Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 15 nk. 140-149
  • Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BISALELI MPO NA KOTONGA LIBALA YA ESENGO
  • NDENGE NINI KOBƆKƆLA BANA ENGEBENE BOYEBI YA NZAMBE
  • NDENGE NINI KOZWA “MAKOKI YA KOTAMBWISA”
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Tiká ete libala na bino lizala ekanganeli ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 15 nk. 140-149

Mokapo 15

Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe

1-3. Mpo na nini babalani mosusu bazali kokoka te kosilisa mikakatano ya libala mpe ya kobɔkɔla bana, kasi lisalisi nini Biblia ekoki kopesa bango?

KANISÁ ete olingi kotonga ndako na yo moko. Ya liboso, okosomba mabelé. Na mposa ete makambo másalema nokinoki, ozali komona ndako na yo ya sika kati na makanisi na yo. Kasi ekozala boni soki ozangi bisaleli mpe makoki ya kotonga? Milende na yo mikozala mpenza na ntina te!

2 Babalani mingi bakɔtaka na libala na kokanisáká kozala na libota moko ya esengo, nzokande bazali ata na bisaleli te mpe na makoki te oyo masengeli mpo na kotonga yango. Mwa moke nsima ya mokolo ya libala, bizaleli ya mabe bibandi komonana. Kobunda mpe koswana ezali kobima mokolo na mokolo. Ntango bana babotami, tata mpe mama ya sika bazali komimona ete bazali na makoki mingi te ya kozala baboti ya malamu, motindo moko mpe bazali na makoki te ya kozala babalani malamu.

3 Nzokande, likambo ya esengo, Biblia ekoki kosalisa babalani. Malako na yango mazali lokola bisaleli oyo bikoki kopesa yo makoki ya kotonga libota ya esengo. (Masese 24:3) Tiká tótala lolenge oyo yango ekoki kosalema.

BISALELI MPO NA KOTONGA LIBALA YA ESENGO

4. Mpo na nini tosengeli komizela ete mikakatano mibima kati na libala, mpe mitindá nini mipesami kati na Biblia mpo na bango?

4 Ata soki babalani mibale bamonani ete baponamaki malamu, nzokande bakeseni na mayoki, na makambo bakutanaki na yango na bolenge, mpe na makambo babɔkwamaki na yango na libota. Na yango, mikakatano mikoki kobima nsima ya libala na bango. Lolenge nini bakosilisa yango? Ya solo, ntango masɔ́ akotongaka ndako, akotalaka liboso mwango ya ndako. Yango ezali ndakisa oyo esengeli kolandama. Biblia ezali kopesa malako ya Nzambe mpo na kotonga libota ya esengo. Tiká tótalela sikawa mwa ndambo na malako yango.

5. Lolenge nini Biblia emonisi ntina ya bosembo kati na libala?

5 Bosembo. Yesu alobaki ete: “Oyo nde Nzambe asili kokangisa esika moko tiká te ete moto akangola yango.”a (Matai 19:6, NW) Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete libala likumisama epai na bato nyonso mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na ekobo.” (Baebele 13:4, NW) Na yango, bato oyo babalani basengeli koyeba ete bazali na mokumba liboso na Yehova ya kotikala sembo moto na moto epai na mobalani na ye.​—Genese 39:7-9.

