Loyembo 166
Talá limpinga ya Yehova!
1. Talá limpinga ya
Yehova Nzambe.
Bakimi Babilone,
Basakoli nde
Bokonzi ya Klisto
Ezwi nguya bɛɛ.
Mpe bataleli Yah,
Bakobanga te.
Matambé ya Nkolo,
Bango balandi,
Mpo básakola ’te:
‘Nzamb’ayangeli.’
2. Libota ya Nzambe
Likoluka nde
“Bampate” longwa na
Mangomba mabe.
Na molende, noki,
Bakokimaka
Mpo bazwa’esik’oyo
Bakobombama.
“Mpate” oy’akimi,
Bakosunga ye;
Bakolakisa ye
Nzela ya Nzambe.
3. Talá bandeko ya
Yesu Mokonzi
Mp’ebele monene,
Nkolo, batosi.
Banso basaleli,
Ye na bomoko.
Bazali makasi,
Ata minyoko.
Bazwi nde kondima,
Bakokóla mpe,
Bakokumisa Yah
Mpe Mwana na ye.