Loyembo 71
Tósimba nsango malamu!
1. Nsuka ebɛlɛmi, solo
Tósakola nsango.
Tótosa Yehova Nzambe
Mpe tózala moko!
Tóngɛngisa pole, solo,
Yango n’esengo bɛɛ!
Tókokisa mosala mpo
Ezali mpamba te.
2. Elikya ya lisekwa, nde
Yango libɔndisi;
Ekolendisa kondima
Ya bato na mpasi.
Na bilaká ya Yehova,
Tóty’elikya nyonso.
Solo, tokolónga, kasi
Nde tózala sembo.
3. Tósala na mpiko nyonso,
Tólanda mikano.
Baninga malamu, tózwa
Bango; tókɛngɛla!
Eliky’a Bokonzi, solo
Ekembisi biso.
Tótɔndo Yehova Nzambe,
Nde na Klisto, nkembo.