6. Lolenge nini bosembo ezali kobatela libala?

6 Bosembo ezali kopesa lokumu na libala mpe ezali kolongola bobangi. Babalani oyo bazali sembo bayebi ete, ata eloko nini ekoki kobima, bakosungana moko na mosusu. (Mosakoli 4:9-12) Oyo nde bokeseni na baoyo bazali kosundola libala na bango wana mokakatano moke mobimi! Bato motindo wana basukisaka nokinoki koloba ete ‘baponaki mobalani ya mabe,’ to ‘bazali lisusu na bolingo te moko epai na mosusu,’ mpe bakanisi ete mobalani ya sika nde azali mwango ya malamu mpo na kosilisa mokakatano yango. Kasi bosukisi motindo wana ezali kopesa nzela te na babalani motindo wana na kokóla na mayoki. Mobalani oyo azangi sembo akoki kobimisa mikakatano ya lolenge moko epai na mobalani na ye ya sika. Ntango moto azali na ndako ya malamu kasi amoni ete ezali kotanga na mbula, akomeka kobongisa yango. Akosundola yango te mpo na kokende kofanda na ndako mosusu. Bobele bongo, kozwa mobalani mosusu ezali yango te nzela oyo esengeli mpo na kosilisa matáta kati na libala. Ntango mikakatano mibimi, bómeka te kotya nsuka na libala na bino, kasi bósala nde makasi ya kobikisa yango. Bosembo motindo wana ezali kotalela libala lokola eloko ya motuya oyo ebongi kobikisa yango, kobatela yango mpe kolinga yango mingi.

7. Mpo na nini kosolola ezalaka mbala mingi mokakatano mpo na babalani, kasi lolenge nini kolata “bomoto ya sika” ekoki kosalisa na likambo yango?

7 Kosolola. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Myango mikokufa wana kosolola na pembeni ezali te.” (Masese 15:22, NW) Nzokande, kosolola ezali mokakatano mpo na babalani mosusu. Mpo na nini ezalaka bongo? Mpamba te bato bazali na lolenge lokeseni ya kosolola. Yango ezali likambo oyo mbala mingi ememaka kino na kozanga koyokana makasi mpe mikakatano. Lolenge oyo moto abɔkwamaki ekoki mpe kopesa nzela na likambo oyo ya kozanga koyeba kosolola. Na ndakisa, basusu bakoki kozala ete babɔkwamaki kati na ndako oyo baboti bazalaki ntango nyonso koswana. Sikawa lokola bakómi mikóló oyo babali, bazali koyeba te lolenge ya koloba epai na babalani na bango na boboto mpe na bolingo. Atako bongo, ndako na bino esengeli te kobeba kino kokóma ‘ndako oyo etondi na kowelana.’ (Masese 17:1) Biblia esɛngi biso kolata “bomoto ya sika,” mpe kobwaka makambo ya bololo, koswana mpe kofinga.​—Baefese 4:22-24, 31.

8. Okoki kosala nini soki matáta mabimi kati na yo mpe mobalani na yo?

8 Okoki kosala nini soki matáta mabimi? Soki moko abandi kotombola mongongo, okoki kosala malamu na kolanda toli ya Masese 17:14 (NW): “Liboso ete koswana ebima, longwá na yo.” Ee, okoki kokata lisoló mpo na kozongela yango na nsima, ntango yo mpe mobalani na yo bokozala na motema ya kokita. (Mosakoli 3:1, 7) Atako likambo nini oyo ekoki kobima, salá makasi na kozala na “koyoka noki, koloba malɛmbɛ, koyoka mpe nkɛlɛ malɛmbɛ.” (Yakobo 1:19) Mokano na yo esengeli kozala ya kobongisa likambo, kasi ya koluka komilóngisa te. (Genese 13:8, 9) Poná maloba mpe lolenge ya koloba oyo ekokitisa motema na yo mpe ya mobalani na yo. (Masese 12:18; 15:1, 4; 29:11) Likambo ya ntina koleka, koumela na nkanda te, kasi luká nde lisalisi epai na Nzambe, yo na mobalani na yo, na kobondeláká ye elongo na komikitisa nyonso.​—Baefese 4:26, 27; 6:18.

9. Mpo na nini ekoki kolobama ete kosolola ebandaka kati na motema?

9 Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Motema na moto na mayele ekolakisa monɔkɔ na ye, ekobakisa boyebi na bibɛbu na ye.” (Masese 16:23) Na bongo, ezali solo ete lifungola mpo na kolónga kosolola malamu ezali kati na motema, kasi kati na monɔkɔ te. Ezaleli na yo epai na mobalani na yo ezali nini? Biblia elendisi baklisto na kozala na “mitema na mawa.” (1 Petelo 3:8) Okoki kosala yango ntango mobalani na yo atungisami na makanisi? Soki ezali bongo, okoyeba lolenge nini koloba na ye.​—Yisaya 50:4.

