Loyembo 85
Yehova azali ekimelo na biso
1. Yehova, y’ozali nde
Ekimelo solo.
Totii seko elikya
Epai na yo, Nkolo.
Ɛ Nzambe, batelá biso
Na mitambo ya Satana.
Yo’ebombamelo solo
Mpo na basembwi banso.
2. Nzambe alobi na yo,
Ata nkóto bakwe’
Soko mpe nkóto zomi,
Nde y’okokwea te.
Mpe y’okobang’eloko te,
Mpo Nzambe akosunga yo;
Talelá bobele ye,
Mpe y’akobatela yo.
3. Mpasi mpe y’okozwa te,
Y’okobatelama.
Baanzelu ya Yehova
Bakosunga mpenza.
Y’okosakana na nkosi
Mpe okosimba etupá.
Salelá Nzambe na yo
Na motema mobimba.
4. Tókumisa Yehova,
Ye azali sembo.
Y’ekimelo na biso,
Lobiko na biso.
Tómipesa s’epai na ye,
Mpo y’alaki biso bomoi.
Ee, nkombo ya Yehova,
Ekimelo na biso.