Loyembo 27
Bóbanga bango te!
1. Bókende, bato na ngai;
Bósakola Bokonzi.
Bángani banguna te;
Sakolá solo na ngai
Ete: ‘Yesu, Mwana na ngai
Nde abwaki Satana;
Longwa na ye, Monyokoli,
Bato bakosikwama.’
(Mondimo)
2. Soki banguna batyoli
Mpe babengani bino,
Mpe soki batungisi
Mpo balɛmbisa bino,
Bómonisa sé molende.
Bóbangani bango te!
Nzamb’akobatela bino,
Akosunga bino bɛɛ.
(Mondimo)
3. Nzambe nde nguya na biso,
Tómitungisaka te.
Ata tokufi lelo,
Akotika biso te.
Biso tokobangaka te;
Nzamb’alingi biso bɛɛ,
Y’akobatelaka biso
Lokola liso na ye.
(MONDIMO)
Bangá te babomi nzoto.
Kotika bosembo te.
Nzamb’akobatela biso
Soki tokotosa ye.