga boye: “Ceux-ci donc s’approchèrent de Philippe, qui était de Bethsaïda de Galilée, et ils le priaient, en disant: ‘Monsieur, nous voulons voir Jésus.’ ” Libongoli oyo, mbala mosusu lizali kokamwisa, lizali kosɛnga ndimbola.
15 “Monsieur” ebongoli awa liloba ya greke kurios, elobeli oyo elimboli ntango nyonso te bobele “Seigneur.” Talá oyo ekoki kotángama na ntina yango kati na búku moko eyebani: “Kati na la Septante, tozali kokuta bandimbola oyo eyebani mpe ya kiló te ya kyrios ‘maître de maison’ (Jug. XIX, 22-23), ‘ propriétaire ’ d’un bœuf (Ex. XXI, 28-29; XXII, 10-15), . . . mpe mingimingi liloba ya bonkondé oyo mwa bokeseni na yango moke ezali na ntina na ‘monsieur’ mpo na moto oyo oyebi te (Gen. XXIV, 18 ; XXXI, 35) na ‘Excellence, Monseigneur.’ Ezali ebengeli ya basáli-na-mesa ya mokonzi ‘Monseigneur le Roi,’ oyo azali mopakolami na Nzambe. (I Sam. XXVI, 23; II Sam. I,14, 16)”
16 Tozali kotánga lisusu boye kati na búku bobele yango: “Liloba ya bonkondé oyo eyebani, kyrios elobamaka mpo na conférencier lokola tolobaka lelo ‘maître’ . . . Ekokani na liloba ya Lifalansé ‘monsieur’ . . . to ‘madame’ . . . ; kasi ezalaka na limemya koleka soki ezali kolobelama mpo na bato oyo baleki na mbula ya kobotama . . . Na yango elobami mpo na mwana mobali epai na tata na ye . . . ” Na ndakisa Matthieu 21:28, 29, epai kuna ekomami ete “Un homme avait deux enfants. S’avançant vers le premier, il a dit: ‘Mon enfant, va-t’en aujourd’hui travailler à la vigne. ’ En réponse celui-ci a dit : ‘ Je veux bien, monsieur,’ mais il n’y est pas allé.”
17 Na nsuka, talá oyo tokoki kotánga kati na molɔngɔ́ ya bankombo na Nouvelle version Segond révisée na nsé na motó na likambo Seigneur: “Liebele adôn. Liloba oyo likoki komonisa moto moko ya ntina. Mingimingi esalemaka mpo na Nzambe kati na A.T. . . . Oyo ekokani na yango na greke kurios esalelamaka kati na N.T. mpo na kolobela Nzambe mpe Yesu Klisto. Na elobeli ya momeseno, liloba yango libungisaki lokumu na yango mpe ezalaki kokokana mingi na liloba na biso Monsieur [Jn 12:21; 20:15; Ac 16:30, mpe bongo na bongo.] ”
18 Na Jean 4:11 tozali kotánga boye: “[La Samaritaine] lui dit: “Monsieur, tu n’as même pas un seau pour puiser . . .” Na monɔkɔ ya Mosamalia, “monsieur” (kurios) ezali awa bobele ebengeli ya bonkondé. Esengeli kotalela elobeli ya moto ya mibale na bɔɔkɔ́ (tutoiement). Ya solo, soki tutoiement esalelami ntango kurios ebongolami na “Seigneur,” mpe na bongo ezali elembo ya limemya mpenza, na ntina koleka tutoiement esalelamaka ntango kurios ezali bobele ebengeli ya bonkondé mpe ebongolami na “monsieur.”
