Tóyambola mpo na nkombo ya Yehova
“Tiká ete tópesa ntango nyonso mbeka ya masanzoli, yango mbuma na bibɛbu oyo ezali koyambola mpo na nkombo na ye.”—BAEBELE 13:15, NW.
1. Mosakoli Hosea alendisaki baninga na ye Bayisraele na kosala nini?
HOSEA, mosakoli ya Yehova, azalaki na nsango moko ya ntina mingi mpo na baninga na ye Bayisraele. Na ekeke ya mwambe liboso ya Ntango na Biso, alendisaki batomboki oyo bazalaki na eleko na ye ete bábongola mitema. Alendisaki bango ete: “Bokumba maloba na bino elɔngɔ mpe bobongwana epai na [Yehova]; boloba na ye ete: ‘Longola mabe yɔnsɔ. Yamba oyo ejali malamu, boye tokopɛsaka mbuma na bibɛbu na biso.’” (Hosea 14:2) Na kolendisáká bato ete bápesa Yehova ‘mbuma na bibɛbu na bango,’ esakweli ya Hosea eyikisaki Bayisraele mpiko na kobongola motema mpe na kopesa mbeka ya masanzoli ya solosolo epai na Nzambe.
2. Lolenge nini ya mbeka ntoma Paulo alendisaki baklisto na kopesa?
2 Batatoli ya Yehova bazali lelo oyo kopesa ‘mbuma na bibɛbu na bango.’ Bazali mpe kolanda toli ya ntoma Paulo, oyo etángi maloba oyo mazali kati na esakweli ya Hosea, wana akomaki ete: “Na nzela ya [Yesu Klisto] tiká ete tópesa ntango nyonso mbeka ya masanzoli, yango mbuma na bibɛbu oyo ezali koyambola mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15, NW) Na yango, basaleli ya Nzambe bazali kosanzola Yehova na esengo nyonso, na ndakisa kati na mosala na bango ya kosakola Bokonzi.—Matai 24:14.
3. Lolenge nini tokoki kopesa “mbeka ya masanzoli” epai na Yehova, mpe misala ya banani tokotalela sikawa?
3 Koyambola mpo na nkombo ya Yehova ezali libaku oyo limonisi ngɔlu monene mpo na bato oyo bazangi kokoka. Oyo nde esengo tozali na yango ya koyebisa basusu makambo matali Nzambe na biso, na kopesáká bongo na Yehova “mbeka ya masanzoli,” “mbuma na bibɛbu na biso”! Mpo ete tózwa elendiseli na kosakola liboso ya bato nsango malamu ya Bokonzi lelo, tiká ete tótalela oyo Biblia ezali koyebisa biso na ntina na basakoli ya Nzambe mpe basaleli mosusu ya Yehova. Na kotalela makambo basalaki kati na bomoi na bango, tokoki koyekola makambo mingi oyo makosalisa biso na kosepela na mosala na biso ya kosakola.—Baloma 15:4.
Mokumba ya Basakoli
4, 5. (a) Kati na nkótá ya ebandeli ya Biblia, nini ezali mpenza ndimbola ya maloba mabongolami na “mosakoli”? (b) Nini emonisi ete basakoli bazalaki na mokumba monene kati na ebongiseli ya Nzambe?
4 Basakoli ya Yehova bazwaki libaku ya kosakola nsango na ye liboso ya bato. Eutelo ya liloba ya Liebele mpo na “mosakoli” (na·viʼʹ) eyebani malamu te, kasi kosalelama na yango kati na Biblia emonisi ete basakoli ya solo bazalaki balobeli ya Yehova, bato ya Nzambe oyo bazalaki na nsango epemami. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “mosakoli” (pro·pheʹtes) elimboli mpenza “molobi,” koyebisa likambo moko “na miso ya” to “liboso” ya moto. Mosakoli azali moto oyo azali kosakola nsango oyo euti epai ya Nzambe. Mbala mingi, kasi ntango nyonso te, basakoli ya solo ya Nzambe bazalaki kosakola makambo mazalaki koya.
5 Na kotalela mokumba monene oyo basakoli bazalaki na yango kati na ebongiseli ya Nzambe, búku Cyclopædia ya M’Clintock mpe Strong elobi ete: “Na bantango mosusu bato bazalaki koluka toli epai na bango . . . Kasi mbala mingi bazalaki komiyoka bango moko ete bapusami na koloba epai na bato kozanga ete bato básɛnga bango toli, mpe bazalaki te kobanga koloba na makasi nyonso na bisika oyo komonana na bango, mbala mosusu, ezalaki kobimisa koyina mpe nsɔ́mɔ.” (Volimi VIII, lokasa 640) Tótalela mwa bandakisa oyo epusaki basakoli na kozala na mpiko motindo wana.
Mayoki mpe bopusi
6, 7. Yehova atindaki mosakoli Ezekiele ete alya eloko nini, mpe yango epusaki ye na kosala nini?
6 Liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., Yehova alobaki na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone na nzela ya mosakoli na ye, Ezekiele. Yehova ayebisaki ye ete: “Mwana na moto, lia yango ejui yɔ; lia mokanda oyo, mpe kɛnda kolobela ndako na Yisalaele.” Ezekiele atosaki. Alobaki ete: “Bongo nafungolaki monɔkɔ na ngai mpe aleisaki ngai mokanda yango. Alobelaki ngai mpe ete: ‘Mwana na moto, leisa libumu na yɔ mpe tondisa nsɔpɔ na yɔ na mokanda oyo. Bongo naliaki yango mpe ejalaki na monɔkɔ na ngai elɛngi lokola mafuta na njoi.”—Ejekiele 3:1-3.
7 Nzoto na biso ezali kozwa biloko ya ntina longwa na bilei oyo tolyaka mpe na lolenge moko to mosusu yango ezali kokóma eteni ya nzoto na biso. Bobele bongo, “mokanda” oyo Ezekiele alyaki—nsango ya Yehova oyo mosakoli asengelaki kosakola—ekómaki eteni ya nzoto na ye, ezalaki na bopusi likoló na mayoki na ye. Maloba ya Nzambe mapusaki mayoki mozindo ya Ezekiele na boye ete kosakola yango liboso ya bato, ezalaki elɛngi mpo na ye. Soki ozali Motatoli ya Yehova, osepelaka na koyambola nsango ya Nzambe?
8, 9. Nini epusaki Amosa na kosakola?
8 Tótalela mpe mosakoli Amosa. Azalaki na bomoi na ekeke ya libwa L.T.B., azalaki moko kati na basakoli ya liboso ya Baebele, na kokoma mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Lokola Ezekiele, Amosa azalaki mosakoli ya sembo ya Liloba ya Yehova. Maloba “[Yehova] alobi boye ete” mazongelami mbala 11 kati na mokanda oyo ememi nkombo na ye! (Amosa 1:3, 6, 9, 11, 13; 2:1, 4, 6; 3:12; 5:4; 7:17) Amosa amonaki ete asengeli koyambola maloba ya Nzambe.
9 Lokola mosakoli ya Nzambe, Amosa ayanolaki na maloba ya Nzambe na kosaláká nokinoki. Na nzela ya Amosa, Nzambe alobaki ete: “Nkɔsi angulumi, nani akobanga tɛ? Nkolo [Yehova] alobi, nani akosakola tɛ?” (Amosa 3:8) Mosakoli apusamaki mpenza na kosakola nsango ya Yehova.
10. Basaleli ya Yehova ya mikolo na biso basalaka lolenge nini ntango bato bazali kotɛmɛla mosala na bango ya kosakola?
10 Na lolenge ya nkosi oyo azali konguluma, Yehova azali kotinda nsango ya kosambisa likoló na ebongiseli mabe ya mokili oyo. Lokola Amosa, basaleli ya Yehova na mikolo na biso bazali mpe komiyoka ete bapusami na koyambola maloba ya Nzambe. Ata wana banguna bazali kokanela bango, bazali kolanda ndakisa ya ntoma Petelo mpe ntoma Yoane, oyo balobaki na nguya nyonso ete: “Kasi mpɔ na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango tɛ.” Bantoma balobaki mpe ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi liboso ya kotosa bato.” (Misala 4:20; 5:29, NW) Kasi, ezali boni mpo na biso? Ezali malamu kotalela mayoki na biso mpo na oyo etali koyambola nkombo ya Yehova.
“Na makambo matondisi motema”
11. Nini esengeli kopusa biso na kolendendela na koyambola mpo na nkombo ya Yehova?
11 Ntembe ekoki kozala te ete basakoli ya Yehova bazalaki na botɔ́ndi na mabaku kitoko oyo bazalaki na yango. Botɔ́ndi motindo oyo mpo na Yehova esengeli kopusa biso na koyambola mpo na nkombo na ye. Njembo 145:1, 2 elobi ete: “Nakosanjola yɔ Njambe na ngai mpe Mokonji na ngai mpe nakokumisa nkombo na yɔ seko na seko. Mikɔlɔ yɔnsɔ nakokumisa yɔ mpe nakosanjola nkombo na yɔ seko na seko.” Maloba oyo mamonisi ezaleli na yo? Boyekoli ya Biblia ntango nyonso ezali kosalisa biso na kokólisa botɔ́ndi na biso mpo na oyo Yehova asilá kosala, mpo na oyo azali kosala, mpe mpo na oyo akosala mpo na biso. Mpe wana tozali koyekola Biblia elongo kati na libota, tomonaka ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya, oyo ezali kopusa biso na koloba na ntina na ye mpe mikano na ye, boye te? (Baebele 4:12) Mpo na kobota mbuma kati na mosala oyo etali koyambola nkombo ya Yehova, tosengeli mpe kosalela malamu mikanda ya boklisto oyo Yehova Nzambe azali kopesa biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo apakolami.—Matai 24:45-47.
12. Lolenge nini makita ya boklisto mpe bomanyoli ezali kosalisa biso na koyambola?
12 Soki tolingi kosanzola Yehova mpo ete mitema na biso mizali na botɔ́ndi, tosengeli koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto. Basaleli nyonso ya Yehova basengeli kolanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Totala ete topɛsana simbisi mɔkɔ na mɔkɔ mpɔ na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elɔngɔ mɔkɔ tɛ, pelamɔkɔ motindo na bamosusu, kasi topɛsana toli. Tosala bongo na koleka, awa emɔni bino ete Mokɔlɔ yango ejali kobɛlɛma.” (Baɛbɛlɛ 10:24, 25) Ozalaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na makita ya boklisto? Mbala mingi olobelaka makambo matali solo ya Makomami, makambo kitoko oyo toyebi, mpe bansango ya kolendisa ya teokrasi na ntina na bokóli oyo ozali koyoka na makita ya libota ya Nzambe? Soki okakatanaka mpo na koloba na ntina na Yehova mpe na ntina na mikano na ye, sombá ntango mpo na komanyola likoló ya Liloba na ye, mpo ete makanisi na ye makɔta mozindo kati na motema na yo. (Nzembo 77:12; 143:5) Ee, makita ya boklisto mpe komanyola ntango nyonso Liloba ya Nzambe ekosalisa yo na kosepela na libaku kitoko oyo ozali na yango ya koyambola mpo na nkombo ya Yehova.
13. Lolenge nini tozali kobimisa ‘makambo malamu’ longwa na mitema na biso?
13 Lokola mitema na biso miyikani na botɔ́ndi mpo na Yehova, tozali kobimisa makambo malamu. Yesu apesaki likanisi oyo ete: “Moto malamu abimisi mpɔ malamu kati na makambo malamu mabombami na motema na ye, mpe moto mabe abimisi mpɔ mabe kati na makambo mabe, mpɔ ete monɔkɔ na ye elobi na makambo matondisi motema na ye.” (Luka 6:45) Ekoki nde kozala na nzela mosusu ya malamu mpo na ‘kobimisa makambo malamu’ koleka oyo ya koyambola mpo na nkombo ya Yehova mpe koyebisa mikano na ye epai na bazalani na biso, na bandeko na biso ya mosuni—na bato banso oyo tozali kokutana na bango?
Matomba ya koyambola
14. (a) Eloko nini mosakoli mpe moyoki ya nsango malamu bakoki kozwa? (b) Nini ezali kokokisama na nzela ya mosala ya kosakola Bokonzi?
14 Basakoli ya Yehova bazwaki esengo kati na mosala na bango, mpe oyo bazalaki koloba epesaki matomba epai na bayoki malamu. Bobele bongo, koyambola nsango ya Bokonzi ezali kopesa esengo monene epai na baoyo bazali kosakola yango. (Misala 20:35) Mpe oyo nde matomba yango ezali kopesa epai na bayoki malamu! Kondima nsango malamu ezali kosalisa bato na kolónga ezaleli ya konyokwama na makanisi to koyikela yango mpiko. Baoyo balíngami na bango bakufá bazali kosepela na elikya ya lisekwa. Baombo ya bilangwiseli bazali kolongwa na boombo ya nicotine, héroine mpe bilangwiseli mosusu oyo etyaka bato na boombo na yango. Mingi bakómi na bizaleli malamu, mpe banso oyo bazali kondima solo ya Biblia bazali kozwa bonsomi ya elimo. (Yoane 5:28, 29; 8:32) Kosakola Bokonzi lokola elikya bobele moko ya bato ezali mpe mpo na kokebisa bato mabe, nzokande ezali kobota mbuma malamu kati na mitema ya bato na sembo. Na yango bato bazali kokabolama mpo na “kobomama ya seko” to mpo na “bomoi ya seko” wana kosambisa ya Nzambe ekokwea likoló na mokili oyo ya mabe. (Matai 24:14; 25:31-46; Ezekiele 33:1-9; 1 Timoté 2:3, 4) Mosala na biso ya kosakola ezali mosala ya kobikisa oyo ekokani na mosusu te, mosala ya motuya mpe moleki monene oyo ezali kosalema lelo na mabelé koleka misala nyonso!
15. Nini ekoki kosalema mpo na kosalisa bato ya motema malamu oyo tokoki kokutana na bango kati na teritware oyo tozali kopesa litatoli?
15 Lokola Batatoli ya Yehova na mikolo na biso, tondimi na esengo mpe na botosi nyonso kozala baombo ya Tata na biso ya likoló. (Baloma 12:11) Na yango, tozali na esengo ya komibombela ntango mbala na mbala mpo na komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu liboso ya bato banso mpe na ndako na ndako. (Misala 5:42; 20:20) Balapólo ya mokili mobimba emonisi ete kati na bateritware na biso ezali naino na bato ya motema malamu. Lokola makambo kati na mokili mazali kobongwana, bato batungisami na makambo makeseni. Kozanga komizela na yango, mingi bakimaki mboka na bango, bakomaki bapaya na mboka mosusu. Mbala mosusu bamoko kati na bato yango bazali kati na teritware epai tozali kopesa litatoli. Soki ezali bongo, tiká ete tósala oyo ekoki na biso mpo na kosalisa bango na elimo wana ezali biso kolendendela kati na “mosala mosantu ya nsango malamu.” (Baloma 15:16, NW) Baklisto mosusu bayekolaki lokótá mosusu mpo bákoka kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na bato motindo yango.
16. Nini ekoki kosalisa biso na kolendendela mpo na kosakola nkombo ya Yehova?
16 Mingi kati na basakoli ya Nzambe bazalaki na mikakatano mingi mpo na kokokisa mikumba na bango. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bango na kosakola nsango ya Nzambe epai na bato oyo bazalaki kondima yango te. Bobele bongo, ezalaka mpe pɛtɛɛ te mpo na basaleli nyonso ya sembo ya Yehova na koyambola mpo na nkombo na Ye, mingimingi kati na bateritware oyo bato bandimaka yango te. Nzokande, soki totye motema na matomba mazali kozwama na boyekoli ya Liloba ya Nzambe kati na libondeli, elongo na makasi oyo Yehova azali kopesa, tokoki kolendendela kati mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. (Bafilipi 4:13; Emoniseli 14:6) Kati na likambo yango, nini tokoki koyekola na ndakisa ya basakoli ya Yehova mpe basaleli na ye mosusu ya ntango ya kala?
Boninga kati na mosala ya kosakola
17. Wapi mwa bandakisa euti na Makomami oyo emonisi matomba mazwamaka na boninga malamu kati na mosala ya Nzambe?
17 Wana ezalaki ye kokokisa mosala na ye, na ebandeli, Mose mosakoli ya Nzambe asungamaki na Alona, oyo azalaki nkulutu na ye. Yehova alobaki na Mose ete: “[Alona] akolobela bato mpɔ na yɔ, mpe ye akojala monɔkɔ na yɔ.” (Esode 4:16) Tótalela mpe, mikolo ya mosakoli Eliya mpe mosakoli Elisa, wana “bana ya basakoli” bayikanaki mingi. Emonani ete bazalaki bituluku ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki kosala elongo, mpe na ntembe te, bazalaki kosepela kozala esika moko. (2 Mikonzi 2:3-5; 4:38; kokanisá na 1 Samwele 10:5, 10.) Ya solo, Mose mpe Alona mpe “bana ya basakoli” bazwaki te mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Atako bongo, kozala elongo ezalaki kopesa matomba epai na bango nyonso. Bikeke mingi na nsima Yesu atindaki bayekoli 70 kati na mosala ya kosakola “mibale mibale,” mpe na ntembe te, bango bazwaki bongo litomba na boninga oyo epesamelaki bango.—Luka 10:1-16; kokanisá na Misala 17:10, 11; 20:20.
18. Lolenge nini boninga kati na mosala ya kosakola ezali kosalisa na kokokisa mokano ya ntina lelo oyo?
18 Na mobu 1953, Batatoli ya Yehova basalaki ebongiseli oyo kati na yango basakoli ya Bokonzi bazalaki kosala elongo kati na mosala ya kosakola. Ya solo, yango esalemaki te bobele mpo na kosala boninga. Ebongiseli wana ya koyekolisa ekamatamaki mpo na kosala ete basaleli ya Nzambe bázala balakisi mpe basakoli malamu ya nsango malamu. Koyebáká likanisi wana, basakoli ya Bokonzi oyo bamesani na mosala bazalaki kosala elongo na bato ya sika. Kobongisama wana mpo na mosala ya ndako na ndako epesaki matomba mingi mpe esalisaki basaleli ya Yehova na kosembola lisusu malamu lolenge na bango ya koyambola mpo na nkombo na ye. (1 Timoté 4:16) Lelo oyo, kobatelama ezali likambo mosusu oyo esali ete yango ezala na ntina mpo na baklisto na komipesa kati na mosala “mibale mibale,” mingimingi kati na bitúká mosusu.
19. Nini tosengeli kobatela kati na makanisi na kotalela mikano ya moto na moto kati na mosala ya kosakola?
19 Ezala ete ozali kosala elongo na moninga mondimi kati na mosala to okei kobeta ndako moko yo moko, salá makasi na kokokisa mokano oyo omityelaki. Esengeli kozala mokano mobongi na yo, oyo okoki kokokisa yango. Ozali nde na mposa ya lisalisi mpo na koyeba koyokanisa ebandeli na yo ya masoló mpo na kolamwisa bosepeli ya bato kati na teritware na yo? Soki ezali bongo, mbala mosusu okoki kobima elongo na mobongisi-nzela moko, mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi, to elongo na mosakoli moko oyo ayebi kosalela malamu ebandeli ya masoló. Moninga na yo ya mosala akoki kosalisa yo na kobongisa mpe kosalela maloba ya ebandeli ya masoló oyo mazali kati na Mosala na biso ya Bokonzi to na mwa búku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia. Na mabaku mosusu, wana bozali kopesa litatoli elongo, na mosala ya ndako na ndako, yoká na likebi nyonso lolenge moninga na yo ya mosala azali kobanda masoló. Na nsima, meká kozongela ebandeli ya lisoló motindo wana yo moko kino okomesena na lolenge yango na mosala na yo.
20, 21. Nini ekoki kosala ete boninga kati na mosala ya kosakola epesa mpenza matomba?
20 Ezali boni soki ozali na mposa ya lisalisi mpo na koyeba malamu kosala bozongeli ya sika na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia kati na ndako? Mbala mosusu na nzela ya Motambwisi na bino ya Boyekoli ya Mokanda na lisangá, bibongiseli bikoki kokamatama mpo na yo ete osala mosala ya kosakola elongo na mosakoli ya Bokonzi oyo ayebi malamu kobanda boyekoli ya Biblia. Wana bozali elongo mpo na kozongela bato, kozala motali mpamba te. Kasi, nsima wana moninga na yo ya mosala amonisi lolenge ye azali kosala na boumeli ya bozongeli moko, yo okoki kozwa litomba na kosalela bobele ebandeli ya lisoló motindo wana na ntango okosala bozongeli oyo ekolanda. Moninga na yo akoki kozala wana mpo na kosalisa yo mpe kopesa yo batoli na nsima.—Kokanisá na Bagalatia 6:6.
21 Lisungi wana ya bolingo oyo euti epai na moninga ya mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo na kokokisa mikano na yo kati na mosala. Lisalisi wana mpe botɔ́ndi na yo mozindo mpo na motema-boboto ya Yehova oyo epesi yo nzela ete osala mosala wana ya ntina, ekosalisa yo na kozala na makoki mingi kati na mosala na yo ya kosakola Bokonzi. Mpe tiká ete osepela mingi na libaku ozali na yango ya kopambola Yehova na kolobáká ntango nyonso malamu mpo na ye mpe na koyamboláká ntango nyonso mpo na nkombo na ye.—Nzembo 145:1, 2, 9-13.
22. Boyekoli na biso oyo ekolanda ekosalisa biso na koyanola na mituna nini?
22 Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tozali kozongela bato mbala na mbala kati na mosala na biso ya ndako na ndako. Mingi bazali koyoka nsango malamu na bosepeli nyonso. Nzokande, basusu bakakatanaka mpo na koyoka nsango ya Bokonzi. Tosengeli kosala nini na ntango wana? Lolenge nini tokoki kolendendela kati na mosala oyo Yehova apesi na basaleli na ye? Bandakisa nini ya Makomami oyo ekoki kosalisa to kotambwisa biso? Mituna wana mikozwa biyano kati na lisoló lilandi.
Osimbaki makanisi oyo?
◻ Hosea mpe ntoma Paulo balobaki nini na ntina na mbeka epai na Nzambe?
◻ Nini epusaki Ezekiele mpe Amosa na kosakola?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela mosala na biso ya kosakola Bokonzi?
◻ Matomba nini makoki kozwama na boninga kati na mosala ya kosakola?
[Bililingi na lokasa 13]
Kozala na moninga kati na mokano ya sikisiki ekosalisa biso na kosembola malamu mosala na biso ya kosakola