Loyembo 14
“Bino mabota, bósepela”!
1. Esengo, libota ya Nzambe!
Bokonzi’esi’koya.
Na Siona, Yesu nde Mokonzi;
Tika bósepela!
Elak’a mabota ekoki,
Bakonzi basuki.
Esengo, libota ya Nzambe!
Seko, ye mokonzi.
2. Esengo, libota ya Nzambe!
Nsuka ebɛlɛmi.
Armagedon ekómi pene,
Kasi, batomboki
Basali nzambe ya lokutá,
Nde baboyi Klisto,
Mokonzi ya kimya; na ye nde
Tokozwa esengo.
3. Esengo, libota ya Nzambe!
Bino bósakola
nsango malamu ya Bokonzi.
Solo, bósakola!
Yesu’akoyangela na sembo,
Bolingo, mayele.
Esengo, libota ya Nzambe!
Tika tótosa ye!