Maloba oyo malobamaka mingi to ya ntango na biso
19 Babongoli baponaki mpe kokitinya maloba oyo mayebani mingi te, to oyo masalelamaka mingi te na mikolo na biso, na maloba oyo mayebani mingi na batángi nyonso. Na ndakisa, Actes 16:35 ebongolamaka boye: “Quand il fit jour, les magistrats civils envoyèrent dire par les appariteurs: ‘Relâche ces hommes.’ ” Liloba “appariteurs” esalelamaka mpenza te lelo. Kati na libongoli oyo esembolami lisusu, mokapo yango mozali kotángama boye: “Quand il fit jour, les magistrats civils envoyèrent les officiers de police pour dire: ‘Relâche ces hommes.’” Tozali mpe na ndakisa mosusu na elobeli “impôt de capitation” oyo tozalaki kokuta na Matthieu 17:25 na libongoli oyo liuti koleka. Kati na libongoli ya sika, elobeli yango ekitinyamaki na “impôt par tête,” oyo moto nyonso azali kokanga ntina kozanga nkaka. Bobele bongo, na Luc 2:7, epai kuna elobami ete Marie “coucha [Jésus] dans une mangeoire,” motángi nyonso ya eleko na biso akokanisa nokinoki esika oyo Yesu alalisamaki. Mpamba te, liloba “crèche” lelo ezali komonisa esika moko etyami mpo na koyamba bana mike to, na elobeli ya lingomba, elilingi ya elyelo ya banyama na Betɛlɛmɛ oyo esalelamaka na Eyenga ya Mbótama.
Mpo na botángi ya sika ya Makomami
20 Na nsuka, eloko mosusu esembolami, mpe ezali ya moke te, kati na Traduction du monde nouveau, na kolandáká malamumalamu maloba ya libongoli ya Lingelesi mpe na kotikaláká pene mpenza na Liebele mpe na greke, babongoli basali milende ya koyeisa makomi pɛ́pɛ́lɛ́ mpo na kokómisa botángi na yango kitoko koleka. Yango ezali komonana polele na bisika mingi kati na Makomami, lokola na bandakisa to masese ya Yesu, na Matthieu 13:24-30 epai oyo eleko-eleka (passé-simple) ekitanisamaki na eleko-eleki (passé-composé). Lokola bakomi mingi bazali kosala yango na ntango na biso, tokitinyaki mingimingi litombela-lileki (subjonctif imparfait) na litombela-bɛ́bɛ́ (subjonctif présent), yango ezali kolembisa kwɔ́kɔ́sɔ́ ya makomi, lokola emonisi yango Psaume 90:2. Mokapo yango ezalaki kotángama boye: “Avant que fussent nées les montagnes, ou que tu eusses enfanté comme dans les douleurs la terre et le sol productif, oui, depuis des temps indéfinis et pour des temps indéfinis tu es Dieu.” Ezali sikawa kotángama boye na libongoli oyo esembolami lisusu: “Avant que les montagnes soient nées, ou que tu te sois mis à enfanter comme dans les douleurs la terre et le sol productif, oui depuis des temps indéfinis et pour des temps indéfinis tu es Dieu.”
21 Maloba mosusu mingi masembolamaki lisusu, kasi tokokoka te kolobela yango nyonso awa. Totikeli bino libaku ya komona yango bino moko. Mbongwana mingi etali libongoli oyo esembolami lisusu ya Traduction du monde nouveau mbala mosusu ekosɛnga na biso ete tótika mimeseno mosusu, kasi babongoli basali milende mingi mpo na kobimisa makomi ya malamu oyo, tomikundola yango, elandi malamumalamu koleka libongoli oyo tozalaki kosalela, maponi oyo masalemaki na babongoli ya libongoli ya Lingelesi bakisá mpe makomi ya ebandeli ya liebele mpe ya greke. Tolingi mpenza ete botaleli oyo ya mwa makanisi ya libongoli oyo esembolami lisusu ya Traduction du monde nouveau epusa bino na kotánga mpe kotánga lisusu Makomami Mosantu na “mposa na mabɛlɛ sembo na liloba,” koyebáká ete lokola moyekoli Yakobo akomaki yango, “Nde ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.”—1 Pet. 2:2; Yak. 1:25.