10, 11. Lolenge nini mobali akoki kosalela toli ezwami na 1 Petelo 3:7?

10 Lokumu mpe limemya. Mibali baklisto basengeli kofanda na basi na bango “engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola na mbeki na motau.” (1 Petelo 3:7, NW) Kokumisa mwasi na yo esɛngi kondima motuya na ye. Mobali oyo azali kofanda na mwasi na ye “engebene boyebi” azali kotya likebi malamu na mayoki na ye, na bizaleli na ye, na mayele na ye mpe na lokumu na ye. Asengeli lisusu kolinga koyekola lolenge oyo Yehova atalelaka basi mpe lolenge alingaka ete básalela bango makambo.

11 Kati na ndako na yo, tóloba ete ozali na mbeki moko ya ntina mingi kasi ezali pɛtɛɛ. Okosalela yango na bokɛngi mingi, boye te? Ya solo, Petelo asalelaki elobeli “mbeki na motau” na likanisi bobele moko oyo, mpe yango esengeli kopusa mobali moklisto na komonisa likebi ya bolingo epai na mwasi na ye molingami.

12. Lolenge nini mwasi akoki komonisa limemya mozindo epai na mobali na ye?

12 Kasi toli nini Biblia epesi epai na mwasi? Paulo akomaki ete: “Mwasi asengeli kozala na limemya mozindo epai na mobali na ye.” (Baefese 5:33, NW) Motindo moko mwasi azalaka na mposa ete akumisama mpe alingama mingi epai na mobali na ye, bobele bongo mobali mpe azali na mposa ete mwasi na ye azala na limemya epai na ye. Mwasi oyo azali na limemya asengeli te kobimisa mpambampamba mabungá ya mobali na ye, ezala ete azali moklisto to moklisto te. Asengeli te kolongwela ye lokumu na kotɔngáká ye mpe kokitisáká ye, ezala na nkuku to liboso ya bato.​—1 Timoté 3:11; 5:13.

13. Lolenge nini makanisi makoki komonisama na lolenge ya kimya?

13 Yango elimboli te ete mwasi akoki koloba eloko moko te. Soki likambo moko ezali kotungisa ye, akoki koloba yango na limemya nyonso. (Genese 21:9-12) Kopesa likanisi epai na mobali ekoki kokokisama na kobwaka ndembo epai na ye. Mwasi akoki kobwaka yango na boboto nyonso mpo ete mobali akoka koyamba yango kozanga nkaká, to akoki kobwaka yango na makasi kino ekozokisa mobali. Ekozala malamu mingi ete mobali mpe mwasi na ye bálobanaka na boboto mpe na bopɔlɔ, na esika ete báfundanaka!—Matai 7:12; Bakolose 4:6; 1 Petelo 3:3, 4.

14. Osengeli kosala nini soki mobalani na yo azali komonisa bosepeli mingi te na kosalela mitindá ya Biblia kati na libala?

14 Lokola tosili komona yango, mitindá ya Biblia mikoki kosalisa yo na kotonga libala ya esengo. Kasi ezali boni soki mobalani na yo asepelaka mpenza na Biblia te? Okoki kozwa matomba malamu mpenza soki okokokisa mokumba na yo na kosaleláká boyebi ya Nzambe. Petelo akomaki ete: “Bino basi, bótosa mibali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bázwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na pɛto mpe na limemya.” (1 Petelo 3:1, 2) Ya solo, esengeli kozala sé ndenge moko mpo na mobali oyo mwasi na ye asepelaka na Biblia te. Atako lolenge nini ya makambo mobalani na yo akopona kosala, tiká ete mitindá ya Biblia mikómisa yo mobalani malamu. Boyebi ya Nzambe ekoki mpe kosala ete ozala tata malamu to mama malamu.

