Loyembo 100
Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!
1. Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!
Tóyemba mpe tósepela!
Makoló mpe mabelé ya ye.
Biloko binso ye asali,
Ezali ya kokamwisa.
Azali na boyengebene
Mpe atondi na mayele.
Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!
2. Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!
Ya solo, tómonisaka
Boboto ya Nzambe na biso.
Boye, bato mingi bakoya
Mpo ete bakumisa Yah.
Ye akoboma bato mabe,
Akobikisa basembwi.
Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!
3. Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!
Lokumu na Mozalisi!
Tópesaka nkembo na Nzambe.
Klisto, Mwana na ye, Mokonzi,
Mpe abongi na lokumu.
Tóyemba loyembo y’elónga
Mpo tómonisa botɔndi!
Lokumu mpo na Yehova!
Tósanzola ye libela!