Loyembo 128
Tósala mingi lokola Banasili
1. Banasili Bolandi bango?
Bokomekola bango?
Baponami mpo básalela
Yehova ntango inso.
Talá ntang’ekómi mokuse,
Tótya likebi na mpila.
Tokoki nde kobakisa
Mosala na nguya?
2. Banasili Bakomiboya,
Balingi bomoi’a pɛtɛɛ.
Babɛlɛmi epai na Nzambe.
Mpo nini biso mpe te?
Kasi bomoi ya Monasili
Esɛngi komipekisa.
Bandeko mingi bandimi
Mpo bákumisa Yah.
3. Banasili Bazwi elembo
Mpo bango bakeseni;
Mpo na bango, kotosa Nzambe
Eleki ntina mingi.
Tósal’elongo na Yehova,
Tótosa mibeko na ye.
Tokozwa bolamu mingi
Na mosala na ye.
4. Banasili Bango ndakisa
Y’etamboli ya pɛto.
Tópambolama na Yehova,
Tótambola na pɛto.
Tótanga liboso motuya
Mpe tólikya na Yehova.
Tósala solo na nguya
Mpe tokopambwama.