NDENGE NINI KOBƆKƆLA BANA ENGEBENE BOYEBI YA NZAMBE

15. Lolenge nini mabungá na lolenge ya kobɔkɔla bana elekisamaka, kasi lolenge nini mimeseno yango mikoki kobongwana?

15 Moto akokóma te mosáli na mabaya oyo azali na makoki bobele mpo ete azali na mosumáne mpe na martó. Bobele bongo, ekoki te bobele kozala na bana mpo na kokóma baboti oyo bazali na makoki. Báyeba yango to báyeba yango te, mbala mingi baboti babɔkɔlaka bana na bango na lolenge oyo bango moko babɔkwamaki. Na yango, mabungá mpo na lolenge ya kobɔkɔla bana mbala mosusu elekisamaka na libota moko nsima na mosusu. Lisese moko ya kala ya Liebele elobi ete: “Batata balei miwiti ya ngáí mpe mino na bana mayoki mpasi.” Nzokande, Makomami mamonisi ete tosɛngisami te kolanda lolenge baboti na biso bazalaki kosala. Tokoki kopona nzela ekeseni, nzela oyo endimami na mibeko ya Yehova.​—Ezekiele 18:2, 14, 17.

16. Mpo na nini osengeli kokokisa bamposa ya libota na yo, mpe yango esangisi makambo nini?

16 Yehova azali kosɛnga na baboti baklisto ete bápesa na bana na bango litambwisi mpe likebi libongi. Paulo akomaki ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Oyo nde maloba na nguya! Kokokisa bamposa ya bana na yo, na mosuni, na elimo mpe na mayoki, ezali libaku kitoko mpe mokumba ya moto oyo akobangaka Nzambe. Biblia epesi mitindá oyo mikoki kosalisa baboti na kotonga libota ya esengo mpo na bana na bango. Tótalela mwa ndambo na mitindá yango.

17. Osengeli kosala nini mpo ete mibeko ya Nzambe mikomama kati na mitema ya bana na yo?

17 Pesá ndakisa malamu. Etindá epesamaki epai na baboti Bayisraele ete: “Okolakisa [maloba ya Nzambe] na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” Baboti basengelaki koteya mibeko ya Nzambe epai na bana na bango. Kasi etindá wana eyaki nsima na maloba oyo: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo.” (Deteronome 6:6, 7) Ee, baboti bakokoka kopesa bobele oyo bazali na yango. Mibeko ya Nzambe misengeli libosoliboso kokomama na mitema na bino soki bolingi ete yango ekomama na mitema ya bana na bino.​—Masese 20:7; kokanisá na Luka 6:40.

18. Mpo na oyo etali komonisa bolingo, lolenge nini Yehova apesi ndakisa malamu mingi epai na baboti?

18 Monisá bango bolingo na yo. Na batisimo ya Yesu, Yehova alobaki ete: “Yo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] yo mingi.” (Luka 3:22) Na yango, Yehova andimaki Mwana na ye, amonisaki polele ete andimi ye mpe amonisaki ye bolingo na Ye. Na nsima, Yesu alobaki epai na Tata na ye ete: “Olingaki ngai liboso na kozalisama na mokili.” (Yoane 17:24) Na bongo, lokola baboti oyo babangaka Nzambe, bómonisa bolingo na bino epai na bana na bino, na maloba mpe na misala—mpe bósalaka yango mbala mingi. Bóbosana te ete “bolingo ekolendisaka.”​—1 Bakolinti 8:1.

19, 20. Lolenge nini kopesa disipilini malamu epai na bana, mpe lolenge nini baboti bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Yehova?

19 Disipilini. Biblia emonisi ntina ya kopesa disipilini na bolingo nyonso. (Masese 1:8) Baboti oyo bazali kokokisa te mokumba na bango mpo na kokamba bana na bango lelo, bakokutana solo na makambo oyo makopesa bango mpasi na motema na mikolo mizali koya. Nzokande, baboti bakebisami ete bálekisa mpe ndelo te. Paulo akomaki ete: “Bino batata, bósilikisaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.” (Bakolose 3:21) Baboti basengeli kopɛngola kosembola bana na bango koleka ndelo to kolobela mbala na mbala mabungá na bango ya mikemike mpe kotyola milende oyo bazali kosala.

