Loyembo 209
Tólanda Mokonzi Mobundi!
1. Nde tokoyembela Nzambe, Yehova.
Nkembo na ye, nzembo eyembama!
Tokosakwela bato na molende
Nsango ya makambo makobima.
(Mondimo)
2. Komandá Mokambi’alobi, tólata
Moláto mobimba mpo n’etumba:
Ekɔti ya lobiko mpe mopangá
Oy’elimo, kondima nde nguba.
(Mondimo)
3. Tokozw’elónga mpo na Yah Yehova.
Tómitambwisa biso moko te.
Tómipesa na Yah mpe tokolónga.
Nkombo na ye ekozwa nkembo bɛɛ.
(MONDIMO)
Kendani! (Solo!)
Bángani te! (Bángani te!)
Memani bibundeli;
Bundisani Satana.
Landani Yesu Nkolo, kotika te.
Ye akoki kolɛmba te.