Loyembo 40
Tósembola nzela na biso
1. Yah’alobaki na Yosua:
‘Tósáká mibeko!
Tangá yango ntango inso;
Okozwa esengo.
Landá nyons’oy’ekomami,
Tangwá na yango te;
Komá yango na motema,
Nde y’opambwami bɛɛ.’
Komá yango na motema,
Nde y’opambwami bɛɛ.
2. Alobaki na bakonzi’a
Yisraele ete:
Moko na moko ákoma
Mibeko mpo na ye.
Atángaka yango ete
Amitómbola te.’
Bokonzi ekopambwama,
ekoumela mpe.
Bokonzi ekopambwama,
ekoumela mpe.
3. Tomoni nzela ya solo
O kati’a Liloba.
‘Yang’ekotambwisa biso
Na lisungi na Yah.
Tótosa batoli na Yah,
Tósepelisa ye.
Ye Molakisi malamu.
Tika tótosa ye!
Ye Molakisi malamu.
Tika tótosa ye!