20 Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló, apesi ndakisa mpo na lolenge ya kopesa disipilini. Kosembola na ye ezalaka ya kolekisa ndelo te. Nzambe ayebisaki na libota na ye ete: “Nakopesa yo etumbu lokola ekoki.” (Yilimia 46:28, NW) Baboti basengeli komekola Yehova na likambo yango. Disipilini oyo epesami na kolekisa ndelo to oyo ebosani mokano ya kosembola mpe ya koteya ezali solo kosilikisa.

21. Lolenge nini baboti bakoki koyeba soki disipilini oyo bazali kopesa bango ezali kobimisa matomba malamu?

21 Lolenge nini baboti bakoki koyeba soki disipilini na bango ezali kolónga? Bakoki komituna: ‘Disipilini oyo nazali kopesa na bana na ngai ezali kobimisa matomba nini?’ Yango esengeli koteya. Mwana na yo asengeli koyeba mpo na nini apesameli disipilini. Baboti basengeli mpe komibanzabanza na ntina na makambo makobima nsima na kosembola bana na bango. Ya solo, pene na bana nyonso basilikelaka disipilini na ebandeli. (Baebele 12:11) Kasi disipilini esengeli soko moke te kookisa nsɔ́mɔ epai ya mwana to kookisa na mwana ete asundolami to lisusu kookisa ye ete asili kobeba. Liboso ya kosembola libota na ye, Yehova alobaki ete: “Yo obanga te, . . . zambi ngai nazali na yo elongo.” (Yilimia 46:28) Ee, kosembolama esengeli kopesama na lolenge boye ete mwana na bino azala na mayoki ete bozali elongo na ye lokola baboti oyo balingi ye mpe bazali kosunga ye.

NDENGE NINI KOZWA “MAKOKI YA KOTAMBWISA”

22, 23. Lolenge nini okoki kozwa makoki ya kotambwisa mpo na kotonga libota ya esengo?

22 Tokoki kozala na botɔ́ndi lokola Yehova asili kopesa biso bisaleli oyo tozali na yango mpo na kotonga libota ya esengo. Kasi kozala bobele na bisaleli mpamba ekoki te. Tosengeli koyeba kosalela yango malamumalamu. Na ndakisa, motongi-ndako akoki kokólisa mimeseno mabe na lolenge azali kosalela bisaleli na ye, to mpe akómi kosalela yango na misala na yango te. Na makambo motindo wana, akokoka kosala mosala ya malamu te. Bobele bongo, ekoki kozala ete oyebi sikawa mimeseno mabe oyo misili kokɔta malɛmbɛmalɛmbɛ kati na libota na yo. Misusu mikoki kozala ete mikɔta makasi mpe mizali mpasi mpo na kobongola yango. Atako bongo, landá toli oyo ya Biblia: “Moto na mayele akoyoka mpe akofulukisa mayele; moto na boyebi akozwa makoki ya kotambwisa.”​—Masese 1:5, NW.

23 Okoki kozwa makoki ya kotambwisa na kolandáká kozwa boyebi ya Nzambe. Tyá likebi na mitindá ya Biblia oyo mitaleli bomoi ya libota, mpe salá mabongwani na bisika oyo bisengeli. Talelá baklisto bakɔmeli oyo bazali kopesa ndakisa malamu na mokumba na bango ya babalani mpe ya baboti. Sololá elongo na bango. Oyo eleki mpenza, yebisá mabanzo na yo epai na Yehova kati na mabondeli. (Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7) Akoki kosalisa yo na kozala na bomoi ya libota ya esengo oyo ezali kokumisa ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ntina bobele moko oyo Makomami mapesi nzela na koboma libala mpe kobala lisusu ezali bongo “pite”—kosangisa nzoto libándá ya libala.​—Matai 19:9.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Lolenge nini bosembo, kosolola, lokumu mpe limemya ezali kopesa nzela na kozala na libala ya esengo?

Lolenge nini baboti bakoki komonisa bolingo na bango epai na bana na bango?

Makambo nini osengeli kotalela mpo na kopesa disipilini ya malamu?

[Elilingi na lokasa mobimba 147]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto