Loyembo 41
Kumisá Yehova, ye Libangá
1. Likoló, yoká! Mabelé, yoká!
Bayengebene, bino bóyoka!
Nzamb’alobi ‘toli na ye mpe solo,
Esopani’ekiti lokola mamwe.’
2. Tika tóteya Nkombo monene
Ya Nzambe; bato bakoyeba ye.
Tósanzola Yehova, ye Libangá,
Mobateli na mpat’oy’a etongá.
3. Nzambe monene; y’ozali sembo,
Yo nde malamu mpe na bolingo;
Mitinda na yo miyebisi solo;
Y’okokisi maloba na yo nyonso.
4. Tóbanga Nzambe, aleki nguya,
Tózala pɛto, tika tótosa
Na esengo mpo bomoi na biso
Euti na Yah, ye Nzambe na biso.