Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/96 lok. 1
  • Tosembolaka Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosembolaka Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • ‘Sembolá Liloba ya Nzambe malamumalamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tósembola Liloba ya Nzambe malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tósalela “mopanga ya elimo” na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 12/96 lok. 1

Tosembolaka Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso?

1 Yesu Klisto azali moteyi monene oyo alekaki batɛyi nyo nso awa na mabelé. Azalaki koloba na lolenge ya kosimba mitema ya bato, ya kolamwisa mayoki na bango mpe azalaki kolendisa bango ete básala misala ya malamu. (Mat. 7:28, 29) Ntango nyonso mateya na ye mazalaki kozwa moboko na Liloba ya Nzambe. (Luka 24:44, 45) Apesaki Yehova Nzambe lokumu mpo na makambo nyonso oyo ayebaki mpe oyo azalaki na likoki ya koteya. (Yoa. 7:16) Yesu atikaki ndakisa malamu epai na bayekoli na ye na lolenge na ye ya kosembola Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso.​—2 Tim. 2:15.

2 Ntoma Paulo ye mpe azali ndakisa monene mpo na oyo etali kosembola malamu Liloba ya Nzambe. Asukaki te bobele na kotángela bazalani Makomami; azalaki kolimbola oyo ye azalaki kotánga mpe azalaki kososola likoló na yango, komonisáká na lisalisi ya Liloba ya Nzambe ete Yesu azalaki Klisto. (Mis. 17:2-4) Bobele bongo, Apolo, moyekoli oyo azalaki molóbi malamu, azalaki na ‘mayele mpe na boyebi ya Makomami’; azalaki kosembola yango na bosikisiki nyonso, komonisáká solo na nguya nyonso.​—Mis. 18:24, 28.

3 Tózala bateyi ya Liloba ya Nzambe: Na mikolo na biso, basakoli ya Bokonzi bazali kozwa matomba malamu ntango bazali koteya bato ya motema sembo na kososoláká uta na Biblia mpe na kotaleláká yango. Ndeko mobali moko asalelaki Ezekiele 18:4 mpe bavɛrsɛ́ oyo ezali na boyokani na yango mpo na kososola elongo na pastɛ́rɛ moko mpe na bandimi misato ya parwási na ye na ntina na oyo ezali kozela bato mabe mpe bayengebene. Nsima ya lisoló yango, basangani mosusu ya Lingomba babandaki koyekola, mpe moko kati na bango andimaki solo. Na libaku mosusu, mwasi moko oyo asepelaka na solo atunaki ndeko mwasi moko ete alimbwela mobali na ye, oyo azalaki kotɛmɛla ye, ntina oyo Batatoli ya Yehova bakumisaka te Eyenga ya Mbótama mpe mikolo ya kobotama. Ndeko mwasi atángaki kati na búku Comment raisonner bavɛrsɛ́ oyo ezali kolimbola likambo yango, mpe mobali ya mwasi yango andimaki. Na kotalela mayoki ya mobali na ye, mwasi wana azalaki na esengo mingi kino alobaki ete: “Tokobanda koyangana na makita na bino.” Mpe mobali na ye andimaki likanisi yango!

4 Tósalela lisalisi oyo epesameli biso: Mosala na biso ya Bokonzi mpe manáka ya makita ya mosala ya kosakola ezali kopesa biso batoli malamu mpo na kosalisa biso ete tósembola Liloba ya Nzambe. Basakoli mingi basili komonisa botɔ́ndi na bango mpo na liponi malamu ya masoló ya ndakisa oyo ezali kobimisama mpe oyo ezali kosalelama mpo na litomba na biso, mpe oyo ezali komonana ete ebongi mpenza mpe ezali malamu. Búku Comment raisonner à partir des Écritures etondi na makanisi ndenge na ndenge oyo mazali komonisa motindo ya kosembola na bosikisiki nyonso masoló ya ntina koleka 70 oyo mataleli Liloba ya Nzambe. Búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ezali bongo kolobelama na bokuse ya mateya nyonso ya moboko mazwami kati na Biblia oyo bato ya sika basengeli koyeba. Liteya 24 mpe liteya 25 ya búku Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali komonisa biso lolenge bateyi ya mayele básalaka mpo na kobenda likebi, kotánga mpe kosalela malamu mikapo ya Biblia. Tosengeli kosalela malamu bisaleli nyonso wana oyo epesameli biso.

5 Soki tozali kosembola Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso, tokondimisama ete yango “ezali na bomoi mpe na nguya . . . mpe ete yango ekoki kososola makanisi mpe mabanzo ya motema” ya baoyo tozali kosakwela. (Ebe. 4:12, NW ) Matomba oyo tokozwa na kosaleláká yango ekopusa biso na koloba solo na molende mingi koleka!​—Mis. 4:31.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto